Oyikisaki moto moko mpiko na mikolo oyo?
ELENA azalaki na mibu 17 ntango minganga bamonaki bokɔnɔ ya cancer ovarien na nsé ya libumu na ye. Mama na ye, Mari, asengelaki koyika mpiko na ntina na mpasi makasi oyo Elena azalaki kooka.
Na nsima, Elena atindamaki na lopitalo moko na engumba Madrid, na Espagne, bakilomɛtɛlɛ 1 900 mosika ya mboka na bango na Bisanga Canary. Na Madrid etuluku moko ya minganga bamonisaki bolingo malamu ya kosala lipaso kazanga kozongisa makila. (Misala 15:28, 29) Kasi mwa moke nsima wana lipaso libandaki, ekómaki polele ete Elena akokaki kobika te. Bokɔnɔ esilaki kopalangana bipai nyonso kati na nzoto na ye, mpe minganga-bapasoli bakokaki kosala eloko te mpo na kobikisa ye. Elena akufaki mikolo mwambe nsima ya kokóma na Madrid.
Mari atikamaki ye moko te kati na mawa monene wana. Na mosolo na bango moko, bankulutu mibale ya lisangá basalaki mobembo elongo na ye mpe mwana na ye ya mobali ya liboso kino na Madrid mpe batikalaki kuna kino kufa ya Elena. Mari alimboli ete: “Basalisaki ngai na kolónga mayoki makasi ya kozanga oyo nazalaki kooka. Nakobosana soko moke te elendiseli oyo bapesaki ngai. Lisungi ya elimo mpe lisalisi oyo bapesaki ekoki kotángama motuya te. Bazalaki mpenza ‘ebombelo mpɔ na mopɛpɛ.’”—Yisaya 32:1, 2.
Yehova azali kosepela ete babateli ya bolingo lokola bango bazali komibanzabanza na boboto nyonso mpo na bampate na ye. (Masese 19:17; 1 Petelo 5:2-4) Nzokande, koyikisa mpiko ezali bobele mokumba ya bankulutu te. Baklisto nyonso bayanganaka mpo na koteyama na elimo mpe mpo na ‘koyikisana mpiko moko na mosusu.’ (Baebele 10:24, 25) Koyikisana mpiko ezali moko na makambo ya ntina mingi kati na boyokani ya baklisto.
Koyikisa mpiko esangisi makambo nini?
Motindo moko lokola fololo kitoko ekweaka soki bazangi kotyela yango mai, ezali mpe bongo mpo na bato—ezala kati na libota to kati na lisangá—bakoki kolɛmba soki bazangi koyikisama mpiko. Na ngámbo mosusu, koyikisa mpiko na ntango oyo esengeli ekoki kolendisa baoyo bamekami, ekoki kopesa nguya na baoyo babulungani na makanisi, mpe ekoki kopesa nguya na baoyo bazali kosalela Nzambe na bosembo nyonso.
Liloba ya Greke oyo ebongolami “koyikisama mpiko” esangisi likanisi ya kobondisama, ya toli, mpe ya kolendisama na motema. Na yango, koyikisama mpiko esuki te bobele na koloba na moto moko ete azali kosala bokóli malamu. Ekoki lisusu kosɛnga ete topesa lisungi oyo esengeli mpe lisalisi ya elimo.
Ya solo, liloba ya Greke oyo ebongolami “koyikisama mpiko” elimboli mpenza “kozala penepene na moto moko.” Kotambola nzela moko elongo na bandeko mibali mpe bandeko basi baklisto ekopesa biso makoki ya kosunga nokinoki soki moko na bango alɛmbi to abɛti libaku. (Mosakoli 4:9, 10) Likambo ya ntina, libota ya Yehova lizali “kosalela ye lipeka na lipeka.” (Sofoni 3:9, NW) Mpe ntoma Paulo abéngaki moklisto moko ete “mojalani na sɔlɔ na ngai na ekanganelo.” (Bafilipi 4:3) Kosala elongo na nse ya ekanganelo moko na kosaleláká lipeka na lipeka ekoyeisa mokumba pepele, mingi mpenza mpo na baoyo bazali makasi te na elimo.—Kokanisá na Matai 11:29.
Bayikisaki mpiko
Lokola koyikisa mpiko ezali na ntina monene, tótalela bandakisa mosusu ya Makomami oyo ezali komonisa yango. Ntango Mose, mosakoli ya Nzambe akómaki pene na kokufa, Yehova aponaki Yosua mpo na kokamba Bayisraele. Yango ezalaki mokumba ya moke te, lokola Mose ye moko ayebaki yango malamu. (Mituya 11:14, 15) Na yango, Yehova ayebisaki na Mose ete: “Lakela Yosua mpe yikisa ye mpiko mpe lendisa ye.”—Dutɛlɔnɔmɛ 3:28.
Na boumeli ya eleko ya Basambisi ya Yisraele, mwana mwasi ya Yɛfɛta atosaki ndai oyo tata na ye alapaki na komipimeláká likoki ya kobota bana mpo ete akoka kosalela Yehova kati na mongombo. Komipimela oyo amonisaki etalemaki mpamba? Te, mpamba te Basambisi 11:40 elobi ete: “Bana basi na Yisalaele [bazalaki kokenda kokumisa, NW] mbula na mbula mwana mwasi na Yɛfɛta Mogilada mikɔlɔ minei na kati na mbula.” Boninga motindo wana esengelaki solo koyikisa mpiko na mwana mwasi ya Yɛfɛta oyo azalaki na elimo ya komipimela.
Na bantango mosusu koyikisa mpiko esɛngaka kozala na mpiko. Na boumeli ya mobembo ya liboso ya ntoma Paulo lokola misionere, akutanaki na botɛmɛli makasi na bingumba mingi ya Asie Mineure. Babenganaki ye na Antiokia, abikaki mpenza na kobomama na Ikoni, mpe na Lusutula babambaki ye na mabangá mpe bakanisaki ete akufi. Nzokande, mwa moke na nsima, Paulo mpe baninga na ye bazongaki lisusu na bingumba wana, “balendisi mitema na bayekoli, kopɛsa bango mpe toli koumela na kondima ete, Ekoki na biso kokɔta na Bokonji na Njambe na njela na bolɔnji mingi.’” (Misala 14:21, 22) Paulo asilaki komibongisa mpo na kotya bomoi na ye na likámá mpo na kolendisa bayekoli wana ya sika.
Nzokande, ezali bobele baklisto ya sika te nde bazali na mposa ya koyikisama mpiko. Bambula mingi na nsima, Paulo asalaki mobembo moko ya kobangisa na Loma, epai asengelaki kosambisama. Wana abɛlɛmaki na engumba yango, mbala mosusu aokaki mwa bobangi. Kasi ntango akómaki na kilomɛtɛlɛ 74 na súdi-ɛ́sti ya Loma, ayikisamaki mpiko. Mpo na nini? Mpamba te bandeko ya Loma bayaki kokutana na ye na Zando na Api mpe na Ndako Misato. “Wana emɔni Paulo bango, apɛsi Nzambe matɔndi mpe ayikaki mpiko.” (Misala 28:15) Na mabaku motindo oyo, bobele kozala penepene ekoki kozala liziba ya elendiseli monene mpo na baninga bandimi.
Salelá mabaku ya koyikisa mpiko
Ya solo, ezali na mabaku mingi ya koyikisa mpiko. Osepelaki na lisoló kitoko oyo ndeko mobali to ndeko mwasi moko asalaki na Eteyelo ya mosala ya teokrasi? Osepelaka ete bozali na bilenge makasi na elimo kati na lisangá? Mpiko ya mibangé esalaki bopusi likoló na yo? Okamwaki na lolenge mobongisi-nzela moko asalelaki Biblia kati na mosala ya kosakola na ndako na ndako? Na bongo, pesa longonya mpe loba likambo moko ya koyikisa mpiko.
Koyikisa mpiko ezali na ntina monene kati na libota mpe kati na lisangá. Ekoki kosalisa baboti na kobokola bana na bango “kati na disipilini mpe na kolakisama ya Yehova.” (Baefese 6:4, NW) Koyebisa na mwana ete asalaki malamu, mpe kolimbola mpo na nini olobi bongo, ekoki koyikisa ye mpiko! Na boumeli ya mibu ya bolenge, wana bilenge bakutanaka na ebele ya masenginya mpe na bopusi makasi, ezali na ntina mingi koyikisa ntango nyonso mpiko.
Kozanga koyikisama mpiko na ntango ya bomwana ekoki kosala mabe mingi. Lelo oyo, Michael, nkulutu moko ya lisangá, azali na mpasi te mpo na kosolola elongo na bato, kasi alobi ete: “Ata mokolo moko te tata na ngai ayebisaki ngai ete nasalaki likambo moko malamu. Yango wana nazangaki limemya ya ngai moko ntango nakólaki. . . . Atako sikawa nazali na mibu 50, nasepelaka naino báyebisa ngai ete nazali kosala mosala malamu lokola nkulutu. . . . Likambo na ngai moko esili koteya ngai ntina monene ya koyikisa basusu mpiko, mpe nasalaka makasi mpo na koyikisa basusu mpiko.”
Nani azali na mposa ya koyikisama mpiko?
Bankulutu baklisto oyo bazali kosala mosala makasi babongi koyikisama mpiko. Paulo akomaki ete: “Nde tolɔmbi bino bandeko ete botosa bango bakosalaka mosala kati na bino mpe baoyo batiami batambolisi na bino kati na Nkolo mpe bajali kopamela bino ete bokumisa bango mingi kati na bolingo mpɔ na mosala na bango.” (1 Batɛsalɔniki 5:12, 13) Ezali mpasi te kozanga botɔ́ndi mpo na mosala ya bankulutu. Kasi maloba ya botɔ́ndi oyo euti na motema makoki koyeisa mokumba na bango pepele.
Baninga na biso oyo bazali kokutana na mikakatano bazali mpe na mposa ya koyikisama mpiko. Biblia epesi toli oyo ete: “Bólobaka na milimo minyokolami na makanisi na kobondisa nyonso, bósunga bato na bolembu.” (1 Batesaloniki 5:14, NW) Baboti oyo bazali kobokola bana bango moko, basi bakufeli-mibali, bilenge, mibangé, mpe bibosono bazali kati na bato oyo mbala mosusu bazali konyokwama na makanisi to baoyo bamonisaka na bantango mosusu bolembu ya elimo.
María azali ndeko mwasi moko moklisto oyo na pwasa mobali na ye aboyaki ye. Alobi ete: “Lokola Yobo, na bantango mosusu nazalaki kolinga ete kokufa. [Yobo 14:13] Nzokande nakóbaki, ngɔlu na bilendiseli oyo nazwaki. Bankulutu mibale, oyo nayebaki malamu balekisaki bangonga mingi mpo na kosunga ngai na kokanga ntina ya kokóba kati na mosala ya ntango nyonso. Mpe bandeko basi mibale ya boboto babondisaki ngai, na koyokáká na motema pɛtɛɛ nyonso wana nazalaki koyebisa bango mikakatano na ngai. Na lisalisi ya Biblia, basungaki ngai ete nátalela makambo lokola Yehova. Nayebi te soko mbala boni totángaki Nzembo 55:22, kasi nayebi ete na kosaleláká mokapo oyo, malɛmbɛmalɛmbɛ nazongelaki bokatikati na ngai ya maoki mpe ya elimo. Likambo oyo esalemaki esili koleka mibu 12, mpe nazali na esengo ya koloba ete kino lelo nazali kokóba kati na mosala ya ntango nyonso. Bomoi na ngai ezali na ntina mpe na esengo atako mbala mosusu naokaka naino mpasi ya maoki. Nandimisami mpenza ete koyikisama mpiko na ntango lokola oyo ekoki kosala malamu mingi kati na bomoi na moto.”
Basusu bazalaka na mposa ya koyikisama mpiko mpo ete basalaki mabunga mpe bazali kobunda mpo na kosembola yango. Ekoki kozala ete bazwaki mpamela na bolingo nyonso. (Masese 27:6) Bankulutu oyo bapesaki mpamela yango basengeli kosɛnzɛla mpo na kopesa longonya wana bamoni ete ye oyo apamelamaki abandi kosalela batoli ya Makomami oyo epesamaki. Maloba na bango ya kolendisa ekopesa matomba mbala mibale—ekomonisa bolingo na bango epai na ye oyo asalaki mabunga mpo ete azinda na “mawa na koleka te” mpe ekokundwela ye matomba ya kosalela toli.—2 Bakɔlinti 2:7, 8.
Nkulutu moko asalaki lisumu monene mpe abungisaki mikumba na ye ya mokɛngɛli kati na lisangá. Alobi ete: “Ntango bayebisaki kolongolama na ngai lokola nkulutu, nakanisaki ete bandeko bakooka nsoni ya kotambola elongo na ngai. Kasi, bankulutu bayebisaki ntina na yango na bato mosusu te mpe basalaki milende nyonso oyo ekoki na bango mpo na koyikisa ngai mpiko. Bandeko mosusu ya lisangá bamonisaki bolingo mpe boninga, oyo esalisaki ngai mingi na kozongela nguya ya elimo.”
Zalá moto ya koyikisa mpiko
Kati na bomoi na biso oyo ezali na makambo mingi, tokoki nokinoki kobosana koyikisa basusu mpiko. Kasi koyikisa mpiko ekoki mpenza kosala malamu mingi! Mpo na koyikisa bato mpiko na lolenge ebongi, tosengeli komikundola makambo mibale. Ya liboso, tosengeli kokanisa makambo oyo tosengeli koloba, mpo ete elendiseli na biso ezala sikisiki. Ya mibale, tóluka libaku malamu ya kosolola na moto oyo abongi kozwa longonya to oyo azali na mposa ya koyikisama mpiko.
Soki tokosala bongo mbala na mbala, tokozala bato na esengo mingi. Yesu andimisi biso ete: “Esɛngɔ na kopɛsa eleki esɛngɔ na kojua.” (Misala 20:35) Na koyikisáká basusu mpiko, okomiyikisa mpiko yo moko. Mpo na nini te komityela mokano ya koyikisa bato mpiko mokolo na mokolo?