Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/7 nk. 25-27
  • Liloba ya Nzambe lisalaka “makamwisi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liloba ya Nzambe lisalaka “makamwisi”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bolukiluki na ngai ya libota ya Nzambe
  • Nasakoli na mboka na ngai
  • “Makamwisi” masalemi na Liloba ya Nzambe
  • Jéhovah apesaki ngai makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • ‘Nakopumbwa lokola mboloko’
    Lamuká!—2007
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/7 nk. 25-27

Liloba ya Nzambe lisalaka “makamwisi”

LISOLÓ YA THÉRÈSE HÉON

Mokolo moko na 1965, nakɔtaki na magazini moko mpe nalakisaki bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! epai na basáli ya mombongo. Ntango nabalukaki mpo na kokenda, nayokaki lokito makasi. Lisasi libɛtaki na mabelé pene na makolo na ngai. Moko na basáli ya mombongo alobaki mpo na kotiyola, ete, “Esengeli kosalela Batatoli ya Yehova makambo na lolenge wana.”

LIKAMBO yango libangisaki ngai​—kasi yango esalaki te ete natika mosala ya ntango nyonso. Solo ya Biblia oyo nayekolaki ezalaki na motuya na boye ete eloko moko te ekokaki kopɛngola ngai na mosala na ngai mpo na Nzambe. Tiká nalimbola mpo na nini nalobi bongo.

Nsima ya kobotama na ngai na 1918, baboti na ngai bakendaki kofanda na Cap-de-la-Madeleine, mboka moko moke na etúká ya Québec, na Canada, mboka oyo eyebanaki lokola Esika ya Makamwisi. Bapaya bazalaki koya mingi na esika yango mpo na kokumisa ekeko ya Ngɔndɔ Malia. Atako elembetele moko te endimisi makamwisi oyo malobelami ete masalemaki na Malia, Liloba ya Nzambe lisili kosala kati na bomoi ya bato mingi likambo oyo limonani ete ezali solo likamwisi, wana mboka moke yango ekómaki engumba ya bato koleka 30000.

Ntango nazalaki na mibu soko 20, tata na ngai asosolaki mposa oyo nazalaki komonisa na makambo ya losambo mpe akabelaki ngai Biblia na ye. Ntango nabandaki kotánga yango, natungisamaki wana natángaki na Exode mokapo 20 ete losambo ya bikeko ekweisami makasi. Nabungisaki nokinoki kondima kati na mateya ya Lingomba ya Katolike mpe natikaki kokenda na misa. Nalingaki te kosambela bikeko. Nazali naino komikundola wana tata na ngai azalaki koloba ete: “Thérèse, okokenda na ndakonzambe te?” Nazalaki koyanola ete: “Te, nazali kotánga Biblia.”

Kotánga Biblia ezwaki esika monene kati na bomoi na ngai ata kino ntango oyo nabalaki na Sɛtɛ́mbɛ ya 1938. Lokola mobali na ngai, Rosaire, azalaki mbala mingi kosala na butu, nakómaki na momeseno ya kotánga Biblia ntango azalaki na mosala. Mosika te nandimisamaki ete Nzambe azali na libota na ye, mpe nabandaki koluka libota yango.

Bolukiluki na ngai ya libota ya Nzambe

Na ntina na makambo oyo nayekolaki na kotaleláká bindimeli ya lingomba, wana nazalaki mwana moke, nazalaki kobanga kokende kolala mpamba te nazalaki kobanga ete nakoya kolamuka kati na lifelo ya mɔ́tɔ. Mpo na kosilisa nsɔ́mɔ motindo yango, nazalaki komilobela ete Nzambe na bolingo akoki soko moke te kosala makambo ya nsɔ́mɔ boye. Na elikya nyonso, nalandaki kotánga Biblia, kolukáká solo. Nazalaki lokola mokube Moetiopia oyo azalaki kotánga Biblia kasi azalaki kososola eloko te.​—Misala 8:26-39.

Ndeko na ngai ya mobali André mpe mwasi na ye, oyo bazalaki kofanda na etaze oyo ezalaki na nsé ya etaze na biso, babandaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova na mobu 1957. Nayebisaki na sɛmɛki na ngai ete soki Batatoli bayei kosakola na buludingi na biso, abɛta palafɔ́ mpo nayeba ete basili koya. Na lolenge yango nakokaki koboya kofungwela bango ekuke na ngai. Mokolo moko abosanaki koyebisa ngai.

Mokolo yango nafungolaki ndako mpe nakutanaki na Kay Munday, mobongisi-nzela moko, nkombo oyo basáli ya ntango nyonso babéngamaka na yango epai na Batatoli ya Yehova. Asololaki na ngai na ntina na nkombo ya Nzambe, komonisáká ete Nzambe azali na nkombo na ye, Yehova. Ntango akendaki, nalukaki kati na Biblia na ngai mpo na komindimisa ete likambo oyo alobaki lindimami kati na mikapo ya Biblia. Bolukiluki na ngai epesaki ngai esengo mingi.​—Exode 6:3, Libongoli ya Douay, maloba na nsé ya lokasa; Matai 6:9, 10; Yoane 17:6.

Ntango Kay ayaki lisusu, tosololaki na ntina na Bosato, liteya ya Bakatolike, oyo elobi ete Nzambe moko azali na bato misato. Na nsima natalaki kati na Biblia na ngai na likebi nyonso mpo nandimisama ete yango ezali koteya Bosato te. (Misala 17:11) Boyekoli oyo nasalaki endimisaki ngai ete Yesu akokani na Nzambe te. Azalisamaki. Ye azali na ebandeli, nzokande Yehova azali na ebandeli te. (Nzembo 90:1, 2; Yoane 14:28; Bakolose 1:15-17; Emoniseli 3:14) Lokola nandimisamaki na makambo oyo nazalaki koyekola, nazalaki na esengo ya kolanda masoló ya Biblia.

Mokolo moko na mobu 1958, na eleko oyo mbulampɛmbɛ enɔkaka mingi na Novɛ́mbɛ, Kay abyangaki ngai ete nayangana na liyangani ya zongazonga oyo elingaki kosalema na mpokwa wana kati na ndako oyo bafutelaki. Nandimaki libyangi yango mpe nasepelaki mingi na mateya oyo mapesamaki. Na nsima, na boumeli ya lisoló elongo na Motatoli moko oyo ayaki kosolisa ngai, natunaki ete, “Moklisto ya solo asengeli kosakola ndako na ndako?”

Ayanolaki ete: “Ee, nsango malamu esengeli kosakolama, mpe Biblia ezali komonisa ete kokende kosolola na bato kati na bandako na bango ezali mwango moko ya ntina kati na mosala ya kosakola.”​—Misala 20:20.

Nasepelaki mpenza mingi na eyano na ye! Yango endimisaki ngai ete nasilaki komona libota ya Nzambe. Soki alobaki ete: “Te, ezali na yango na ntina mingi te,” mbɛlɛ nalingaki kozala na ntembe ete nasilaki komona solo, mpamba te nayebaki oyo Biblia ezalaki koloba na ntina na kosakola ndako na ndako. Kobanda wana, nakólaki nokinoki.

Nsima ya liyangani ya zongazonga wana, nabandaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova oyo ezalaki kosalema na engumba Trois-Rivières oyo ezali engumba ya penepene na oyo ya biso. Kay mpe Florence Bowman, moninga na ye ya mosala, bazalaki Batatoli bobele mibale oyo bazalaki kofanda na eleko wana na Cap-de-la-Madeleine. Mokolo mosusu nalobaki ete: “Lobi nakokenda kosakola elongo na bino.” Basepelaki mingi ete nakenda elongo na bango.

Nasakoli na mboka na ngai

Nakanisaki ete bato nyonso bakondima nsango ya Biblia, kasi nokinoki namonaki ete ezalaki bongo te. Ntango Kay mpe Florence batindamaki epai mosusu, nazalaki kosakola bobele ngai moko solo ya Biblia ndako na ndako kati na engumba. Kozanga kobanga, nalandaki kosakola ngai moko na boumeli ya mibu mibale kino ntango nazwaki batisimo na 8 Yúni 1963. Bobele mokolo wana nasɛngaki oyo ebéngamaki na eleko wana mosala ya pionnier de vacances (mobongisi-nzela mosungi).

Nalandaki kosala lokola pionnier de vacances na boumeli ya mbula moko. Na nsima, Delvina Saint-Laurent alakaki ngai ete soki nakómi mobongisi-nzela ya sanza na sanza, akobanda koya na Cap-de-la-Madeleine mpe kosakola elongo na ngai mbala moko na pɔ́sɔ. Bongo nasɛngaki mosala ya mobongisi-nzela. Nzokande, likambo ya mawa, Delvina akufaki bobele pɔ́sɔ mibale liboso ete nabanda mosala ya ntango nyonso. Nasengelaki kosala nini? Nasilaki kotondisa formilɛrɛ mpe nalingaki te kozonga nsima. Bongo na Ɔkɔtɔ́bɛ 1964, nabandaki mosala na ngai ya ntango nyonso. Na boumeli ya mibu minei oyo milandaki, nasakolaki ndako na ndako bobele ngai moko.

Bato oyo bamipesi na Lingomba ya Katolike na Cap-de-la-Madeleine bazalaki mbala mingi koyina ngai. Basusu bazalaki kobénga bapolisi mpo na komeka kopekisa ngai ete nasakola te. Mokolo mosusu, lokola nalobaki yango na ebandeli, moto moko ya mombongo alukaki kobangisa ngai na kobɛtáká lisasi pene na makolo na ngai. Yango elamwisaki likebi ya bato mingi kati na engumba. Bapanzi-nsango na televizyó ya mboka yango babéngaki yango kampanye mpo na kobundisa Batatoli ya Yehova. Likambo yango esukaki na kopesa litatoli moko malamu. Likambo ya kokamwa, mbula zomi na nsima, moko kati na bandeko ya moto ya mombongo wana oyo abɛtelaki ngai mondóki akómaki Motatoli.

“Makamwisi” masalemi na Liloba ya Nzambe

Na boumeli ya mibu mingi, nasili komona lolenge oyo botɛmɛli makasi ya solo ya Biblia ebandaki kokwea mokemoke na Cap-de-la-Madeleine. Na mobu 1968, Batatoli mosusu bayaki kofanda awa, mpe bato mosusu ya mboka babandaki kondima solo ya Biblia. Na ebandeli ya bambula 1970, motángo ya baye bazalaki koyekola Biblia mobakisamaki mingi mpenza. Ekómaki mingi mpenza ete nasɛngaki na Batatoli mosusu bázwa basusu kati na bayekoli oyo nazalaki kokamba mpo ete nakoka kolanda kosangana kati na mosala ya ndako na ndako.

Mokolo mosusu elenge mwasi moko azwaki mokanda mokolimbolaka Biblia Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko oyo nalakisaki ye. Moninga na ye ya mobali na ntango wana, elenge moko na nkombo André, moto na mobulu, oyo amonanaki na miso ete azali mosáli na mabe, asanganaki mpe na lisoló yango. Bosololi elongo na André elamusaki bosepeli na ye, mpe boyekoli ya Biblia ebandaki. Kozanga koumela abandaki koyebisa baninga na ye makambo oyo azalaki koyekola.

Na eleko moko, nakómaki koyekola na bilombe minei, oyo moko kati na bango azalaki koloba mingi te kasi azalaki koyoka mingi. Nkombo na ye ezalaki Pierre. Mokolo moko na ngonga ya mibale ya butu, ngai mpe mobali na ngai toyokaki bato bazali kobɛta na ekuke. Kanisá naino likambo oyo: Bilombe minei batɛlɛmaki wana mpo na kotuna ngai mituna. Likambo ya esengo, Rosaire atungisamaki soko moke te na ntina na lolenge bazalaki koya na ngonga motindo yango.

Na ebandeli mibali wana nyonso minei bazalaki koyangana na makita. Nzokande, bobele André na Pierre nde balendendelaki. Bayokanisaki bomoi na bango na mitindá ya Nzambe mpe bazwaki batisimo. Esili sikawa koleka mibu 20, mibali yango nyonso mibale bazali naino kosalela Yehova na bosembo nyonso. Ntango babandaki koyekola, bayebanaki malamu ete bazalaki basáli na mabe mpe bapolisi bazalaki kotyela bango likebi. Na eleko moko bapolisi bayaki koluka bango nsima ya boyekoli na biso ya Biblia to na ntango ya makita ya lisangá. Nazali na esengo ete nasakolaki epai na “bato ya lolenge nyonso,” mpe na yango namonaki na miso na ngai lolenge Liloba ya Nzambe lizali komema mbongwana oyo emonani mpenza ete ezali likamwisi.​—1 Timoté 2:4, NW.

Soki na ebandeli ya mosala na ngai mpo na Nzambe bayebisaki ngai ete Ndako ya Bokonzi ekozala na Cap-de-la-Madeleine mpe ete ekotonda na basaleli ya Yehova, mbɛlɛ nalingaki kondima yango te. Esengo monene mpo na ngai, lisangá moke ya engumba Trois-Rivières, oyo ezali penepene esili kobimisa masangá ya minene motoba oyo mayanganaka kati na Bandako ya Bokonzi misato, bakisá mpe lisangá ya Cap-de-la-Madeleine.

Nazwaki mpenza libaku ya esengo ya kosalisa bato pene na 30 kino komipesa mpe kozwa batisimo. Sikawa, na mibu ya kobotama 78, nakoki mpenza koloba ete nazali na esengo ete napesaki bomoi na ngai epai na Yehova. Nzokande, nasengeli kondima ete nakutanaki mpe na bantango ya bolɛmbu. Mpo na kolónga na bileko lolenge yango, nasengelaki ntango nyonso kofungola Biblia na ngai mpe kotánga mwa mikapo oyo mizalaki kolendisa ngai mingi mpenza. Ezali mpo na ngai likambo ya mpasi kolekisa mokolo mobimba kozanga ete natánga Liloba ya Nzambe. Mokapo elendisaka ngai mingi ezali Yoane 15:7, oyo elobi ete: “Soko bokoumela kati na ngai mpe maloba na ngai makoumela kati na bino, bólɔ́mba likambo nini lilingi bino mpe ekosalamela bino.”

Nazali na elikya ete nakomona Rosaire kati na mokili ya sika oyo mosili kobɛlɛma. (2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:3, 4) Mwa moke liboso na kufa na ye na 1975, azalaki kosala bokóli mpo na kozwa batisimo. Kasi sikawa, nazali na ekateli makasi ya kolendendela kati na mosala ya ntango nyonso mpe nakokóba kosepela kati na misala ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto