Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/5 nk. 3-4
  • Nkumu moko ataleli bomoi na ye ya mikolo mizali koya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkumu moko ataleli bomoi na ye ya mikolo mizali koya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Masolo mosusu
  • Bankɔkɔ na biso bazali wapi?
    Nzela ya bomoi ya seko—Osili komona yango?
  • Bakufi bakoki komona biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Banani bafandaka na mokili ya bilimu?
    Lamuká!—1997
  • Kozala na boyokani na mokili ya bilimu
    Lamuká!—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/5 nk. 3-4

Nkumu moko ataleli bomoi na ye ya mikolo mizali koya

NKUMU moko na Afrika ya Wɛ́sti alingamaki mingi mpe bazalaki kopesa ye limemya mozindo kati na mboka na ye. Na ntango akokisaki mibu 78, baninga na ye, bandeko na ye, mpe bato mosusu oyo basepelaka na ye bayanganaki mpo na kopesa ye longonya. Kati na lisukúlu moko oyo asalaki, nkumu yango aponaki lisoló moko oyo elobelamaka mpenza te na mabaku motindo oyo. Amonisaki makanisi na ye mpo na oyo etali makambo oyo elekaka nsima ya liwa.

Alobaki ete na nsima ya bomoi awa na mabelé, “ezali na bomoi na mokili ya sika nsima na liwa, mboka oyo ezangi bokosi, bilulela mpe lokoso.” Alobaki na ntina na yango ete ezali mokili moko oyo “ebombami,” bobele bato ya sembo nde bazalaka kuna, baoyo basololaka na Nzambe.

Bato mingi na Afrika bazali na bindimeli motindo wana. Engebene losambo ya bonkɔ́kɔ ya Afrika, liwa ezali nsuka ya bomoi te kasi ezali bobele mbongwana, kokóma na bomoi kati na mboka ya bilimu. Balobaka ete na nsima ya liwa, moto atikaka mokili oyo ezali komonana mpo na kokende na mokili oyo emonanaka te. Lokola akómi elimo, na bongo moto akɔti na esika oyo bankɔ́kɔ na ye bazalaka.

Bato mingi ya Afrika ya Wɛ́sti bakanisaka ete bankɔ́kɔ na bango, to bilimu ya bankɔ́kɔ na bango, ebatelaka bolamu ya mabota na bango oyo mazali na mabelé. Búku West African Traditional Religion (Lingomba ya bonkɔ́kɔ na Afrika ya Wɛ́sti) elobi ete: “Bokeseni monene ezali te mpo na oyo etali bopusi oyo ezali kati na basangani ya libota moko oyo bazali naino awa na mabelé, mpe baoyo bazali kati na mokili oyo emonanaka te. Na ntango bazalaki awa na mabelé, [bankɔ́kɔ] bazalaki mikóló ya mabota na bango. Sikawa lokola tokoki komona bango lisusu te, bazali bobele mikóló kati na mboka ya bilimu. Bazali ntango nyonso komibanzabanza mpo na bolamu ya mabota na bango.”

Na yango, nkumu mobangé oyo tolobelaki na ebandeli azalaki na elikya ya kokende epai na bankɔ́kɔ na ye mpe kosala elongo na bango kati na mboka ya bilimu. Alobaki ete: “Nazali na endimiseli makasi na ntina etali bomoi nsima na liwa mpe na ntina na likoki na ngai ya kokóba mosala na ngai​—ata nsima ya liwa.”

Nzokande, mpo na likambo oyo nkumu yango alobaki na nsima, zulunalo Sunday Times epesaki likanisi oyo ete “emonanaki lokola ete andimisamaki mpenza mobimba te” na ntina na bomoi na nsima ya liwa. Ayebisaki etuluku ya bato oyo bayanganaki wana ete ayokaki nsango ya mokanda moko oyo ezali koloba na ntina na bomoi nsima ya liwa. Nkumu yango azalaki koluka mokanda yango uta mibu mitano. Azalaki na mposa makasi ya kotánga yango na boye ete alakaki kopesa motuya ya mosolo oyo ekokani na badolare 1 500 epai na moto nyonso oyo akoki komemela ye búku yango.

Nkumu yango mbɛlɛ akokaki komitungisa te na kolukáká mokanda oyo ezali na yango mpasi te mpo na komonana. Ezali mokanda oyo ekoki komonana kozanga mpasi, oyo moto te nde abimisaki yango kasi Mozalisi ya bato banso. (1 Batesaloniki 2:13) Búku yango ezali bongo Biblia. Yango ezali koloba nini na ntina na bomoi nsima ya liwa?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto