Mituna ya batángi
Ekozala likambo ya mayele ete moklisto akende koluka lisalisi epai na mosálisi maladi ya motó?
Balapólo euti na mikili mosusu emonisi ete na “mikolo na nsuka” oyo, maladi ya makanisi mpe ya motó esili kokóma mingi. (2 Timoté 3:1) Baklisto bayokaka mawa mingi na ntango baninga na bango bandimi bazwami na mpasi motindo wana, kasi bayebi ete moto na moto asengeli kokata ye moko soki akoluka komisalisa na mpasi na ye, mpe soki bongo, mwango ya lolenge nini asengeli koluka.a “Moto na moto akomema bozito [“mokumba,” NW] na ye moko.” (Bagalatia 6:5) Basusu bazali kobɛla maladi makasi lokola oyo ya kobulunganisama ya bomoto (schizophrénie), kobulunganisama na mayoki mpe na makanisi, konyokwama makasi na makanisi, bizaleli bipusami na kozanga komindima, komizokisazokisa, mpe kobulunganisama mosusu oyo etungisaka bato; bazongelaki bomoto na bango ya malamu nsima ya kozwa lisalisi ya minganga.
Na bamboka mosusu bato mingi bakómi koluka mwango ya komisalisa. Mbala mingi, ezalaka te mpo ete moto abulunganisami na mayoki kasi azalaka nde na mokakatano ya kolónga likambo moko ya mpasi kati na bomoi. Nzokande, Biblia ezali nde kopesa biso lisungi ebongi mpenza mpo na oyo etali lolenge ya kosilisa mikakatano ya bomoi. (Nzembo 119:28, 143) Na lisalisi ya Biblia, Yehova azali kopesa biso mayele, likoki ya kokanisa, mpe boyebi ya solosolo—makambo oyo malendisaka biso na makanisi mpe na mayoki. (Masese 2:1-11; Baebele 13:6) Basaleli ya sembo ya Nzambe bakoki na bantango mosusu koloba na kozanga mayele mpo bomoto na bango ya kati etungisami. (Yobo 6:2, 3) Yakobo 5:13-16 ezali kolendisa baoyo bazwi mpasi motindo yango ete básɛnga lisungi mpe toli ya bankulutu. Moklisto akoki kozala na maladi na elimo, to akoki kotungisama na makanisi mpo na likambo moko oyo akoki kobongola yango te to azali kotungisama na mawa makasi, to ata mpe komiyoka ete bazali kosalela ye makambo na bokesene. (Mosakoli 7:7; 2 Bakolinti 12:7-10) Moto motindo wana akoki kozwa lisungi epai na bankulutu oyo ‘bakopakola ye mafuta’—elingi koloba, na mayele nyonso, bakopesa ye batoli ya kobɔndisa euti na Biblia—mpe lisusu ‘bakosambela mpo na ye.’ Litomba nini ekoki komonana? “Libondeli na kondima ekobikisa mobɛli, Nkolo akonɛtola ye [na mawa na ye to na mayoki na ye ya komimona ete Nzambe asundoli ye].”
Kasi, ekozala boni soki konyokwama ya moto na makanisi eumeli mpe kobulunganisama eumeli ata nsima ya kozwa lisungi ya mayele oyo euti na babateli na mpate? Basusu oyo bazalaki kati na ezalela motindo yango bamonaki malamu ete básalisa ekizamé ya nzoto mobimba. (Kokanisá na Masese 14:30; 16:24; 1 Bakolinti 12:26.) Maladi moko kati na nzoto ekoki kozala ntina ya konyokwama na mayoki mpe na makanisi. Epai na bato mosusu, kosalisama ya bokɔnɔ wana ya nzoto esungaki bango ete bábikisama mpe na maladi ya makanisi.b Soki maladi ezali na nzoto te, monganga, soki esɛngami, akoki kotinda moto ya maladi oyo epai na minganga mosusu oyo basalisaka maladi ya motó. Esengeli kosala nini na nsima? Lokola elobamaki, oyo ezali ekateli moto na moto asengeli ye moko kotalela. Basusu basengeli te kotɔ́nga ye to kosambisa ye.—Baloma 14:4.
Nzokande, esengeli kosalela mayele ya solosolo mpe kosɛnzɛla ete mitindá ya Biblia misalelama mpenza. (Masese 3:21; Mosakoli 12:13) Soki ezali nde maladi ya nzoto, babeli bakoki kosala liponi kati na myango ndenge na ndenge, kati na yango myango eyebani na bato nyonso mpe myango mosusu lokola naturopathie, acupuncture, homéopathie. Ezali mpe na bato ndenge na ndenge oyo basalisaka maladi ya motó. Kati na bango tokoki kotánga baoyo basalisaka na mwango babengi psychothérapie mpe basusu, oyo bakoki kotalela na bozindo makambo matali bomoi ya moto oyo ayei koluka lisalisi mpo na koyeba bantina oyo mpo na yango bizaleli na ye bibulunganisami to mpo na nini azali na mpasi na mayoki. Baoyo basalisaka na mwango ya psychothérapie bakoki kosunga mobɛli ete ayekola bizaleli ya sika. Basálisi mosusu ya maladi ya motó bakanisaka ete maladi mingi ya motó ekoki kosalisama na nkisi ya monganga.c Elobami ete basusu batyelaka babɛli bikila ya bilei mpe batindaka bango básalela bavitamini.
Bato ya maladi mpe mabota na bango basengeli kozala na bokɛngi wana bazali kotalela liponi oyo basengeli kosala. (Masese 14:15) Yango wana Profesɛrɛ Paul McHugh, mokambi ya Département de la psychiatrie et des sciences du comportement na eteyelo monene ebéngami Johns Hopkins epai bayekolaka mosala ya monganga, alobaki ete mosala ya kobikisa bato ya maladi ya motó “ezali bisálásala. Ezali kopesa nzela te na kozwa bilembeteli ya sikisiki likoló na myango na yango ya koluka bokɔnɔ mpe ya kosalisa yango, ata wana ezali koluka kosalisa makɔnɔ makasi mpenza oyo etali kobulunganisama ya bomoi ya moto—ya makanisi mpe ya bizaleli.” Yango ezali kopesa nzela na kobuka mibeko ya mosala mpe na kobuba, ekoki kopesa nzela ete ata myango ya kosalisa oyo mipesami na mikano malamu emema nde mpasi na esika ya kobikisama.
Tosengeli mpe kolobela likambo oyo ete ba psychiatre mpe ba psychologue bazwelá mosala yango mapolómi na kelasi, kasi basusu mingi bazali na mapolómi te, bazali kosala nyonso kozanga lisungi ya bapesi toli to kozanga lisungi ya bato oyo bayebi malamu myango ya kobikisa makɔnɔ. Basusu babebisaki mosolo mingi epai na bato wana bazangi mapolómi ya mosala ya monganga.
Ata epai na basalisi ya bokɔnɔ ya moto oyo bayekolá na kelasi, ezali na makambo oyo tosengeli kozala na bokɛngi likoló na yango. Wana tozali koluka monganga, tosengeli komindimisa liboso soki akotosa makanisi na biso oyo mazwi moboko na yango na Biblia. Bobele bongo, ekozala likámá soki tokokende epai na monganga oyo atosaka te bindimeli ya lingomba na biso mpe ya bizaleli malamu. Baklisto mingi, atako babulunganisami na makanisi, bazali kosala makasi ete bázala na “elimo motindo moko lokola oyo Klisto azalaki na yango.” (Baloma 15:5, NW) Baklisto motindo wana bazali komibanzabanza na lolenge lobongi na ntina na bizaleli ya moto nyonso oyo akoki kobebisa makanisi to bizaleli na bango. Basálisi mosusu batalelaka ete bipekiseli nyonso biuti na Makomami bizali na ntina te mpe bikoki kopesa mpasi epai na ye oyo azali na maladi ya motó. Bakoki kondima, to mpe kotinda mobɛli ete asala makambo oyo Biblia ezali kokweisa, lokola kosangisa nzoto mibali na mibali to ekobo.
Makanisi yango mazali kati na oyo Paulo abéngaki “kowelana na yango ebéngami nkombo na lokuta ete Boyebi.” (1 Timoté 6:20) Mazali kobongola solo na ntina na Klisto mpe matángami kati na “filizofi mpe lokuta monene” ya mokili oyo. (Bakolose 2:8, NW) Etindá ya Biblia ezali polele: “Mayele ezali te, bososoli ezali te, toli ezali mpe te oyo ikoki kotɛmɛla [Yehova].” (Masese 21:30) Basálisi ya maladi ya motó oyo balobaka ete ‘malamu ezali mabe mpe mabe ezali malamu’ bazali “baninga mabe.” Na esika ete básalisa bato oyo babulunganisami na makanisi, “bakobebisa bizaleli malamu.”—Yisaya 5:20; 1 Bakolinti 15:33.
Na yango, moklisto oyo akanisi ete asengeli mpenza koluka lisalisi epai na monganga oyo asalisaka maladi ya motó asengeli kotalela soki ayekolá mosala na ye na kelasi, ezaleli na ye, mpe lokumu nini mosálisi yango azali na yango mpe soki mwango na ye ya kosalisa ekoki komema mpasi mosusu te. Soki moklisto oyo anyokwami na makanisi akoki kosala yango ye moko te, mbala mosusu moninga ya pene to ndeko ya mosuni oyo akɔmeli akoki kosunga ye. Moklisto oyo azali na mokakatano mpo na koyeba soki kosalela mwango boye ezali likambo ya mayele to te akoki kozwa lisungi soki asololi na bankulutu kati na lisangá—atako ye moko nde akozwa ekateli ya nsuka (to baboti, to babalani mibale).d
Siansi ekoki kokokisa makambo mingi koleka na ntango ya kala, mpo na oyo etali kobikisa maladi. Nzokande, maladi mazali mingi—ya nzoto mpe ya makanisi—oyo ekoki kobikisama te na boumeli ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo mpe esengeli bobele koyikelama mpiko. (Yakobo 5:11) Na kozeláká, “moombo ya sembo mpe ya mayele,” bankulutu, mpe basusu kati na lisangá bazali komonisa motema mawa epai na babɛ́li mpe bazali kosunga bango. Mpe Yehova ye moko azali kolendisa bango ete bálendendela liboso ete ntango wana ya nkembo monene eya, wana maladi ekozala lisusu te.—Matai 24:45; Nzembo 41:1-3; Yisaya 33:24.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisoló, “Lolenge nini kosalisa bato oyo banyokwami na makanisi,” kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mársi 1990.
b Mbala mosusu moto akoki kosɛngisama ete asalisa ekizamɛ mpo na kotalisa makoki ya motó na ye, ekoki mbala mosusu kozala bongo mpo na moto oyo bazali kotalela ye ete azwa ebonga ya bokonzi kati na kompanyi moko. Soki moto alingi kosala ekizamɛ motindo yango to te ezali ekateli etaleli ye moko, kasi tosengeli koyeba ete ekizamɛ motindo wana ekeseni na mwango ya monganga oyo ebéngami psychiatrie.
c Emonani lokola ete makɔnɔ mosusu ya motó masilaka na lisalisi ya nkisi oyo ebongi mpenza. Kasi nkisi yango esengeli kosalelama na bokɛngi nyonso na kolandáká toli ya minganga to ba psychiatre ya makoki mpe bameseni na mosala, mpamba te nkisi yango ekoki kobimisa mpasi mosusu soki esalelami na doze oyo elongobani te.
d Talá lisoló “Wana moklisto abulunganisami na mayoki mpe na makanisi” kati na nimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔ́bɛ 1988 (ebimeli ya Lifalansé).