Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/11 nk. 30-31
  • Mituna ya Batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya Batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Masolo mosusu
  • Babikisami na “libota oyo mabe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mituna ya Batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Ntango ya Kosɛnzɛla
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Kozala ya Klisto—Elimboli nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/11 nk. 30-31

Mituna ya Batángi

Kati na 1 Petelo 2:9, “Biblia Haut-fleuve” ezali kobénga baklisto bapakolami ete “libota liponami.” Yango esengeli kobongola lolenge na biso ya kosalela liloba “libota” oyo Yesu asalelaki mpe ekomami na Matai 24:34?

Kati na mabongoli mosusu liloba “libota” esalelami kati na milɔngɔ́ oyo mibale. Engebene Biblia Haut-fleuve, ntoma Petelo akomaki ete: “Nde bino bozali libota liponami, banganga na bokonzi, libota na bulɛɛ, bato baponami, ete bóyebisa malamu na oyo abyangi bino kobima na molili kokɔta na moi na ye na kokamwisa.” Mpe Yesu asakolaki ete: “Nazali koloba na bino solo ete libota oyo ekoleka te kino ekobima makambo oyo nyonso.”​—1 Petelo 2:9; Matai 24:34.

Na eteni ya liboso, ntoma Petelo asalelaki liloba ya Greke geʹnos, nzokande na mokapo oyo maloba ya Yesu mazwami, tozali kokuta liloba ge·ne·aʹ. Maloba mibale oyo ya Greke makoki komonana lokola ete makokani, mpe ete mauti na mosisa moko; nzokande, ezali maloba mibale makeseni mpe mazali na ndimbola ekeseni. Les Saintes Écritures — Traduction du monde nouveau — avec références etye maloba na nsé ya lokasa mpo na 1 Petelo 2:9 ete: “‘Ekólo (race).’ Na Greke, geʹnos; ekeseni na ge·ne·aʹ, ‘libota,’ lokola ezwami na Mt 24:34.” Maloba motindo wana matyami na nsé ya lokasa mpe mpo na Matai 24:34.

Lokola maloba wana na nsé ya lokasa mamonisi yango, geʹnos ebongolami malamu na liloba ya Lifalansé “race,” lokola emonanaka kati mabongoli mingi ya Biblia na Lifalansé. Petelo asaleli esakweli oyo ezwami kati na Yisaya 61:6 mpo na baklisto bapakolami oyo bazali na elikya ya kokende na likoló. Bauti na mabota mingi mpe na bituluká mingi, kasi eutelo na bango etalelami te wana ezali bango kokóma basangani ya libota ya Yisalaele ya elimo. (Baloma 10:12; Bagalatia 3:28, 29; 6:16; Emoniseli 5:9, 10) Petelo abéngaki bango ete bakómaki, na elobeli ya elimo, etuluku oyo ekeseni​—“[ekólo eponami, bonganga ya bokonzi, ekólo ya bulɛɛ, bato bazwami mpo na ntina mpenza, NW].”

Kati na makomi ya Greke, maloba ya Yesu oyo mazwami na Matai 24:34, tozali kokuta liloba ge·ne·aʹ. Endimami na bato mingi ete Yesu alingaki te kolobela bato ya “ekólo” moko to mosusu, kasi azalaki koloba epai na bato oyo bazalaki na bomoi na boumeli ya eleko moko.

Esili koleka bambula pene na monkámá, Charles T. Russell, prezidá wa yambo ya la Société Watch Tower, amonisaki yango polele, akomaki ete: “Atako ekoki kolobama ete maloba ‘libota’ mpe ‘ekólo’ mauti na mosisa moko to na ebandeli moko, nzokande ekokani te; na lolenge oyo esalelami kati na Makomami, maloba wana mibale mazali mpenza na bokeseni. . . . Kati na mikanda misato mikeseni epai kuna esakweli yango ezwami, eyebani ete Nkolo na biso asalelaki liloba ya Greke oyo ekeseni mpenza (genea) oyo elimboli te ekólo, kasi ezali na ndimbola lolenge moko na liloba libota. Lolenge mosusu ya kosalelama ya liloba ya Greke (genea) emonisi ete esalelami te mpo na kolimbola ekólo, kasi esalemi mpo na bato oyo bazali kobika na eleko moko.”​—The Day of Vengeance, nkasa 602-603.

Euti mpenza koleka kala mingi te, búku A Handbook on the Gospel of Matthew (1988), oyo ekomamaki mpo na kosunga babongoli ya Biblia, elobaki ete: “[Biblia New International Version] ebongoli liloba libota oyo na lolenge na yango mpenza kasi ebakisi maloba na nsé ya lokasa, ‘To ekólo.’ Mpe nganga-mayele moko ya Kondimana ya Sika akanisi ete ‘Matai alingi kolobela te bobele libota ya liboso oyo eyaki nsima ya Yesu kasi mabota ya bileko nyonso ya Bayuda oyo baboyaki ye.’ Nzokande, ezali na elembeteli moko te oyo endimisi moko to mosusu ya bisukiseli oyo, mpe esengeli kotalelama lokola milende oyo misalemaki mpo na kopɛngola ndimbola ya polele. Na lolenge esalelamaki mpenza na ebandeli ezalaki bobele mpo na baoyo bazali na bomoi na eleko moko na Yesu Klisto.”

Lokola elobelami na lokasa 10 kino lokasa 15, Yesu akweisaki libota ya Bayuda ya eleko na ye, bato ya eleko na ye, oyo baboyaki ye. (Luka 9:41; 11:32; 17:25) Azalaki mbala mingi kosalela maloba mosusu pembeni na yango, lokola “na mabe mpe na pite,” “na kozanga kondima mpe na bokesene,” mpe “na pite mpe masumu” wana azalaki kolobela libota yango. (Matai 12:39; 17:17; Malako 8:38) Na ntango Yesu asalelaki liloba “libota” mpo na mbala ya nsuka, azalaki likoló na Ngomba ya Olive elongo na bantoma minei. (Malako 13:3) Mibali yango, oyo bazalaki naino bapakolami na elimo te, bazalaki naino mpe te basangani ya lisangá ya boklisto, na ntembe te bazalaki mpe te “libota” to ekólo ya bato. Nzokande bayebaki malamu lolenge oyo Yesu azalaki kosalela liloba “libota” wana azalaki kolobela bato ya eleko na ye. Na yango, ezali polele ete basosolaki mpe soki Yesu alingaki koloba nini wana asalelaki liloba “libota oyo” mpo na mbala ya nsuka.a Ntoma Petelo, ye oyo azalaki wana, na nsima ayebisaki Bayuda ete: “Bómibikisa na libota oyo na kilikili.”​—Misala 2:40.

Tosilaki mbala na mbala kobimisa bilembeteli ete makambo mingi oyo Yesu asakolaki kati na lisoló wana (lokola bitumba, koningana ya mabelé, mpe nzala) ekokanaki na katikati ya eleko oyo ayebisaki esakweli yango mpe kobebisama ya Yelusaleme na 70 T.B. Mingi na makambo yango masalemaki, kasi nyonso te. Na ndakisa, ezali te na elembeteli oyo emonisi ete nsima wana Baloma babundisaki Yelusaleme (66-70 T.B.) “elembo na mwana na moto” emonanaki, kopusáká “bitulúká nyonso na mabelé” ete bálelalela. (Matai 24:30) Na yango, kokokisama wana na katikati ya mobu 33 T.B. mpe 70 T.B. esengelaki kozala kokokisama ya liboso, ezalaki te kokokisama na yango ya mobimba to ya monene oyo Yesu azalaki mpe kolobela.

Kati na maloba ya ebandeli ya libongoli ya búku Jewish War ya Josèphe, G. A. Williamson akomi: “Matai ayebisi biso ete bayekoli batunaki [Yesu] motuna ya biteni mibale​—na ntina na kobebisama ya Tempelo mpe na ntina na koya na Ye mpenza ya nsuka​—mpe apesaki bango eyano ya biteni mibale, eteni na yango ya liboso esakolaki na nguya nyonso makambo mabimaki oyo Josèphe alobelaki yango malamu mpenza.”

Ee, na kokokisama na yango ya liboso, emonani mpenza ete “libota oyo” ezalaki na ndimbola moko lokola esalelamaki na bantango mosusu​—libota ya Bayuda ya kozanga kondima oyo bazalaki na bomoi na boumeli ya eleko moko. “Libota” yango esengelaki koleka te kozanga komona makambo oyo Yesu asakolaki. Lokola Williamson alimbolaki, yango ekokanaki na bambula oyo ezalaki liboso ya kobebisama ya Yelusaleme, lokola Josèphe, mokomi na makambo ya kala oyo amonaki mpenza na miso na ye, alobelaki yango.

Na kokokisama na yango ya mibale to ya monene, ezali polele ete “libota oyo” esengelaki mpe kotalela bato oyo bazali na bomoi na boumeli ya eleko moko. Lokola lisoló oyo ebandi na lokasa 16 emonisi yango, tosengeli te kokanisa ete Yesu azalaki kolobela motuya oyo esilá kotángama ya bambula oyo esali “libota” moko.

Nzokande, makambo mibale ya ntina makoki kolobelama mpo na ntango nyonso oyo etalelami kati na “libota.” (1) Libota moko ya bato ekoki te kotalelama lokola eleko oyo motuya ya boumeli ya bambula na yango eyebani sikisiki, lokola ezali bongo mpo na maloba oyo mamonisaka motuya ya sikisiki ya bambula (ekeke). (2) Bato ya libota moko babikaka na boumeli ya eleko ya mwa mokuse, eleko molai te.

Na yango, na ntango bantoma bayokaki Yesu kolobela “libota oyo,” bakanisaki nini? Awa biso, na lisalisi ya kososola lolenge makambo malekaki, toyebi ete kobebisama ya Yelusaleme na “bolózi monene” esalemaki mibu 37 na nsima, kasi bantoma oyo bayokaki Yesu na matoi na bango mpenza bakokaki koyeba yango. Nzokande, na ntango alobelaki “libota,” yango epesaki bango likanisi ya eleko molai te kasi epesaki bango likanisi ya bato oyo bazali na bomoi na boumeli ya eleko moko ya mwa mokuse. Ezali mpe bongo mpo na biso. Na yango, maloba ya Yesu oyo malandaki nsima mabongi mpenza: “Nde mpo na mokolo yango mpe ntango yango moto ayebi te, ata baanzelu na likoló te, ata Mwana mpenza te, kasi bobele Tata ayebi . . . Bongo ekoki na bino koselingwa, mpo ete Mwana na moto akoya na ntango ekanisi bino te.”​—Matai 24:36, 44.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Kati na liloba “libota oyo,” lolenge moko ya likitana litalisi houʹtos ekokani mpenza na liloba ya Lingala “oyo.” Ekoki kolobela eloko oyo ezali sikawa to eloko oyo ezali liboso ya molobi. Kasi ekoki mpe kozala na bandimbola mosusu. Búku Exegetical Dictionary of the New Testament (1991) elobi ete: “Liloba [houʹtos] emonisaka likambo oyo ezali kosalema sikawa. Na yango [aion houʹtos] ezali “mokili oyo ezali na ntango oyo’ . . . [geneaʹ haute] ezali ‘libota oyo ezali kobika sikawa’ (na ndakisa, Mat. 12:41, 45; 24:34).” Nganga-mayele George B. Winer akomi ete: “Na bantango mosusu likitana [houʹtos] elobelaka te nkombo ya eloko oyo ezali pembeni mpenza, kasi oyo ezali mpenza mosika, oyo, lokola eloko ya ntina elobami, ezali penepene na makanisi, kati na makanisi ya mokomi, ezali mpenza na ntango oyo.”​—A Grammar of the Idiom of the New Testament, ebimeli ya 7, 1897.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto