Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/1 nk. 15-20
  • Bampate ya Yehova basengeli kobatelama na boboto nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bampate ya Yehova basengeli kobatelama na boboto nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Babateli na etongá oyo bazali na bolingo malamu
  • Ntango bato ya sika balingi kosakola
  • Tokokisa bamposa ya sikisiki
  • Soki moto oyo auti kozwa batisimo kala mingi te asali libungá
  • Tósalisa bango ete “bakóla kino kokɔmɛla”
  • Tosalisa bazalani na biso bayeba kosambela Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Babateli ya mpate, bómekola babateli minene ya bampate
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • “Bóbatela etonga ya Nzambe oyo bapesi na mabɔkɔ na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Bankulutu​—Bobatela etonga na Nzambe na motema malamu!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/1 nk. 15-20

Bampate ya Yehova basengeli kobatelama na boboto nyonso

“Bóyeba ete Yehova azali Nzambe. . . . Biso tozali bato na ye mpe mpate na etongá na ye.”​—NZEMBO 100:3, NW.

1. Lolenge nini Yehova asalelaka basaleli na ye?

YEHOVA azali Mobateli Monene na mpate. Lokola tozali basaleli na ye, atalelaka biso lokola bampate na ye mpe abatelaka biso na boboto nyonso. Tata na biso ya likoló abɔndisaka biso mpe alendisaka biso mpe akambaka biso kati na ‘banzela ya boyengebene na ntina na nkombo na ye.’ (Nzembo 23:1-4) Mobateli Malamu na bampate, Yesu Klisto, alingaka biso mingi yango wana apesaki molimo na ye mpo na biso.​—Yoane 10:7-15.

2. Basaleli ya Nzambe bazali kati na ezalela nini?

2 Lokola tozali kobatelama na boboto nyonso, tokoki koloba elongo na mokomi na Nzembo ete: “Bósalela Yehova na bosepeli. Bóya liboso na ye na konganga na esengo. Bóyeba ete Yehova azali Nzambe. Ezali ye nde asalaki biso, kasi biso moko te. Tozali bato na ye mpe bampate na etongá na ye.” (Nzembo 100:2, 3, NW) Ɛɛ, tozali na esengo mpe na kimya. Ezali lokola nde tobatelamaki liboso na banyama mabe kati na lopango ya bibwɛlɛ, oyo ezalaki na bifelo makasi ya mabanga.​—Mituya 32:16; 1 Samwele 24:3; Sefania 2:6.

Babateli na etongá oyo bazali na bolingo malamu

3. Lolenge nini bankulutu baklisto oyo baponami bazali kosalela etongá ya Nzambe?

3 Na ntembe te, tozali na esengo mpo ete tozali bampate ya Nzambe! Bankulutu oyo basili koponama bazali kokamba biso. Bazali te “kosala lokola bankumu,” bazali mpe te koyangela likoló na biso, to komeka kozala bankolo likoló na kondima na biso. (Mituya 16:13; Matai 20:25-28; 2 Bakolinti 1:24; Baebele 13:7) Na esika ya kosala bongo, bazali nde babateli na mpate oyo batondi na bolingo, baoyo bazali kosalela toli ya ntoma Petelo oyo ete: “Bóbatela etongá na Nzambe kati na bino. Bóbatela bango mpo na kopusama te, kasi na mitema malamu lokola elingi Nzambe, na mposa na kozwa lifuti te kasi mpo na kopesa mpamba; lokola mpo na kozala mikonzi likoló na ndambo na bino te kasi lokola bilakiseli na etongá.” (1 Petelo 5:2, 3) Ntoma Paulo ayebisaki baninga na ye bankulutu ete: “Bókeba na ntina na bino mpenza mpe na ntina na etongá mobimba oyo elimo santu esili kopona bino bakɛngɛli kati na yango, mpo na kobatela lisangá ya Nzambe, oyo ye asombaki na makila ya Mwana na ye mpenza.” Mpe oyo nde botɔ́ndi bampate bazali na yango lokola bato wana baponami na elimo santu mpo na “kosalela etongá na boboto nyonso”!​—Misala 20:28-30, NW.

4. Mpo na lolenge nini ya boyokani elongo na etongá Charles T. Russell ayebanaki mingi?

4 Yesu apesaki lisangá “makabo na motindo na bato,” bamoko lokola “pasteurs” to babateli na mpate, oyo bazali kosalela etongá ya Nzambe makambo na lolenge ya pɛtɛɛ. (Baefese 4:8, 11; King James Version) Moko kati na bato yango ezalaki bongo Charles T. Russell, prezidá wa yambo ya la Société Watch Tower. Abéngamaki Pasteur Russell mpamba te, na bolingo nyonso mpe na motema mawa nyonso, azalaki kosala misala mitali kobatela etongá na nsé ya litambwisi ya Mobateli Mokonzi, Yesu Klisto. Lelo oyo, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova ezali kopona bankulutu mpe bazali kokeba mpo ete bákoka te kosalela maloba “pasteur,” “nkulutu,” to “molakisi” lokola nkombo ya lokumu. (Matai 23:8-12) Nzokande, bankulutu na mikolo na biso bazali kosala mosala ya pasteur, to ya kobatela, mpo na litomba ya bampate ya etongá ya Yehova.

5. Mpo na nini bato ya sika basengeli koyeba bankulutu oyo baponami kati na lisangá ya boklisto?

5 Lokola babateli, bankulutu bazali kokokisa mokumba moko monene mpo na bokóli ya elimo ya bato oyo bazali koya sika kati na solo. Na yango, búku ya sika Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko elobi na lokasa 168 ete: “Luká koyebana na bankulutu ya lisangá. Bango bameseni mingi na lolenge ya kosalela boyebi ya Nzambe, mpamba te bakokisi masɛngami mazali na Biblia mpo na kozala bakɛngɛli. (1 Timoté 3:1-7; Tito 1:5-9) Kokakatana te mpo na koloba epai na moko na bango soki ozali na mposa ya lisalisi ya elimo mpo na kolónga momeseno moko to ezaleli moko oyo eyokani te na masɛngami ya Nzambe. Okomona ete bankulutu bazali kolanda toli oyo ya Paulo: ‘Bózala na maloba ya kobɔndisa epai na milimo minyokwami na makanisi, bósunga bato na bolɛmbu, bózala na motema molai epai na bato nyonso.’​—1 Batesaloniki 2:7, 8; 5:14.”

Ntango bato ya sika balingi kosakola

6. Ebongiseli nini elandamaka soki moyekoli ya Biblia alingi kokóma mosakoli ya Bokonzi?

6 Nsima wana moyekoli ya Biblia asili kozwa boyebi mpe asili koyangana na makita uta mwa ntango, akoki kolinga kokóma mosakoli ya Bokonzi, mosakoli ya nsango malamu. (Malako 13:10) Soki ezali bongo, motatoli oyo azali kotambwisa boyekoli elongo na ye asengeli kokutana na mokɛngɛli-mokambi, oyo akokamata bibongiseli mpo ete moko kati na bankulutu ya Komité ya Mosala ya lisangá mpe nkulutu mosusu bákutana elongo na moyekoli ya Biblia mpe molakisi na ye. Lisoló ekosalema na búku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe, nkasa 99 mpe 100. Soki bankulutu wana mibale bamoni ete moto yango ya sika azali kondima mateya ya moboko ya Biblia mpe asili koyokanisa bomoi na ye na mitindá ya Nzambe, bakoyebisa ye ete akokisi masɛngami mpo na kosangana na mosala ya kosakola.a Wana akosala lapólo ya mosala na ye ya kosakola na kozongisáká lokasa ya lapólo, yango ekotyama kati na kálati ya lapólo ya mosakoli oyo ekozala na nkombo na ye. Moto ya sika akoki sikawa kopesa lapólo ya mosala na ye ya kosakola elongo na bamilió mosusu oyo na esengo nyonso bazali ‘kosakola liloba na Nzambe.’ (Misala 13:5) Liyebisi likopesama na lisangá ete ye azali mosakoli oyo azwi naino batisimo te.

7, 8. Ndenge nini mosakoli oyo azwi naino batisimo te asengeli kosalisama kati na mosala ya kosakola?

7 Mosakoli oyo azwi naino batisimo te azali na mposa ya lisalisi ya bankulutu mpe ya baklisto mosusu oyo bakɔmɛli. Na ndakisa, bokóli na ye ya elimo ezali likambo oyo lisengeli kobenda likebi ya motambwisi ya Boyekoli ya Mokanda na etululuku oyo ye ayanganaka. Mosakoli ya sika mbala mosusu akomona ete ezali mpasi koloba na lolenge losengeli kati na mosala ya ndako na ndako. (Misala 20:20) Na bongo, akoyamba malamu lisungi, mingimingi ya moto oyo atambwisaki boyekoli ya Biblia elongo na ye kati na búku Boyebi. Lisalisi ya sikisiki motindo wana libongi mpenza, mpamba te Yesu abongisaki bayekoli na ye mpo na mosala ya kosakola.​—Malako 6:7-13; Luka 10:1-22.

8 Mpo ete mosala na biso ebota mbuma, komibongisa malamu liboso ezali na ntina. Na yango, basakoli wana mibale basengeli liboso komekola lolenge epesami ya kosala masoló kati na banimero ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo ebimaka sanza na sanza. Wana babandi mosala na bango ya kosakola, mosakoli oyo ameseni na mosala akoloba na ndako moko to mibale ya liboso. Nsima ya kolobela na boboto maloba ya ebandeli, basakoli wana mibale bakosangana na kopesa litatoli. Kosala elongo kati na mosala ya kosakola na boumeli ya mwa bapɔ́sɔ ekoki kopesa nzela na bozongeli ya sika mpe ata na kofungola boyekoli ya Biblia kati na búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Mosakoli oyo ameseni mingi na mosala akoki kotambwisa boyekoli na boumeli ya mwa ntango mpe na nsima kopesa yango epai na mosakoli ya sika ya Bokonzi. Oyo nde esengo basakoli nyonso mibale bakozala na yango soki moyekoli ya Biblia azali komonisa bosepeli mpo na boyebi ya Nzambe!

9. Bibongiseli nini bisengeli kokamatama wana mosakoli alingi kozwa batisimo?

9 Wana mosakoli oyo azwi naino batisimo te azali kokóla na elimo, akoki komipesa epai na Nzambe kati na libondeli mpe akoki kolinga kozwa batisimo. (Kokanisá na Malako 1:9-11.) Akomonisa mposa na ye ya kozwa batisimo epai na mokɛngɛli-mokambi ya lisangá, oyo akokamata bibongiseli mpo ete bankulutu bátalela elongo na mosakoli yango mituna oyo mizali na lokasa 175 kino 218 ya búku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe. Biteni minei, oyo kati na yango mituna mikabolami, ekoki kotalelama na biteni misato elongo na bankulutu misato bakeseni soki likoki lizali. Soki bandimi ete mosakoli oyo azwi naino batisimo te azali na bososoli esengeli ya mateya ya Biblia mpe akokisi masɛngami na makambo mosusu, bakoyebisa ye ete akoki kozwa batisimo. Lokola litomba mpo na komipesa mpe batisimo na ye, ‘azwi elembo’ mpo na lobiko.​—Ezekiele 9:4-6.

Tokokisa bamposa ya sikisiki

10. Nsima ya kosilisa boyekoli na ye ya búku Boyebi mpe nsima ya kozwa batisimo, lolenge nini moto akokólisa boyebi na ye ya Makomami?

10 Nsima wana moto asilisi boyekoli na ye kati na búku Boyebi mpe asili kozwa batisimo, ntina ekozala lisusu te ya koyekola elongo na ye búku mosusu ya mibale, na ndakisa Tosangani esika moko mpo na kosambela Nzambe ya solo bobele moko.b Ya solo, moto oyo auti kozwa batisimo kala mingi te akoyekola makambo mingi wana azali kobongisa makita ya boklisto mpe wana azali koyangana na makita pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Akozwa mpe boyebi mosusu wana mposa na ye mpo na solo ezali kopusa ye na kotánga mpe koyekola mikanda ya boklisto ye moko mpe kosolola makambo mazali na Makomami elongo na baninga bandimi. Kasi ezali boni soki bamposa ya sikisiki emonani?

11. (a) Lolenge nini Pilisikila mpe Akila basalisaki Apolo? (b) Lisalisi nini likoki kopesama epai na elenge oyo akóli oyo auti kozwa batisimo kala mingi te oyo azali kokanisa na ntina na libala?

11 Ata Apolo, oyo “amipesaki mingi na koyekola malamu Makomami” mpe ateyamaki na bosikisiki nyonso na ntina na Yesu, azwaki litomba ntango azalaki elongo na Pilisikila mpe Akila, baklisto oyo bazalaki na eksperiansi mingi, “bakamataki ye kati na boninga na bango mpe balimbwelaki ye nzela na Nzambe na bosikisiki koleka.” (Misala 18:24-26, NW; kokanisá na Misala 19:1-7, NW.) Na yango, kanisá ete elenge moko akóli oyo auti kozwa batisimo kala mingi te azali kokanisa na likambo litali kobandama (fiançailles) mpe libala. Moklisto oyo azali na eksperiansi mingi akoki kosalisa ye mpo na kozwa bandimbola na makambo wana kati na mikanda ya Watch Tower. Na ndakisa, mateya ya ntina na boyokani na makambo wana ebimaki kati na búku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano bibongi, Eteni 7.c Mosakoli oyo ayekolaki Biblia na moto yango ya sika akoki kosolola makambo yango elongo na ye, atako boyekoli mpenza ya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ ekosalema te.

12. Lisungi nini likoki kopesama epai na babalani oyo bauti kozwa batisimo kala mingi te oyo bazali na mikakatano kati na libala?

12 Tótalela ndakisa mosusu. Ekoki kozala ete babalani oyo bauti kozwa batisimo kala mingi te bazali na mikakatano mpo na kosalela mitindá ya Nzambe. Bakoki kokutana na nkulutu moko, oyo akolekisa mwa bampokwa mpo na kosolola Makomami elongo na bango mpe kobenda likebi na bango likoló na makambo oyo mazali kati na mikanda ya Watch Tower. Nzokande, nkulutu yango akosala te ete masoló yango makóma boyekoli ya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ elongo na babalani wana.

Soki moto oyo auti kozwa batisimo kala mingi te asali libungá

13. Mpo na nini bankulutu ya lisangá basengeli komonisa motema mawa epai na moto oyo auti kozwa batisimo kala mingi te oyo asali libungá mpe amonisi kobongola motema?

13 Bankulutu bazali komekola Mobateli Monene, Yehova, oyo alobi ete: “Ngai mpenza nakoleisa bampate na ngai, . . . nakokanga oyo abukani mpe nakokembisa oyo alɛmbi.” (Ezekiele 34:15, 16, NW; Baefese 5:1) Na likanisi sé yango moko, moyekoli Yuda asɛngaki ete motema mawa esengelaki komonisama epai na baklisto bapakolami oyo bazalaki na ntembe to oyo bakweaki kati na lisumu. (Yuda 22, 23) Mpo ete tozali kozela na lolenge lobongi makambo mingi epai na baklisto oyo bazali na eksperiansi mingi, na ntembe te motema mawa esengeli komonisama epai na moto ya sika oyo auti kozwa batisimo kala mingi te​—oyo azali mpenza mpate​—oyo asali libungá kasi amonisi ezaleli ya kobongola motema. (Luka 12:48; 15:1-7) Na yango, bankulutu, oyo ‘bazali kosambisa mpo na Yehova,’ bazali kobatela bampate na boboto nyonso mpe bazali kosembola bango kati na elimo ya bopɔlɔ.​—2 Ntango 19:6; Misala 20:28, 29; Bagalatia 6:1.d

14. Nini esengeli kosalema ntango mosakoli oyo auti kozwa batisimo kala mingi te asali lisumu monene, mpe lolenge nini akoki kosalisama?

14 Na bongo, kanisá ete mosakoli oyo auti kozwa batisimo kala mingi te azalaki liboso na mokakatano mpo na kotika komela masanga mingi mpe azalaki kokwea na molangwa mbala moko to mibale. To ekoki kozala ete alóngaki ezaleli oyo azalaki na yango na boumeli ya bambula mingi ya komela likaya, kasi na nsima akweaki na komekama ya komela likaya na nkuku mbala moko to mibale. Atako ndeko na biso wana ya sika asilaki kobondela Nzambe mpo ete alimbisa ye, asengeli koluka lisalisi ya nkulutu moko mpo ete lisumu likóma momeseno epai na ye te. (Nzembo 32:1-5; Yakobo 5:14, 15) Wana azali kolobela mabungá na ye epai na moko na bankulutu, nkulutu yango asengeli kosala makasi na kosembola moto yango ya sika na motema mawa nyonso. (Nzembo 130:3) Toli ya Makomami ekoki mpo na kosalisa ye na kosembola nzela mpo na makolo na ye na nsima. (Baebele 12:12, 13) Nkulutu wana akosolola makambo yango elongo na mokɛngɛli-mokambi ya lisangá mpo na koyeba lisungi mosusu oyo esengeli kopesama.

15. Na makambo mosusu, nini esengeli kosalema ntango moto oyo auti kozwa batisimo kala mingi te asali lisumu?

15 Na makambo mosusu ekosengela bobele toli te. Soki libungá oyo esalemaki eyebani mingi mpenza, to soki yango ezali likámá mpo na etongá, lisangani ya bankulutu ekotinda bankulutu mibale mpo na kosala bolukiluki na ntina na likambo yango. Soki bankulutu wana bamoni ete likambo yango ezali mpenza monene, oyo esengeli ete komité ya kosambisa esalema, basengeli koyebisa yango epai na lisangani ya bankulutu. Na nsima, lisangani ya bankulutu ekopona komité ya kosambisa mpo na kosunga moto oyo asali libungá. Komité ya kosambisa esengeli kozala na ezaleli ya boboto epai na ye. Basengeli kosala makasi na kosembola ye na Makomami. Soki ayanoli na milende ya boboto ya komité ya kosambisa, na bongo bakoki kokata soki ekosengela mpo na ye ete amata lisusu te na ebaélo na makita kati na Ndako ya Bokonzi to soki asengeli kopesamela nzela na kopesa biyano kati na makita.

16. Bankulutu bakoki kosala nini mpo na kosalisa moto oyo asali libungá?

16 Soki moto oyo asali libungá andimi libungá na ye, nkulutu moko to bankulutu oyo bazalaki na komité ya kosambisa bakoki kosala ebongiseli mpo na kokende kotala ye na mokano ya kolendisa kondima na ye mpe kokólisa bosepeli na ye likoló na mitindá ya sembo ya Nzambe. Moko na moko kati na bango akoki kobima elongo na ye kati na mosala ya kosakola na bantango mosusu. Bakoki kosolola elongo na ye mwa moke kati na Makomami, mbala mosusu na kosaleláká masoló mabongi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! kasi bakosala te boyekoli ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ elongo na ye. Na komibanzabanza ya boboto motindo wana, moto oyo asali libungá akozwa makasi ya kotɛmɛla bolembu ya nzoto na mikolo mizali koya.

17. Matambe nini masengeli kokamatama soki mosáli na mabe oyo asilá kozwa batisimo aboyi kobongola motema mpe kotika nzela na ye ya masumu?

17 Ya solo, kouta kobatisama kala mingi te epesi biso nzela te ya kosalaka masumu na nkó kozanga kobongola motema. (Baebele 10:26, 27; Yuda 4) Soki mosáli na mabe nyonso oyo asilá kozwa batisimo azali koboya kobongola motema mpe kotika nzela na ye ya masumu, asengeli kobimisama na lisangá. (1 Bakolinti 5:6, 11-13; 2 Batesaloniki 2:11, 12; 2 Yoane 9-11) Ntango emonani ete esengeli kokamata ekateli motindo wana, lisangani ya bankulutu ekopona komité ya kosambisa. Soki esengeli ete abimisama, liyebisi oyo likopesama: “. . . abimisami na lisangá.”e

Tósalisa bango ete “bakóla kino kokɔmɛla”

18. Mpo na nini tokoki kondimisama ete baklisto oyo bazwi batisimo kala mingi te mpe basusu bakozala ntango nyonso na makambo mingi ya koyekola na ntina na Yehova mpe mokano na ye?

18 Basaleli mingi ya Nzambe bakozala ntango nyonso kati na etongá. Lisusu, likambo ya esengo, moko na moko kati na biso akozala na makoki mingi koleka mpo na kobɛlɛma penepene na Tata na biso ya likoló mpamba te akozala ntango nyonso na likoki ya koyekola makambo mingi na ntina na ye mpe mokano na ye. (Mosakoli 3:11; Yakobo 4:8) Bato mingi oyo bazwaki batisimo na Pantekote na mobu 33 T.B. bazalaki mpenza na makambo mingi ya koyekola. (Misala 2:5, 37-41; 4:4) Bapakano oyo bayebaki makambo matali Makomami te, bazalaki mpe na makambo mingi ya koyekola. Na ndakisa, yango ezalaki solo mpo na baoyo babatisamaki nsima na koyoka lisukúlu ya Paulo na ngomba Ale na Athène. (Misala 17:33, 34) Bobele bongo lelo oyo, bato oyo bauti kozwa batisimo kala mingi te bazali na makambo mingi ya koyekola mpe bazali na mposa ya ntango mpe ya lisalisi mpo na kolendisa ekateli na bango ya kolanda kosala oyo ezali sembo na miso ya Nzambe.​—Bagalatia 6:9; 2 Batesaloniki 3:13.

19. Lolenge nini baoyo bazali kozwa batisimo mbula na mbula bakoki kosalisama mpo na “kokóla kino kokɔmɛla”?

19 Mbula na mbula bato mingi bazali kozwa batisimo mpe bazali na mposa ya lisungi mpo ete bákoka “kokóla kino kokɔmɛla.” (Baebele 6:1-3) Na maloba, na ndakisa, mpe na lisalisi libongi kati na mosala ya kosakola, okozala na likoki ya kosunga bamoko na kolata bomoto ya sika mpe “kotambola kati na solo.” (3 Yoane 4; Bakolose 3:9, 10) Soki ozali mosakoli oyo ameseni mingi na mosala, bankulutu bakoki kosɛnga yo ete osalisa moninga mondimi kati na mosala ya kosakola to kosolola likoló na mwa makambo mosusu ya Makomami elongo na ye mpo na mwa bapɔ́sɔ mpo na kokembisa kondima na ye epai na Nzambe, bosepeli na ye mpo na makita ya boklisto, mpe bongo na bongo. Boyokani kati na babateli mpe etongá ezali lokola oyo ya tata mpo na kolendisa mpe oyo ya mama mpo na boboto. (1 Batesaloniki 2:7, 8, 11) Nzokande, mwa ndambo ya bankulutu mpe ya basaleli na misala bakokoka te bango moko kokokisa mposa nyonso kati na lisangá. Biso banso tozali lokola libota oyo basangani bazali kosalisana. Moko na moko kati na biso asengeli kosala eloko mpo na kosalisa baninga na biso bandimi. Yo moko okoki koyikisa mpiko, kobɔndisa milimo mitungisami na makanisi, mpe kolendisa bato na bolɛmbu.​—1 Batesaloniki 5:14, 15.

20. Okoki kosala nini mpo na kopalanganisa boyebi ya Nzambe mpe kobatela na boboto nyonso bampate ya etongá ya Yehova?

20 Bato bazali na mposa ya boyebi ya Nzambe, mpe lokola Motatoli ya Yehova, okoki na esengo nyonso kosangana na kopalanganisa yango. Bampate ya Yehova bazali na mposa ya kobatelama na boboto nyonso, mpe okoki kokokisa mokumba monene na bolingo nyonso mpo na kosalisa na kopesa yango. Tiká ete Yehova apambola mosala na yo ya kosakola, mpe tiká ete apesa yo mbano mpo na milende na yo miuti na motema mpo na kosalisa bampate ya etongá na ye.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Soki akómi na litambe oyo, moto ya sika akoki kozwa búku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe.

b Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

c Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

d Ebongiseli motindo wana mpo na basakoli oyo bazwi naino batisimo te ebimisamaki na lisoló “Salisá basusu ete básambela Nzambe,” ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛ́mbɛ 1988, nkasa 15-20.

e Soki ekateli ezali ya kobimisama na lisangá mpe libyangami lisalemi mpo na kotalela likambo yango lisusu, liyebisi likopesama te kino likambo yango likokóma na nsuka. Talá nkasa 147-148 ya búku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe.

Lolenge nini okoyanola?

◻ Lolenge nini Yehova asalelaka bampate na ye?

◻ Nini esengeli kosalema ntango bato ya sika balingi kosakola?

◻ Lolenge nini baninga bandimi bakoki kosalisa bato ya sika oyo bazali na bamposa ya sikisiki?

◻ Lisalisi nini bankulutu bakoki kopesa epai na baoyo basali mabungá kasi bamonisi ezaleli ya kobongola motema?

◻ Lolenge nini yo okoki kosalisa moto oyo auti kozwa batisimo kala mingi te mpo na “kokóla kino kokɔmɛla”?

[Elilingi na lokasa 16]

Charles T. Russell ayebanaki mingi lokola mobateli ya bolingo mpo na etongá

[Elilingi na lokasa 18]

Babateli na mpate oyo bazali na motema mawa bazali kosalela etongá ya Nzambe na boboto nyonso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto