Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/4 nk. 16-21
  • Ntina oyo losambo ya solo ezali kozwa mapamboli ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntina oyo losambo ya solo ezali kozwa mapamboli ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lingomba ya solo esengeli kobimisa mbuma nini?
  • Lingomba ya bolingo kasi ya koyinana te
  • Nzambe apambolaka bopɛto ya etamboli mpe ya mateya
  • “Solo ekosikola bino”
  • Nkombo oyo ezali kokesenisa bango
  • Losambo oyo Nzambe andimaka
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Tosalela losambo na solo mpo na lobiko na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Ndenge ya malamu ya kosambela Nzambe
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Mangomba nyonso masepelisaka Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/4 nk. 16-21

Ntina oyo losambo ya solo ezali kozwa mapamboli ya Nzambe

“Bósanzola Yah, bino bato na ye! Lobiko mpe nkembo mpe nguya ezali na Nzambe na biso, mpamba te bikateli na ye bizali solo mpe sembo.”​—EMONISELI 19:1, 2, NW.

1. Lolenge nini Babilone ekobomama?

“BABILONE MONENE” esili kokwea engebene Nzambe mpe mosika te ekolimwa mpo na libela. Bisakweli ya Biblia bimonisi ete etikali moke mwasi wana ya pite oyo ezali bongo elilingi ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba akozwa etumbu na mabɔkɔ ya bamakango na ye, bato ya politiki; nsuka na ye ekoya pwasa mpe nokinoki. Emoniseli ya Yesu epai na Yoane ezali na maloba oyo ya esakweli: “Anzelu moko makasi akamati libangá lokola etuteli monene, mpe abwaki yango na mai monene, mpe alobi ete, Bongo Babilone, mboka monene, ekobwakama makasi, mpe ekozwama lisusu soko moke te.”​—Emoniseli 18:2, 21.

2. Basaleli ya Yehova bakosala nini na ntango Babilone ekobomama?

2 Biteni mosusu ya mokili ya Satana bikolela mpo na kobebisama ya Babilone monene, kasi basaleli ya Nzambe, ezala na likoló to na mabelé, bakolela soko moke te. Bakonganga epai na Nzambe na esengo na maloba oyo: “Bósanzola Yah, bino bato na ye! Lobiko mpe nkembo mpe nguya ezali na Nzambe na biso, mpamba te bikateli na ye bizali solo mpe sembo. Mpamba te asili kokweisa ekateli likoló na mwasi monene na pite oyo abebisaki mokili na pite na ye, mpe asili kobekola makila ya baombo na ye na lobɔkɔ na ye.”​—Emoniseli 18:9, 10; 19:1, 2, NW.

Lingomba ya solo esengeli kobimisa mbuma nini?

3. Tosengeli koyanola na mituna nini?

3 Lokola mangomba ya lokuta makolongolama awa na mabelé, losambo ya lolenge nini ekotikala? Lolenge nini tokoki lelo koyeba lingomba oyo ekobika na nsima ya kobebisama ya lisangani ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta ya Satana? Mbuma nini ya boyengebene etuluku yango esengeli kobimisa? Ezali na makambo zomi oyo masengeli kokesenisa losambo ya solo ya Yehova.​—Malaki 3:18; Matai 13:43.

4. Lisɛngami ya liboso ya losambo ya solo ezali nini, mpe lolenge nini Yesu amonisaki ndakisa kati na likambo yango?

4 Ya liboso mpenza, baklisto ya solo basengeli kosimba boyangeli oyo Yesu akufaki mpo na yango​—boyangeli ya Tata na ye. Yesu apesaki bomoi na ye te mpo na mokano moko ya politiki, ya etúlúká moko, ya ekólo moko, to ya kobongola ezalela ya bomoi ya bato ya mboka moko. Atyaki Bokonzi ya Tata na ye liboso na mikano ya politiki ya Bayuda mpe liboso na mikano na bango ya kokɔtisa mbongwana. Wana Satana alakaki kopesa ye bokonzi ya mokili oyo, ayanolaki ete: “Longwa na yo, Satana. Zambi ekomami ete, Okokumbamela [Yehova] Nzambe na yo mpe okosalela bobele ye.” Ayebaki na nzela ya Makomami ya Liebele ete Yehova azali Moyangeli ya solo likoló na mabelé mobimba. Lingomba nini emipesaka mobimba mpenza mpo na kosimba boyangeli ya Yehova na esika ya kosimba bibongiseli ya politiki ya mokili oyo?​—Matai 4:10; Nzembo 83:18.

5. (a) Lolenge nini basambeli ya solo basengeli kotalela nkombo ya Nzambe? (b) Nini ezali komonisa ete Batatoli ya Yehova bapesaka mpenza lokumu na nkombo yango?

5 Lisɛngami ya mibale ezali ete losambo ya solo esengeli kokumisa mpe kobulisa nkombo ya Nzambe. Mozwi-na-Nguya-Nyonso amonisaki nkombo na ye Yehova (ebongolami Yawe kati na mabongoli mosusu ya Biblia), epai na libota na ye Yisalaele, mpe esalelami mbala mingi mpenza kati na Makomami ya Liebele. Ata mpe liboso na yango, Adama, Eva, mpe bato mosusu bayebaki nkombo yango, atako bazalaki kotosa yango ntango nyonso te. (Genese 4:1; 9:26; 22:14; Exode 6:2) Atako babongoli ya Biblia kati na boklisto ya nkombo mpamba mpe kati na lingomba ya Bayuda basili mbala mingi kolongola nkombo ya Nzambe kati na ba Biblia na bango, nzokande Batatoli ya Yehova basili kopesa nkombo wana esika mpe limemya oyo ebongi na yango kati na Les Saintes Écritures — Traduction du monde nouveau. Bazali kokumisa nkombo yango, lokola baklisto ya liboso basalaki yango. Yakobo atatolaki ete: “Simeona asili kolimbola motindo Nzambe ayei kotala bapakano liboso ete akamata bato mpo na nkombo na ye kati na bango. Maloba na basakoli mandimami . . . Na ntina ete bato nyonso mosusu bálukaka [Yehova], bobele bapakano nyonso baoyo nkombo na ngai esili kobéngama na likoló na bango. [Yehova] moyebisi na makambo oyo longwa na kalakala alobi boye.”​—Misala 15:14-17; Amosa 9:11, 12.

6. (a) Nini ezali lisɛngami ya misato ya losambo ya solo? (b) Lolenge nini Danyele mpe Yesu babendaki likebi likoló na Bokonzi? (Luka 17:20, 21)

6 Lisɛngami ya misato ya losambo ya solo ezali ete esengeli kokumisa Bokonzi ya Nzambe lokola nzela bobele moko oyo endimami mpe ebongi mpo na kosilisa mikakatano ya bato na ntina na boyangeli. Yesu ateyaki bayekoli na ye polele ete bábondelaka mpo ete Bokonzi wana eya, mpo ete boyangeli ya Nzambe ebanda kokamba mabelé mobimba. Na kopemama na Nzambe, Danyele akomaki na ntina na mikolo ya nsuka ete: “Nzambe na lola akotɛmisa bokonzi bokobebisama soko moke te, . . . ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.” Banani basili komonisa kati na etamboli na bango na ekeke oyo ya 20 ete bazali kosimba Bokonzi wana na motema na bango mobimba​—mangomba ya Babilone Monene to Batatoli ya Yehova?​—Danyele 2:44; Matai 6:10; 24:14.

7. Lolenge nini basambeli ya solo batalelaka Biblia?

7 Lisɛngami ya minei mpo na kondimama na Nzambe ezali ete basaleli ya Nzambe basengeli kondima Biblia lokola Liloba lipemami na Nzambe. Na yango, basengeli te kokosama na zébi ya banganga-mayele oyo batyolaka Biblia, oyo balukaka komonisa ete Biblia ezali bobele makomi ya bato mpe na yango etondi na mabungá. Batatoli ya Yehova banbimaka ete Biblia ezali Liloba lipemami na Nzambe, lokola Paulo akomaki yango epai na Timoté: “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini kati na boyengebene, ete moto na Nzambe akoka kozala mpenza na makoki, mpe abongisami mpo na mosala nyonso malamu.”a Na yango, Batatoli ya Yehova batalelaka Biblia lokola motambwisi na bango, mokanda mpo na kotambwisa bango kati na bomoi na bango ya mokolo na mokolo, mpe liziba ya elikya na bango mpo na mikolo mizali koya.​—2 Timoté 3:16, 17, NW.

Lingomba ya bolingo kasi ya koyinana te

8. Wapi lisɛngami ya mitano ya losambo ya solo?

8 Lolenge nini Yesu akesenisaki bayekoli na ye ya solo? Eyano na ye emonisi biso elembo ya mitano oyo ezali na ntina mingi mpo na kokesenisa losambo ya solo. Yesu alobaki ete: “Nazali kopesa bino lilako na sika ete, Bólinganaka; bólinganaka lokola ngai nalingi bino. Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:34, 35) Lolenge nini Yesu amonisaki bolingo na ye? Na kopesáká bomoi na ye lokola mbeka na lisiko. (Matai 20:28; Yoane 3:16) Mpo na nini bolingo ya solo ezali ezaleli ya ntina mingi mpo na baklisto ya solo? Yoane amonisi yango ete: “Balingami, tólingana, moto moninga na ye, mpo ete bolingo euti na Nzambe . . . Nde ye oyo akolingaka te ayebi Nzambe te, mpo ete Nzambe azali bolingo.”​—1 Yoane 4:7, 8.

9. Banani basili komonisa bolingo ya solo, mpe lolenge nini?

9 Banani oyo na eleko na biso basili komonisa bolingo motindo oyo, ata liboso na koyinana na ntina na mposo, bikólo mpe bitúlúká? Banani oyo basili kokutana na komekama eleki monene, ata kino na kufa, mpo ete bolingo na bango elónga? Tokoki koloba ete ezali bongo basángó mpe bamamelo ya Katolike oyo bamonani polele ete bazali na ekweli kati na kobomama ya ebele ya bato na Rwanda na 1994? Ezali nde bato ya lingomba ya Ortodoksi ya Serbie to Bakatolike ya Croatie oyo bamipesaki na mosala ya “kopɛtola ekólo” mpe misala mosusu oyo mizali ya boklisto te kati na bitumba wana ya bana mboka na etúká ya Balkans? To ezali nde bakonzi ya mangomba ya Katolike to ya Protestá oyo basili kokólisa ezaleli ya kokanisela bato mabe mpe koyinana na Irlande du Nord na boumeli ya bambula mingi oyo esili koleka? Na ntembe te, Batatoli ya Yehova bakoki soko moke te kofundama ete basanganaki na bitumba wana. Bamonaki mpasi kati na babolɔ́kɔ, ata kino kufa, na esika ete básundola bolingo na bango ya boklisto.​—Yoane 15:17.

10. Mpo na nini baklisto ya solo bakɔtaka na makambo ya politiki te?

10 Lisɛngami ya motoba mpo ete losambo endimama epai na Nzambe ezali bongo kozanga kokɔta na ngambo moko to mosusu kati na makambo ya politiki ya mokili oyo. Mpo na nini baklisto basengeli kokɔta na politiki te? Paulo, Yakobo, mpe Yoane bapesi bantina malamu mpo na etɛlɛmɛlo yango. Ntoma Paulo akomaki ete Satana azali “Nzambe na mokili oyo,” ye oyo azali kokanga mayele ya bato oyo bazangi kondima na myango ndenge na ndenge, kati na yango mpe politiki oyo ekobimisaka bokabwani. Moyekoli Yakobo alobaki ete “kolinga mokili ezali koyina Nzambe,” mpe ntoma Yoane alobaki ete “mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” Na yango, moklisto ya solo akoki te kobebisa ezaleli na ye ya komipesa na Nzambe na komikɔtisáká na politiki mpe na nguya ya mokili ya Satana oyo esilá kobeba.​—2 Bakolinti 4:4; Yakobo 4:4; 1 Yoane 5:19.

11. (a) Lolenge nini baklisto batalelaka bitumba? (b) Moboko nini etɛlɛmɛlo yango ezwi kati na Biblia? (2 Bakolinti 10:3-5)

11 Na kotalela masɛngami mibale ya nsuka oyo touti kolobela, oyo ya nsambo emonisami polele, ezali bongo ete baklisto ya solo basengeli te komikɔtisa na bitumba. Lokola lingomba ya solo ezali bondeko ya mokili mobimba oyo ezwi moboko na yango likoló na bolingo, na bongo eloko moko te ekoki kokabola to kobebisa “lisangani mobimba ya . . . bandeko kati na mokili mobimba.” Yesu ateyaki bolingo, kasi koyinana te; kimya, kasi bitumba te. (1 Petelo 5:9, NW; Matai 26:51, 52) Bobele “oyo mabe,” Satana, oyo apusaki Kaina ete aboma Abele azali sé kokóba kolóna ezaleli ya koyinana kati na bato mpe azali kobimisa bitumba mpe kotangisama ya makila na nzela ya bokabwani na makambo ya politiki, ya mangomba mpe ya bikólo. Baklisto ya solo ‘bayekolaka lisusu bitumba te,’ ata soki ezaleli yango ekoki komemela bango likambo nini. Na elobeli ya elilingi, basilá ‘kotula mipanga na bango ete mizala bitimweli.’ Bazali kobota mbuma ya kimya oyo euti na elimo ya Nzambe.​—1 Yoane 3:10-12; Yisaya 2:2-4; Bagalatia 5:22, 23.

Nzambe apambolaka bopɛto ya etamboli mpe ya mateya

12. (a) Nini ezali lisɛngami ya mwambe, kasi mangomba nini makabwani oyo tokoki kotánga? (b) Lolenge nini Paulo amonisaki polele lisɛngami wana ya mwambe?

12 Bomoko ya boklisto ezali lisɛngami ya mwambe ya losambo ya solo. Nzokande, kati na likambo oyo mangomba ya boklisto ya nkombo malóngi te. Mangomba mingi oyo ebéngami mangomba minene ekabwani na mangomba mikemike, mpe yango ebimisi mobulungano. Tókamata ndakisa ya lingomba ya Baptiste na États-Unis, oyo ekabwani na Baptiste ya Nɔ́rdi (Mangomba ya Baptiste na États-Unis.) Baptiste ya Súdi (Liyangani ya Baptiste na Súdi), bakisá mpe bituluku mosusu ya Baptiste oyo ebimaki na bokabwani. (World Christian Encyclopedia, lokasa 714) Bokabwani mingi esili kosalema mpo na bokeseni ya mateya to mpo na lolenge ya kokamba lingomba (na ndakisa Presbytérien, Episcopalien, Congrégationaliste). Bokabwani ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba ekokani na oyo ezali kosalema na mangomba oyo ezali na libandá ya boklisto ya nkombo mpamba​—ezala Bouddhisme, Islam, to Hindouisme. Toli nini ntoma Paulo apesaki epai na baklisto ya liboso? “Bandeko, nalɔmbi bino na nkombo na Nkolo na biso Yesu Klisto ete bino nyonso bólobaka na motindo moko; bókabwana kati na bino te kasi bósangana na motema moko mpe na [likanisi, NW] moko.”​—1 Bakolinti 1:10; 2 Bakolinti 13:11.

13, 14. (a) ‘Kozala bulɛɛ’ elimboli nini? (b) Lolenge nini losambo ya solo ebatelami pɛto?

13 Lisɛngami ya libwa mpo na kondimama na Nzambe ezali nini? Lilako moko ya Biblia ezwami kati na Levitike 11:45: “Bokozala bulɛɛ mpo ete ngai nazali bulɛɛ.” Ntoma Petelo azongelaki lisɛngami yango wana akomaki ete: “Bózala bulɛɛ na bizaleli nyonso na bino pelamoko oyo abyangi bino azali mpe bulɛɛ.”​—1 Petelo 1:15.

14 Lisɛngami yango ya kozala bulɛɛ etaleli nini? Ete basambeli ya Yehova basengeli kozala pɛto na elimo mpe na bizaleli. (2 Petelo 3:14) Baoyo basalaka masumu na nkó mpe baboyi kobongola motema, oyo na etamboli na bango bazali komonisa ete bazali kotyola mbeka ya lisiko ya Klisto bazali na esika soko moke te kati na losambo ya solo. (Baebele 6:4-6) Yehova azali kosɛnga ete lisangá ya boklisto ebatelama pɛto mpe bulɛɛ. Lolenge nini yango ekokisami? Moko kati na yango ezali bongo ebongiseli ya kosambisa mpe kobengana baoyo bakoki kobebisa lisangá.​—1 Bakolinti 5:9-13.

15, 16. Mabongwani nini baklisto mingi basalaki kati na bomoi na bango?

15 Liboso ya koyeba solo ya boklisto, bato mingi bazalaki na bomoi ya mbindo, ya komipesa na bisengo, mpe ya moimi. Kasi liloba na ntina na Klisto ebongolaki bango, mpe basili kozwa bolimbisi mpo na masumu na bango. Paulo alobelaki yango na nguya nyonso wana akomaki ete: “Boyebi te ete bato na masumu bakosangola libula na Bokonzi na Nzambe te? Bómizimbisa te, bato na pite mpe basambeli na bikeko mpe bato na ekobo mpe bakembi na nsɔ́ni mpe mibali bamibebisi na mibali mpe bayibi mpe bato na bilulela mpe balangi masanga mpe batuki mpe babotoli bakosangola Bokonzi na Nzambe te. Bamosusu na bino bozalaki bongo. Kasi bosili kosukwa.”​—1 Bakolinti 6:9-11.

16 Na ntembe te, Yehova andimaka baoyo bazali kobongola motema na etamboli na bango oyo eyokani te na makomami, bazali kobaluka, mpe bazali kokóma bayekoli ya solo ya Klisto mpe bazali kolanda mateya na ye. Bazali mpenza kolinga bazalani na bango lokola bango moko mpe bazali komonisa yango na ndenge mingi, na ndakisa na koyikáká mpiko kati na mosala ya kopesa nsango ya bomoi epai na baoyo nyonso bakoki koyoka yango.​—2 Timoté 4:5.

“Solo ekosikola bino”

17. Nini ezali lisɛngami ya zomi ya losambo ya solo? Pesá bandakisa.

17 Lisɛngami ya zomi oyo Yehova azali kosɛnga epai na baoyo bazali kosambela ye na elimo mpe na solo ezali​—mateya ya pɛto. (Yoane 4:23, 24) Yesu alobaki epai na bayekoli na ye ete: “Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” (Yoane 8:32) Solo ya Biblia esikoli biso na mateya oyo etyolaka Nzambe, lokola kozanga kokufa ya molimo, lifelo ya mɔ́tɔ, mpe epongelo. (Mosakoli 9:5, 6, 10; Ezekiele 18:4, 20) Esikoli biso na libombami ya “Bosato boleki bosantu” ya boklisto ya nkombo mpamba oyo eutaki na Babilone. (Deteronome 4:35; 6:4; 1 Bakolinti 15:27, 28) Kotosa solo ya Biblia ezali kobimisa mbuma oyo: bato ya bolingo, ya komibanzabanza, ya boboto, ya motema mawa. Boklisto ya solo esilá naino soko moke te kolendisa banyokoli, lokola Tomás de Torquemada, to mpe babimisi bitumba oyo batondi na ezaleli ya koyina, lokola bapápa oyo babandisaki bitumba oyo bibéngamaki Croisades. Nzokande, Babilone monene esili kobimisa mbuma motindo oyo na boumeli ya lisoló ya bato, uta na eleko ya Nimilodi kino lelo oyo.​—Genese 10:8, 9.

Nkombo oyo ezali kokesenisa bango

18. (a) Banani bazali kokokisa masɛngami wana zomi ya losambo ya solo mpe mpo na nini? (b) Eloko nini mokomoko na biso asengeli kosala mpo na kosangola lipamboli oyo ezali liboso na biso?

18 Banani bazali lelo kokokisa masɛngami wana zomi ya losambo ya solo? Banani oyo bayebani mpe bandimami na bato mosusu mpo na bosembo na bango mpe mpo na ezaleli na bango ya kimya? Kati na mokili mobimba Batatoli ya Yehova bayebani ete “basangani na mokili te.” (Yoane 15:19; 17:14, 16; 18:36) Batatoli ya Yehova bazwi lokumu ya kolata nkombo na ye mpe kozala Batatoli na ye, lokola Yesu Klisto azalaki Motatoli ya sembo epai na Tata na ye. Tozali komema nkombo wana ya bulɛɛ, koyebáká malamu mokumba na biso ya komitambwisa engebene oyo nkombo yango ezali komonisa. Mpe, lokola tozali Batatoli na ye, elikya ya nkembo ezali liboso na biso! Oyo ya kozala kati na libota ya botosi, libota ya bomoko, kosambeláká Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba kati na paladiso oyo ekozongisama awa na mabelé. Mpo na kozwa lipamboli wana, tiká ete tókóba komonisa polele ete tozali kati na losambo ya solo mpe tómema nkombo Batatoli ya Yehova na esengo nyonso mpamba te “bikateli na ye bizali solo mpe sembo”!​—Emoniseli 19:2; Yisaya 43:10-12; Ezekiele 3:11.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mabongoli ya Biblia mapemami na Nzambe te. Na ndenge na yango mpenza, mabongoli makoki komonisa mitindo mikeseni engebene likoki oyo mobongoli mokomoko azali na yango ya kososola nkótá ya ebandeli oyo bakomaki na yango Biblia.

Okoyanola lolenge nini?

◻ Lolenge nini basaleli ya Yehova batalelaka kobebisama ya Babilone monene?

◻ Wapi masɛngami ya moboko ya losambo ya solo?

◻ Lolenge nini solo esikolaki yo?

◻ Lokumu monene nini biso Batatoli ya Yehova tozali na yango?

[Bililingi na lokasa 17]

Batatoli ya Yehova bazali kosakola mpe koteya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe

[Elilingi na lokasa 18]

Baklisto ya solo bakɔtaka soko moke te na politiki mpe na bitumba ya mokili

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Airplane: Courtesy of the Ministry of Defense, London

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto