Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/12 nk. 9-14
  • Tólɛmbaka te!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tólɛmbaka te!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na ntango basusu bayokisi biso mawa
  • Ntango tosali libúngá
  • Wana tokanisi ete tozali kosala mingi te
  • Wana mingi esɛngami na biso
  • Mpo ete nsuka eyei naino te
  • Yehova akopesaka nguya epai na ye oyo alɛmbi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • “Tyá miso na yo na mokili ya sika”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Biblia ekoki kosalisa yo omiyoka malamu ntango ozali komiyoka ete ozali na ngambo?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Bankulutu: Bókoba komekola ntoma Paulo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/12 nk. 9-14

Tólɛmbaka te!

“Tólɛmbaka mpo na kosalaka malamu tɛ zambi na ntango oyo ekoki,

tokobuka soko tokotika motema te.”​—BAGALATIA 6:9.

1, 2. (a) Na lolenge nini ekeseni nkosi akangaka nyama? (b) Zábolo azali mpenzampenza koluka kolya banani?

NKOSI akangaka nyama na lolenge ekeseni. Mbala mosusu akomibombaka mpo na kozela yango penepene ya liziba ya mai to na bilekelo oyo bisalelamaka mingi. Búku moko (Portraits in the Wild) elobi ete, na bantango mosusu nkosi “asalelaka bobele libaku moko ya malamu​—na ndakisa, kobimela mwana ya nyama ebéngami zèbre ntango alali mpongi.”

2 Ntoma Petelo alobi ete “motɛmɛli [na biso], oyo mabe, azali kotambola lokola nkosi konguluma, kolukaka soki akolya nani.” (1 Petelo 5:8) Lokola ayebi ete ntango oyo etikali mpo na ye ezali mokuse mpenza, Satana azali kosala bopusi makasi likoló na bato mpo na kopɛngola bango ete básalela Yehova te. Nzokande, “nkosi na konguluma” wana azali mpenzampenza koluka kolya basaleli ya Yehova. (Emoniseli 12:12, 17) Myango na ye ya kokanga ekokani na nyama oyo akokanisami na yango. Lolenge nini?

3, 4. (a) Myango nini Satana asalelaka mpo na koluka kolya basaleli ya Yehova? (b) Lokola oyo ezali “ntango ya mpasi,” mituna nini mizali kotunama?

3 Na bantango mosusu Satana amekaka kosalela motambo​—minyoko to botɛmɛli oyo mokano na yango mozali ya kobebisa bosembo na biso mpo ete tótika kosalela Yehova. (2 Timoté 3:12) Kasi, lokola nkosi, na bantango mosusu Zábolo asalelaka bobele libaku malamu oyo limonani. Akozela kino ntango oyo tolɛmbi to tokómi na bolɛmbu makasi, mpe akomeka bongo kosalela ezalela ya mayoki na biso mpo na kopusa biso na kotika. Tosengeli te kokóma bilei ya nokinoki!

4 Ya solo, tozali kobika na ntango moko ya mpasi koleka kati na lisoló ya bato. Na “mikolo oyo ya mpasi,” na bantango mosusu mingi kati na biso bakoki komiyoka ete balɛmbi to batungisami. (2 Timoté 3:1) Bongo, lolenge nini tokoki kopɛngola kolɛmba mpenza kino kokóma te bilei ya nokinoki mpo na Zábolo? Ee, lolenge nini tokoki kolanda toli oyo epemami oyo Paulo apesaki ete: “Tólɛmbaka mpo na kosalaka malamu te zambi na ntango oyo ekoki, tokobuka soko tokotika motema te”?​—Bagalatia 6:9.

Na ntango basusu bayokisi biso mawa

5. Nini ememaki Davidi na kolɛmba mingi, kasi likambo nini asalaki te?

5 Na ntango ya Biblia, ata basaleli ya Yehova oyo bazalaki sembo mpenza bayokaki mbala mosusu ete batungisamaki. Mokomi na Nzembo Davidi akomaki ete: “Nalɛmbi na kolela na ngai; butu na butu nazali kopolisa mbeto na ngai na mpisoli na ngai; nazali kopolisa elalelo na ngai na kolela na ngai. Liso na ngai ebebi mpo na mawa.” Mpo na nini Davidi azalaki komiyoka bongo? Alimbolaki ete: “Mpo na bayini na ngai.” Misala mabe ya bato mosusu mizalaki koyokisa Davidi mawa na boye ete mai ya miso na ye mazalaki kotika te kosopana. Nzokande, Davidi atikaki Yehova te na ntina na makambo oyo bazalani na ye basalelaki ye.​—Nzembo 6:6-9.

6. (a) Lolenge nini maloba mpe misala ya basusu ekoki kozala na bopusi likoló na biso? (b) Lolenge nini basusu bamipesaka lokola bilei ya nokinoki mpo na Zábolo?

6 Bobele bongo, maloba to misala ya bato mosusu ekoki koyokisa biso mpasi mingi na motema. Masese 12:18 elobi ete: “Moto azali oyo akoloba lokola koswama na mbeli.” Soki moto oyo azangi bososoli azali ndeko moklisto ya mobali to ya mwasi, ‘pota ya kozokisama’ wana ezalaka mozindo mpenza. Momeseno ya biso bato mozalaka ya kosilika, mbala mosusu kokanga nkanda. Ezalaka mpenza bongo soki tokanisi ete basalelaki biso na lolenge ya kozanga boboto to ya kozanga bosembo. Tokoki komona ete ezali mpasi kosolisa moto oyo atungisaki biso; mbala mosusu tokoki mpe kozwa ekateli ya komitangola na ye. Wana bayokaki nkanda makasi, basusu balɛmbaki mpe batikaki koyangana na makita ya boklisto. Likambo ya mawa, na lolenge yango ‘bapesaki [Zábolo] nzela’ ete azwa libaku malamu ya kolya bango nokinoki.​—Baefese 4:27.

7. (a) Lolenge nini tokoki kopɛngola komipesa na mabɔkɔ ya Zábolo wana basusu bayokisi biso mawa to bazokisi biso? (b) Mpo na nini tosengeli kotika nkanda?

7 Lolenge nini tokoki kopɛngola komipesa na mabɔkɔ ya Zábolo wana basusu bayokisi biso mawa to bazokisi biso? Tosengeli kobomba nkanda te. Nzokande, tosengeli kokamata bibongiseli mpo na kozongisa kimya to kosilisa mikakatano nokinoki mpenza. (Baefese 4:26) Bakolose 3:13 ezali kolendisa biso ete: “Soko moto moko azali na moto mosusu likambo, . . . bolimbisanaka.” Ebongi mpenza kolimbisana soki ye oyo asalelaki biso mabe andimi mabungá na ye mpe ayoki mawa ya solo. (Kokanisá na Nzembo 32:3-5 mpe Masese 28:13.) Yango ezali kosalisa biso, atako tobosani te ete kolimbisa elimboli te kokanga miso to kokitisa bonene ya mabe oyo basusu basalelaki biso. Kolimbisa elimboli ete totiki nkanda na biso. Nkanda ezalaka bozito monene oyo moto amemaka. Ekoki kolɛmbisa makanisi na biso, kolongola esengo na biso. Ekoki nkutu kobebisa kolɔngɔ́nɔ́ na biso ya nzoto. Na kokesana, kolimbisa, na ntango yango esengeli, ekosalisa biso. Tiká ete lokola Davidi, tólɛmba soko moke te mpe tómitangola na Yehova te na ntina na oyo bato mosusu basaleli biso to balobi na ntina na biso!

Ntango tosali libúngá

8. (a) Mpo na nini basusu bamiyokaka na bantango mosusu ete bazali na ekweli? (b) Likámá nini lizali na komiyoka lokola tozindisami na boye ete tomisundoli biso moko?

8 Yakobo 3:2 elobi ete: “Biso nyonso tokokweaka na makambo mingi.” Wana tokwei, ezali motindo na biso bato na komiyoka ete tozali na ngambo. (Nzembo 38:3-8) Mayoki ya ekweli makoki mpenza kozala makasi soki tozali kobunda na bolɛmbu moko ya mosuni to soki tozali mbala na mbala kokwea na likambo yango.a Ndeko mwasi moko moklisto oyo abundaki etumba makasi ya lolenge yango alobaki ete: “Nazalaki lisusu na mposa ya bomoi te, lokola nayebaki te soki nasalaki to nasalaki te lisumu oyo likolimbisamaka te. Nakanisaki ete mbala mosusu ezalaki mpenza ntina te ete namipesa mingi na mosala ya Yehova mpamba te ntango esilaki koleka mpo na ngai.” Wana totungisami mpenza makasi na liyoki ya ekweli na boye ete tomisundoli, tozali kopesa Zábolo libaku​—mpe akoki mpenza kosalela yango nokinoki! (2 Bakolinti 2:5-7, 11) Ekoki kozala ete oyo tozali na yango mposa ezali bobele etaleli ya bokatikati na ntina na ekweli na biso.

9. Mpo na nini tosengeli kotya motema na ngɔlu ya Nzambe?

9 Ezali mpenza likambo libongi ete tózala na liyoki ya ekweli na ntango tosali lisumu. Nzokande, na bantango mosusu mayoki ya ekweli maumelaka mpamba te moklisto moko akanisaka ete akokoka soko moke te koyokelama mawa. Nzokande, Biblia ezali kolendisa biso na mɔ́tɔ nyonso ete: “Soko tokoyambola masumu na biso, ye azali sembo mpe moyengebeni mpo na kolimbisa biso masumu na biso mpe kopɛtɔla biso na bokesene nyonso.” (1 Yoane 1:9) Ezali na bantina malamu ya kokanisa ete Nzambe akosala yango te epai na biso? Omikundola ete kati na Liloba na ye, Yehova alobi ete “akolimbisaka masumu.” (Nzembo 86:5; 130:3, 4) Lokola akoki kobuka lokuta te, akosala engebene bilaka ya Liloba na ye, soki toyei epai na ye na kobongola motema.​—Tito 1:2.

10. Endimiseli nini ya kolendisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko oyo ebimisamaki kala epesaki na ntina na kobundisa bolɛmbu ya nzoto?

10 Osengeli kosala nini soki ozali kobundisa bolɛmbu moko mpe okwei lisusu na yango? Kolɛmba te! Kokwea elongoli te bokóli nyonso oyo osilaki kosala. Ebimeli ya 15 Febwáli 1954, ya zulunalo oyo epesaki endimiseli moko ya kolendisa ete: “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mpe tokweaka mbala mingi na mwa mimeseno mosusu ya mabe oyo mikɔti mozindo na bomoi na biso ya kala koleka motindo oyo tokanisaki. . . . Kolongola elikya te. Kokata na mokuse te ete osili kosala lisumu oyo ekolimbisamaka te. Yango ezali mpenza lolenge oyo Satana alingi ete okanisa. Mawa mpe kotungisama na yo ezali elembeteli ete okendeki mosika te. Olɛmba te na komibalola na komikitisa nyonso mpe na motema mobimba epai na Nzambe, kolukáká bolimbisi, kopɛtɔlama mpe lisalisi na ye. Kende epai na ye lokola mwana moke akokendeke epai na tata na ye ntango azwami na mikakatano, ata soki akwei na libúngá wana mbala boni, mpe na boboto nyonso Yehova akopesa yo lisalisi mpamba te azali na ngɔlu, mpe soki ozali sembo, akopesa yo lisosoli moko ya pɛtɔ.”

Wana tokanisi ete tozali kosala mingi te

11. (a) Lolenge nini tosengeli koyoka na ntina na mosala ya kosakola Bokonzi? (b) Mayoki nini baklisto mosusu bazali kobunda na yango na ntina na kosangana na bango na mosala ya kosakola?

11 Mosala ya kosakola Bokonzi ezali na ntina mingi kati na bomoi ya moklisto mpe kosangana na yango ememaka esengo. (Nzembo 40:8) Nzokande, baklisto mosusu bazalaka na liyoki ya ekweli monene mpo ete bakokaka te kosala mingi kati na mosala ya kosakola. Liyoki wana ya ekweli ekoki kolongola esengo na biso mpe kosala ete tólɛmba, wana ekobanza biso ete Yehova andimaka te moke oyo tosalaka. Talelá mayoki malandi oyo basusu bazali kobunda na yango.

Ndeko mwasi moklisto oyo azali kobɔkɔla bana misato elongo na mobali na ye akomaki ete: “Boyebaka soki motindo nini bobólá elyaka ngonga? Nasengeli kosala nyonso mpo nabatela mosolo. Yango elimboli ete nasengeli kolekisa ntango na kolukaluka kati na bamagazini ya tombola, na bamagazini oyo ekitisi ntálo ya biloko, to nasengeli ata kotonga bilamba. Nalekisaka mpe ngonga moko to mibale pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpo na kobongisa batiké [ya bilei oyo etekamaka na ntálo moke]​—kokata yango, kobongisa yango mpe koteka yango. Na bantango mosusu nazalaka na liyoki ya ekweli wana nasalaka misala yango, kokanisáká ete mbɛlɛ nasengelaki kolekisa ntango wana kati na mosala ya kosakola.”

Ndeko mwasi mosusu oyo azali na bana minei mpe na mobali azangi kondima alobaki ete: “Nakanisaki ete mbala mosusu nalingaka mpenza Yehova te. Yango wana nabundaki na mosala na ngai mpo na Yehova. Nasalaki mpenza makasi, kasi nayokaki ete ekokaki naino te. Lokola bokoki komona yango, nazalaki koyoka ete nazalaki na motuya te, yango wana nakokaki te kokanisa ete Yehova akokaki solo kondima mosala oyo nazalaki kosalela ye.”

Ndeko mwasi moko moklisto oyo amonaki ete asengelaki kotika mosala ya ntango nyonso alobaki ete: “Nakokaki te kondima likanisi oyo ete nalóngaki te kokokisa ndai na ngai ya kosalela Yehova mosala ya ntango nyonso. Bokoki te kokanisa lolenge nini nazali na mawa! Sikawa nalelaka soki nakanisi yango.”

12. Mpo na nini baklisto mosusu bamiyokaka na ekweli monene mpo ete bazali na makoki te ya kosala mingi kati na mosala ya kosakola?

12 Kolinga kosalela Yehova mingi mpenza ezali solo mposa ya motema. (Nzembo 86:12) Nzokande, mpo na nini basusu bazalaka na liyoki ya ekweli monene mpo ete bakokaka te kosala mingi? Mpo na basusu, emonani ete yango ekangisami na mayoki ya kozanga motuya, oyo mbala mosusu eutaka na makambo ya mpasi oyo makómelaka bango na bomoi. Epai na basusu, liyoki ya ekweli oyo ebongi te ekoki kouta na etaleli oyo ebongi te na ntina na oyo Yehova azelaka ete tósalela ye. Mwasi moko moklisto andimaki ete: “Nazalaki kokanisa ete bobele soki osali kino olɛmbi, wana nde osali mpenza malamu.” Na yango, amityelaki mikano oyo milekaki makoki na ye mosika​—mpe bongo ayokaki nkutu liyoki monene ya ekweli wana azwaki likoki te ya kokokisa yango.

13. Yehova azali kozela nini epai na biso?

13 Yehova azali kozela ete tósala nini? Na mokuse, Yehova amizelaka ete tósalela ye na molimo na biso mobimba, tósala oyo ezalela ya makambo na biso epesi biso nzela ya kosala. (Bakolose 3:23) Nzokande, bokeseni monene bokoki kozala kati na oyo tolingaka kosala mpe oyo tokoki mpenza kosala. Mbala mosusu totyameli ndelo na makambo lokola bobangé, kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, makasi ya nzoto to mikumba ya libota. Nzokande, na ntango oyo tozali kosala nyonso oyo ekoki na biso kosala, tokoki kondimisama ete mosala na biso mpo na Yehova mosalemi na molimo mobimba​—yango eleki te mpe ezali na nsé te ya mosala ya ndeko oyo kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mpe ezalela ya makambo na ye epesi ye nzela ya kosala mosala ya ntango nyonso.​—Matai 13:18-23

14. Okosala nini soki ozali na mposa ya lisalisi mpo na koyeba malamu oyo osengeli kozela na bokatikati epai na yo moko?

14 Bongo, lolenge nini osengeli koyeba oyo okoki komizela na yango na bokatikati nyonso? Mbala mosusu ekozala malamu kosolola likambo yango elongo na moninga moklisto moko, ekoki kozala nkulutu moko to ndeko mwasi moko oyo azali na eksperiansi mingi, oyo ayebi malamu makoki na yo, bandelo na yo mpe mikumba na yo ya libota. (Masese 15:22) Omikundola ete na miso ya Nzambe motuya ya bomoto na yo ekoki kopimama te na nzela ya mosala oyo osalaka na mosala ya kosakola. Basaleli nyonso ya Yehova bazali na motuya mingi na miso na ye. (Hagai 2:7; Malaki 3:16, 17) Mosala na yo ya kosakola mokoki kozala mingi to mokoki kozala na nsé na oyo basusu basalaka, kasi lokola yango ezali komonisa oyo nyonso okokaki kosala, Yehova akosepela na yango, mpe ozali na ntina te ya kozala na liyoki ya ekweli.​—Bagalatia 6:4.

Wana mingi esɛngami na biso

15. Na meko nini mingi esɛngami epai na bankulutu ya lisangá?

15 Yesu alobaki ete: “Soko batye mingi na mabɔkɔ na moto, bakolɔmba yango eleki mingi na mabɔkɔ na ye.” (Luka 12:48) Na ntembe te ‘mingi esɛngami’ epai na baoyo bazali kosala lokola bankulutu kati na lisangá. Lokola Paulo bazali komipesa mobimba mpo na lisangá. (2 Bakolinti 12:15) Basengeli kobongisa masukúlu, kotala bampate, kosambisa makambo​—nyonso wana kozanga kobosana mabota na bango. (1 Timoté 3:4, 5) Bankulutu mosusu bazali mpe na mosala mingi kati na botongi Bandako ya Bokonzi, na Komité mpo na boyokani elongo na minganga, mpe bazali komipesa na bolingo malamu na misala ya mayangani ya mike mpe mayangani ya minene. Lolenge nini mibali wana oyo bazali kosala mosala makasi, oyo bamipesi bakoki kopɛngola kolɛmba mingi na bozito ya mikumba lolenge yango?

16. (a) Mwango malamu nini Yetro alakisaki Mose? (b) Ezaleli nini ekopesa nkulutu moko nzela ya kokabola mikumba elongo na basusu?

16 Ntango Mose, mobali ya komikitisa, mosɔkɛmi azalaki komilɛmbisa wana azalaki kokata makambo ya basusu, bokilo na ye, Yetro, alakisaki ye mwango moko ya malamu: kokabola mikumba epai na mibali misusu ya makoki. (Exode 18:17-26; Mituya 12:3) Masese 11:2 elobi ete: “Mayele ezali elongo na basɔkɛmi.” Kozala mosɔkɛmi elimboli koyeba mpe kondima bandelo na biso. Mosɔkɛmi akokakatana te na kopesa mikumba epai na basusu, bobele bongo azali na bobángi te ete akobungisa bokonzi na ye soki akaboli mikumba na lolenge lobongi elongo na mibali misusu oyo bazali na makoki.b (Mituya 11:16, 17, 26-29) Nzokande, azali na mposa makasi ya kosalisa bango ete bákóla.​—1 Timoté 4:15.

17. (a) Lolenge nini basangani ya lisangá bakoki koyeisa mokumba ya bankulutu pɛ́pɛ́lɛ? (b) Komipimela nini basi ya bankulutu bandimaka, mpe lolenge nini tokomonisa ete tozali komona yango mpamba te?

17 Basangani ya lisangá bakoki kosala mingi mpo na koyeisa mokumba ya bankulutu pɛ́pɛ́lɛ. Awa bayebi ete bankulutu bazali na mabota na bango moko oyo basengeli kobatela, basusu bakozala na bokatikati wana bazali kosɛnga ntango mpe likebi ya bankulutu. Basengeli te kotala mpamba komipimela ya bolingo oyo basi ya bankulutu bandimaka ete na bolingo nyonso mibali na bango bápesa na lisangá ntango oyo basengelaki kolekisa na libota. Mama moko oyo azali na bana misato mpe oyo mobali na ye azali nkulutu alimbolaki ete: “Likambo oyo namilelaka na ntina na yango te ezali mokumba monene oyo nazali komema na bolingo nyonso kati na ndako mpo ete mobali na ngai akoka kokóba mosala na ye ya nkulutu. Nayebi ete Yehova azali kopambola libota na biso mingi na ntina na mosala oyo azali kosala, mpe nasilikaka te na ntina na ntango mpe nguya oyo apesaka. Nzokande, ya solo, mbala na mbala nasengeli kosala mingi mpo na kokombola libándá mpe komipesa mingi na kosembola bana na biso koleka oyo nasengelaki kosala mpamba te mobali na ngai azali na ntango mingi te.” Likambo ya mawa, ndeko mwasi wana amonaki ete basusu, na esika ya kokanga ntina ya mokumba wana oyo mobakisamelaki ye, bazalaki nde kobimisa maloba mazangi bososoli lokola oyo, “Mpo na nini ozali kosala te lokola mobongisi-nzela?” (Masese 12:18) Ebongi mpenza kopesa basusu longonya mpo na oyo bazali kosala na esika ya kotyola bango mpo na oyo bazali na makoki ya kosala te!​—Masese 16:24; 25:11.

Mpo ete nsuka eyei naino te

18, 19. (a) Mpo na nini oyo ezali te ntango ya kotika momekano ya bomoi ya seko? (b) Toli nini oyo eyei na ntango malamu ntoma Paulo apesaki yango epai na baklisto ya Yelusaleme?

18 Soki mopoti-mbangu ayebi ete akómi penepene na nsuka ya momekano, akotikaka te. Ata nzoto na ye ekómi na nsuka ya makasi na yango​—elɛmbi, etɔki mpe esili mai​—kasi penepene ya nsuka ezalaka ntango ya kotika momekano te. Bobele bongo, lokola tozali baklisto tozali kati na momekano mpo na bomoi, mpe tozali mpenza pene ya ndelo ya nsuka. Oyo ezali ntango ya kotika momekano te!​—Kokanisá na 1 Bakolinti 9:24; Bafilipi 2:16; 3:13, 14.

19 Baklisto ya ekeke ya liboso bakutanaki na likambo motindo yango. Penepene na mobu 61 T.B., ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Yelusaleme. Ntango esilaki kopusana mpenza​—“libota” ya bato mabe, ebongiseli ya Bayuda oyo esilaki kopɛngwa etikalaki moke “eleka.” Mingimingi baklisto ya Yelusaleme basengelaki kozala na bokɛngi mpe kotikala sembo; basengelaki kokima wana ekomona bango ete engumba yango ezingami na bibele na basodá. (Luka 21:20-24, 32) Bongo, na ntango ebongaki mpenza, Paulo apesaki toli oyo epemami: ‘Bózala na pɛtɛpɛtɛ te to na bolɛmbu te kati na mitema na bino.’ (Baebele 12:3) Awa ntoma Paulo asalelaki makelelo mibale ya makasi: “kozala pɛtɛpɛtɛ” (kaʹmno) mpe “kozala na bolɛmbu”(e·klyʹo·mai). Engebene nganga-mayele moko ya Biblia, maloba ya Greke wana “Aristote asalelaki yango mpo na bapoti-mbangu oyo bazalaki komilɛmbisa mpe kokwea nsima ya koleka elembo ya nsuka. Batángi [ya mokanda ya Paulo] bazalaki naino kati na momekano. Basengelaki te komilɛmbisa liboso na ntango. Basengelaki te kotika nzela ete básenzwa mpe bákwea mpo na kolɛmba mingi. Lisusu yango ezali kosɛnga kolendendela liboso na mikakatano.”

20. Mpo na nini toli wana ya Paulo ebongi mpenza mpo na biso lelo?

20 Solo toli ya Paulo ebongi mpenza na ntango na biso lelo! Liboso ya mitungisi oyo mizali sé kobakisama, ekoki kozala ete na bantango oyo toyokaka lokola bapoti-mbangu oyo balɛmbi, oyo makolo na bango malingi kosenzwa. Kasi penepene na elembo ya nsuka boye, tosengeli kotika te! (2 Ntango 29:11) Yango ezali mpenza oyo Motɛmɛli na biso, “nkosi na konguluma,” alingi ete tósala. Na esengo, Yehova asili kozwa bibongiseli oyo bikopesaka “nguya epai na ye oyo alɛmbi.” (Yisaya 40:29) Lisoló oyo lilandi likotalela bibongiseli yango mpe lolenge nini tokoki kozwa litomba na yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na ndakisa, ekoki kozala ete basusu bazali kobundisa ezaleli mabe moko oyo esili kokɔta mozindo na bomoto na bango, lokola kosilika nokinoki, to masturbation.​—Talá Lamuká!, 22 Máí 1988, nkasa 19-21 (na Lifalansé); 8 Febwáli 1982, nkasa 16-20 (na Lifalansé); mpe Mituna bilenge batunaka​—Biyano bibongi, nkasa 198-211, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

b Talá lisoló “Bankulutu​—Bópesaka mikumba!” kati na ebimeli ya 15 Ɔkɔtɔ́bɛ 1992 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, nkasa 20-23.

Okopesa eyano nini?

◻ Lolenge nini tokoki kopɛngola kolɛmba wana basusu bayokisi biso mawa to bazokisi biso?

◻ Likanisi nini ya bokatikati na ntina na ekweli ekobatela biso ete tólɛmba te?

◻ Yehova azali kozela nini epai na biso?

◻ Lolenge nini kosɔkɛma ekosalisa bankulutu ya lisangá ete bámilɛmbisa te?

◻ Mpo na nini toli ya Paulo na Baebele 12:3 ebongi mpenza mpo na biso lelo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto