Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/2 nk. 4-7
  • Mpo na nini oyo ezali ntango ya kozwa ekateli?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini oyo ezali ntango ya kozwa ekateli?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntina oyo Yisraele ebwakamaki
  • Lipɛngwi monene ya boklisto ya nkombo mpamba
  • Mbongwana ekoki kosalema te?
  • Sikawa ezali ntango ya “kobima longwa na ye”
  • Lolenge nini boklisto ya lokuta ekómaki eteni ya mokili oyo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Babilone monene kokwea na ye mpe kobomama na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Ekateli na Nzambe mpo na “motioli na mibeko”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Kokwea na mwasi na pite mpe na mbindo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/2 nk. 4-7

Mpo na nini oyo ezali ntango ya kozwa ekateli?

NA EKEKE ya 16 L.T.B., Nzambe aponaki bana na Yisraele ete bázala “bato na ye mpenja kati na bato yɔnsɔ, . . . libota na bulɛɛ.” (Esode 19:5, 6) Mosika te, babungisaki ezaleli na bango ya bulɛɛ, babungisaki bopɛto na bango ya losambo, bamitikaki ete losambo ya bikeko mpe misala mabe ya mabota ya zingazinga ébebisa bango. Na yango bamimonisaki ete bazalaki “libota na mpokotoi.” (Dutɛlɔnɔmɛ 9:6, 13; 10:16; 1 Bakolinti 10:7-11) Na boumeli ya eleko koleka mibu nkámá misato na nsima ya liwa ya Yosua, Yehova abimisaki basambisi, batambwisi ya sembo oyo mbɛlɛ bakokaki kokamba Bayisraele na kozongela losambo ya solo. Nzokande, libota “batikaki misala na bango to njela na bango na mpokotoi tɛ.”​—Basambisi 2:17-19.

Nsima na yango, Nzambe abimisaki bakonzi mpe basakoli ya sembo mpo na kopusa bato ete bázongela losambo ya solo. Mosakoli Azalia alendisaki mokonzi Asa mpe bato ya mboka na ye ete báluka Yehova: “Sɔkɔ bokoluka ye, akojuana na bino nde sɔkɔ bokotika ye, akotika bino.” Asa akɔtisaki mbongwana ya losambo kati na bokonzi ya Yuda. (2 Ntango 15:1-16) Na yango, Nzambe asengelaki kozongela lisusu libyangi na ye na nzela ya mosakoli na ye Yoele. (Yoele 2:12, 13) Nkutu, Sefania alendisaki bafándi ya Yuda ete ‘báluka [Yehova].’ Elenge mokonzi Yosiya asalaki yango kati na ebongiseli monene ya kokɔtisa mbongwana mpo na kolongola losambo ya bikeko mpe misala mabe.​—Sefania 2:3; 2 Ntango 34:3-7.

Atako mabaku motindo wana ya kobongola motema, ezalela ya losambo ya libota wana ezalaki kobeba sé kobeba. (Yilimia 2:13; 44:4, 5) Yilimia atondolaki polele ebongiseli ya losambo oyo ebebaki mpo na misala ya losambo ya bikeko, amonisaki ete yango ekokaki kosembolama lisusu te: “Moto na Etiɔpia ayebi kokalambisa loposo na ye, to nkɔi matɔnɔ na ye? Boye sɔkɔ bino bokosala mpe malamu, bino bomɛsani na kosalaka mabe.” (Yilimia 13:23) Mpo na ntina wana, Nzambe apesaki etumbu makasi likoló na bokonzi ya Yuda. Yelusaleme mpe tempelo na yango ebebisamaki na 607 L.T.B., mpe baoyo batikalaki na bomoi bamemamaki lokola baombo na Babilone, epai kuna baumelaki mibu 70.

Na ntango eleko wana esilaki, Nzambe amonisaki motema mawa. Apusaki Mokonzi Cyrus ete ásikola Bayisraele, ndambo na bango bazongaki na Yelusaleme mpo na kotonga tempelo. Na esika ete bázwa liteya na makambo oyo nyonso mautaki koleka, bapɛngwaki lisusu longwa na losambo ya solo, yango esalaki ete Yehova ázongela lisusu libyangi na ye: “Bobutwa epai na ngai mpe ngai nakobutwa epai na bino!”​—Malaki 3:7.

Ntina oyo Yisraele ebwakamaki

Ezalela ya losambo ya Yisraele ezalaki nini na eleko ya Yesu? Bakonzi ya mangomba oyo batondaki na bokosi bazalaki “bakufi miso” oyo bazalaki koteya “malako majali mibeko na bato.” ‘Bazalaki kosopa mateyo na Njambe mpo na mibeko na bango.’ Bato bazalaki kokumisa Nzambe “na minɔkɔ,” kasi mitema na bango ezalaki mosika mpenza na ye. (Matai 15:3, 4, 8, 9, 14) Ezalaki libota oyo esengelaki lisusu kozwa libaku mosusu mpo na kobongola motema? Te. Yesu alobaki ete: “Bokonji na Njambe ekolongwa na bino mpe ekopɛsama na libota likobimisa mbuma na yango.” Alobaki lisusu ete: “Ndako na bino,” elingi koloba tempelo ya Yelusaleme, “etikali mpamba.” (Matai 21:43; 23:38) Libunga na bango ezalaki mpenza monene. Baboyaki kondima Yesu lokola Masiya mpe babomaki ye, baponaki Kaisala, mokonzi mabe ya Loma, lokola mokonzi na bango.​—Matai 27:25; Yoane 19:15.

Bayisraele baboyaki kososola ntina ete na eleko oyo Yesu akokisaki mosala na ye ya kosakola ezalaki bongo ntango ya kosambisa. Yesu alobaki epai na bafándi bazangi sembo oyo bazalaki na Yelusaleme ete: “Oyebaki mokɔlɔ na koya na Njambe epai na yɔ tɛ.”​—Luka 19:44.

Na Pantekote ya mobu 33 T.B., Nzambe asalaki libota moko ya sika, to bato, bayekoli ya Mwana na ye, Yesu Klisto, oyo bapakolami na elimo, baoyo basengelaki koponama kati mposo nyonso mpe mabota nyonso. (Misala 10:34, 35; 15:14) Elikya ezalaki ete, na nsuka, ebongiseli ya losambo ya Bayuda ekokaki kobonga? Tokoki kozwa eyano kati na likambo oyo ete na mobu 70 T.B., mampinga ya Baloma mabebisaki mpenza Yelusaleme. Nzambe abwakaki mpenza ebongiseli wana ya losambo na mobimba na yango.​—Luka 21:5, 6.

Lipɛngwi monene ya boklisto ya nkombo mpamba

Baklisto bapakolami mpe basalaki “libota na bulɛɛ, bato bapɔnami.” (1 Pɛtɛlɔ 2:9; Bagalatia 6:16) Kasi ata mpe lisangá ya liboso ya boklisto ebatelaki te bopɛto na yango ya losambo na boumeli ya ntango molai mpenza.

Makomami masakolaki lipɛngwi monene, to kotika kondima. Matiti mabe ya elilingi ya lisese ya Yesu, elingi koloba, baklisto ya lokuta, basengelaki kopesa mpasi epai na nganu ya elilingi, to baklisto ya solo, baoyo bapakolamaki na elimo ya Nzambe. Lisese yango emonisi ete kopalangana ya boklisto ya lokuta, oyo mobandisi na yango ezali bongo monguna monene ya Nzambe, Zábolo, etikalaki moke ébanda, “wana ejalaki bato kolala.” Likambo oyo lisalemaki na nsima ya liwa ya bantoma ya sembo ya Klisto, na boumeli ya eleko ya mpongi ya elimo oyo ebimaki. (Matai 13:24-30, 36-43; 2 Batesaloniki 2:6-8) Lokola bantoma basakolaki yango, baklisto mingi ya lokuta bamikɔtisaki na mayele mabe kati na lisangá. (Misala 20:29, 30; 1 Timoté 4:1-3; 2 Timoté 2:16-18; 2 Petelo 2:1-3) Yoane azalaki ntoma oyo akufaki na nsima ya bantoma nyonso. Pene na mobu 98 T.B., akomaki ete “ntango na nsuka,” eteni ya nsuka ya eleko ya bantoma, esilaki kobanda.​—1 Yoane 2:18, 19.

Na ntango boyokani bosalemaki kati na lingomba mpe nguya ya politiki na Constantin, mokonzi ya Loma, ezalela ya elimo, ya mateya, mpe ya etamboli ya boklisto ya nkombo mpamba ekómaki mabe mingi mpenza. Bato ya mayele mingi oyo bayekolaka makambo ya kala bandimi ete engebene baklisto, “bolóngi ya lingomba na ekeke ya minei” ezalaki nde “mawa monene.” ‘Boklisto ya nkombo mpamba ebungisaki ezaleli malamu ya makambo matombwami’ mpe endimaki misala mpe filozofi ya bapakano, na ndakisa “losambo ya Malia” mpe kosambela “basantu,” mpe liteya ya Bosato.

Na nsima ya bolóngi na yango ya lokuta, ezalela ya boklisto ya nkombo mpamba ebebaki. Mikano mpe bandimbola ya mateya oyo ebimisamaki na pápa mpe na makita minene ya bakonzi ya lingomba, bakisá mpe bitumba bibéngami Inquisition, croisades mpe bitumba “mosantu” kati na Bakatolike mpe Baprotestá, nyonso wana ebimisaki ebongiseli ya losambo oyo ekokaki kosembolama te.

Kati na búku na ye, A World Lit Only by Fire, William Manchester akomi ete: “Na ekeke ya zomi na mitano mpe na ekeke ya zomi na motoba, bapápa bazalaki na bomoi ya bisengo motindo moko na bakonzi ya Loma. Bazalaki bato na bozwi mingi koleka bato nyonso kati mokili, bango moko mpe baepiskopo na bango bakómaki na mosolo mingi na kosɛngáká ete báfutama mpo na misala ya bulɛɛ.” Na boumeli ya eleko ya lipɛngwi monene, bituluku ya mike to bato mokomoko balukaki kozongisa boklisto ya solo, bamonisaki bongo ezaleli ya nganu ya elilingi. Bazwaki minyoko makasi. Búku yango elobi lisusu ete: “Na bantango mosusu ezalaki komonana ete basantu ya solo ya boklisto, ya Katolike mpe ya Protestá bakómaki moindo na lolenge babomaki bango na kotumbáká bango lokola bamartíru.” Basusu, baoyo babéngamaki bamemi-mbongwana, lokola Martin Luther mpe John Calvin, basalaki bibongiseli ya losambo ya koumela, oyo emikabolaki na Lingomba ya Katolike, kasi bazalaki bobele na mateya ya moboko ya motindo moko. Bazalaki mpe komikɔtisa makasi kati na makambo ya politiki.

Baprotestá basalaki milende mpo na kosala oyo bazalaki kobénga kotɛlɛmisama lisusu ya losambo. Na ndakisa, na boumeli ya ekeke ya 18 mpe ekeke ya 19, milende yango ebimisaki mosala makasi ya misionere na mikili ya bopaya. Nzokande, lokola babateli ya mangomba bandimi yango, lelo oyo, ezalela ya elimo ya etongá ya Baprotestá ezali mpenza malamu te. Na mikolo miuti koleka kala mingi te, Oscar Cullmann, teolojié ya protestá, andimaki ete “mangomba mazali na mokakatano na ntina etali kondima.”

Mbongwana mpe botɛmɛli-mbongwana esilaki mpe kokólisama kati na Lingomba ya Katolike. Kobanda na ekeke ya 11 kino na ekeke ya 13, atako kopalangana ya misala mabe mpe bozwi monene ya bakonzi ya mangomba, bituluku ya ba moines oyo bazalaki kolandela mpenzampenza ndai ya kotikala babólá esalemaki. Kasi bituluku yango etalelamaki na likebi mpenza mpe, engebene bato ya mayele, bakonzi ya Lingomba babomaki yango. Na nsima, ebongiseli ya botɛmɛli-mbongwana, ebandisamaki na likita monene oyo esalemaki na engumba Trente mpe esalemaki mpenza mpo na kobundisa mbongwana ya Baprotestá.

Na ebandeli ya ekeke ya 19, na boumeli ya eleko ya kotɛlɛmisa lisusu lingomba, Lingomba ya Katolike ezwaki etɛlɛmɛlo ya bokonzi mpe ya kobomba makambo ya kala. Kasi, ekoki kolobama te ete mbongwana mpenza ya solo esalemaki mpo na kozongisa boklisto ya solosolo. Nzokande, wana ezalaki bobele milende mpo na kokembisa bokonzi ya batambwisi ya Lingomba katikati na mbongwana ya makambo oyo ezalaki kati na mokili mpo na oyo etali lingomba, politiki mpe makambo ya bomoi ya bato.

Kala mingi te, na bambula 1960, emonanaki lokola ete Lingomba ya Katolike ebandisaki mbongwana na likita monene ya mangomba ya boklisto oyo ebéngami Vatican II. Nzokande, mpo na kopekisa elimo ya bokóli oyo ezalaki komonana epai na basangani ya lingomba, na pwasa, pápa oyo azalaki na eleko wana asɛngaki na makasi nyonso ete likita oyo ebéngamaki ete likita ya kosembola ete ekatana. Eteni wana, oyo basusu babéngaka mbongwana ya Wojtyła, etuluku moko ya Katolike elobaki na ntina na yango ete ezali “lolenge ya sika ya makambo ya Constantin.” Lokola emonisami kati na zulunalo La Civiltà Cattolica, Lingomba ya Katolike, lolenge moko na mangomba mosusu, ezali kokutana na “mokakatano moko makasi na mobimba na yango; ezali ya makasi mpamba te ezali kotalela ntina mpenza ya kondima mpe bomoi ya moklisto; ezali na mobimba na yango mpamba te etaleli biteni nyonso ya boklisto.”

Mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba esimbaki mpenza ebongiseli moko ya kosembolama te, mpamba te boklisto ya solo esengelaki kozongisama bobele na ntango ya “kobuka mbuma,” elongo na kosangisama ya nganu ya elilingi kati na lisangá moko ya pɛto. (Matai 13:30, 39) Ebele ya makambo mabe mpe bambeba oyo esalemaki na nkombo ya lingomba, ata soki elobamaki ete ezalaki ya boklisto to ya boklisto te, yango ezali kopusa mokomoko na komituna ete: Ebongi malamu komizela na komona mbongwana ya solosolo kati na boklisto ya nkombo mpamba?

Mbongwana ekoki kosalema te?

Mokanda ya Emoniseli, to Apocalypse, elobaka na ntina na mwasi monene na pite na elilingi oyo alataki nkombo ya libombami, “Babilone monene.” (Emoniseli 17:1, 5) Esili koleka bikeke mingi, batángi ya Biblia balukaki kolimbola libombami wana ya elilingi. Mingi balembaki mpo na bozwi mpe kanyaka ya bakonzi ya mangomba. Basusu bazalaki kokanisa ete Babilone monene ezalaki bongo komonisa bakonzi ya mangomba. Kati na bango ezalaki bongo na Jan Hus, nsángó Mokatolike ya Bohême oyo atumbamaki wana ezalaki ye na bomoi na 1415, mpe Aonio Paleario, ye filozofe mpe mwanamboka ya Italie, oyo batyaki ye nsinga na nkingo mpe batumbaki ye na 1570. Bango nyonso mibale basalaki milende mpo na kokɔtisa mbongwana na lingomba ya Katolike na elikya ete ekokaki kozongela “lokumu na yango ya liboso,” kasi ezalaki bobele milende ya mpamba.

Na bokeseni, mokapo 17 mpe mokapo 18 ya Emoniseli emonisi ete Babilone monene ezali bongo lisangá ya mokili mobimba ya mangomba nyonso ya lokuta.a ‘Mwasi monene wana ya pite’ oyo asangisi bongo mangomba ebele akoki kobongwana te mpamba te “libondo na masumu na ye likómi kino na likolo.” Ya solo, na ekeke oyo ya 20, emonani polele ete mangomba nyonso, bobele te oyo ya boklisto mpamba, bazali na ngambo mpo na bitumba oyo ezali kokóba kotangisa ebele ya makila, bazali mpe na ngambo mpo na kobeba makasi ya bizaleli ya elimo oyo ezali kopesa mpasi na mokili. Na yango, Nzambe asilaki kozwa ekateli mpo na kobomama ya “Babilone.”​—Emoniseli 18:5, 8.

Sikawa ezali ntango ya “kobima longwa na ye”

Kokokisama ya bisakweli ya Biblia ezali komonisa ete mikolo na biso ezali bongo eleko ya “nsuka” ya “ebongiseli ya biloko mabe” ya ntango oyo. (Matai 24:3) Moto nyonso oyo alingi kosambela Nzambe na bosembo nyonso akoki te kolanda makanisi na ye moko mpe makambo oyo ye moko asepelaka na yango. Asengeli ‘koluka [Yehova] wana akoki komonana,’ ee, uta sikawa, mpamba te “bolózi monene” oyo Yesu asakolaki ekómi pene. (Yisaya 55:6; Matai 24:21) Lokola ezalaki mpo na likambo litalaki bana ya Yisraele, bobele bongo mpe, Nzambe akokanga miso te liboso na kobebisama ya lingomba bobele mpo ete ezali komikumisa ete ezali ya kala. Na esika ya kosala makasi mpo na kobongisa masuwa oyo esengeli kozinda, baoyo nyonso balingi kondimama epai na Nzambe mpe kobikisama basengeli kotosa nokinoki etindá epemami oyo ezwami na Emɔnisɛli 18:4: “Bino bato na ngai, bobima na ye [Babilone monene], ete bosangana na masumu na ye tɛ, ete bojua mɔkɔ na malɔji na ye mpe tɛ.”

Kasi, “kobima” mpo na kokende wapi? Lobiko ekoki kozwama lisusu wapi? Koluka kobombama na esika ya mabe ezali likámá, boye te? Lolenge nini toki koyeba lingomba bobele moko oyo endimami na Nzambe? (2 Timoté 3:16, 17) Batatoli ya Yehova bazali kobyanga yo na kotalela Biblia na bozindo mpenza. Okozala na likoki ya koyeba soki banani bazali baoyo baponami na Nzambe “mpo na nkombo na ye,” baoyo ye akobatela na mokolo ya nkanda na ye oyo ebɛlɛmi.​—Misala 15:14; Sefania 2:3; Emoniseli 16:14-16.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba Babilone monene ya elilingi na lolenge mpenza Makomami mazali kolobela yango, talá mokapo 33 kino na mokapo 37 ya búku Emoniseli​—kokokana na yango monene ebelemi!, ebimisami na 1992 na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

[Elilingi na lokasa 7]

Soki lingomba na yo ezali kozinda, kimá epai na masuwa ya kobikisa oyo ezali bongo boklisto ya solo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto