Mateya kitoko oyo tokoki kozwa na boyekoli ya Mokili ya Ndaka
MOKILI ya Ndaka, lokola emonisami kati na Biblia, ekokanaki na mosusu te. Kati na etando oyo moke, tozali komona mambi ndenge na ndenge matali mabelé na yango. Na nɔ́rdi, ezali na ngomba oyo ezali na ngalási likoló na nsɔ́ngɛ́ na yango; na súdi, ezali na bitúká ya molungé mingi. Mabelé na yango mazali malamu mpo na milóna, ezali na bitando ya mabelé makauki, mpe na etúká oyo etondi na ngomba mpo na kolóna banzeté mpe koleisa bitonga.
Ngomba ndenge na ndenge, bileko ndenge na ndenge, mpe mitindo ndenge na ndenge ya mabelé ezali kopesa nzela na bolóni nzeté mingi ikeseni, ya minene mpe ya mike—kati na yango mpe nzeté oyo ekólaka malamu na bitúká ya ba Alpes epai mpiɔ ezalaka makasi, misusu ekólaka malamu na bitando ya mabelé makauki epai kuna molungé mozalaka makasi, mpe mosusu ekólaka malamu na bitando ya mabángámabángá. Nganga-mayele moko ya bitwɛlɛ alobi ete mitindo soko 2 600 ya banzeté ekoki komonana kati na etúká wana! Bayisalaele oyo bakendaki konɔ́nga mokili yango liboso bamonaki nokinoki bilembeteli ete ezalaki na mabelé malamu. Bazongaki na etape ya mbuma na miwiti oyo babukaki kati na lobwaku moko, etape yango ezalaki na bozito mingi na boye ete esengelaki komemama na bato mibale na lisalisi ya nzeté moko! Na lolenge lobongi, lobwaku yango ebéngamaki Esekoli, oyo elimboli “ebolo na mbuma na vinyo.”a—Mituya 13:21-24.
Kasi tiká ete tótalela sikawa na likebi mpenza mwa ndambo ya mambi ya mabelé ya mokili yango oyo ekokani na mosusu te, mingi mpenza etúká ya súdi.
Sefela
Libóngo ya wɛ́sti ya Mokili ya Ndaka ezali bongo ndelo na yango na Mai monene ya Méditerranée. Sefela ezwami soko na kilomɛ́tɛlɛ 40 na ntéi mpenza ya mokili yango. Liloba “Sefela” elimboli “Epai na nsé,” kasi ezali mpenza etúká etondi na ngomba mingi mpe ekoki kobéngama ete epai na nsé bobele soki tokokanisi yango na ngomba ya Yuda na ɛ́sti.
Talá eteni ya etánda mpe talá makambo oyo makesenisi Sefela na bateritware oyo ezali zingazinga na yango. Ngomba ya Yuda ezwami na ɛ́sti; bitando patalalu ya libóngo ya Filistia bizwami na wɛ́sti. Na yango, Sefela ezalaki etando oyo ekabolaki Mokili ya Ndaka na bitúká mosusu, ezalaki lokola epekiseli oyo ekabolaki libota ya Nzambe na banguna na bango na ntango ya kala. Limpinga nyonso oyo ekokaki koya kobundisa Yelusaleme, mboka-mokonzi ya Yisalaele, na nzela ya wɛ́sti esengelaki kokatisa na Sefela.
Likambo motindo wana esalemaki na ekeke ya libwa L.T.B. Biblia eyebisi ete, Mokonzi Hazaele ya Sulia “abutaki mpe abunanaki na Gata [ekoki mpenza kozala bongo ndelo ya Sefela] alekaki yango mpe Hazaele abongwaki ete akende na Yelusaleme.” Mokonzi Yoasa alukaki mwango ya kopekisa Hazaele, amemelaki ye biloko ya motuya oyo azwaki kati na tempelo mpe kati na ndako na ye. Nzokande, lisoló oyo limonisi ete Sefela ezalaki na ntina mingi mpo na libateli ya Yisalaele.—2 Mikonzi 12:17, 18.
Tokoki kozwa liteya moko malamu kati na lisoló oyo. Hazaele alingaki kobotola Yelusaleme, kasi asengelaki liboso kokatisa na Sefela. Bobele bongo, Satana Zábolo ‘azali koluka kolya’ basaleli ya Nzambe, kasi asengeli liboso koleka etando makasi—botosi na bango na mitindá ya Biblia; na ndakisa, oyo etali baninga mabe mpe koluka kozwa biloko mingi ya mosuni. (1 Petelo 5:8; 1 Bakolinti 15:33; 1 Timoté 6:10) Kozanga kosimba makasi mitindá ya Biblia ezali litambe ya liboso oyo ememaka moto na kosala lisumu monene. Na yango, batelá ntango nyonso etando makasi wana malamu mpenza. Soki olandi mitindá ya Biblia, okobuka te mibeko ya Nzambe.
Etúká ya Yuda oyo etondi na ngomba
Etúká mosusu oyo ezwami na kati ya Mokili ya Ndaka, kolongwa na Sefela, ezali bongo etúká ya Yuda oyo etondi na ngomba. Oyo ezali etúká ya ngomba mingi, ezalaki kobimisa mbuma malamu, mafuta ya olive, mpe vinyo. Lokola etongamaki likoló na ngomba, Yuda ezalaki mpe esika malamu mpenza mpo na komibomba. Na yango, Mokonzi Yotama atongaki “bisika makasi mpe manɔ́ngi” kuna. Na ntango ya mobulu, bato bazalaki kokima kuna mpo na komibatela.—2 Ntango 27:4, NW.
Yelusaleme, oyo ebéngamaki mpe Siona, ezalaki eteni oyo eyebanaki mingi kati na etúká ya Yuda oyo ezalaki na ngomba mingi. Emonanaki ete Yelusaleme ezalaki na libateli mpamba te ngámbo misato na yango, ezingamaki na mabwaku, mpe na ngámbo ya nɔ́rdi, engebene Josèphe mokomi na makambo ya kala na ekeke ya liboso, ebatelamaki na bifelo misato bitongami esika moko. Kasi esika ya libateli esengeli kozala na mposa bobele ya bifelo mpe ya bibundeli te. Esengeli mpe kozala na mai. Ezalaka na ntina wana mboka ezingelami na banguna, mpamba te soki mai ezangi, bafandi na mboka oyo bazingelami na banguna bakoki nokinoki kopusama ete bámitika na mabɔkɔ ya banguna.
Bato ya Yelusaleme bazalaki kosalela mai ya Liziba ya Siloama. Nzokande, na boumeli ya ekeke ya mwambe L.T.B., mpo na komibongisa liboso ete Baasulia báya kozingela bango, Mokonzi Hizikiya atongaki efelo moko na libándá mpo na kobatela Liziba ya Siloama, akɔtisaki yango kati na engumba. Akangaki bitima oyo bizalaki na libándá ya engumba, mpo ete Baasulia bázala na mpasi mpo na kozwa mai na ntango bakoya kozingela bango. (2 Ntango 32:2-5; Yisaya 22:11) Kasi esukaki bongo te. Hizikiya amonaki lolenge ya kokɔtisa mai mingi na kati mpenza ya Yelusaleme!
Ebéngami moko na makambo minene ya zébi ya botongi ya ntango ya kalakala, Hizikiya atimolaki táláse moko kobanda na etima ya Giho kino na Liziba na Siloama.b Ezalaki na mwayene ya mɛ́tɛlɛ moko na basantimɛ́tɛlɛ ntuku mwambe ya bozindo, na bolai ya mɛ́tɛlɛ 533. Kanisá naino lolenge yango ezalaki—tálási moko ya bolai ya katikati ya kilomɛ́tɛlɛ moko, eleki kati na libangá moko! Lelo oyo, mbula 2 700 na nsima, bato oyo bakendeke kotala Yelusaleme bakoki koleka kati na esika wana oyo ezali bongo mosala monene ya zébi ya botongi, eyebani mingi na nkombo ya Táláse ya Hizikiya.—2 Mikonzi 20:20; 2 Ntango 32:30.
Milende oyo Hizikiya asalaki mpo na kobatela mpe koyeisa mai mingi na Yelusaleme ekoki kopesa biso liteya moko kitoko. Yehova azali “liziba na mai na bomoi.” (Yilimia 2:13) Makanisi na ye, oyo mazwami kati na Biblia, mazali kobatela bomoi. Yango wana boyekoli na biso moko ya Biblia ezali na ntina mingi. Kasi mabaku ya boyekoli, mpe boyebi oyo okoki kozwa mpo na yango, ekoya bobele pwasa te. Ekoki kosɛnga ete ‘otimola táláse,’ na ndakisa kati na misala na yo ya mokolo na mokolo oyo etondi na makambo mingi, kotikela yango ntango. (Masese 2:1-5; Baefese 5:15, 16) Soki obandi yango, kangamá na ebongiseli na yo, kotyáká boyekoli na yo moko na esika ya liboso. Kebá, otika te ete moto moko to eloko moko ebotola yo mai wana.—Bafilipi 1:9, 10.
Bitúká ya mabelé makauki
Etúká ya mabelé makauki ya Yuda ezali na ɛ́sti ya ngomba ya Yuda, ebéngami mpe Zesimona, oyo elimboli “Lisobe.” (1 Samwele 23:19, talá maloba na nsé ya lokasa na NW) Pene na Mai ya mungwa na mungwa (Mer Morte), etando yango oyo ezangi bitwɛlɛ ezali mabángámabángá. Etando ya mabelé makauki ya Yuda ekiti na nsé kino na mɛ́tɛlɛ 1200, na ntáká ya kilomɛ́tɛle 24, ezali na ntina yango nde ebatelami na mopepe ya wɛ́sti oyo ememaka mbula, na bongo mbula ebɛtaka mingi te na esika yango. Na ntembe te, ezalaki bongo kuna na etúká wana ya mabelé makauki nde ntaba ya Azazele ezalaki kotindama na ntango ya molulu ya Mokolo ya Mbɔndi oyo ezalaki kosalema mbula na mbula. Ezalaki mpe kuna nde Davidi akimaki Saulo. Yesu alekisaki mikolo 40 kuna na ntango akilaki bilei mpe na nsima amekamaki na Zábolo.—Levitike 16:21, 22; Nzembo 63, maloba matyami likoló; Matai 4:1-11.
Soko na kilomɛ́tɛlɛ 160 na súdi-wɛ́sti ya mabelé makauki ya Yuda tozali kokuta mokili mokauki ya Param. Milako mingi ya Bayuda mityamaki wana na boumeli ya mobémbo na bango ya mibu 40 kouta na Ezipito mpo na kokende na Mokili ya Ndaka. (Mituya 33:1-49) Mose akomaki na ntina na “lisobe monene mpe na nsɔ́mɔ, na nyoka na ngɛngɛ mabe mpe na bankotó na yango, mpe na mokili mokauki mozalaki na mai te.” (Deteronome 8:15) Ezalaki likambo ya kokamwa na komona ete bamilió ya Bayisalaele bakokaki mpenza kofanda kuna! Nzokande, Yehova abatelaki bango.
Tiká ete likambo oyo ezala ekundweli mpo na biso, ete Yehova akoki kobatela biso, ata kati na mokili oyo mokauki na elimo. Ee, biso mpe tozali kotambola kati na esika etondi na banyoka mpe bankotó, ata soki bazali nde ya elilingi. Ekoki kozala ete mokolo na mokolo tozali kokutana na bato oyo babangaka te mpo na kobimisa maloba matondi na ngɛngɛ, oyo ekoki kobebisa makanisi na biso kozanga nkaká. (Baefese 5:3, 4; 1 Timoté 6:20) Baoyo bazali kosala makasi mpo na kosalela Nzambe ata kati na mikakatano motindo oyo basengeli kopesamela longonya. Bosembo na bango ezali elembeteli monene ete Yehova azali mpenza kobatela bango.
Ngomba ya Kalemele
Nkombo Kalemele elimboli “Elanga.” Etúká wana ya mabelé kitoko mpo na kolóna ezwami na nɔ́rdi, oyo ezali na ntáká ya kilomɛ́tɛlɛ soko 50, ekembisami na bilanga ya nzeté ya vinyo, bilanga ya olive, mpe nzeté mosusu oyo ekobotaka mbuma. Ngomba eleki molai kati na molɔngɔ́ ya ngomba wana ekoki kobosanama te mpo na bonzenga mpe mpo na kitoko na yango. Yisaya 35:2 elobi na ntina na “lokumu na Kalemele” lokola elembo ya nkembo ya mabelé mazongisami ya Yisalaele.
Makambo minene mingi masalemaki na Kalemele. Ezalaki kuna nde Eliya atyaki ntembe liboso na basakoli ya Baala mpe “mɔ́tɔ na Yehova ekitaki” mpo na komonisa bonene na Ye. Lisusu, ezalaki bongo na nsɔ́ngɛ ya Kalemele nde Eliya abendaki likebi na ntina na lipata moko moke oyo ekómaki mbula monene, oyo na lolenge ya kokamwa, esukisaki eleko ya kozanga mai na Yisalaele. (1 Mikonzi 18:17-46) Elisa, mokitani ya Eliya, azalaki na Ngomba Kalemele na ntango mwasi na Suneme ayaki kosɛnga ye lisalisi mpo na mwana na ye oyo akufaki, oyo Elisa asekwisaki na nsima.—2 Mikonzi 4:8, 20, 25-37.
Kino lelo, mipanzi ya Ngomba Kalemele ezali na bilanga, bilanga ya olive, mpe bilanga ya vinyo. Na boumeli ya ebandeli ya eleko ya molungé, mipanzi na yango ezipamaka na fololo kitoko. Salomo alobaki na elenge mwasi Sulamite ete: “Motó na yo likoló na yo lokola Kalemele”; ekoki kozala ete alobaki bongo kokanisáká na ntina na bonzenga ya nsuki na ye to na ntina na lolenge oyo motó na ye kitoko etɛlɛmisamaki na bonzenga nyonso likoló na nkingo na ye.—Loyembo na Salomo 7:5.
Bonzenga ya ngomba ya Kalemele ezali kokundwela biso bonzenga ya elimo oyo Yehova asili kopesa epai na lisangá ya basambeli na ye na mikolo na biso. (Yisaya 35:1, 2) Batatoli ya Yehova bazali solo kofanda kati na paladiso ya elimo, mpe bazali na mayoki motindo moko na Mokonzi Davidi, oyo akomaki ete: “Bipimeli bikweli ngai na bisika kitoko; ɛ libula esepelisi ngai.”—Nzembo 16:6, NW.
Ya solo, ezali na mikakatano mingi oyo libota ya Nzambe na elimo lizali kokutana na yango na mikolo na biso, bobele lokola Bayisalaele bakutanaki na botɛmɛli ya ntango nyonso oyo ezalaki kouta epai na banguna ya Nzambe. Nzokande, baklisto ya solo babosanaka te mapamboli oyo Yehova azali kopesa bango—kati na yango mpe pole ya solo ya Biblia oyo ezali sé kokóla, bondeko ya mokili mobimba, mpe libaku ya kozwa bomoi ya seko na mabelé.—Masese 4:18; Yoane 3:16; 13:35.
“Lokola elanga na [Yehova]”
Mokili ya Ndaka ezalaki esika moko kitoko na kotala na miso. Na lolenge lobongi mpenza, elobelamaki lokola “mokili moleki na mabɛ́lɛ mpe na mafuta na nzoi.” (Genese 13:10) Mose abéngaki yango, “mokili na misolo na mai ikobimaka na mabwaku mpe na ngomba, mokili na masango mpe na loso mpe na nzeté na vinyo mpe na nzeté na mosuke mpe na limona, mokili na nzeté na bilaya mpe na mafuta na nzoi, mokili kuna ekolya yo kwanga na kosɛnga te, kuna ekozanga bino eloko te, mokili mabángá na yango mazali ebende, mpe kuna ekotimola bino mondo na ngomba na yango.”—Deteronome 8:7-9.
Soki Yehova akokaki kopesa efandelo etondi na biloko mingi lolenge wana, efandelo kitoko epai na libota na ye ya ntango ya kala, na ntembe te akoki kopesa epai na basaleli na ye ya mikolo na biso paladiso etondi na nkembo na mabelé mobimba—oyo ezali na ngomba, mabwaku, bibale, mpe mabeke. Ee, Mokili ya Ndaka ya kala, mpe bisika ndenge na ndenge oyo bizalaki kati na yango, ezalaki elilingi ya paladiso ya elimo oyo Batatoli ya Yehova bazali kati na yango lelo mpe elilingi ya Paladiso ya mokili ya sika oyo ezali koya. Elaka oyo ekomami kati na Nzembo 37:29 ekokokisama: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” Na ntango Yehova akopesa bato ya botosi paladiso wana, bakozala mpenza na esengo ya kotala “biteni” na yango mpe bakosala bongo mpo na libela!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Eyebisamaki ete etape moko ya mbuma ya miwiti ya etúká wana ezalaki na bozito ya bakilo 12, mpe mosusu ezalaka na bozito ya bakilo koleka 20.
b Liziba ya Giho ezalaki mpenza na libándá ya ndelo ya Yelusaleme na ɛ́sti. Ebombamaki kati na libulu; na yango, ekoki mpenza kozala ete Baasulia bayebaki yango te.
[Karte na lokasa 4]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
GALILAI
Ngomba Kalemele
Libeke na Galilai
SAMALIA
SEFELA
Ngomba ya Yuda
Mai ya mungwa na mungwa
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Fɔtɔ́ NASA
[Karte na lokasa 4]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Sefela ezalaki kokabola libota ya Nzambe na banguna na bango
MI 0 5 10
KM 0 8 16
Etando ya Filistia
Sefela
Etúká ya ngomba ya Yuda
Mabelé makauki ya Yuda
Lobwaku
Mai ya mungwa na mungwa
Mokili ya Amona mpe ya Moaba
Karte/Bililingi na lokasa 5]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Táláse ya Hizikiya: na bolai ya mɛ́tɛlɛ 533, eleki kati na libangá moko makasi
Lobwaku ya Tyropœon
Siloama
MBOKA YA DAVIDI
Lobwaku ya Kidron
Giho
[Bililingi na lokasa 6]
Davidi alukaki kokima Saulo na mokili mokauki ya Yuda. Na nsima, Yesu amekamaki kuna na Zábolo
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Bililingi na lokasa 7]
Ngomba Kalemele, epai kuna Eliya ayokisaki basakoli ya Baala nsɔ́ni
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Bililingi na lokasa 8]
“[Yehova] Nzambe na yo akokɔtisa yo na mokili malamu, mokili na misolo na mai mpe bitoko mpe na mitó na mai ikobimaka na mabwaku mpe na ngomba.”—Deteronome 8:7