Ntango oyo batángaka yango mpe matomba oyo bazwi
Na ntɔ́ngɔ́ mpenza:
Mobali moko elongo na mwasi na ye, bango nyonso mibale basalaka na kompanyi, bazwaki ekateli ya kolamuka ntɔ́ngɔ́ nyonso miniti zomi na liboso mpo na kosalela ntango wana na botángi ya Biblia liboso ete bábima. Makambo oyo bazalaki kotánga mazalaki moboko ya masoló ya pɛto oyo bazalaki kosala nsima ya kotika ndako.
Nkulutu moko na Nigeria asalelaka manáka oyo epesami na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi lokola moboko mpo na botángi ya Biblia kati na libota na ye. Mokolo na mokolo batángaka eteni na yango nsima ya kotalela mokapo ya mokolo na mokolo, mbala mingi na ntɔ́ngɔ́. Basɛngaka na bana ete bakitanaka moko na mosusu mpo na kotánga mwa eteni moko ya Biblia oyo epesami. Na nsima, babyangaka bango ete bátuna mituna na ntina na mikapo oyo mitángami.
Mwasi moko ya libala na Japon atángaka Biblia mobimba mbala moko na mbula uta 1985. Manáka na ye ezali ya kotánga Biblia miniti 20 kino miniti 30 kobanda na ngonga ya mitano na ntɔ́ngɔ́ nyonso. Mpo na oyo etali matomba azwaki, alobi ete: “Kondima na ngai esili kolendisama. Ezali kosalisa ngai na kobosana bokɔnɔ na ngai mpe na kotya makanisi na ngai likoló na elikya ya paladiso.”
Ndeko mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela uta mibu 30, kasi mobali na ye azali Motatoli te alamukaka na ngonga ya mitano ntɔ́ngɔ́ nyonso mpo na kotánga Biblia. Manaká na ye mazali kosɛnga kotánga nkasa minei kati na Makomami ya Liebele, mokapo moko ya Makomi ya Greke ya Boklisto, mpe molɔngɔ́ moko kati na Masese. Atángaka Biblia mobimba mbula na mbula uta 1959. Alobi ete: “Lokola litomba ya botángi na ngai, nazali kooka ete Yehova alingi ngai mingi . . . Nazwaka elendiseli, libɔndisi mpe kosembolama.” Abakisi ete: “Kotánga Biblia ezali lokola kotika ete Yehova alendisa lɛsɔlɔ ya bomoi na ngai mokolo na mokolo.”
Ndeko mwasi moko oyo ayekolaki solo na mboka moko epai mosala ya Batatoli ya Yehova mopekisami azalaki mpe kokutana na botɛmɛli ya mobali na ye oyo azali mondimi te. Azali kotánga Biblia kobanda na Mwayambo kino Mwamitano, katikati na ngonga ya motoba mpe ngonga ya nsambo na ntɔ́ngɔ́. Yango esili kopesa ye nguya kati na ye moko. Kokanisáká lolenge oyo botángi yango ezalaki na bopusi likoló na bomoi na ye, alobi ete: “Tozali koyekola kolinga Yehova mpe Yesu mpe kozala na bomoi ya esengo, atako tozali na mikakatano mpe mitungisi, koyebáká ete bilaka ya Yehova bikozanga te kokokisama.”
Ndeko mwasi moko oyo akɔtaki Eteyelo mpo na Babongisi-nzela azwaki ekateli ya kolanda toli oyo bapesaki bango ya kokómisa botángi ya Biblia momeseno ya mokolo na mokolo. Na ebandeli, azalaki kosala yango kati na ngonga ya mitano mpe ngonga ya motoba na ntɔ́ngɔ́. Ntango mbongwana ya mosala ebebisaki manáka yango, atyaki yango katikati na ngonga ya libwa mpe ngonga ya zomi na butu. Wana mikakatano misusu mibimaki, alobi ete: “Nabongisaka manáka na ngai engebene ezalela na makambo oyo nakutani na yango.”
Na moi:
Bandeko basi mibale, oyo bazali mpe bandeko ya mosuni, basangani ya libota ya Betele ya Brésil, bazali na momeseno ya kotánga Biblia elongo na boumeli ya miniti 20 mokolo na mokolo nsima ya bilei ya midi. Basili kotánga Biblia mobimba mbala soko 25; nzokande bakomaki ete: “Tozali ntango nyonso komona makambo ya sika, yango wana kotánga Biblia ekómaka soko moke te likambo ya kolɛmbisa.”
Ndeko mwasi moko monzemba na mboka Japon amonaki ete atako abɔkwamaki lokola Motatoli, ayebaki mpenza Makomami malamu te; ntango akómaki mobongisi-nzela, azwaki ekateli ya kotánga Biblia mokolo na mokolo. Sikawa asalaka botángi na ye mpo na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi wana ezali ye kosala mobembo mpo na kokende na lopitalo epai amisalisaka mokolo moko na pɔ́sɔ. Na nsima, wana esili ye kozonga na ndako, akolanda lisusu kosala bolukiluki. Pene na nsuka ya pɔ́sɔ, akotánga lisusu Biblia, kolandáká mokanda moko na moko na molɔngɔ́ oyo yango ekomamaki.
Elenge moko ya mbula 13 oyo asili kotánga Biblia mobimba mbala misato, azali sikawa kotánga mokapo moko mokolo na mokolo nsima ya kozonga na eteyelo. Alobi ete yango esili kosalisa ye na “kozala na bolingo mingi mpo na Yehova.”
Motatoli moko oyo azali na mikumba mingi lokola mosáli ya kompanyi, nkulutu na lisangá, mobali oyo abali mpe tata ya libota alandaka botángi ya Biblia na kasete, wana azali kosala mobembo kati na engbunduka. Na nsima, wana esili ye kozonga na ndako akotánga ye moko makambo oyo ayokaki na kasete.
Longola botángi na ye moko, mobongisi-nzela moko ya France ayokaka bakasete ya Biblia wana azali kolamba bilei, azali kokumba motuka, wana akutani na mikakatano, to bobele mpo na komisepelisa.
Mobongisi-nzela moko ya mibu 21 na mokili ya Japon azali komikundola ete mama na ye azalaki kolendisa ye makasi ete álya bilei ya elimo mokolo na mokolo, mpe azali kotánga Biblia mokolo na mokolo, kobanda azalaki na mibu misato, atako asalaka yango ntango nyonso na ngonga moko te. Nsima ya kotánga eteni oyo aponaki mpo na mokolo wana, akozongelaka milɔngɔ́ oyo mizali na makanisi ya ntina, mpe na nsima azwaka mwa miniti mpo na kozongela kati na makanisi na ye makambo oyo asili koyekola.
Motatoli mosusu, mobongisi-nzela, asili kotánga Biblia mobimba mbala soko zomi na boumeli ya mibu 12 oyo misili koleka. Mobali na ye azali mondimi te, yango wana atyaka botángi na ye ya Biblia nsima ya nzánga.
Na butu:
Nkulutu moko mobongisi-nzela ya sanza na sanza na mboka Japon oyo atángaka Biblia na ye na butu nyonso liboso ete akende kolala, asili kosala bongo na boumeli ya mibu mwambe oyo miuti koleka. Alobi ete: “Nalingaka mingi mpenza mikapo oyo mizali komonisa lolenge Yehova akanisaka, lolenge atalelaka makambo mpe lolenge abongisaka makambo. Na komanyoláká likoló na mikapo wana, nasungamaki na kokóma na makanisi lolenge moko na oyo ya Yehova mpe na kosalisa bandeko na ngai mibali mpe basi baklisto mpe basangani ya libota na ngai.”
Nkulutu moko na France azali kotánga Biblia na boumeli ya ngonga moko uta 1979. Mbala mingi azalaka na mabongoli mitano to motoba etyami liboso na ye mpo na kokokanisa yango. Alobi ete botángi ya likebi mingi esili kosalisa ye na kososola “lolenge nini kosalela Biblia kati na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo.” Yango esili mpe kopesa ye makoki ya kopesa toli na lolenge lobongi na kosalela Makomami.
Na boumeli ya mibu 28 oyo misili koleka, ndeko moko na Nigeria asili kokómisa yango momeseno ya kotánga na mpokwa nyonso mokapo ya Makomami oyo motyami na mwa búku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo mpo na kotalelama na ntɔ́ngɔ́ ya mokolo molandi. Elongo na yango, atángaka mpe mokapo mobimba ya Biblia epai eteni yango ezwami. Ntango abalaki, akóbaki na momeseno yango, kotángáká mpe kosololáká na ntina na mokapo yango elongo na mwasi na ye.
Elenge moko oyo baboti na ye bazali Batatoli te akómisaki yango momeseno ya kotánga Biblia miniti mitano kino miniti zomi liboso ete ákende kolala. Yango ezali ntango ya motuya mingi mpo na ye, mpe abondelaka liboso mpe na nsima ya botángi. Mokano na ye mozali ya koyeba nsango oyo Yehova atindaki ete mokomi moko na moko ya Biblia akoma.
Ndeko moko oyo asili kobala, oyo azali kosala na Betele, alobi ete asili kotánga Biblia mobimba mbala moko na mbula uta mibu mwambe. Atángaka na boumeli ya miniti 20 kino 30 liboso ete akende kolala. Ata ntango oyo alɛmbi mingi, amonaka ete soki akei kolala kozanga kosala botángi na ye, akokoka kozwa mpongi te. Asengeli kolamuka mpe kokokisa bamposa na ye ya elimo.