Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/10 nk. 29-31
  • Kebá ete ozala sembo na miso na yo moko te!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kebá ete ozala sembo na miso na yo moko te!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ezaleli ya komitombola
  • “Bósambisa te”
  • Molende mabe
  • Nzambe asepelaka na bato ya komikitisa
  • “Bókeba na levire ya Bafarisai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • “Bóyekola epai na ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tókoba koluka liboso “boyengebene na ye”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Makambo mibale ya ntina mingi: Libondeli mpe komikitisa
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/10 nk. 29-31

Kebá ete ozala sembo na miso na yo moko te!

NA EKEKE ya liboso, Bafalisai bazalaki na lokumu malamu ya basambeli ya Nzambe oyo bazalaki sembo. Bazalaki bayekoli ya molende ya Makomami mpe bazalaki kobondela ntango nyonso. Bato mosusu bazalaki kotalela bango ete bazalaki na boboto mpe na makambo makasi te. Josèphe, Moyuda oyo azalaki mokomi ya makambo ya kala akomaki ete: “Bafalisai bazali komonisa bolingo mingi moko epai na mosusu mpe bazali na boyokani malamu elongo na bato ya mboka na bango.” Ezali bongo likambo ya kokamwa te ete mbala mosusu bazalaki bato oyo bazalaki kozwa limemya koleka mpe bazalaki bato na lokumu mingi kati na Bayuda ya ntango wana!

Nzokande, lelo oyo liloba “Bafalisai” mpe maloba mosusu oyo makangisami na yango makómi na ndimbola mabe, mpo na kolobela moto oyo amipesi mingi na lingomba kasi azali mokosi, moto oyo azali sembo na miso na ye moko, ezaleli ya komitombola, ezaleli ya komimonisa lokola moto oyo asambelaka mingi, mpe oyo akumisaka Nzambe bobele na maloba mpamba. Mpo na nini Bafalisai babungisaki lokumu malamu na bango?

Mpamba te, Yesu Klisto, na kokesana na Bayuda mingi, akosamaki te na lolenge ya libándá ya Bafalisai. Akokanisaki bango na “mayita mapakolami mpɛmbɛ. Yango imonani kitoko libándá nde katikati itondi na mikwa na bato bakufi mpe na ndenge nyonso na bosoto.”​—Matai 23:27.

Ezali solo ete, bazalaki kosala mabondeli milai wana bazalaki na bisika ya zando, kasi yango ezalaki bobele mpo na komonana na miso na bato mosusu, lokola Yesu alobaki yango. Losambo na bango ezalaki bokosi ya mpamba. Bazalaki koluka bisika ya lokumu na bilambo ya mpokwa mpe bisika ya liboso kati na biyanganelo. Atako Bayuda nyonso basengelaki kotya malenda na nsuka ya bilamba na bango, nzokande Bafalisai bazalaki koluka kobenda likebi ya bato na kolatáká malenda maleki milai. Bazalaki na lolɛ́ndɔ nyonso kolakisa bakasete minene ya mikapo ya Makomami oyo bazalaki kolata lokola bikelakéla. (Matai 6:5; 23:5-8) Na nsuka bokosi na bango, lokoso mpe lofundo na bango ebebisaki lokumu na bango.

Yesu ayebisaki ete Nzambe asilaki kosundola Bafalisai, na maloba oyo ete: “Bakosi! Yisaya alobaki malamu mpo na bino ete, Bato oyo bakotosaka ngai na minɔkɔ, kasi mitema na bango izali mosika na ngai. Bakosanzolaka ngai mpamba, bakolakisa malako mazali mibeko na bato.” (Matai 15:7-9) Boyengebene na bango ezalaki mpenza lolenge bazalaki bango moko komimona sembo. Ezali bongo mpasi te na kososola mpo na nini Yesu akebisaki bayekoli na ye ete: “Kebá mpo na mfulu na Bafalisai.” (Luka 12:1) Lelo oyo, biso mpe tosengeli “kokeba” to komibatela ete tokóma te bato ya lingomba oyo bazali bakosi.

Wana ezali biso kosala bongo, tosengeli koyeba ete moto akómaka sembo na miso na ye moko na mbala moko te. Nzokande, ezaleli yango ekɔtaka moke moke na boumeli ya ntango molai. Ata kozanga ete ayeba yango, moto moko akoki kolóna bizaleli mabe ya Bafalisai.

Ezaleli ya komitombola

Wapi bizaleli mosusu oyo tosengeli “kokeba” na yango? Búku Encyclopædia of Religion and Ethics elobi ete, mbala mingi bato oyo bazali sembo na miso na bango moko “balobaka, mpe batɛlɛmaka, mpe batalaka basusu lokola bango moko basalá naino mabungá soko moke te.” Bato oyo bazali komimona sembo bazalaka mpe bato ya komikumisa mpe bamityaka liboso, oyo ezalaki mbeba monene ya Bafalisai.

Yesu amonisaki ezaleli wana ya Bafalisai na lisese moko: “Bato mibale babutaki kuna na Tempelo mpo na kobondela. Moko Mofalisai mpe mosusu mokɔngɔli na mpako. Mofalisai atɛlɛmi kobondela na ye moko ete, Nzambe, natɔ́ndi yo ete nazali lokola bato mosusu te, bayibi, bakeseni, bato na ekobo, to ata lokola mokɔngɔli na mpako oyo mpe te. Nakokilaka mbala mibale pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, nakokabolaka ndambo na zomi na biloko nyonso bizwi ngai.” Nzokande, mokɔngɔli na mpako andimaki mabungá na ye na komikitisa nyonso mpe amonanaki sembo koleka Mofalisai ya komikumisa. Yesu apesaki lisese oyo epai na baoyo “batyaki mitema na makambo na bango mpenza ete bazali bato sembo, mpe batyolaki bato mosusu.”​—Luka 18:9-14.

Lokola tozali bato bazangi kokoka, mbala mosusu tokoki kokanisa ete tozali malamu koleka basusu mpo na mayele to makoki mosusu oyo tobotamaki na yango. Kasi baklisto basengeli kobwaka makanisi motindo yango nokinoki. Ekoki kozala ete ozali na mibu mingi ya eksperiansi kati na bomoi ya boklisto. Ekoki kozala ete ozali na makoki mingi lokola moteyi ya Biblia. To ekoki kozala ete olobaka ozali moklisto apakolami na elimo oyo akozala mokonzi elongo na Klisto na likoló. Kati na lisangá basusu bazali na mabaku kitoko ya mosala lokola basáli ya ntango nyonso, bankulutu to basaleli na misala. Omituna yo moko ete, ‘Yehova akoyoka nini soki nakosalela oyo asili kopesa ngai lokola ntina ya komimona ete naleki basusu?’ Na ntembe te, yango ekosepelisa ye soko moke te.​—Bafilipi 2:3, 4.

Ntango moklisto azali komonisa elimo oyo ete aleki basusu mpo na makoki, mabaku ya mosala, to bokonzi oyo epesamelaki ye na Nzambe, azali mpenza koyibela Nzambe nkembo mpe lokumu oyo bobele ye nde abongi kozwa. Biblia ezali kolendisa baklisto polele na kotika “komikanisa mpenza na motindo mobongi te.” Yango ezali kolendisa biso ete: “Bósunganaka na makanisi na motindo moko; bózala na makanisi na lolɛ́ndɔ te kasi botambolaka na bosɔkɛmi. Botángaka te ete bozali na mayele mingi.”​—Baloma 12:3, 16.

“Bósambisa te”

Engebene encyclopédie moko ya kolimbola Biblia, moto oyo azali sembo na miso na ye moko “amitalelaka ete azali sembo na bizaleli to azali na boyokani malamu elongo na Nzambe mpamba te azali kokangama makasi na malako makomami kozanga kotalela elimo na yango.” Búku mosusu elobelaki bato oyo bazali sembo na miso na bango moko lokola “bato bamipesi mingi na lingomba oyo bazali kolekisa ntango na bango mingi na kolukaluka mabe na basusu.”

Bafalisai bazalaki na mbeba yango. Na nsima, mibeko na bango oyo mipesamaki na bato mimonanaki ete mizalaki na ntina mingi koleka mibeko mpe mitindá ya Nzambe. (Matai 23:23; Luka 11:41-44) Bamityaki bango moko basambisi mpe bazalaki pene na kokweisa moto nyonso oyo azalaki kokokisa te mitindá ya bosembo na bango moko. Ezaleli na bango ya komitombola mpe lokumu monene oyo bazalaki komipesa epusaki bango na kozala na bokonzi likoló na bato mosusu. Kozanga makoki na bango ya kozala na bokonzi likoló na Yesu epesaki bango nkanda, na boye ete baangaki mwango mabe mpo na koboma ye.​—Yoane 11:47-53.

Oyo nde mpasi kofanda elongo na moto oyo azali komitya ye moko mosambisi, oyo azali ntango nyonso koluka mabungá, kotalatala mpe kolandela bato nyonso oyo bazali pene na ye. Ya solo, moto moko te kati na lisangá azali na bokonzi ya kondimisa basusu makanisi mpe mibeko na ye. (Baloma 14:10-13) Baklisto oyo bazali na bokatikati bazali kososola ete makambo mingi ya bomoi ya mokolo na mokolo matalaka ekateli ya moto na moto. Mingimingi baoyo balukaka makambo nyonso mabonga mpenza na kokoka mpe basɛngaka mingi epai na basusu basengeli kotika ezaleli ya kosambisa basusu.

Ezali solo ete, lisangá ya boklisto lizali na ndingisa ya kopesa litambwisi mpo ete makambo nyonso maleka malamu kati na lisangá ya Yehova oyo lizali awa na mabelé. (Baebele 13:17) Kasi bato mosusu basili kobongola litambwisi yango to basili kobakisa malako na bango moko. Na etúká moko bayekoli nyonso ya mibali na Eteyelo ya mosala ya teokrasi basengelaki kolata kazaka mpe kokanga buto na kazaka na bango wana bazali kosala mokumba yango. Moyekoli oyo akokaki kosala bongo te azalaki kolongolama mokumba ya kopesa masolo na mikolo ya nsima. Na esika ya kopesa malako ya makasimakasi bongo, ebongi kozala na makambo makasi te mpe kozala na boyokani na Liloba ya Nzambe wana tozali na boboto nyonso kopesa likanisi na biso, na ntango esengeli, boye te?

Ezaleli ya komimona sembo ekoki lisusu kolendisa elimo oyo ete soki moklisto moko azali kokutana na mikakatano kati na bomoi na ye, yango elimboli ete azali makasi te na elimo. Yango ezalaki mpenza ezaleli ya Elifaza, Biledada, mpe Sofala, baoyo bazalaki komimona bango moko sembo mpe bazalaki kokanisa bongo na ntina na Yobo. Bazalaki na likanisi ya sikisiki te ya likambo oyo, mpo na yango, bazalaki komonisa enzombo wana bazalaki kofunda Yobo ete asalaki masumu. Yehova apesaki bango etumbu mpamba te bazalaki na likanisi ya mabe likoló na komekama oyo Yobo azalaki kati na yango.​—Talá Yobo, mikapo 4, 5, 8, 11, 18, 20.

Molende mabe

Mbala mingi komimona sembo mpe molende ezalaka na boyokani. Ntoma Paulo alobelaki Bayuda oyo bamipesaki mingi na lingomba lokola bato oyo bazalaki na “[molende] mpo na Nzambe nde na nzela na bososoli te. Zambi awa ezangi bango koyeba boyengebene bouti na Nzambe mpe bazali kolukaluka boyengebene bouti na bango mpenza, bongo batosi boyengebene na Nzambe te.” (Baloma 10:2, 3) Ntango azalaki Mofalisai, Paulo ye moko azalaki na molende ya koleka ndelo, nzokande molende na ye mozalaki ya malamu te, mpamba te ezwaki moboko likoló na boyengebene ya Yehova te.​—Bagalatia 1:13, 14; Bafilipi 3:6.

Na lolenge lobongi Biblia ezali kolendisa ete: “Zalá na boyengebene na koleka te mpe omibongisa na mayele na koleka te. Mpo na nini okomibebisa?” (Mosakoli 7:16) Kati na lisangá, ndeko moko akoki kobanda na motema sembo, kasi motema sembo mpe molende na ye mokoki kobongwana na likambo ya kozala sembo na miso na ye moko. Wana etambwisami na mayele ya bomoto kasi na boyengebene ya Yehova te, molende ya losambo mokoki kopesa basusu mpasi. Ndenge nini?

Na ndakisa, baboti bakoki kokóma komipesa mingi na kokokisa bamposa ya elimo ya bato mosusu, mpe mpo na yango bakoki komonisa bopɔtu mpo na oyo etali kokokisa bamposa ya libota na bango moko. To baboti bakoki komonisa milende koleka ndelo, kosɛngáká epai na bana na bango makambo mingi koleka oyo bakoki mpenza kosala. (Baefese 6:4; Bakolose 3:21) Bana mosusu, wana bazali na makoki te ya kokokisa masɛngami ya makasimakasi bongo, bazali komibomba na kozaláká na mitindo mibale ya bomoi. Moboti oyo azali na makambo makasi te akotalela bandelo ya libota na ye mpe akosala mbongwana oyo eyokani na yango.​—Kokanisá na Genese 33:12-14.

Molende ya kolekisa ndelo ekoki lisusu kopekisa biso ete tómonisa ezaleli ya takte te, ya motema mawa to ya boboto mpe te, oyo ezali na ntina mingi kati na boyokani na biso elongo na basusu. Moto moko akoki kosala mosala mingi mpo na kotombola matomba ya Bokonzi. Nzokande, molende na ye oyo eleki ndelo ekoki kozokisa basusu. Ntoma Paulo alobaki ete: “Ata mpe nazali kosakola mpe koyeba makambo nyonso mabombami mpe makambo nyonso na mayele, ata nazali na kondima nyonso mpo na kolongola ngomba, nde soko nazangi bolingo, nazali mpamba. Ata nakopalanganisa nyonso ezali na ngai mpo na kopesáká makabo, ata nakopesa nzoto na ngai mpo na kotumbama, nde soko nazangi bolingo, nazwi litomba te.”​—1 Bakolinti 13:2, 3.

Nzambe asepelaka na bato ya komikitisa

Lokola tozali baklisto tosengeli kososola likámá ya komimona sembo liboso ete ezaleli yango ekóla. Tosengeli koboya ezaleli ya komitombola, momeseno ya kosambisa basusu mpe molende ya mabe oyo ezali na moboko likoló na mayele ya bato.

Wana ezali biso “kokeba” na bizaleli ya Bafalisai, na esika ete tósambisa basusu na kotaleláká bango lokola bazali sembo na miso na bango moko, ekozala malamu ete tótya likebi na mimeseno mpe na bamposa ya biso moko. Ezali solo ete, Yesu asambisaki Bafalisai mpe akweisaki bango ete bazali “bana na bitupa” baoyo babongi na libebi ya seko. Kasi Yesu azalaki na makoki ya koyeba makambo oyo mazali kati na mitema ya bato. Biso tozali na makoki yango te.​—Matai 23:33.

Tiká tóluka boyengebene ya Nzambe kasi ya biso moko te. (Matai 6:33) Tokoki kondimama na Nzambe bobele soki tosali bongo, mpamba te Biblia ezali kolendisa biso banso ete: “Bómikangela kosɔkɛma lokola elamba, moko asunga mosusu, mpo ete Nzambe akotɛmɛlaka bato na lolɛ́ndɔ, nde akopesaka basɔkɛmi ngɔlu.”​—1 Petelo 5:5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto