Eloko eleki kitoko mpo na yango napesaki bomoi na ngai
LISOLÓ YA BOB ANDERSON
Esili koleka soko mbula zomi, baninga na ngai batunaki ngai ete: “Bob, mpo na nini oumeli mingi boye kati na mosala ya mobongisi-nzela?” Nasekaki mwa moke, mpe nalobaki ete: “Okoki kokanisa mosala nini mosusu oyo eleki mosala ya mobongisi-nzela?”
NTANGO nabandaki mosala ya mobongisi-nzela na mobu 1931, nazalaki na mibu 23. Sikawa nazali na mibu 87 mpe nazali kino lelo kokóba mosala ya mobongisi-nzela. Nayebi ete ezalaki na likambo mosusu te ya malamu koleka oyo nakokaki kosala kati na bomoi na ngai. Tiká nayebisa bino soki mpo na nini.
Na 1914, batikaki trakte moko epai na biso. Yango ebimisamaki na Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo bazalaki kobénga Batatoli ya Yehova na eleko wana. Na ntango Motatoli yango azongaki lisusu, mama na ngai atunaki ye na likebi nyonso na ntina na lifelo ya mɔ́tɔ. Mama na ngai abɔkwamaki lokola mosangani ya molende ya lingomba Méthodiste kasi akokaki te koyokanisa liteya wana ya minyoko ya seko mpe Nzambe ya bolingo. Wana ayekolaki solo na ntina na likambo yango, alobaki ete: “Nazali koyoka esengo moko oyo nayoká naino liboso te kati na bomoi na ngai!”
Nokinoki, mama na ngai atikaki kokende kopesa mateya na Eteyelo ya Lomingo ya ba Méthodistes mpe akómaki koyangana elongo na etuluku moko moke ya Bayekoli ya Biblia. Abandaki kosakola kati na engumba na biso ya Birkenhead, oyo etalani na libongo ya Liverpool, na ngámbo ya mongálá babéngi Mersey, mpe abandaki kokende na velo na bingumba mingi oyo ezalaki zingazinga. Asakolaki kati na teritware wana monene na boumeli ya bomoi na ye mobimba mpe ayebanaki mingi, atikaki ndakisa malamu mpo na bana na ye. Akufaki na 1971 wana asilaki mpenza kokóma mobangé na mibu 97, azalaki ntango nyonso Motatoli ya molende kino na nsuka.
Ngai mpe Kathleen, yaya na ngai ya mwasi, tolongwaki na Eteyelo ya Lomingo ya lingomba Méthodiste mpo na kokende elongo na mama na biso na makita ya Bayekoli ya Biblia. Na nsima, na ntango tata na biso mpe asalaki bokóli, baboti na ngai bazwaki bibongiseli mpo na boyekoli ya Biblia na libota kati na búku La harpe de Dieu. Boyekoli wana ezalaki likambo ya sika na mikolo yango, boyebi wana ya ebandeli ya solo ya moboko ya Biblia epesaki biso mbano monene, mpamba te ngai mpe ndeko na ngai ya mwasi tobandaki mosala ya mobongisi-nzela na ntango ebongi.
Mama andimisamaki solo ete “Fɔtɔ́ ya Lisano-liteya ya bozalisi” oyo tokendeki kotala na Liverpool na 1920 ememaki mbongwana makasi na elimo mpo na biso, mpe ezalaki mpenza bongo. Lokola nazalaki elenge, bililingi wana etikaki elembo makasi kati na elimo na ngai. Eloko etikalaki mpenza makasi kati na bɔɔngɔ́ na ngai ezalaki bongo eteni oyo ezalaki kolakisa bomoi ya Yesu, mingimingi na ntango oyo emonisaki kobɛlɛma ya kufa na ye. Yango esalisaki ngai ete natɛlɛmisa makanisi na ngai likoló na mosala moleki kitoko kati na bomoi—mosala ya kosakola!
Na ebandeli ya bambula 1920, nakómaki kokabola batrakte elongo na mama na ngai mikolo nyonso ya Lomingo na nsima ya nzangá. Na ebandeli bayebisaki biso ete tótikaka yango na bandako ya bato; na nsima bayebisaki biso ete tópesaka yango na mabɔkɔ ya bankolo ndako mpe kozongela bato oyo bamonisaki bosepeli. Natalelaka yango ntango nyonso lokola moboko ya liboso mpo na bozongeli ya sika mpe mosala ya kotambwisa boyekoli ya Biblia oyo tosalaka na mikolo oyo, mpe yango ezali kobota mbuma mingi lelo.
Kati na mosala ya mobongisi-nzela!
Ngai mpe Kathleen tozwaki batisimo na 1927. Na ntango nayokaki ekateli oyo ezwamaki na ntina na nkombo ya sika ya Batatoli ya Yehova na 1931, nazalaki kosala lokola chimiste na Liverpool. Nazalaki mbala mingi komona ba colporteurs ya la Société (oyo babéngami lelo babongisi-nzela) kosakola na bakartyé ya mombongo na Liverpool, mpe ndakisa na bango ekólisaki kati na ngai limemya mozindo. Nazalaki mpe na mposa makasi ya kotika boninga elongo na bato ya mokili, mpo na kolekisa bomoi na ngai kati na mosala ya Yehova!
Na boumeli ya eleko ya molungé ya mbula wana, moninga na ngai Gerry Garrard ayebisaki ngai ete andimaki mokumba mopesamelaki ye na prezidá ya mibale ya la Société Watch Tower, Joseph F. Rutherford, mpo na kokende kosakola na Inde. Liboso mpenza ya kokende komata na masuwa, ayaki kotala ngai mpe tosololaki na ntina na libaku malamu ya mosala ya ntango nyonso. Wana azalaki kopesa ngai mbote ya nsuka, alendisaki ngai lisusu na kolobáká ete, “Bob, nandimisami ete mosika te, okokóma mobongisi-nzela!” Esalemaki mpe bongo. Nakɔtaki na mosala yango na sanza ya Ɔkɔtɔ́bɛ. Oyo nde esengo, oyo nde bonsomi, kotambola na velo kati na banzela ya mboka, mpo na kokenda kosakola epai na bato bafandi mosika. Na bongo, nayaki koyeba ete ezalaki nde ebandeli na ngai ya komikɔtisa kati na mosala moleki ntina.
Teritware na ngai ya liboso ezalaki na súdi ya Pays de Galles epai kuna nakendeki kokutana na Cyril Stentiford. Na nsima, Cyril abalanaki na Kathleen, mpe basalaki elongo mosala ya mobongisi-nzela na boumeli ya bambula mingi. Na nsima, Ruth, mwana na bango ya mwasi, abandaki mpe mosala ya mobongisi-nzela. Na 1937, nazalaki moninga ya Eric Cooke kati na mosala ya mobongisi-nzela—na Fleetwood, na etúká ya Lancashire. Kino na eleko wana, babongisi-nzela bazalaki kosala bobele kati na bamboka mikemike ya Grande-Bretagne, na libándá ya teritware ya lisangá. Kasi Albert D. Schroeder, ye oyo azalaki mokambi ya mosala ya filiale ya la Société na Londres, azwaki ekateli ya kotinda biso na engumba Bradford, na etúká ya Yorkshire. Wana ezalaki mbala ya liboso mpo na babongisi-nzela na Grande-Bretagne ete bátindama mpo na kosalisa lisangá moko.
Na 1946, Eric akendeki na Galadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower mpe atindamaki na Rodhésie du Sud, oyo ebéngami lelo Zimbabwe, mpe elongo na mwasi na ye, bazali kino lelo kosala na bosembo nyonso lokola bamisionere na Durban, na Afrika ya Súdi.
Na mobu 1938, napesamelaki mosala mosusu, mbala oyo nakómaki mosaleli ya zone (oyo babéngaka lelo mokɛngɛli ya zongazonga) na nɔ́rdi ya etúká ya Lancashire mpe na etando kitoko ya Lake District. Epai kuna, nakutanaki na Olive Ducket, mpe nsima wana tobalanaki, nokinoki akendaki elongo na ngai kati na mosala ya zongazonga.
Irlande na boumeli ya eleko ya bitumba
Mwa moke nsima wana Grande-Bretagne eyebisaki polele ete ekobundisa Allemagne na 1939, batindaki ngai na Irlande. Kokoma nkombo mpo na kokende na mosala ya sodá ebandaki na Grande-Bretagne, kasi na súdi ya Repiblike ya Irlande, yango ekɔtaki na bitumba te na boumeli ya ntango nyonso oyo etumba ezalaki kosalema. Repiblike ya Irlande mpe Irlande ya Nɔ́rdi esengelaki kokóma zongazonga moko. Bipekiseli bizalaki makasi, nzokande esengelaki kozwa ndingisa ya Leta liboso ya kotika Grande-Bretagne mpo na kokende na eteni moko to mosusu ya Irlande. Bakonzi ya Leta bayebisaki ngai ete nakokaki kokende, kasi nasengelaki kozonga nokinoki na Grande-Bretagne ntango nakokokisa mbula ya kokomisa nkombo na mosala ya sodá. Nandimaki na maloba, kasi nakamwaki na ntango mikanda na ngai ya kopesamela ndingisa mibimaki, batyelaki ngai masɛngisi te!
Na ntango wana, ezalaki bobele na Batatoli 100 na Irlande mobimba. Na ntango tokómaki na Dublin na Novɛ́mbɛ 1939, Jack Corr, oyo azalaki mobongisi-nzela uta kala, akutanaki na biso. Ayebisaki biso ete ezalaki na babongisi-nzela mosusu mibale na engumba oyo ezalaki pembeni mpe mwa ndambo ya bato oyo bazali kosepela na solo na Dublin, bango nyonso bazalaki soko 20. Jack azalaki kofutela ndako moko na Dublin mpo na kosala makita epai kuna bango banso bandimaki koyanganaka mikolo nyonso ya Lomingo. Ebongiseli wana ekóbaki kino lisangá eyaki kosalema na 1940.
Lokola ezali eteni ya Royaume-Uni, Irlande ya Nɔ́rdi mpe ezalaki kobundisa Allemagne; na yango, wana ezalaki biso kolongwa na nɔ́rdi mpo na kokende na Belfast, tozalaki bobele na mokanda ya kozwa ndingisa mpo na bilei mpe molili ebandaki kozala makasi na butu. Atako mpepo ya ba Nazi ezalaki kotambola likoló na bakilomɛtɛlɛ 1600 mpo na kokóma na Belfast mpe kozonga na bakáa na bango na Mpotó, balóngaki mpenza kobwaka bómbi na engumba. Na ntango babwakaki bómbi mpo na mbala ya liboso, Ndako na biso ya Bokonzi mpe ndako na biso ya kolala ebebaki wana biso tokendeki kotala bandeko na eteni mosusu ya engumba, na yango tobikaki mpenza na lolenge ya kokamwa. Bobele na butu wana, libota moko ya Batatoli bakimaki kati na esika moko ya komibatela. Na ntango bakómaki kuna bamonaki ete esika yango esilaki kotonda na bato, mpe bazongaki na ndako na bango. Na mbala moko bómbi ebwakamaki na esika yango, baoyo nyonso bazalaki na kati bakufaki, kasi bandeko na biso babikaki, bazokaki bobele mwa bampota. Na boumeli ya eleko wana ya mpasi na bitumba, ata moko te kati na bandeko na biso azwaki mpasi makasi, mpe na yango biso topesaki matɔ́ndi epai na Yehova.
Ebele ya bilei ya elimo
Wana etumba ezalaki koya makasi, bipekiseli bikómaki lisusu makasi mingi, mpe mikanda nyonso esengelaki kotalelama malamumalamu na pósita. Yango elimbolaki ete Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekangamaki na nzela mpe ezalaki na ndingisa te ya kokɔta na mboka. Atako toyebaki te soki tokokaki kosala nini, kasi lobɔkɔ ya Yehova ezalaki mokuse te. Mokolo moko na ntɔ́ngɔ́ nazwaki nkomá eutaki epai na “ndeko” na ngai moko na Canada, akomelaki ngai na ntina na makambo matali libota. Nayebaki te soki ezalaki mpenza nani, kasi na nsuka ya nkomá yango, ayebisaki ete atindelaki ngai “lisoló moko kitoko ya Biblia” mpo na kotánga. Ezalaki nde Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, kasi lokola lokasa ya ezipeli na yango ezalaki lolenge mosusu, moto oyo azalaki na mosala ya kotalatala mikanda amonaki yango te.
Nokinoki, ngai mpe mwasi na ngai, na lisalisi ya Batatoli ya mboka wana, bakisá mpe Maggie Cooper, oyo asanganaki na misala ya “Fɔtɔ́ ya Lisano-liteya ya bozalisi”, tobandaki kobimisa bakopi na yango mingi. Lokola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ezipeli ebombami nyonso ezalaki koya ntango nyonso, kouta na baninga mingi ya sika na Canada, na Australie, mpe na Etats-Unis, tokamataki bibongiseli nokinoki mpo na kotinda bakopi 120 kati na mboka mobimba. Na lisalisi ya molende mpe boboto na bango, tozangaki ata nimero moko te na boumeli ya ntango mobimba wana ya etumba.
Tozalaki mpe na likoki ya kosala mayangani. Liyangani oyo na boumeli na yango búku Les enfants ebimaki ezalaki mpenza ya kobenda likebi. Emonanaki lokola ete moto oyo azalaki kosala mosala ya kotalatala mikanda aboyaki te kolekisa mokanda oyo akanisaki ete ezali kolobela makambo ya bana mike, na yango tolóngaki kokɔtisa yango na mboka kozanga mikakatano! Na libaku mosusu, mwa búku Kimya—ekoki koumela? (ebimeli ya Lingelesi) enyatámaki bobele awa mpamba te likoki ezalaki te ya kosɛnga yango uta na Londres. Atako bipekiseli nyonso oyo batyaki likoló na biso, kasi toleisamaki malamu na elimo.
Tolóngaki botɛmɛli
Mokonzi moko ya lingomba oyo azalaki kati na lopitalo moko na Belfast, oyo ezalaki kokambama na moko na Batatoli moko ya Yehova, atindaki búku Bozwi (ebimeli ya Lingelesi) epai na mwasi na ye na Angleterre. Mwasi yango azalaki kotɛmɛla solo, mpe ntango azongiselaki mobali na ye eyano, amonisaki botɛmɛli. Alobaki lisusu ete tozalaki “lisangá oyo ezangi bolingí-ekólo.” Moto oyo azalaki kosala mosala ya kotalatala mikanda amonaki yango mpe apesaki lapólo na biro oyo ekotalaka makambo ya basáli mobulu. Na yango, babéngisaki ngai na káa ya bapolisi mpo na koyanola na mituna mpe basɛngaki ngai ete námema búku Bozwi. Likambo ya kobenda likebi ezali oyo ete, na nsuka ntango bazongiselaki ngai búku yango, namonaki ete biteni nyonso oyo mikɔlɔ́tɔ́ mityamaki na nsé na yango etalelaki mingimingi Lingomba ya Katolike ya Loma. Nakanisaki ete yango ezalaki mpo na mokano moko, mpamba te nayebaki ete bapolisi bazalaki kosɛnzɛla mingi likoló na misala ya IRA (Limpinga ya basodá ya mboka Irlande).
Batunaki mituna na ntina na ezaleli na biso ya kozanga kokɔtela ngambo moko to mosusu na ntango ya etumba, mpamba te bapolisi bazalaki na mpasi mpo na koyeba etɛlɛmɛlo na biso. Kasi bakonzi ya Leta basalaki eloko moko te mpo na kotɛmɛla biso. Na nsima, ntango nasɛngaki nzela ya kosalisa liyangani, biro ya bapolisi ezwaki ekateli ete esengelaki kotinda bapolisi mibale mpo na kopɛsa nsango. Nalobaki ete, “Tokoyamba bango malamu!” Na bongo, bayaki na nsima ya nzangá, mpe bazalaki kokoma makambo na makomi ya sténographie. Na nsuka ya eteni yango, batunaki ete, “Mpo na nini batindaki biso awa? Tozali kosepela na makambo yango nyonso mpenza!” Bayaki lisusu na mokolo oyo molandaki mpe bandimaki na esengo nyonso kozwa kozanga kofuta mosolo mwa búku Kimya—ekoki koumela? (ebimeli ya Lingelesi) Liyangani mobimba elekaki malamu.
Wana etumba esilaki mpe bipekiseli na ntina na mibembo milongolamaki, ndeko Pryce Hughes oyo autaki na Betele ya Londres ayaki na Belfast. Ayaki elongo na ndeko Harold King, oyo na nsima, atindamaki na Chine lokola misionere. Nsima ya mbula motoba ya kozanga kopesana bansango elongo na filiale ya Londres, biso banso tolendisamaki na masoló oyo bandeko wana basalaki. Mwa moke na nsima, ndeko Harold Duerden, mobongisi-nzela mosusu ya sembo, atindamaki longwa na Angleterre mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi na Belfast.
Tozongi na Angleterre
Tolinganaki mingi na bandeko na biso ya Irlande, mpe ezalaki na biso mpasi mpo na kozonga na Angleterre. Kasi ngai mpe mwasi na ngai totindamaki lisusu na Manchester mpe na nsima tokendeki na Newton-le-Willows, engumba mosusu ya Lancashire epai kuna mposa ya basakoli ezalaki makasi. Mwana na biso ya mwasi, Lois, abotamaki na 1953, mpe ezalaki likambo ya esengo komona ye kobanda mosala ya mobongisi-nzela wana akokisaki mibu 16. Nsima ya kobalana elongo na David Parkinson, ye oyo azalaki mpe mobongisi-nzela, bango bakóbaki mosala ya mobongisi-nzela na Irlande ya Nɔ́rdi; na makambo mingi, balandaki lokolo na ngai mpe ya Olive. Elongo na bana na bango bazali sikawa na Angleterre, mpe biso banso tozali kosala kati na lisangá moko.
Atako mbongwana ezalaki kosalema kati na makambo na biso, natikaki soko moke te mosala ya mobongisi-nzela—Olive alingaki kotika yango soko moke te, ngai mpe lokola. Nakanisaka ntango nyonso ete nalóngaki mosala na ngai bobele mpo na ngai moko te, kasi lisusu mpo na mwasi na ngai, mpamba te kozanga lisungi na ye ya ntango nyonso, oyo etondi na bolingo, nakokaki te kokóba mosala ya ntango nyonso. Ya solo, biso banso mibale tozali sikawa kolɛmba nokinoki, kasi mosala ya kosakola ezali naino kopesa biso esengo, mingimingi wana tozali elongo, kotambwisa boyekoli ya Biblia epai na bazalani na biso. Na boumeli ya bambula mingi, tozwaki libaku malamu ya kosalisa bato soko monkámá ete bákóma basaleli ya Yehova oyo bamipesi mpe bazwi batisimo. Oyo nde esengo monene! Nabanzi ete motuya wana esili sikawa koyikana mbala mingi lokola mabota mazali kobotama sé kobotama mpe wana baoyo babotami bazali kokóma Batatoli.
Ngai mpe Olive tosololaka mingi na ntina na mikumba mpe makambo oyo tokutanaki na yango na boumeli ya bambula. Ezalaki mpenza bambula ya esengo, mpe esili koleka nokinoki! Nayebi ete nakokaki te komona eloko mosusu ya malamu mingi oyo nakokaki kosala kati na bomoi na ngai koleka kosalela Yehova, Nzambe na ngai, lokola mobongisi-nzela na boumeli ya bambula oyo nyonso. Sikawa, wana ezali ngai kotala na botɔ́ndi nyonso bambula oyo eleki mpe wana ezali ngai kozela na esengo nyonso mikolo oyo mizali koya, namoni ete maloba oyo ya Yilimia mazali na ndimbola monene: “Mpɔ na boboto na [Yehova, NW], tobebisami tɛ, makambo na mawa na ye makosuka tɛ. Majalisami na sika ntɔngɔ na ntɔngɔ. . . bongo nakojala na elikia kati na ye.”—Bileli 3:22-24.
[Elilingi na lokasa 26]
Bob mpe Olive Anderson