Oyo bikelamu bitambwisami na “mayele ya loómbi” bikoki koteya biso
MASINI ya kopesa malili na ndako, nkísi oyo esalaka ete mai ekóma ngalása te, mwango ya kolongola mungwa na biloko, mpe masini oyo enɔ́ngaka biloko na nsé ya mai ezali bisaleli ya sika oyo biyebani mingi na bato ya ekeke oyo ya 20. Nzokande, yango ezalaki uta bankóto ya bambula epai na banyama. Ee, bato bazwaka matomba wana ezali bango koyekola bikelamu motindo yango oyo bizali na “mayele ya loómbí.” (Masese 30:24-28, NW; Yobo 12:7-9) Emonani lokola ete, nyama mosusu ekómaki mpo na bato bateyi oyo bazangi maloba, mpe tokozwa matomba mingi na koyekoláká yango.
Tokoki kozwa litomba na koyekoláká bizaleli ya banyama mosusu? Yesu Klisto akokanisaki bayekoli na ye na bampate, nyoka, bibenga mpe ata na mayoyo. Bizaleli nini alingaki kolobela ntango akokanisaki bayekoli na ye na bikelamu wana? Tótala yango.
“Bampate na ngai bakoyokaka mongongo na ngai”
Bampate balobelami koleka mbala 200 kati na Biblia. Lokola búku Smith’s Bible Dictionary eyebisi yango, “mpate ezali elembo ya kosɔkɛma, ya motema pɛtɛɛ mpe ya botosi.” Na esakweli oyo ezwami na Yisaya mokapo 53, Yesu ye moko akokanisami na mpate. Ebongaki mpenza ete akokanisa mpe bayekoli na ye na nyama yango! Kasi Yesu alingaki kolobela bizaleli nini ya sikisiki ya mpate?
Yesu alobaki ete: “Bampate na ngai bakoyokaka mongongo na ngai mpe ngai nayebi bango mpe bakobilaka ngai.” (Yoane 10:27) Azalaki bongo kolobela bopɔlɔ ya bayekoli na ye mpe mposa makasi na bango ya kolanda ye. Mpate ezali nyama oyo eyokaka mobateli na yango mpe elandaka ye nokinoki. Mobateli na mpate mpe azalaka na bokangami makasi epai na etɔ́nga.
Etɔ́nga ekoki kopalangana bipai nyonso wana ezali kolya matiti, kasi mpate na mpate etikalaka penepene na etuluku mobimba. Búku Alles für das Schaf (Biloko nyonso mpo na bampate) elobi ete, wana nyama yango imoni ete izali na likámá to iyoki nsɔ́mɔ, “bakoki koyangana esika moko na lombangu mpenza.” Soki bampate bazali kokima mpo na komibomba na likámá, bakokimaka etuluku mobimba, kotɛlɛmáká mbala na mbala mpo na kotalela lisusu likámá yango. “Kotɛlɛma nsima ya ntáká mikusemikuse ya bokimi esalisaka bana na mpate mpe mpate oyo elɛmbi ete ezala esika moko na basusu. Kútu, etɔ́nga etyaka bango na libateli ya ntina mingi.” Tokoki koyekola nini na ezaleli wana?
Lelo oyo baklisto ya solo bapalangani te bipai nyonso kati na mangomba mpe bituluku mikemike ya boklisto ya nkombo mpamba. Nzokande, bayanganisami kati na etɔ́nga moko. Moklisto mokomoko azali komiyoka ete akangami na etɔ́nga ya Nzambe, mpe yango ezali kolendisa bomoko ya lisangá ya Batatoli ya Yehova. Ntango nyonso oyo mokakatano moko mobimi—ezala bokɔnɔ ya makasi, bitumba, makámá mauti na biloko bizalisami—epai wapi mosaleli mokomoko akomibalola mpo na koluka litambwisi mpe libateli? Epai na lisangá ya Yehova, oyo ekopesaka libateli na elimo.
Lolenge nini toli ya Biblia ezwamaka? Na nzela ya mikanda lokola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, zulunalo oyo ezali moninga na yango. Bazulunalo wana, mpe na makita ya boklisto, ezali mpenza kopesa lisalisi malamu mingi mpo na baoyo bazali na mposa ya libateli mingi, lokola bana na mpate mpe bampate oyo balɛmbi kati na etɔ́nga. Na ndakisa, likebi mingi lipesami na baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko mpe na baoyo bazali konyokwama na makanisi. Yango wana, ezali mpenza likambo ya mayele kotánga nimero mokomoko ya zulunalo yango, koyangana na makita nyonso ya lisangá, mpe kosalela makambo oyo tozali koyekola! Na lolenge yango tozali komonisa kosɔkɛma mpe bokangami makasi na etɔ́nga ya Nzambe.—1 Petelo 5:2.
“Mayele lokola nyoka mpe na bopɔlɔ lokola bibenga”
Búku Smith’s Bible Dictionary elobi ete: “Bipai binso na mikili ya Ɛ́sti nyoka esalelamaki lokola elembo ya mabe oyo mazali kati na moto oyo azali na elimo ya botomboki.” Na ngámbo mosusu, “ebenga na ngai” ezalaki elobeli ya bolingo. (Loyembo 5:2) Yesu alingaki koloba nini, ntango alendisaki bayekoli na ye ete bázala “na mayele lokola nyoka mpe na bopɔlɔ lokola bibenga”?—Matai 10:16.
Yesu azalaki kopesa malako matali lolenge ya kosakola mpe koteya. Bayekoli na ye bakokaki kokutana na biyano ndenge na ndenge. Mwa ndambo na bato balingaki kosepela, nzokande basusu balingaki koboya nsango malamu. Basusu kútu balingaki konyokola basaleli wana ya solo ya Nzambe. (Matai 10:17-23) Bayekoli balingaki kosala nini liboso na monyoko?
Kati na búku Das Evangelium des Matthäus (Evanzile ya Matai), Fritz Rienecker alobi na ntina na Matai 10:16 ete: “Bokɛngi . . . bosengeli kosangana na bosembo, kolongobana, ete eloko moko ekoka kobima te oyo ekopesa banguna ntina malamu ya bifundeli. Batindami ya Yesu bazali kofanda kati na babundisi oyo bazali na mawa te, oyo bazali na limemya te mpe baoyo bazalaki kokwela bantoma kozanga koyokela bango mawa mpe na libaku moke nyonso oyo lipesamelaki bango. Na yango, ezali na ntina mpenza—motindo moko na nyoka—kokɛngɛla na ntina na batɛmɛli, mpe kosɛnzɛla mpe kokeba; komitalela na makambo nyonso ete bazangi mayele mabe to bokosi, kozala pɛtɔ mpe sembo na maloba mpe na misala mpe komimonisa bongo lokola ebenga.”
Basaleli ya Yehova na mikolo na biso bakoki koyekola nini na maloba ya Yesu oyo mazwami na Matai 10:16? Lelo oyo, bato bazali koyanola na nsango malamu lolenge moko lokola bazalaki kosala yango na ekeke ya liboso. Wana bakutani na monyoko, baklisto ya solo basengeli kosangisa bokɛngi ya nyoka na bopɔlɔ ya ebenga. Baklisto basalelaka bokosi to kozanga kolongobana soko moke te, kasi bazali nde pɛto, bazali sembo mpe na kolongobana wana bazali kosakola nsango ya Bokonzi epai na basusu.
Ndakisa: Baninga ya mosala, bilenge na eteyelo, to ata basangani ya libota na yo moko bakoki koloba makambo ya kotyola bindimeli na yo ya Motatoli ya Yehova. Eyano ya nokinoki ekoki kozala ete osala lolenge moko na kotyoláká mpe bindimeli na bango. Kasi yango ezali bopɔlɔ? Soko moke te. Soki omonisi na batyoli na yo ete maloba na bango mazali na bopusi te likoló na ezaleli kitoko na yo, bakoki mbala mosusu kobongwana. Bongo, okomimonisa moto ya bokɛngi mpe na ekweli te—‘na mayele lokola nyoka, mpe na bopɔlɔ lokola ebenga.’
“Mayoyo lokola bambalata babongisami mpo na etumba”
Zulunalo GEO eyebisi ete na mobu 1784, mboka Afrique du Sud ebebisamaki na “ebele mpenza [ya mayoyo] oyo naino eyebisamaki te na lisoló ya bato.” Mayoyo eyangelaki etando monene ya ba kilomètres carrés 5200, oyo eleki etando ya mboka Hong Kong mbala mitano. Búku Smith’s Bible Dictionary elobi ete mayoyo “ebebisaka mpenza banzeté kati na mboka nyonso epai balekaka.”
Kati na emoniseli na ye oyo azwaki epai na Nzambe na ntina na makambo oyo masengelaki kobima na “mokolo na Nkolo,” Yesu asalelaki lingámbó lya mayoyo kati na emonaneli. Na ntina na yango elobami boye: “Motindo na mayoyo yango ezalaki lokola bambalata babongisami mpo na etumba.” (Emoniseli 1:1, 10; 9:3-7) Bokokanisi wana ezalaki komonisa nini?
Batatoli ya Yehova basili kososola kobanda kala ete mayoyo ya Emoniseli mokapo 9 mazali elilingi ya basaleli ya Nzambe bapakolami na elimo oyo bazali na mabelé na ekeke oyo.a Baklisto wana bapesameli mosala moko ya sikisiki—kosakola nsango malamu ya Bokonzi na mabelé mobimba mpe kozalisa bayekoli. (Matai 24:14; 28:19, 20) Yango ezali kosɛnga na bango ete bálónga bipekiseli mpe bákangama na mosala na bango. Eloko mosusu nini ekokaki mpenza komonisa yango malamu koleka mayoyo wana oyo bakoki kolóngama te?
Atako yango ezali bobele mwa moke koleka santimɛtɛlɛ 5, mayoyo esalaka na mokolo moko mobémbo ya bakilomɛtɛlɛ kati na 100 mpe 200. Mayoyo ya mokili mokauki ekoki kokenda kino bakilomɛtɛlɛ 1000. Zulunalo GEO eyebisi ete “ebɛtaka mapapu mbala 18 na sɛgondɛ moko mpe na boumeli ya bangonga 17 na mokolo moko—likambo oyo nyama moke mosusu te ekoki kosala yango.” Oyo ezali solo mosala monene mpo na bikelamu wana ya mikemike!
Lokola etuluku, Batatoli ya Yehova bazali na molende kati na mosala ya kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi. Bazali sikawa kosakola kati na bamboka koleka 230. Basaleli wana ya Nzambe bazali kolónga mikakatano mingi mpo ete bákoka kosangana kati na kokokisama ya mosala yango. Bakutanaka na mikakatano motindo nini? Kokaniselama mabe, bipekiseli na mibeko ya mboka, bokɔnɔ, kolɛmba mpe botɛmɛli ya bandeko ya mosuni ezali bobele ndambo kati na yango. Kasi eloko moko te elóngi kopekisa bokóli na bango. Bazali kokangama na mosala na bango oyo mopesami na Nzambe.
Tólanda komonisa bizaleli ya boklisto
Ee, Yesu akokanisaki bayekoli na ye na bampate, na nyoka, na ebenga, mpe na mayoyo. Yango ekokani solo na mikolo na biso. Mpo na nini? Mpamba te nsuka ya ebongiseli ya biloko esili kobɛlɛma, mpe mikakatano mikómi mingi koleka ndenge ezalaki liboso.
Kobateláká maloba ya elilingi oyo Yesu asalelaki, baklisto ya solo batikalaka penepene na etɔ́nga ya Nzambe mpe bandimaka na bopɔlɔ nyonso toli ya lisangá ya Yehova. Bazali komisɛnzɛla mpe kokeba na makambo oyo makoki kopekisa kokokisama ya misala na bango ya boklisto, wana ezali bango kobatela etamboli oyo ezangi ekweli kati na makambo nyonso. Lisusu, bazali kolendendela mpo na kokokisa mokano ya Nzambe ata kati na mikakatano. Mpe bazali kokóba koyekola epai na bikelamu oyo bitambwisami na “mayele ya loómbí.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá búku Emoniseli—kokokana na yango monene ebɛlɛmi!, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., mokapo 22.