Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/5 nk. 29-31
  • Ozali mobongisi-nzela oyo azali na bokatikati?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali mobongisi-nzela oyo azali na bokatikati?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Omibatela ete ozala makasi na elimo!
  • Bokatikati na mikumba na biso ya libota
  • Bokatikati na makambo ya nkita
  • Babongisi-nzela oyo bazali na bokatikati bazali lipamboli ya solo
  • Mapamboli ya mosala ya Mobongisi-nzela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Babongisi-nzela bazali kopesa mpe bazali kozwa bolamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mosala ya mobongisi-nzela ekómisaka makasi boyokani na biso na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Tolendendela kati na mosala ya pion­nier
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/5 nk. 29-31

Ozali mobongisi-nzela oyo azali na bokatikati?

TATA asemboli mabɔkɔ, mpo na koyamba na esengo nyonso mwana na ye ya moke ya mwasi, oyo azalaki komeka kobwaka lokolo mpo na kotambola. Wana akwei mbala moko, akolendisa ye ete ameka lisusu. Ayebi ete mosika te akokóma na bokatikati mpe na nguya.

Bobele bongo, mobongisi-nzela ya sika akoki kozala na mposa ya ntango mpe elendiseli liboso ete akóma na bokatikati oyo azali na yango mposa mpo na kolónga lokola mosakoli ya ntango nyonso ya Bokonzi. Babongisi-nzela mingi bazali kokóba kosala na esengo nyonso na boumeli ya bambula mingi. Ndambo babungisaka bokatikati na bango na ntina na mbongwana ya makambo oyo bamizelaki na yango te. Basusu babungisaka kútu esengo na bango. Na mboka moko, 20 % ya baoyo nyonso babandaka mosala ya mobongisi-nzela batikaka soko na mbula na bango ya mibale ya mosala ya ntango nyonso. Nini ekoki kolongola mobongisi-nzela na mosala wana ya esengo? Ezali na likambo ya kosala mpo na kopɛngola mabaku mabe wana?

Atako kolɔngɔ́nɔ́ mabe, mikakatano ya mosolo, mpe mikumba ya libota ekoki kosala ete bamoko bátika mosala ya ntango nyonso, mpo na basusu, komekama monene ezalaka nde kozanga kobatela bokatikati kati na mikumba mikeseni ya boklisto. Kozala na bokatikati elimboli “ezalela oyo kati na yango eteni moko te, eloko moko te, likambo moko te to bopusi moko te ezali na bozito mingi koleka mosusu to ezali moke, ekokani te na basusu.”

Yesu Klisto amonisaki na bayekoli na ye lolenge nini mosala ya kosakola mpe ya kozalisa bayekoli esengelaki kosalema. Kati na mosala na ye, na nzela ya masese, amonisaki mpe lolenge ya kobatela bokatikati. Yesu amonisaki ete bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazangaki bokatikati, wana alobaki na bango ete: “Bokokabaka ndambo na zomi na eidosomo mpe na aneti mpe na nkumina, nde bokotikaka kosala makambo maleki na bozito kati na Mibeko, yango: kosambisa-sembo mpe koyokela mawa mpe kondima. Ekokaki kosala oyo mpe kotika yango na liboso te.”​—Matai 23:23.

Lilako oyo libongi kosalelama lolenge moko na mikolo na biso, mingi mpenza na mosala ya mobongisi-nzela. Wana bapusamaki na esengo mpe na mokano malamu, basusu basɛngaki mosala ya mobongisi-nzela kozanga komibongisa mpenza malamumalamu mpo na yango to kozanga kotalela makambo nyonso yango esɛngaka. (Luka 14:27, 28) Basusu bamipesaki koleka kati na mosala ya kosakola na boye ete babosanaki mitindo mosusu ya ntina ya losambo ya boklisto. Lolenge nini bakoki kokóma na bokatikati mpe kobatela yango?

Omibatela ete ozala makasi na elimo!

Yesu atalelaki mposa na ye ya elimo na bopɔtu soko moke te. Atako bibele oyo bayaki koyoka ye mpe koluka kobikisama bazalaki kozwa ntango na ye mingi, azalaki komibombela ntango mpo na komanyola mpe kobondela. (Malako 1:35; Luka 6:12) Lelo mpe mosala ya mobongisi-nzela oyo mozali na bokatikati ezali kosɛnga ete tósalela bibongiseli nyonso oyo ekoki kosala ete tótikala makasi na elimo. Paulo apesaki likanisi oyo ya bososoli ete: “Yo okolakisa moto mosusu, ozali komilakisa yo moko te?” (Baloma 2:21) Ekozala libúngá kokamata ntango na biso nyonso mpo na kosakwela basusu nzokande tozali na bopɔtu mpo na kozwa ntango ya koyekola mpe ya kobondela mbala na mbala.

Kumiko azali mobongisi-nzela uta koleka mibu ntuku mibale. Atako azali na bana misato mpe mobali na ye azali mondimi te, makambo oyo akutanaki na yango masili koteya ye ete ntango ebongi malamu mpo na kotánga mpe koyekola Biblia mpo na ye ezali liboso ete akende kolala na butu. Wana ezali ye koyekola, atyaka likebi na makambo oyo akoki kosalela kati na mosala ya kosakola mpo ete akoka kozala ntango nyonso na makambo ya sika mpe ya kosepelisa na mosala na ye ya kosakola mokolo na mokolo. Babongisi-nzela mosusu oyo bazwaka matomba malamu balamukaka liboso ya basangani mosusu ya libota mpo na kokoka komilendisa na bangonga ya ntɔ́ngɔ́ ntango makɛlɛlɛ mazali te. Okoki mpe komibombela lisusu ntango mpo na kobongisa makita mpe kotánga mikanda ya sika. Soki olingi kobatela esengo na yo kati na mosala, boyekoli na yo moko ezali eloko oyo osengeli kosala mbangumbangu te to na bopɔtu te.

Bokatikati na mikumba na biso ya libota

Baboti oyo bazali babongisi-nzela basengeli mpe kobosana te ete eteni monene ya “mokano ya Yehova” mpo na bango etali kokokisa bamposa ya mosuni, ya mayoki mpe ya elimo ya libota na bango mpenza. (Baefese 5:17; 6:1-4; 1 Timoté 5:8) Mbala mosusu ata mobalani oyo azali mondimi mpe basangani ya libota bamitungisaka soki bákozwa lisusu kobɔndisama mpe lisungi ya mwasi ya libala to ya mama ntango akobanda mosala ya mobongisi-nzela. Mayoki motindo yango ekokómisa bango malili liboso na mposa na ye ya kokóma mobongisi-nzela. Nzokande, na nzela ya komibongisa malamu mpe kokanisa liboso, okoki kobatela bokatikati.

Babongisi-nzela mingi basalaka milende mpo na kosakola ntango basangani ya libota na bango bazali na ndako te. Kumiko, oyo tolobelaki na ebandeli, azalaka elongo na libota na ye wana bazali kolya bilei ya ntɔ́ngɔ́, akendaka kotika bango na nzela wana bazali kobima na ntɔ́ngɔ́, mpe akómaka na ndako liboso ete bázonga. Na mokolo nyonso Mwayambo na pɔ́sɔ alambaka bilei ndenge na ndenge liboso ya ntango mpo ete akoka kozala na mikakatano te mpe ete akoka kolya elongo na libota na ye na esika ya komipesa ye moko na mosala kati na kúku. Kosala misala mikeseni na mbala moko, na ndakisa kosala misala mosusu ya ndako wana ozali kolamba, ekoki mpe kosunga yo. Na lolenge yango, Kumiko azwaka kútu ntango ya kobyanga baninga ya bana na ye na ndako mpe ya kobongisa biloko oyo esepelisaka bango.

Wana bana bakómi na bambula na bango ya bolenge, mbala mingi esɛngaka na baboti ete bápesa bango likebi mingi koleka liboso mpo ete bákoka kolónga mayoki, bamposa, kokakatana mpe bobángi oyo eyelaka bango. Yango ezali kosɛnga bokɛngi mpe mbongwana ya manáka ya moboti oyo azali mobongisi-nzela. Tókamata ndakisa ya Hisako, mobongisi-nzela oyo azali mama ya bana misato. Asalaki nini ntango mwana na ye ya liboso ya mwasi abandaki kozanga esengo mpe molende mpo na makita ya boklisto mpe mpo na mosala ya kosakola na ntina na bopusi ya baninga ya mokili? Mwana na ye ya mwasi asengelaki mpenza kokómisa solo eloko ya ntina na bomoi na ye mpe kondimisama ete komikabola na mokili ezali nzela oyo eleki malamu.​—Yakobo 4:4.

Hisako alobi ete: “Nazwaki ekateli ya koyekola mokolo na mokolo elongo na ye mateya ya moboko oyo mazali kati na búku Bomoi ya seko. Na ebandeli tozalaki koyekola bobele mwa miniti moke, mpamba te mwana na ngai ya mwasi azalaki mbala mingi komilela mpo na mpasi makasi ya libumu mpe ya motó wana tosengelaki kobanda boyekoli. Kasi nazalaki kosala boyekoli yango mokolo na mokolo. Nsima ya mwa basanza, elimo na ye ekómaki malamu mingi, yango esalaki ete nsima na mwa ntango moke amipesa epai na Yehova mpe azwa batisimo.” Sikawa Hisako azali kosala mosala ya ntango nyonso elongo na mwana na ye ya mwasi.

Batata oyo bazali babongisi-nzela basengeli mpe kozala na bokɛngi ete bámipesa koleka ndelo te na kosungaka bato oyo bamonisi bosepeli kati na mosala ya kosakola mpe komipesaka na mikumba na bango na lisangá na boye ete bázanga makoki ya kopesa na bana na bango oyo bazali naino kokóla lisungi makasi ya mayoki mpe litambwisi oyo basengeli na yango. Yango ezali te likambo oyo mobali asengeli kotikela mwasi na ye. Nkulutu moko moklisto oyo azali mobongisi-nzela uta kala mpe oyo azali kotambolisa mombongo moko moke abombaka ntango mpo na koyekola elongo na mokomoko na bana na ye nyonso minei. (Baefese 6:4) Lisusu, amibongisaka pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpo na makita nyonso elongo na libota na ye. Babongisi-nzela oyo bazali na bokatikati batalelaka bamposa ya mosuni mpe ya elimo ya libota na bango na bopɔtu te.

Bokatikati na makambo ya nkita

Kozala na likanisi libongi mpo na oyo etali bamposa ya mokolo na mokolo ezali likambo oyo babongisi-nzela basengeli kosala milende mpo na kobatela bokatikati. Awa lisusu, tokoki koyekola makambo mingi na kolandáká ndakisa mpe toli malamu mingi oyo Yesu apesaki. Akebisaki na ntina na komitungisa koleka ndelo mpo na biloko ya mosuni. Nzokande, alendisaki bayekoli na ye ete bátya Bokonzi na esika ya liboso, kopesáká elaka ete Nzambe akokokisa bamposa na bango lokola asalaka epai na biloko mosusu ya bozalisi. (Matai 6:25-34) Na kolandáká batoli malamu wana, babongisi-nzela mingi basili kokangama na mosala ya ntango nyonso na boumeli ya mibu mingi, mpe Yehova asili kopambola milende na bango mpo na kozwa ‘bilei ya mokolo na mokolo.’​—Matai 6:11.

Ntoma Paulo apesaki baninga na ye baklisto toli ya ‘kotika ete ezaleli na bango ya bato ya bososoli eyebana na bato nyonso.’ (Bafilipi 4:5) Na ntembe te, ezaleli ya bososoli ekosɛnga ete tóbatela kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na biso na lolenge lobongi. Babongisi-nzela oyo bazali na bokatikati basalaka molende mpenza mpo na komonisa ezaleli ebongi kati na etamboli na bango mpe kati na elimo oyo bazali na yango liboso na biloko ya mosuni, awa eyebi bango ete basusu bazali kotala etamboli na bango.​—Kokanisá na 1 Bakolinti 4:9.

Bilenge oyo bakómi babongisi-nzela basengeli te koluka na lolenge ya mabe kozwa litomba na ezaleli ya komipesa ya baboti na bango. Soki bazali kofanda na ndako ya baboti na bango, bakomonisa bokatikati malamu mpe botɔ́ndi soki bazali kopesa mabɔkɔ na misala ya ndako mpe soki bazwi mosala oyo ekosɛnga bango ntango nyonso te mpo ete bákoka kosunga moke na mosolo ya koleisa libota.​—2 Batesaloniki 3:10.

Babongisi-nzela oyo bazali na bokatikati bazali lipamboli ya solo

Okoki kozala mobongisi-nzela oyo asalaka mosala makasi mpo na kobatela bokatikati na ye. Omindimisa ete okolónga. Motindo moko lokola mwana moke azali na mposa ya ntango mpo na kokoka kotɛlɛma ngwi mpe kotambola, bobele bongo babongisi-nzela mingi oyo bakɔmɛli balobaka ete esengeli mwa ntango liboso ete bákóma na bokatikati mpo na oyo etali kokokisa mikumba na bango nyonso.

Komipesa na boyekoli na yo moko, kosunga basangani ya libota, mpe kokokisa bamposa na bango ya mosuni ezali bongo makambo oyo kati na yango babongisi-nzela basengeli kosala milende mpo na kobatela bokatikati na bango. Balapólo ezali komonisa ete babongisi-nzela mingi bazali kokokisa mikumba na bango na lolenge lobongi mpenza. Solo bazali mpenza lipamboli na esika bafandi mpe lokumu epai na Yehova mpe lisangá na ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto