Ozali komikundola?
Osepelaki na botángi ya banimero ya sika ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli? Boye, talá soki okoki koyanola na mituna milandi:
▫ Mpo na nini baklisto ya liboso bazalaki kokumisa te mokolo ya kobotama ya Yesu?
Engebene búku The World Book Encyclopedia, “baklisto ya liboso bazalaki kokumisa kobotama [ya Yesu] te mpamba te bazalaki kotalela ete kokumisa mokolo ya kobotama ezalaki momeseno ya bapakano.”—15/12, lokasa 4.
▫ Mabondeli masengeli kotindama epai na Yesu?
Te, mpamba te mabondeli ezali lolenge moko ya losambo oyo esengeli kopesama bobele epai na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Na kotindáká mabondeli na biso nyonso epai na Yehova Nzambe, tozali komonisa ete tosimbi malamu toli ya Yesu, oyo ya kobondela ete: “Tata na biso oyo ajali na Likolo.” (Matai 6:9)—15/12, Lokasa 25.
▫ Mpo na nini bokeseni ezalaki kati na kosambisama ya lisumu monene oyo Davidi asalaki mpe masumu ya Anania mpe Safila? (2 Samwele 11:2-24; 12:1-14; Misala 5:1-11)
Mokonzi Davidi akweaki na lisumu mpo na bolɛmbu ya nzoto. Ntango bamonisaki ye mabe oyo asalaki, abongolaki motema, mpe Yehova alimbisaki ye—atako bongo asengelaki kozwa matomba mabe ya lisumu na ye. Anania mpe Safila basalaki lisumu na boye ete na bokosi nyonso babukaki lokuta, kolukáká kokosa lisangá mpe na yango ‘kobuka lokuta na elimo santu mpe na Nzambe.’ (Misala 5:3, 4) Yango ezalaki elembo ya motema mabe, na yango, bazwaki lisambisi ya makasi.—1/1, nkasa 27, 28.
▫ Nini ekoki kosalisa biso na kosalela Yehova na esengo na motema?
Tosengeli kotalela na lolenge ya malamu mpe na limemya mapamboli na biso mpe mabaku kitoko oyo Nzambe azali kopesa biso, mpe tosengeli kobosana soko moke te ete na kotosáká Liloba ya Nzambe, tozali kosepelisa ye.—15/1, nkasa 16, 17.
▫ Makambo nini mibale tosengeli te kobosana yango soki tolingi koyikisa bato mpiko na lolenge lobongi?
Ya liboso, tosengeli kokanisa na ntina na makambo oyo tosengeli koloba, mpo ete elendiseli ezala ya sikisiki. Ya mibale, tóluka libaku malamu ya kosolola na moto oyo abongi kozwa longonya to oyo azali na mposa ya koyikisama mpiko.—15/1, lokasa 23.
▫ Mpo na nini “ebele monene” basimbi “bitape ya mbila na mabɔkɔ na bango”? (Emɔnisɛli 7:9)
Koningisama ya bitape ya mbila emonisi ete “ebele monene” ezali koyamba na esengo nyonso Bokonzi ya Yehova mpe Mokonzi na ye oyo apakolaki, Yesu Klisto. (Talá Levitike 23:39, 40.)—1/2, lokasa 18.
▫ Mateya nini ya ntina tozali kokuta kati na mokanda ya Yobo?
Mokanda ya Yobo ezali na batoli mingi mpo na oyo etali lolenge ya kosala liboso na mikakatano. Ezali kopesa bandakisa ya kobenda likebi mpo na lolenge nini—mpe lolenge nini te—moto oyo akutani na mikakatano asengeli kopesamela toli. Lisusu, likambo oyo Yobo akutanaki na yango ekoki kosalisa biso na kosala na lolenge lobongi na ntango oyo tokutani na makambo ya mpasi.—15/2, lokasa 27.
▫ Makamwisi ya Yesu mazali koteya biso nini?
Makamwisi ya Yesu makumisaki Nzambe, matikaki elakiseli mpo na baklisto oyo balendisami ete bákumisa Nzambe. (Baloma 15:6) Ezali kolendisa ezaleli ya kosalela bato malamu, ya kozala na elimo ya bokabi mpe komonisa motema mawa.—1/3, lokasa 8.
▫ Mpo na mokano nini bankulutu batalelaka mituna oyo misilá kobongisama elongo na bato ya sika oyo bamipesi?
Yango ezali mpo na kondimisa ete moko na moko na bango asili kokanga ntina ya mateya ya moboko ya Biblia mpe ayebi makambo oyo masɛngami epai na Motatoli ya Yehova.—1/3, lokasa 13.
▫ Lolenge nini tokoki kozwa matomba na mabondeli oyo mazali kati na Biblia?
Na kotaleláká malamumalamu mabondeli oyo mazali kati na Makomami, tokoki kososola mabondeli oyo mapesamaki kati na ezalela ya makambo ekokani na oyo tozali kati na yango. Komona, kotánga mpe komanyola likoló na mabondeli motindo yango ekosalisa yo na kobongisa lisusu malamu lolenge na yo ya kosolola elongo na Yehova.—15/3, nkasa 3, 4.
▫ Bobangi Nzambe ezali nini?
Bobangi Nzambe ezali bongo bobangi Yehova, limemya mozindo litondi na bobangi mpo na ye, bakisá mpe nsɔ́mɔ ya malamu ya koboya kosala makambo oyo asepelaka na yango te. (Nzembo 89:7)—15/3, lokasa 10.
▫ Wapi makambo misato oyo kati na yango Biblia emonisi ete tozali na motuya na miso ya Nzambe?
Biblia eteyi biso polele ete moko na moko kati na biso azali na motuya na miso na Nzambe (Luka 12:6, 7); elimboli polele oyo Yehova azali komona na motuya epai na biso (Malaki 3:16); mpe ezali koyebisa oyo Yehova asili kosala mpo na komonisa bolingo na ye epai na biso. (Yoane 3:16)—1/4, nkasa 11, 12, 14.
▫ Mpo na nini Baebele 10:24, 25 ezali te bobele etindá mpamba oyo esɛngi na baklisto ete báyanganaka elongo?
Maloba wana ya Paulo mazali kopesa mobeko mopemami na Nzambe mpo na makita nyonso ya boklisto—mpe ezali bongo mpo na mabaku nyonso wana baklisto basangani elongo.—1/4, lokasa 16.