Okoki kolóna bososoli mingi?
BOSOSOLI ezali “nguya to likoki oyo na nzela na yango makanisi makoki kokesenisa eloko moko na mosusu.” Ekoki mpe kozala “bosikisiki ya ekateli” to “nguya ya komona bokeseni kati na biloko to kati na makanisi.” Wana ezali maloba ya búku Webster’s Universal Dictionary. Na polele, bososoli ezali ezaleli oyo ebongi koluka yango. Motuya na yango emonani kati na maloba oyo ya Salomo ete: “Boye mayele ekokɔta na motema na yo mpe boyebi ekoyokama malamu na molimo na yo; . . . bososoli ekosunga yo mpo na kolongola yo na nzela mabe.”—Masese 2:10-12.
Ee, bososoli ekosalisa biso na kotɛmɛla “nzela mabe,” oyo esili kopalangana mingi na mikolo na biso. Mpe yango ezali komema matomba mosusu mingi. Na ndakisa, mbala mingi baboti bayokaka bana na bango koloba ete, ‘Omityaka mpenza na esika na ngai te!’ Na kosaláká mwa bolukiluki, baboti oyo bazali na bososoli bakoyeba motindo ya mayoki mpe ya makambo oyo mazali kotungisa bana na bango. (Masese 20:5) Mobali oyo azali na bososoli akoyoka mwasi na ye mpe akoyeba kososola makanisi mpe mayoki na ye na esika ete akóma na bosukisi ya nokinoki. Mwasi mpe akosala bongo epai na mobali na ye. Na yango, “ndako ekotongama malamu na nzela na mayele; ekokokisama na nzela na bososoli.”—Masese 24:3.
Bososoli ekosalisaka moto na kolónga mikakatano. Masese 17:27 elobi ete: “Ye oyo azali na mayele azali na maloba mingi te; moto na [bososoli, NW] azali na motema mpiɔ.” Moto na bososoli azalaka motema mɔ́tɔmɔ́tɔ te, amikɔtisaka te kati na makambo nyonso kozanga kokanisa liboso. Akokanisaka malamumalamu makambo oyo makoki kobima liboso ete amikɔtisa. (Luka 14:28, 29) Azali mpe na boyokani malamu elongo na bato mosusu mpamba te “monɔkɔ na mayele” ekotinda ye na kozala na bokɛngi na maloba na ye. (Masese 10:19; 12:8, NW) Kasi, likambo lileki ntina, moto na bososoli andimaka na komikitisa nyonso bolɛmbu na ye mpe atyaka motema epai na Nzambe na esika ya koluka litambwisi ya bato. Yango esepelisaka Yehova mpe ezali na ntina mosusu mpo na kolóna bososoli.—Masese 2:1-9; Yakobo 4:6.
Kozanga bososoli ya Yisalaele
Likámá ya kozanga kosalela bososoli ezali komonana kati na likambo moko oyo lisalemaki na ebandeli ya lisoló ya Yisalaele. Wana azalaki kokanisa likoló na eleko yango, mokomi ya Nzembo oyo apemamaki alobaki ete: “Batata na biso kuna na Ezipito basosolaki ntina na misala na yo te; bakanisaki boboto na yo mingi te; kasi batombokaki epai na mai-monene, bobele na epai na Mai Motane.”—Nzembo 106:7.
Ntango Mose abimisaki Yisalaele na Ezipito, Yehova asilaki komonisa nguya mpe ekateli na ye ya kobimisa bato na ye na kotindáká malɔ́zi zomi likoló na mboka wana oyo ezalaki nguya ya mokili mobimba na ntango yango. Nsima wana Falo atikaki Bayisalaele ete bákende, Mose amemaki bango na mabóngo ya Mai Motane. Nzokande, mampinga ya Ezipito malandaki bango. Emonanaki lokola ete Bayisalaele bakangamaki kati na motambo mpe ete bonsomi oyo bautaki kozwa elingaki koumela bobele ntango moke. Yango wana lisoló ya Biblia elobi ete: “Bato na Yisalaele . . . babangaki mingi. Bato na Yisalaele balelaki epai na [Yehova].” Mpe bamibalolaki epai na Mose, ete: “Osaleli biso nini, wana ebimisi yo biso na Ezipito? . . . Mpo ete kosalela Baezipito ezalaki malamu koleka kufa na lisobe.”—Exode 14:10-12.
Ekoki komonana lokola ete bazalaki na ntina malamu ya kobanga, nzokande ezali bongo te soki tomikundoli ete basilaki komona bilembeteli zomi ya nguya monene ya Yehova. Bayebaki malamu mpenza makambo oyo Mose ayaki kokundwela bango soko mibu 40 na nsima ete: “[Yehova] abimisaki biso na Ezipito na lobɔ́kɔ na nguya mpe na lobɔ́kɔ losembwi, mpe na nsɔ́mɔ mpe na bilembo mpe na misala na kokamwa.” (Deteronome 26:8) Na bongo, lokola mokomi na Nzembo akomaki yango, ntango Bayisalaele batombokelaki litambwisi ya Mose, “basosolaki ntina na misala na [ye] te.” Nzokande, Yehova, mpo na kokokisa bilaka na ye, asukisaki na lolenge ya kokamwa banguya ya Ezipito.—Exode 14:19-31.
Kondima na biso ekoki kolɛmba bobele bongo soki tozali na ntembe to kokakatana liboso na komekama. Bososoli ekosalisa biso na kotalela ntango nyonso makambo lokola yango ezali, tokomikundola ete Yehova azali monene koleka baoyo nyonso bazali kotɛmɛla biso. Bososoli ekosalisa biso na kobosana te oyo Yehova asili kosala mpo na biso. Ekosalisa biso na kobosana soko moke te likambo oyo ete Yehova azali Ye oyo “akobatela baoyo nyonso bakolinga ye.”—Nzembo 145:18-20.
Tózwa bososoli ya elimo
Bososoli eyaka yango moko te wana moto azali kopusana na mbula. Esengeli kolóna yango. Mokonzi Salomo, oyo ayebanaki na mikili mingi mpo na bososoli na ye, alobaki ete: “Mapamboli epai na moto oyo azwi mayele mpe moto oyo [azwi bososoli, NW] zambi litomba na yango eleki palata mpe kozwa yango eleki wolo na kitoko.” (Masese 3:13, 14) Epai wapi Salomo azwaki bososoli oyo azalaki na yango? Epai na Yehova. Ntango Yehova atunaki Salomo soki alingaki kosɛnga nini, ye ayanolaki ete: “Pesá moombo na yo motema na mayele mpo na kobongisa bato na yo ete nayeba kokata epai na mabe mpe malamu.” (1 Mikonzi 3:9) Ee, Salomo atyaki motema epai na Yehova lokola mosungi na ye. Asɛngaki bososoli, mpe Yehova apesaki ye yango mingi mpenza. Yango ebimisaki matomba nini? “Mayele na Salomo elekaki mayele na bato nyonso na epai na ebimelo na moi mpe mayele nyonso na Ezipito.”—1 Mikonzi 4:30.
Ndakisa ya Salomo ezali kolakisa biso epai wapi tosengeli kokende koluka bososoli. Lokola Salomo, tosengeli kotalela Yehova. Lolenge nini? Yehova asili kopesa Liloba na ye, Biblia, oyo ezali kopesa biso bososoli ya lolenge na ye ya kokanisa. Na ntango tozali kotánga Biblia, tozali kotimola kati na libulu ya boyebi oyo ekotya moboko mpo na bososoli ya elimo. Makambo oyo tozali kozwa na botángi na biso ya Biblia tosengeli komanyola likoló na yango. Bongo, tokoki kosalela yango mpo na kozwa bikateli malamu. Na nsima, nguya na biso ya kososola ekokóla kino tokokóma “bato bakɔmɛli na makanisi,” tokokoka “kokabola [to kososola kati na] malamu mpe mabe.”—1 Bakolinti 14:20; Baebele 5:14; kokanisá na 1 Bakolinti 2:10, NW.
Likambo ya esengo, tokoki kolanda kozwa matomba na bososoli oyo Yehova apesaki na Salomo. Lolenge nini? Salomo akómaki nganga-mayele mpo na oyo etali komonisa bwanya na lolenge ya masese, to maloba mokuse ya mayele ya Nzambe. Mingi na maloba yango mabatelamaki kati na búku ya Biblia ya Masese. Koyekola búku yango ekosalisa biso na kozwa litomba na bososoli ya Salomo mpe na kokólisa bososoli na biso moko.
Mpo na kosunga biso kati na boyekoli na biso ya Biblia, tokoki kosalela bisaleli ya boyekoli Biblia, lokola bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Na boumeli ya mibu koleka 116 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli lizali kosakola Bokonzi ya Yehova epai na bato na motema sembo. Zulunalo Lamuká! mpe oyo ezalaki liboso na yango ezali kolobela ezalela ya mokili uta 1919. Bazulunalo wana mibale ezali kotalela solo ya Biblia mpe ezali kopesa mokemoke kongɛnga ya elimo oyo ezali kosunga biso na kososola mabungá, ezala oyo eteyami na boklisto ya nkombo mpamba to oyo ezali kati na lolenge na biso moko ya kokanisa.—Masese 4:18.
Lisungi mosusu mpo na kokólisa bososoli ezali boninga ya malamu. Moko na masese ya Mokonzi Salomo elobi ete: “Ye oyo akotambola na bato na mayele akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba akobukana.” (Masese 13:20) Ezali nsɔ́ni ete Lehoboama mwana ya Mokonzi Salomo amikundolaki lisese wana te na eleko moko ya ntina mingi ya bomoi na ye. Nsima ya kufa ya tata na ye, mabota zomi ya Yisalaele oyo mazalaki epai na nɔ́rdi mayaki epai na ye mpo na kosɛnga ye ete alɛmbisa mwa moke bozito na bango. Ya liboso, Lehoboama akutanaki na mibangé, mpe bango bamonisaki bososoli wana balendisaki ye ete ayoka mongongo na bato na ye. Na nsima, akendaki epai na bilenge mibali. Bango bamonisaki ete bazangaki eksperianse mpe bososoli, wana balendisaki Lehoboama ete ayanola Bayisalaele na makaneli ya mabe. Lehoboama alandaki maloba ya bilenge mibali. Ebimisaki mbuma nini? Yisalaele etombokaki, mpe Lehoboama abungisaki eteni monene ya bokonzi na ye.—1 Mikonzi 12:1-17.
Eteni ya ntina mingi kati na likambo litali kokólisa bososoli ezali koluka lisalisi ya elimo santu. Wana azalaki kotalela misala ya Yehova epai na Bayisalaele nsima ya kosikolama na bango na boombo ya Ezipito, Nehemia, moko na bakomi ya Biblia, alobaki ete: “Opesaki mpe bango [elimo, NW] na yo malamu mpo na kolakisa bango.” (Nehemia 9:20) Elimo ya Yehova ekoki mpe kosalisa biso na kozala na bokɛngi. Wana ezali yo kobondela ete elimo ya Yehova epesa yo bososoli, bondelá na motema mobimba mpamba te Yehova “akopesaka na bato nyonso na kopesa malamu, oyo mpe akopamelaka te.”—Yakobo 1:5; Matai 7:7-11; 21:22.
Bososoli mpe mayele
Ntoma Paulo amonisaki bososoli ntango asakolaki solo epai na mabota ya bapakano. Na ndakisa, mokolo moko, ntango azalaki na Atene, azalaki “kotambola kotala” bisambelo na bango. Paulo azingamaki na bikeko, mpe elimo na ye etungisamaki kati na ye. Sikawa asengelaki kokamata ekateli. Asengelaki nde koluka komibatela na kokanga monɔkɔ? To asengelaki koloba polele na ntina na bikeko oyo bizalaki bipai binso mpe oyo ezalaki kotungisa ye, ata soki kosala bongo ekokaki kobimisela ye likámá?
Paulo asalelaki bososoli. Amonaki etumbelo moko oyo ezalaki na likomi oyo ete: “Na Nzambe oyo ayebani te.” Na angɛlɛ mpenza, Paulo amonisaki komipesa na bango epai na bikeko mpe bongo asalelaki etumbelo wana lokola mwango ya kobanda lisoló na ntina na “Nzambe oyo asalaki mokili, na biloko nyonso na kati na yango.” Ee, Yehova azalaki Nzambe oyo bayebaki te! Na bongo Paulo akangaki ntina ya likebi monene oyo bazalaki kopesa na likambo yango mpe akokaki bongo kopesa litatoli moko kitoko. Ebimisaki mbano nini? Mwa ndambo na bato bandimaki solo, kati na bango “Diɔnusi mosambisi na Ngomba na Ale, na mwasi moko, nkombo na ye Damali, na basusu na bango esika moko.” (Misala 17:16-34) Paulo azalaki solo ndakisa na oyo etali komonisa bososoli!
Ntembe ezali te, bososoli eyaka na lolenge ya pwasa te, eyaka mpe yango moko te. Kasi na kozaláká na motema pɛtɛɛ, na kobondeláká, na kosaláká milende makasi, na kozaláká na boninga ya malamu, na kosaláká boyekoli mpe bomanyoli ya Biblia, mpe na kotaleláká elimo ya Yehova, yo mpe okoki kolóna bososoli.