Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/6 nk. 13-18
  • Nini ezali kopusa yo na kosalela Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nini ezali kopusa yo na kosalela Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo oyo epekisaka mokano ya malamu
  • “Bolingo na Klisto [ezali kopusa, NW] biso”
  • “Bokeba mpe botala malamu mpo na mfulu na Bafalisai”
  • “Epai na moto na moto kobila nguya na ye”
  • Yesu bomoi na ye mpe mosala na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Zwá liteya na ndakisa ya batalanta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Ndakisa ya talanta emonisi ntina ya kozala na molende
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Lingá Nzambe oyo alingaka yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/6 nk. 13-18

Nini ezali kopusa yo na kosalela Nzambe?

“Olinga mpe Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na mayele na yo mobimba mpe na makasi na yo mobimba.”​—MALAKO 12:30.

1, 2. Makambo nini ya kosepelisa mazali kosalema na ntina etali mosala ya kosakola?

MOTUYA ya solosolo ya motuka etalelamaka te bobele mpo na lolenge yango ezali komonana na libandá. Lángi oyo epakolami ekoki kokómisa libandá na yango kitoko mingi, mpe lolenge na yango ya kongɛnga ekoki kobenda moto oyo akoki kosomba yango; kasi oyo eleki ntina mingi ezali bongo biloko oyo ezali komonana na libandá te​—motɛ́lɛ oyo epusaka motuka, bakisa mpe biloko mosusu oyo etambwisaka yango.

2 Ezali mpe lolenge moko na mosala oyo moklisto azali kosala mpo na Nzambe. Batatoli ya Yehova bazali kosala mingi mpo na oyo etali kokokisa misala ya Nzambe. Mbula na mbula, bangonga koleka miliare moko ezali kolekisama na kosakoláká nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Lisusu, bamilió ya boyekoli ya Biblia ezali kotambwisama, mpe baoyo bazali kozwa batisimo bazali bankóto mingi. Soki ozali mosakoli ya nsango malamu, osanganaki​—ata soki emonani lokola ete ezalaki na lolenge ya moke​—kati na kosangisama ya mitángo oyo ya kosepelisa. Mpe okoki kondimisama ete “Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na bino mpe bolingo bosili bino kotalisa na nkombo na ye.”​—Baebele 6:10.

3. Longola misala, nini lisusu esengeli kozala lobanzo ya ntina mingi mpo na baklisto, mpe mpo na nini?

3 Nzokande, motuya ya solo ya mosala na biso​—biso nyonso elongo to ya moto mokomoko—⁠emekami bobele na mitángo te. Lokola elobamaki epai na Samwele, “moto akomonaka lolenge na libandá nde [Yehova] akotalaka kati na motema.” (1 Samwele 16:7) Ee, ezali bongo lolenge oyo tozali na kati nde ezali na motuya epai na Nzambe. Ya solo, misala mizali na ntina koleka. Misala oyo emonisaka komipesa epai na Nzambe ekembisaka mateya ya Yehova mpe ebendaka baoyo bakoki kokóma bayekoli. (Matai 5:14-16; Tito 2:10; 2 Petelo 3:11) Nzokande, misala na biso emonisaka makambo nyonso te. Yesu oyo asekwisamaki azalaki na ntina ya komibanzabanza mpo na lisangá ya Efese​—atako makambo oyo ekomamaki na ntina na misala malamu na bango. Ayebisaki bango ete: “Nayebi misala na yo. Kasi nazali na yo na likambo oyo ete osili kotika bolingo na yo na liboso.”​—Emoniseli 2:1-4.

4. (a) Na lolenge nini mosala na biso mpo na Yehova ekoki kokóma lokola momeseno oyo ezali bobele mokumba mpamba? (b) Mpo na nini tosengeli komitalela?

4 Likámá ezali. Na nsima ya mwa ntango, mosala na biso mpo na Nzambe ekoki kokóma lokola momeseno oyo ezali bobele mokumba mpamba. Mwasi moklisto moko alobelaki yango na lolenge oyo: “Nazalaki kobima na mosala ya kosakola, kokende na makita, koyekola, kobondela​—kasi nazalaki kosala makambo wana nyonso bobele mpo na kosala, nazalaki ata na liyoki moko te.” Ya solo, basaleli ya Nzambe basengeli kopesamela longonya na ntango bazali komipesa na molende nyonso atako bazali koyoka lokola ete ‘babwakami na nsé’ to ‘bakitisami.’ (2 Bakolinti 4:9; 7:6) Nzokande, soki mimeseno na biso ya boklisto ekokóma kobaluka bobele esika moko, na elobeli ya elilingi, tosengeli kotala malamu kati na motɛ́lɛ. Ata mituka oyo mileki malamu esɛngaka ete batalelaka yango mbala na mbala; bobele bongo, baklisto nyonso basengeli komitalelaka mbala na mbala. (2 Bakolinti 13:5) Basusu bakoki komona misala na biso, kasi bakoki te koyeba nini oyo ezali kopusa biso na kosala yango. Na yango, moko moko na biso asengeli kotalela motuna oyo: ‘Nini ezali kopusa ngai na kosalela Nzambe?’

Makambo oyo epekisaka mokano ya malamu

5. Mobeko nini Yesu alobaki ete ezali ya liboso kati na mibeko nyonso?

5 Na ntango batunaki ye soki mobeko nini ezali liboso ya mibeko nyonso oyo epesamaki na Yisraele, Yesu alobelaki etindá oyo etalelaki mingi libandá ya moto te kasi mokano ya nsé ya motema: “Olinga mpe Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na mayele na yo mobimba mpe na makasi na yo mobimba.” (Malako 12:28-30) Na yango, Yesu amonisaki bongo nini oyo esengelaki kozala nguya oyo ezali kopusa biso kati na mosala na biso mpo na Nzambe​—bolingo.

6, 7. (a) Lolenge nini Satana azali kobundisa ezingelo ya libota na mayele na ye ya mabe, mpe mpo na nini? (2 Bakolinti 2:11) (b) Lolenge nini kobokolama ekoki kozala na bopusi likoló na moto na ntina etali ezaleli na ye liboso ya bokonzi ya Nzambe?

6 Satana alingi kolɛmbisa likoki na biso ya kolóna ezaleli ya ntina mingi oyo ete bolingo. Mpo na kokokisa yango, moko na myango oyo asalelaka ezali ya kobundisa ezingelo ya libota. Mpo na nini? Mpamba te yango ezali esika oyo mayoki ya liboso ya bolingo mpe ya koumela esalemaka. Satana ayebi malamu lilako ya Biblia oyo ete makambo oyo mayekolami na bomwana ekoki kozala na motuya mingi na bokólo. (Masese 22:6) Na mayele mabe nyonso, azali komeka kobebisa lolenge na biso ya kotalela bolingo uta na bomwana mpenza. Lokola azali “nzambe na mokili oyo,” Satana azali komona ete mikano na ye mizali kosalelama malamu na ntango bato mingi bazali kobokwama kati na mabota oyo mazali bisika ya bolingo te kasi bisika ya bitumba ya makasi, ya nkanda, to bitondi na maloba mabe.​—2 Bakolinti 4:4; Baefese 4:31, 32; 6:4 (NW), maloba na nsé ya lokasa; Bakolose 3:21.

7 Búku Ndenge nini okoki kozala na bomoi na libota ya esengo emonisaki ete lolenge oyo tata azali kokokisa mokumba na ye ya moboti, “na mikolo mizali koya, ekoki kozala na bopusi monene likoló na ezaleli ya bana na ye liboso ya bokonzi, ezala oyo ya Nzambe mpe ya bato.”a Mobali moklisto moko oyo abokwamaki na maboko ya tata moko ya mabe alobi ete: “Mpo na ngai, kotosa Yehova ezali mpasi te; kolinga ye ezali mpasi koleka.” Ya solo, kotosa ezali na ntina mingi, mpamba te na miso ya Nzambe “botosi ezali malamu koleka mbeka.” (1 Samwele 15:22, NW) Kasi nini ekoki kosalisa biso ete tósuka te bobele na kotosa kasi tolóna mpe bolingo mpo na Yehova, ete ezala nguya oyo ezali kopusa biso kati na losambo na biso?

“Bolingo na Klisto [ezali kopusa, NW] biso”

8, 9. Lolenge nini mbeka ya lisiko ya Yesu esengeli kolamwisa bolingo na biso mpo na Yehova?

8 Eloko eleki monene oyo ekoki kopusa biso na kolóna bolingo mpo na Yehova na motema na biso mobimba ezali bongo botɔ́ndi mpo na mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto. “Bolingo na Nzambe emonaneli biso ete Nzambe atindaki Mwana na ye na likinda kati na mokili ete tobika na bomoi mpo na ye.” (1 Yoane 4:9) Nsima ya kososola mpe koyeba motuya na yango, likambo wana ya bolingo ezali mpe kopusa biso na komonisa bolingo. “Biso tolingaka [Yehova] mpo ete ye alingaki biso liboso.”​—1 Yoane 4:19.

9 Na bolingo nyonso, Yesu andimaki mokumba na ye ya kosala lokola Mobikisi ya bato. “Tosili koyeba bolingo na mpo oyo ete ye wana asopaki bomoi na ye mpo na biso.” (1 Yoane 3:16; Yoane 15:13) Bolingo oyo Yesu amonisaki na komikabáká esengeli kopusa biso na koyanola na botɔ́ndi nyonso. Na ndakisa: Kanisá ete obikisamaki na kozinda na mai. Okozonga na ndako, komipangwisa mai, mpe kobosana yango? Soko moke te! Okomioka ete ozali na nyongo ya kozongisa botɔ́ndi epai na moto oyo abikisaki yo. Tozali na nyongo monene epai na Yehova mpe Yesu Klisto, boye te? Na elobeli ya elilingi, soki mbeka te, mbɛlɛ biso nyonso tolingaki kozinda kati na lisumu mpe liwa. Nzokande, mpo na bolingo monene wana, tozali na elikya ya kofanda seko na paladiso na mabelé.​—Baloma 5:12, 18; 1 Petelo 2:24.

10. (a) Lolenge nini mokomoko na biso akoki kozwa mbeka ya lisiko lokola likambo litali ye mpenza? (b) Lolenge nini bolingo ya Klisto ezali kopusa biso?

10 Manyolá na ntina na lisiko. Zwá yango lokola likambo litaleli yo mpenza, lokola Paulo asalaki yango: “Bomoi bozali na ngai na nzoto sasaipi, nazali na yango mpo na kondima na Mwana na Nzambe oyo alingaki ngai mpe amipesaki ye mpenza mpo na ngai.” (Bagalatia 2:20) Kokanisa na motindo wana ekoki kopelisa mokano na biso ya mozindo, mpamba te Paulo akomaki epai na Bakolinti ete: “Zambi bolingo na Klisto [ezali kopusa, NW] biso awa . . . Akufeli bato nyonso ete baoyo bazali na bomoi babika lisusu mpo na bango mpenza te kasi mpo na ye oyo akufeli bango mpe asekwi.” (2 Bakolinti 5:14, 15) La Bible de Jérusalem elobi ete bolingo ya Klisto “emeli biso.” Na ntango tozali kokanisa na ntina na bolingo ya Klisto, tozali kopusama, kotindikama makasi, komelama mpenza. Ezali kosimba mitema na biso mpe ezali kotindika biso to kosala eloko. Lokola libongoli ya J. B. Phillips ezongeli yango na maloba mosusu, “eutelo mpenza ya misala na biso ezali bongo bolingo ya Klisto.” Lolenge nyonso mosusu ya kopusama ekoki te kobota mbuma ya koumela kati na biso, lokola ndakisa ya Bafalisai emonisi yango.

“Bokeba mpe botala malamu mpo na mfulu na Bafalisai”

11. Lobelá ezaleli ya Bafalisai liboso ya misala ya losambo.

11 Bafalisai balongolaki nguya nyonso na losambo ya Nzambe. Na esika ete batya likebi mingi likoló na bolingo mpo na Nzambe, batalelaki mingi misala, lokola nde bobele yango ekoki mpo na komonisa bomoto ya elimo. Lobanzo monene na bango likoló na mibeko mingimingi esalaki ete na libandá bamonana bato ya sembo, kasi na kati bazalaki “mikwa na bato bakufi mpe na ndenge yonso na bosoto.”​—Matai 23:27.

12. Nsima wana Yesu abikisaki moto moko, lolenge nini Bafalisai bamimonisaki ete bazalaki na mitema makasi?

12 Mokolo moko, na motema mawa na ye, Yesu abikisaki moto moko oyo azalaki na lobɔkɔ ekauká. Oyo nde esengo moto wana akokaki kozala na yango ya komona kobikisama ya mbala moko na bokono oyo, na ntembe te, etungisaki ye mingi na nzoto mpe na maoki! Nzokande, Bafalisai basepelaki elongo na ye te. Nde, batóngaki ye likoló na makambo mikemike​—ete Yesu asalisaki moto na mokolo ya Sabata. Lokola bazalaki komibanzabanza mingi na lolenge na bango ya kolimbola Mibeko na kolandeláká makambo ya mikemike, Bafalisai bazangaki mpenza koyeba ndimbola ya solosolo ya Mibeko. Likambo ya kokamwa ezali te soki Yesu ‘ayokaki mawa na ntina na nkaka na mitema na bango’! (Malako 3:1-5) Lisusu, akebisaki bayekoli na ye ete: “Bokeba mpe botala malamu mpo na mfulu na Bafalisai mpe Basadukai.” (Matai 16:6) Misala mpe bizaleli na bango emonisami polele kati na Biblia mpo na litomba na biso.

13. Liteya nini tokoki kozwa kati na ndakisa ya Bafalisai?

13 Ndakisa ya Bafalisai ezali koteya biso ete tosengeli kotalela misala na lolenge lobongi. Ya solo, misala mizali na ntina mingi, mpamba te “kondima oyo ezangi misala esili kokufa.” (Yakobo 2:26) Nzokande, bato bazangi kokoka batalelaka basusu engebene misala na bango na esika ya kotalela bomoto na bango. Na bantango mosusu, biso moko mpe tokoki komitalela na lolenge wana. Tokoki komipesa na kosala na lolenge eleki ndelo, lokola nde yango ezali lisengami bobele moko mpo na kozala moto ya elimo. Tokoki kobosana ntina ya kotalela malamu ntina ya mikano na biso. (Kokanisá na 2 Bakolinti 5:12.) Tokoki komikomisa bapesi-mibeko oyo bazali bato ya makambo makasimakasi, baoyo ‘bakangaka [ngungi, NW] nde bamelaka kamela.’​—Matai 23:24.

14. Lolenge nini Bafalisai bazalaki lokola kopo to saani ya mbindo?

14 Bafalisai basosolaki te likambo oyo ete soki moko alingi mpenza Yehova, misala ya komipesa na Nzambe mikoya yango moko. Bomoto ya elimo eutaka na kati mpo na komonana na libandá. Yesu atondolaki Bafalisai na makasi nyonso mpo na lolenge na bango ya kokanisa ya libunga na ntina na likambo yango, alobaki ete: “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, bakosi! Zambi bokopetola epai na libandá na kopo mpe na saani nde na kati itondi na kobotola mpe na boyibi. Bafalisai, bakufi miso! Bopetola liboso katikati na kopo mpe na saani, mpe epai na libandá ezala mpe peto lokola.”​—Matai 23:25, 26.

15. Tangá bandakisa oyo emonisi ete Yesu asukaki te bobele na kotalela libandá.

15 Komonana ya libandá ya kopo, saani, to ata ya ndako emonisaka makambo nyonso te. Bayekoli ya Yesu bakamwaki mingi mpo na bonzenga ya tempelo ya Yelusaleme, oyo Yesu abéngaki yango “esika na bayibi” mpo na makambo oyo ezalaki kosalema na kati. (Malako 11:17; 13:1) Oyo ezalaki solo mpo na tempelo ezali mpe bongo mpo na bamilió ya bato oyo bamibéngaka baklisto, lokola lisoló ya Boklisto ya nkombo mpamba ezali komonisa yango. Yesu alobaki ete akotalela baoyo bazalaki kosala “misala na nguya” na nkombo na ye ete bazali “bato na [misala ya kotyola mibeko, NW].” (Matai 7:22, 23) Na bokeseni monene, alobaki na ntina na mwasi moko mokufeli-mobali oyo atyaki motuya ya mosolo moke mpenza na tempelo: “Likabo na mwasi oyo, mobola, eleki na monene makabo nyonso mabwaki bato kati na Ebombelo na makabo . . . kasi ye kati na bobola na ye asili kobwaka mosolo na ye nyonso.” (Malako 12:41-44) Bongolabongola ezali? Soko moke te. Kati na makambo oyo mibale, Yesu amonisaki lolenge oyo Yehova atalelaka makambo. (Yoane 8:16) Amonaki ntina ya mikano oyo mizalaki na nsima ya misala mpe alobelaki yango na lolenge esengeli mpenza.

“Epai na moto na moto kobila nguya na ye”

16. Mpo na nini tosengeli te kokokanisa mosala na biso na oyo ya moklisto mosusu?

16 Soki mikano na biso ezali ya malamu, ntina ya kosala ntango nyonso bokokanisi ezali te. Na ndakisa, litomba moko ya malamu ezwamaka te na kosaláká milende na lolenge ya momekano mpo na kokokisa bangonga motindo moko kati na mosala ya kosakola lokola moklisto mosusu asalaka to kokokana na misala na ye kati na mosala ya kosakola. Yesu alobaki ete linga Yehova na motema na yo mobimba, na elimo na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, mpe na makasi na yo mobimba​—kasi na oyo ya moto mosusu te. Makoki, makasi mpe makambo ya moto na moto ekeseni. Soki ezalela ya makambo na yo epesi yo nzela, bolingo ekopusa yo ete olekisa bangonga mingi kati na mosala ya kosakola​—mbala mosusu kokóma ata ministre ya ntango nyonso. Nzokande, soki ozali kobundana na bokono moko, ntango oyo olekisaka na mosala ya kosakola ekoki kozala na nsé koleka na lolenge olingaki kosepela kosala yango. Kolɛmba te. Bosembo epai na Yehova etalelami te engebene motuya ya bangonga. Soki ozali na mikano ya peto, okozala na ntina ya kosepela. Paulo akomaki ete: “Tika ete moto na moto ameka misala na ye moko, boye akoki komikumisa mpo na mosala na ye moko mpe mpo na moto mosusu te.”​—Bagalatia 6:4

17. Na maloba na yo moko, lobela elakiseli ya batalanta na mokuse.

17 Tótalela lisese ya Yesu ya batalanta, lokola ekomami na Matai 25:14-30. Moto moko oyo azalaki pene ya kosala mobembo na mboka mopaya abéngaki baombo na ye mpe apesaki bozwi na ye epai na bango. “Na moko apesi talanta mitano, na mosusu mibale mpe na mosusu moko, epai na moto na moto kobila nguya na ye.” Na ntango nkolo azongaki mpo na kotalela mosolo elongo na baombo na ye, amonaki nini? Moombo oyo apesamelaki talanta mitano azwaki talanta mitano mosusu. Bobele bongo, oyo apesamelaki talanta mibale azwaki mpe talanta mibale mosusu. Moombo oyo apesamelaki talanta moko akundaki yango kati na mabelé mpe asalaki eloko moko te mpo na komatisa bozwi ya nkolo na ye. Lolenge nini Nkolo wana atalelaki likambo yango?

18, 19. (a) Mpo na nini nkolo akokanisaki te moombo oyo apesamelaki batalanta mibale na oyo apesamelaki batalanta mitano? (b) Lisese ya batalanta ezali koteya biso nini na ntina na kopesa longonya mpe kosala bokokanisi? (c) Mpo na nini moombo ya misato apesamelaki ekateli ya mabe?

18 Ya liboso, tiká tótalela moombo oyo apesamelaki talanta mitano mpe oyo apesamelaki talanta mibale. Epai na mokomoko na baombo yango, nkolo alobaki ete: “Malamu, moombo na malamu mpe na sembo!” Akokaki koloba boye epai na moombo oyo apesamelaki talanta mitano soki azwaki bobele talanta mibale? Emonani mpenza ete te! Epai mosusu, alobaki te epai na moombo oyo azwaki batalanta mibale ete: ‘Mpo na nini te ozwaki mitano? Talá moninga na yo moombo mpe motuya boni azweli ngai!’ Te, nkolo oyo ya motema mawa, oyo azalaki bongo elilingi ya Yesu, asalaki bokokanisi te. Apesaki batalanta “epai na moto na moto kobila nguya na ye,” mpe amizelaki te ete bazongisela ye mingi koleka oyo moko na moko akokaki kopesa. Baombo wana nyonso mibale bapesamelaki longonya lolenge moko, mpamba te bango mibale basalaki na molimo na bango mobimba mpo na nkolo na bango. Biso banso tokoki kozwa liteya kati na yango.

19 Ya solo, moombo ya misato apesamelaki longonya te. Abwakamaki nde kati na molili na libandá. Lokola apesamelaki bobele talanta moko, bazalaki te komizela epai na ye ete azwa lolenge moko na moombo oyo apesamelaki batalanta mitano. Nzokande, ye amekaki ata komeka te! Ekateli ya mabe oyo epesamelaki ye na nsuka ezalaki mpo na ezaleli ya motema na ye ya moto “mabe mpe ya goigoi,” oyo emonisaki kozanga bolingo mpo na nkolo na ye.

20. Lolenge nini Yehova atalelaka nsuka ya makoki na biso?

20 Yehova azali komizela ete biso banso tolinga ye na makasi na biso mobimba; nzokande, oyo nde likambo ya esengo, ete “ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele mputulu”! (Nzembo 103:14) Masese 21:2 elobi ete “[Yehova] akomekaka mitema”​—mitángo te. Ayebi malamu esika makoki na biso esuki, ezala na ntina etali mosolo, nzoto, mayoki, to makambo mosusu. (Yisaya 63:9) Lolenge moko mpe, azali komizela ete tosalela bozwi na biso na meko oyo makoki na biso epesi biso nzela. Yehova azali ya kokoka, kasi na ntango azali kosala elongo na basaleli na ye oyo bazangi kokoka, asɛngaka te ete basalela makambo na lolenge ya kokoka. Azali na makambo makasimakasi te kati na misala na ye, amizelaka te ete bato basala oyo eleki makoki na bango.

21. Soki mosala na biso mpo na Nzambe epusami na bolingo, litomba nini ya malamu ekomonana?

21 Kolinga Yehova na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, na makasi na biso mobimba “eleki malamu na mbeka na kotumba nyonso mpe miboma.” (Malako 12:33) Soki topusami na bolingo, na bongo, tokosala nyonso oyo ekoki na biso kati na mosala ya Nzambe. Petelo akomaki ete soki bizaleli ya moto na Nzambe, kati na yango mpe bolingo, “ezali kati na bino mpe ezali koyikana, ekobatela bino ete bozala mpamba te mpe bozanga kobota mbuma te, mpo na boyebi na Nkolo na biso Yesu Klisto.”​—2 Petelo 1:8.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

Bozongeli

◻ Nini esengeli kozala nguya oyo ezali kopusa mosala na biso mpo na Yehova?

◻ Lolenge nini bolingo ya Klisto ezali kopusa biso na kosalela Nzambe?

◻ Lobanzo nini ya Bafalisai biso tosengeli kopɛngola?

◻ Mpo na nini ezali likambo ya mayele te na kokokanisa mosala na biso na oyo ya moklisto mosusu?

[Bililingi na lokasa 16]

Makoki, makasi, mpe makambo ya moto na moto ekeseni

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto