Ozali komikundola?
Osilaki komona ete banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya basanza euti koleka ezalaki na batoli oyo ekokaki mpenza kosalelama mpo na yo? Na bongo, talá soki okoki koyanola na mituna oyo:
◻ Liteya nini tokoki kozwa na kokwea ya Baamona? (Sefania 2:9, 10)
Yehova atalelaka na lisɛki te likambo ya kozongisa koyina mpo na boboto na ye, mpe na ntango oyo asili kobongisa, akosala likambo lolenge moko asalaki na ntango ya kala. (Kokanisá na Nzembo 2:6-12.)—15/12, lokasa 10.
◻ Na ndimbola nini baklisto bazali na kimya?
Ya liboso, bazali na “kimya elongo na Nzambe na nzela ya Nkolo [na bango] Yesu Klisto.” (Baloma 5:1) Ya mibale, bazali na kimya kati na bango moko na kolónáká “mayele mauti na likoló,” oyo mazali “libosoliboso pɛto, na nsima mazali na kimya.” (Yakobo 3:17)—1/1, lokasa 11.
◻ Wapi mwa ndambo ya biloko oyo Liloba ya Nzambe ekokanisami na yango, mpe na ndimbola nini yango ezali na ntina mpo na biso? Liloba ya Nzambe ekokanisami na mabɛ́lɛ ya komɛla, na bilei ya makasi, na mai oyo makitisaka motema mpe oyo mapɛtolaka, na talatálá, mpe na mopanga oyo mopeli. Koyeba soki maloba wana malimboli nini ekosalisa ministre ya Nzambe na kosalela Biblia na mayele mpenza.—1/1, lokasa 29.
◻ Kolakisama ya bokatikati esengeli kosalisa biso na kosala nini? Na kotánga malamu, na kokoma malamu, na kokóla na mayele mpe na bizaleli malamu, mpe na kozwa kobongisama ya malamu oyo esengeli mpo na kokokisa bamposa ya mokolo na mokolo mpe mpo na kokokisa mosala ya bulɛɛ na lolenge lobongi mpenza.—1/2, lokasa 10.
◻ Liteya nini ya motuya tozwi yango epai na Yesu na ntina na kolakisama?
Kolakisama esengeli kosalelama te mpo na komikumisa biso moko, kasi mpo na kosanzola Molakisi oyo aleki balakisi nyonso, Yehova Nzambe. (Yoane 7:18)—1/2, lokasa 10.
◻ Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
Bokonzi ya Nzambe ezali boyangeli oyo Nzambe atye kuna na likoló mpo na kokokisa mokano na ye ya kolongola mbeba ya lisumu mpe liwa mpe ya kozongisa ezalela ya makambo malongobani awa na mabelé. (Danyele 2:44; Emoniseli 11:15; 12:10)—1/2 lokasa 16.
◻ Lolenge nini Biblia ezali kopesa kolakisama oyo esengeli mpo na kosukisa mobulu mpo na libela?
Na nzela ya Liloba na ye, Biblia, Yehova azali koteya bato na ye ete bázala bato oyo balingaka kimya mpe boyengebene. (Yisaya 48:17, 18) Liloba ya Nzambe ezali na nguya ya kokɔta kati na motema ya moto mpe kosimba yango mpe kobongola makanisi na ye mpe bizaleli na ye. (Baebele 4:12)—15/2, lokasa 6.
◻ Na Ndimbola nini tokoloba ete esakweli ya Yisaya 35 ezali na kokokisama misato?
Esakweli ya Yisaya ekokisamaki mpo na mbala ya liboso na ntango Bayuda bazongaki na mboka na bango na 537 L.T.B. wana basikolamaki na boombo na Babilone. Ezali kokokisama lisusu na elimo lelo oyo kobanda na ntango oyo Yisalaele ya elimo elongwaki na boombo ya Babilone monene. Mpe ekokokisama mpo na mbala ya misato na boyokani na elikya oyo ezwami kati na Biblia na ntina na paladiso awa na mabelé. (Nzembo 37:10, 11; Emoniseli 21:4, 5)—15/2, lokasa 17.
◻ Lolenge nini komibanzabanza ya Yehova mpo na bato emonisamaki kati na makamwisi oyo Mwana na ye, Yesu, asalaki?
Lokola Yesu “akoki kosala likambo ye moko te, kasi bobele yango emoni ye ete Tata azali kosala,” ezaleli na ye ya motema mawa emonisi ete Yehova amibanzabanzaka mpo na basaleli na ye moko na moko. (Yoane 5:19)—1/3, lokasa 5.
◻ Liloba “nkunda na kokanisa” oyo Yesu asalelaki kati na Yoane 5:28, 29 elimbolaki nini?
Liloba ya Greke mne·meiʹon (nkunda na kokanisa) oyo esalelami awa ezali kopesa likanisi ete Yehova amikundolaka lolenge ya bomoi oyo moto oyo akufaki azalaki na yango, kati na yango bizaleli oyo abotamaki na yango mpe makambo nyonso matali bomoi ya moto yango. Yango ezali kopesa elembeteli ete Nzambe amibanzabanzaka mpo na moto mokomoko!—1/3, lokasa 6.
◻ Nsango nini ya likebisi ezwami kati na esakweli ya Sefania ekoki mpenza kosunga biso?
Lelo oyo ezali ntango te ya kotika nzela ete ntembe ezwa misisa kati na mitema na biso mpe ezali ntango ya kozongisa te koya ya mokolo ya Yehova na nsima kati na elimo na biso. Lisusu, tosengeli kosɛnzɛla mpo na bolɛmbu oyo eyaka mpo ete bato bazali komonisa bosepeli te. (Sefania 1:12, 13; 3:8)—1/3, lokasa 17.
◻ Mpo na nini kozala sembo epai na Nzambe ezali ntembe monene? Mpamba te bizaleli ya moimi oyo tosangolaki na baboti na biso ezali kosala ete komonisa bosembo ekóma likambo ya mpasi. (Genese 8:21; Baloma 7:19) Lisusu, Satana mpe bademó na ye bazali na ekateli makasi ya kosala ete biso tózanga bosembo epai na Nzambe. (Baefese 6:12; 1 Petelo 5:8)—15/3, lokasa 10.
◻ Kati na makambo nini minei tosengeli kolónga ntembe ya kozala sembo, mpe nini ekosalisa biso ete tólónga?
Makambo minei yango ezali bongo: bosembo epai na Yehova, epai na ebongiseli na ye, epai na masangá epai tosanganaka, mpe epai na mobalani na biso. Moko na masungi mpo na kolónga ntembe yango ezali bongo kososola ete kolónga ntembe ya kozala sembo ezali na boyokani na kolóngisama ya bokonzi monene ya Yehova.—15/3, lokasa 20.
◻ Liteya nini tokoki kozwa kati na likambo oyo ekómelaki Davidi wana alukaki kozongisa sanduku ya kondimana na Yelusaleme? (2 Samwele 6:2-7)
Davidi azangaki kotya likebi na malako oyo Yehova apesaki na ntina na lolenge ya komema Sanduku, mpe yango ememaki na mpasi. Liteya ezali oyo ete tosengeli te kopamela Yehova mpo na mikakatano oyo mibimelaka biso wana tozali kotya te likebi na malako na ye ya polele. (Masese 19:3)—1/4, nkasa 28, 29.