Bazwaki kimya kati na mokili oyo ya yikiyiki
ELILINGI oyo ezali na ezipeli ya zulunalo oyo emonisi etumba makasi oyo ezali kosalema na Bosnie mpe na Herzégovine. Kimya ekoki kozala kati na bisika wana? Likambo ya kokamwa, eyano ezali ete ɛɛ. Wana bituluku ya Katolike ya Loma, ya Ortodoxe ya Ɛ́sti, mpe ya Mizilmá bizali kobunda mpo na kowela mabelé, bato mingi bamonisaka mposa makasi ya kofanda na kimya, mpe bamoko basili kozwa yango.
Djorem mpe libota na ye bazalaki kofanda na Sarajevo, mpe bazalaki Batatoli ya Yehova. Na katikati ya eleko wana ya yikiyiki na engumba wana, bazalaki na momeseno ya kotala bazalani na bango mpo na koyebisa bango nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Mpo na nini? Mpamba te libota ya Djorem liyebaki ete Bokonzi wana ezali solo, ete esilá kotyama kati na makoló, mpe ete yango ezali elikya bobele moko oyo ezali malamu mpo ete bato bázala na kimya. Batatoli ya Yehova bazali na elikya makasi kati na oyo ntoma Paulo abéngaki ete “nsango malamu ya kimya.” (Baefese 2:17, NW) Na lisalisi ya bato lokola Bozo mpe Hena Djorem, bato mingi basili kozwa kimya kati na Bosnie mpe na Herzégovine.
Kimya ya solo ekoya
Makambo mingi masengeli kolobama na ntina na Djorem mpe libota na ye. Kasi, libosoliboso, tiká toloba na ntina na babalani mosusu oyo batyaki elikya kati na Bokonzi ya Nzambe. Nkombo na bango ezali Artur mpe Arina. Bango mpe bana na bango mibale ya mibali oyo bazalaki bilenge bazalaki kofanda na mboka moko oyo mabelé na yango ezali bongo kati na ex-Union Soviétique. Ntango bitumba ya bana-mboka ebimaki, Artur abundaki mpo na kokɔtela ngámbo moko. Kasi, mosika te, amitunaki ete, ‘Mpo na nini nazali kobundisa bato oyo bazalaki bazalani na ngai?’ Atikaki mboka wana mpe, nsima ya mikakatano mingi, akómaki elongo na libota na ye ya moke kati na Estonie.
Wana akendaki kotambola na St. Petersburg, Artur akutanaki na Batatoli ya Yehova mpe akamwaki na makambo oyo ayekolaki na ntina na Bokonzi ya Nzambe. Mokano ya Yehova ezali ete mosika te bobele Bokonzi ya Nzambe nde ekoyangela bato. (Danyele 2:44) Na nsima mabelé makozala esika moko ya kimya, epai bitumba ya bana-mboka bikozala te soko mpe matáta kati na bikólo. Yisaya asakolaki na ntina na ntango yango: “Bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba na bulɛɛ na ngai; zambi mokili ekotonda na boyebi na Yehova lokola [mbú etondi na mai, NW].”—Yisaya 11:9.
Komonáká bililingi ya mokili wana ya kimya oyo mozali koya awa na mabelé na lisalisi ya mokanda moko mokolimbolaka Biblia oyo Motatoli wana alakisaki ye, Artur amonaki ete esika oyo azalaki kofanda ekokanaki na oyo ya elilingi wana. Kasi sikawa ekómaki kobebisama mpo na bitumba ya bana-mboka. Wana ezongaki ye na Estonie, Artur mpe libota na ye bayekolaki makambo mingi na ntina na Bokonzi ya Nzambe na nzela ya boyekoli ya Biblia elongo na Batatoli ya Yehova.
Kimya katikati ya yikiyiki
Nzembo 37:37 elobi ete: “Talá moto na sembo mpe moná moyengebene; sosolá ete moto na kimya akotikala libela.” Ya solo, kimya ya moto na sembo mpe moyengebene na miso ya Nzambe ezali te bobele mpo na mikolo na ye mizali koya. Azali kozwa yango uta sikawa. Lolenge nini yango ekoki kosalema? Tótalela likambo likómelaki mobali moko na nkombo Paul.
Paul afandi na káa moko ya bato bakimá mboka, oyo ezali mosika kati na súdi-wɛ́sti ya Ethiopie, atako azali mpenza mobotami ya mboka moko ya zingazinga. Kati na mboka na ye, akutanaki na Motatoli moko ya Yehova oyo azalaki kosala na kompanyi moko ya pitɔlɔ́, mpe mobali yango apesaki ye mokanda moko oyo ekolimbolaka Biblia, Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko.a Paulo akutanaki lisusu na Motatoli wana te, kasi ayekolaki búku yango na likebi mpenza. Etumba ya bana-mboka esalaki ete akima kati na káa ya bato bakimá mboka na Ethiopie, mpe kuna asololaki na basusu makambo oyo asilaki koyekola. Etuluku moke ekómaki kondima makambo yango ete mazali solo. Kokangamáká na makambo oyo basilaki koyekola, mosika te basakolaki yango epai na basusu kati na káa.
Paul atindaki nkomá na la Société Watch Tower mpo na kosɛnga lisalisi. Motatoli moko oyo atindamaki longwa na Addis-Abeba akamwaki na kokuta bato 35 bazali kozela ye, bamilɛngɛlaki mpo na koyekola makambo mingi na ntina na Bokonzi ya Nzambe. Bibongiseli bikamatamaki mpo ete bákoka kopesamela lisungi mbala na mbala.
Lolenge nini ekoki kolobama ete bato lokola Paul bazali na kimya? Bomoi na bango ezali pɛtɛɛ te, kasi bazali na kondima epai na Nzambe. Wana batungisami na ntina na yikiyiki ya mokili oyo, bazali kosalela batoli ya Biblia: “Bómitungisa mpo na likambo moko te nde kati na makambo nyonso tiká ete bisengeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabondeli mpe na malɔmbɔ mpe na matɔ́ndi.” Mpo na yango, bazali kozwa bosepeli oyo bato mingi lelo oyo bazalaka na yango te. Maloba ya ntoma Paulo epai na baklisto ya lisangá ya Filipi mabongi mpo na bango: “Kimya na Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekosɛnzɛla mitema na bino mpe bikaniselo na bino kati na Klisto Yesu.” Ya solo, bazali komiyoka ete bazali na boyokani ya penepene elongo na Yehova, “Nzambe na kimya.”—Bafilipi 4:6, 7, 9.
Kimya ya lelo
Mokonzi oyo asili kotyama kati na Bokonzi ya Nzambe ezali Yesu Klisto, oyo abéngami kati na Biblia ete: “Nkolo na kimya.” (Yisaya 9:6) Na ntina na ye mosakoli moko ya kala alobaki ete: “Akolakisa kimya epai na mabota nyonso. Bokonzi na ye ekozala longwa na mai-na-monana kino na mai-na-monana mpe longwa na Ebale monene kino nsuka na mokili.” (Zekalia 9:10) Maloba mapemami lokola oyo mazalaki na bopusi makasi likoló na bomoi ya mobali oyo abéngami José.
Na eleko moko José akɔtaki bolɔ́kɔ. Azalaki nganga-mobulu mpe asilaki kokangama wana azalaki kokana kobwaka bómbi na káa ya bapolisi. Akanisaki ete bobele mobulu nde ekopusa boyangeli ete ebongisa ezalela ya mboka na ye. Ntango azalaki kati na bolɔ́kɔ, Batatoli ya Yehova babandaki koyekola Biblia elongo na mwasi na ye.
Nsima wana José abimisamaki na bolɔ́kɔ, ye mpe ayekolaki Biblia, mpe mosika te maloba ya Nzembo 85:8 mabandaki kokokisama epai na ye: “Nakoyoka oyo ezali Nzambe Yehova koloba, zambi akoloba mpo na kimya epai na bato na ye mpe epai na bayengebene na ye.” Nzokande, mokapo wana esuki na likebisi oyo: “Kasi ekoki ete bázonga lisusu na makambo na zoba te.” Na yango, moto oyo azali koluka kimya ya Yehova akomeka te kosala na lipandá to na kotɛmɛla mokano na Ye.
Lelo oyo, José mpe mwasi na ye bazali baministre baklisto. Bazali kolakisa basusu ete Bokonzi ya Yehova nde ezali mwango mpo na kosilisa mikakatano oyo José azalaki koluka kosilisa yango kala na nzela ya bómbi. Bazali mpenza kotya elikya na Biblia, oyo elobi ete: “Yehova mpe akopesa oyo ezali malamu.” (Nzembo 85:12) Ya solo, kala mingi te José akendaki kotala káa oyo asilaki kokana kobebisa. Mpo na nini? Mpo na kosolola elongo na mabota mafandaka kuna makambo matali Bokonzi ya Nzambe.
Bato na kimya
Na Nzembo 37:10, 11, Biblia elobi ete: “Nsima na mwa ntango moke, moto na mabe akozala lisusu te; okotala esika na ye, nde akomonana te. Nde bato na bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya na solo.” Oyo nde elikya kitoko!
Kasi, tóyeba ete kimya ya Yehova ezali bobele mpo na “bato na bopɔlɔ.” Baoyo bazali koluka kimya bakoki koyekola kozala bato na kimya. Ezali yango esalemaki mpo na Keith, oyo afandi na Nouvelle-Zélande. Keith alobelamaki lokola “moto na nguya na nzoto mpe na bomoto, moto ya mobulu mpe ya ntembe.” Azalaki mosangani ya etuluku moko ya bato ya mobulu mpe azalaki kofanda na ndako oyo ezalaki mpenza esika makasi ya solosolo, na bilanga oyo bibatelamaki na mbwa misato mpo na kokɛngɛla ete miyibi bákɔta te. Mwasi na ye, mama ya bana motoba, akabwanaki na ye.
Ntango Keith akutanaki na Batatoli ya Yehova, nsango malamu ezalaki na bopusi makasi likoló na ye. Mosika te ye mpe bana na ye babandaki koyangana na makita elongo na Batatoli. Akataki nsuki na ye ya milai mpe abandaki kolobela Bokonzi ya Nzambe epai na baninga na ye ya kala. Bamoko kati na bango babandaki koyekola Biblia.
Lokola bamilió ya bato na mitema sembo kati na mokili mobimba, Keith abandaki kosalela maloba ya ntoma Petelo: “Ye oyo azali na mposa na kosepela bomoi mpe komona mikolo malamu, tiká ete . . . apɛngwa longwa na mabe mpe asala malamu, aluka kimya mpe [alanda] yango.” (1 Petelo 3:10, 11) Mwasi ya kala ya Keith andimaki ete bábalana lisusu, mpe azali sikawa koyekola “koluka kimya mpe kolanda yango.”
Kimya ya Yehova esili kobikisa bomoi ya bato mingi, kati na bango mosani moko ya kala na mboka oyo ebéngamaki kala ete U.R.S.S. Mobali wana azwaki midái na masano ya Olympic, kasi amonaki ete bandɔ́tɔ na ye ekokisamaki te mpe amipesaki na kosalela bilangwiseli mpe na komɛla masanga mingi. Nsima ya bomoi ya mbula 19 oyo etondaki na makambo ndenge na ndenge sangisá mpe mibu misato ya etumbu oyo alekisaki na káa moko ya bakangami na Sibérie, mobembo oyo asalaki na komibomba kati na masuwa oyo ezalaki kokende na Canada, mpe mbala mibale azalaki pene na liwa na ntina na momeseno na ye ya kosalela bilangwiseli, abondelaki Nzambe mpo ete asalisa ye mpo na koyeba mokano ya solosolo ya bomoi. Boyekoli ya Biblia elongo na Motatoli moko ya Yehova oyo alobaka lokótá Russe esalisaki ye na kozwa biyano na mituna na ye. Lelo oyo mobali wana, lokola mpe bamilió mosusu, asili kozwa kimya elongo na Nzambe mpe elongo na ye moko.
Elikya ya lisekwa
Na nsuka, tiká tózongela Bozo mpe Hena Djorem na Sarajevo. Babalani wana bazalaki na mwana mwasi ya mibu mitano, Magdalena. Na Yulí ya mobu moleki, bango nyonso misato bazalaki kofanda na mboka mpo na komipesa lisusu na mosala ya kosakola wana bango nyonso babomamaki na ntango bómbi epanzanaki. Ezali boni na ntina na kimya oyo basakolaki epai na basusu? Bómbi oyo ebomaki bango emonisaki ete kimya yango ezalaki kimya ya solo te?
Soko moke te! Kati na ebongiseli ya biloko oyo, makambo ya mawa mazali kokómela bato. Bato bazali kobomama na bómbi minene to ya mike. Basusu bazali kokufa mpo na makɔnɔ to mpo na makámá. Mingi bazali kokufa na ntina na bobangé. Baoyo bazali na kimya ya Nzambe bakutanaka mpe na makambo wana, kasi makambo wana mazali kotika bango kozanga elikya te.
Yesu alakaki epai na moninga na ye Malata ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Ye oyo azali kondima ngai ata asili kokufa, akobika.” (Yoane 11:25) Djorem mpe libota na ye bandimaki maloba wana, lokola mpe yango ezali mpo na Batatoli ya Yehova nyonso. Mpe Djorem elongo na libota na ye bandimaki ete ata bakufi, bakosekwisama na mabelé oyo na ntango wana ekozala mpenza esika ya kimya. Yehova Nzambe “akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”—Emoniseli 21:4.
Liboso ete akufa, Yesu alobaki epai na bayekoli na ye ete: “Nazali kopesa bino kimya na ngai moko. . . . Tiká ete mitema na bino mitumolama te.” (Yoane 14:27) Tozali kosepela elongo na Djorem mpe libota na ye oyo bazalaki na kimya wana mpe oyo kozanga ntembe bakozwa yango mingi na lisekwa. Tozali na esengo mpo na baoyo nyonso bazali kosambela Yehova, Nzambe ya kimya. Bato motindo wana bazali na kimya ya makanisi. Bazali na kimya elongo na Nzambe. Bazali kolóna kimya elongo na basusu. Mpe bazali na elikya na mikolo mizali koya ya kimya. Ɛɛ, bazwaki kimya, atako bazali kofanda kati na mokili oyo ya yikiyiki. Ya solo, baoyo nyonso bazali kosambela Nzambe na elimo mpe na solo bazali na kimya. Tiká ete yo mpe ozala na kimya motindo wana.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Bililingi na lokasa 7]
Bazwaki kimya atako bazali kofanda na mokili oyo ya yikiyiki