Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/8 lok. 21
  • Ozali komikundola?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali komikundola?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • ‘Bókóba kolimbisana bamoko na bamosusu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Nzambe akolimbisa ngai?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • “Ndako na mabondeli mpo na mabota nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/8 lok. 21

Ozali komikundola?

Otalelaki na likebi nyonso banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo eutaki kobima? Okoki kosepela komikundola makambo malandi:

◻ Maloba ya Yesu oyo ete: “Soko bokolimbisa masumu na moto nani, makolimbisama na ye,” malimboli ete baklisto bakoki kolimbisa masumu? (Yoane 20:23)

Eloko moko te kati na makomami epesi biso nzela ya koloba ete baklisto nyonso, to ata mpe bankulutu oyo baponami kati na lisangá, bapesameli nguya uta na Nzambe mpo na kolimbisa masumu. Maloba oyo makangami na maloba ya Yesu makoki kolimbola ete bantoma bazwaki na nzela ya mosala ya elimo santu nguya bobele moko ya kolimbisa mpe kokanga masumu. (Talá Misala 5:1-11; 2 Bakolinti 12:12.)​—15/4, lokasa 8.

◻ Likambo nini ya kobenda likebi lizali na mokanda ya nzembo kati na libongoli ya J. J. Stewart Perowne oyo ebimaki mpo na mbala ya liboso na 1864?

Kati na libongoli na ye Perowne asalaki makasi ete “alanda mpenza lolenge ya Liebele, ezala engebene elobeli ya elilingi mpe kati na mibeko ya lokótá.” Na kosaláká bongo apesaki nzela na kozongisama ya nkombo ya Nzambe na lolenge “Yehova.”​—15/4, lokasa 31.

◻ Litambwisi nini Yesu apesaki na bayekoli na ye mpo na oyo etali boyokani na bango elongo na biyangeli ya mokili?

Yesu alobaki ete: “Pesá na Kaisala yango ezali na Kaisala mpe na Nzambe yango ezali na Nzambe.” (Matai 22:21) Alobaki mpe ete: “Mpe ye nani akangi yo ete okenda na ye kilomɛtɛlɛ moko, kendá na ye mibale.” (Matai 5:41) Awa Yesu azalaki komonisa na lisese lilako ya kotosa na motema malamu masɛngami ya bakonzi, ezala na bosalisani kati na bato to kati na masɛngami ya biyangeli, masɛngami oyo mayokani na mibeko ya Nzambe. (Luka 6:27-31; Yoane 17:14, 15)​—1/5, lokasa 12.

◻ ‘Kotambola kati na solo’ elimboli nini? (Nzembo 86:11)

Yango esɛngi ete tókangama na masɛngami na ye to tósalela ye na bosembo nyonso. (Nzembo 25:4, 5; Yoane 4:23, 24) ​—15/5, lokasa 18.

◻ Nini ekokisamaki na etindá oyo Yehova apesaki Yona ya kokenda na Ninive?

Lokola makambo mabongwanaki, mosala ya kosakola ya Yona na Ninive emonisaki bokeseni polele kati na bato ya Ninive oyo babongolaki motema mpe Bayisalaele ya motó makasi, oyo bazangaki mpenza kondima mpe bazangaki ezaleli ya komikitisa. (Kokanisá na Deteronome 9:6, 13; Yona 3:4-10.)​—15/5, lokasa 28.

◻ Nani azali Nyoka mpe nani azali “mwasi” oyo balobelami na Genese 3:15?

Ezali mpenza nyoka lokola nyama te, kasi nde ye oyo asalelaki yango, Satana Zábolo. (Emoniseli 12:9) “Mwasi” ezali Eva te kasi lisangá ya Yehova na likoló, mama ya basaleli na ye bapakolami oyo bazali awa na mabelé. (Bagalatia 4:26)​—1/6, lokasa 9.

◻ Lolenge nini moto akoki kobima na Babilone Monene mpe kozwa libateli? (Emoniseli 18:4)

Asengeli mpenza kokima ebongiseli ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta, kokabwana na mimeseno mpe na elimo oyo yango ezali kobimisa, na bongo akoki kozwa libateli kati na lisangá oyo etambwisami na teokrasi ya Yehova. (Baefese 5:7-11)​—1/6, lokasa 18.

◻ Mpo na nini mpongo elobelami mingi kati na Makomami?

Bakomi ya Biblia basalelaki mpongo mpo na komonisa bizaleli lokola mayele, libateli ya Nzambe mpe lombangu.​—15/6, lokasa 8.

◻ Tokoki koloba ete basaleli ya Nzambe na mikolo na biso, baoyo bazali na elikya ya kozwa bomoi awa na mabelé, bazali na elimo santu ekokani na boíke motindo moko na oyo epesami epai na baklisto bapakolami na elimo?

Eyano ya moboko ezali ete, ee. Elimo ya Nzambe epesami na boíke motindo moko na bituluku wana mibale, boyebi mpe mayele epesami na boíke motindo moko epai na bituluku wana mibale, bazali na mabaku makokani ya kozwa yango.​—15/6, lokasa 31.

◻ Mpo na nini ezali litomba mpo na biso lelo kotalela na mozindo mosala na bulɛɛ oyo mozalaki kosalema na banganga ya Yisalaele kati na tempelo na Yelusaleme?

Na kosaláká bongo, tokoki kososola malamu mpenza ebongiseli ya motema mawa oyo na nzela na yango bato na masumu bakoki lelo kozongisama na boyokani malamu elongo na Nzambe. (Baebele 10:1-7)​—1/7, lokasa 8.

◻ Lolenge nini tempelo ya mibale oyo etongamaki na Yelusaleme ezwaki nkembo monene koleka oyo etongamaki na Salomo?

Tempelo ya mibale eumelaki mibu 164 koleka oyo ya liboso. Basambeli mingi bautaki na bamboka mingi ya ndenge na ndenge mpe bayanganaki kati na lopango yango. Likambo mosusu ya monene oyo ekesenisi tempelo oyo ya mibale ezali ete Mwana na Nzambe, Yesu Klisto, ateyaki kati na lopango na yango.​—1/7, nkasa 12, 13.

◻ Ntango nini Nzambe amonisaki tempelo na ye ya elimo?

Yango ezalaki na mobu 29 T.B. ntango Nzambe andimaki losambo oyo Yesu asalaki na ntango azalaki kozwa batisimo. (Matai 3:16, 17) Likambo oyo ete Nzambe andimaki nzoto ya Yesu lokola mbeka elimbolaki, na elobeli ya elilingi, ete etumbelo monene koleka oyo ezalaki na tempelo ya Yelusaleme epesamelaki nkembo monene koleka.​—1/7, nkasa 14, 15.

◻ Mpo na nini tosengeli ntango nyonso kolimbisa?

Kolimbisa moto oyo asalaki libúngá kasi asɛngi bolimbisi ezali na ntina mingi mpo na kobatela bomoko ya boklisto. Kosilika mpe kobomba nkanda ekolongola kimya na biso ya elimo. Soki tokolimbisa te, tozali na likámá ete mokolo mosusu Yehova Nzambe akolimbisa masumu na biso te. (Matai 6:14, 15)​—15/7, lokasa 18.

◻ Lolenge nini Bayisalaele bakokaki kokóma bulɛɛ?

Bobele na nzela ya boyokani na bango ya penepene elongo na Yehova mpe na nzela ya losambo na ye ya pɛto. Bazalaki na mposa ya boyebi ya solosolo ya “Oyo Mosantu” mpo ete bákoka kosambela ye kati na ezalela ya bulɛɛ, na bopɛto ya nzoto mpe ya elimo. (Masese 2:1-6; 9:10)​—1/8, lokasa 11.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto