Masoló ya Basakoli ya Bokonzi
Solo ya Biblia ezali kokóba kosakolama na mboka Irlande
NA BAMBULA oyo euti koleka mboka kitoko Irlande ezalaki esika ya yikiyiki monene. Bobele na ntango wana, bato ya Irlande bayambaki malamu nsango ya elikya euti na Biblia oyo Batatoli ya Yehova bamemelaki bango. Makambo malandi oyo masalemaki na mboka Irlande mazali kondimisa yango.
■ Na engumba Dublin ndeko moko Motatoli ya Yehova mpe mwana na ye ya mwasi bazalaki kosakola ndako na ndako. Bakutanaki na mwasi moko na nkombo Cathy oyo amipesaki mobimba na mokumba ya bana mingi oyo abotaki. Motatoli yango atunaki soki mwana na ye ya mwasi akokaki kosakwela ye nsango ya Biblia na mokuse. Cathy andimaki, mpe mwana moke ya mwasi asalaki lisoló moko ya polele, oyo ebongisami malamu mpenza. Cathy akamwaki na bosembo ya elenge wana ya mwasi mpe na limemya na ye, mpe andimaki lipesi ya trakte oyo elimbolaka Biblia.
Na nsima Cathy amanyolaki likoló na komibongisa malamu mpe bizaleli malamu ya elenge mopaya na ye. Alobaki ete: “Nakamwaki ete elenge mwasi ya moke boye akokaki kopesa nsango kitoko bongo kozanga kobenda likebi likoló na ye. Nazwaki ekateli ete mbala ya nsima oyo Batatoli ya Yehova bakoya, nakoyoka bango.”
Nsima na yango Cathy akendaki kofanda na engumba moko moke na mboka Irlande penepene ya bandelo ya bitúká Cork mpe Kerry. Mwa ntango moke na nsima Batatoli ya Yehova babɛtaki na ekuke na ye, mpe akɔtisaki bango. Andimaki koyekola Biblia mpe sikawa ye mpe mingi kati na bana na ye bazali koyangana na makita ya lisangá. Cathy azali na botɔ́ndi mpo na mposa mozindo oyo elenge mwasi wana moke amonisaki na kosakwela ye nsango malamu.
■ Na etúká ya Tullamore, Batatoli basalaki masoló ya Biblia elongo na mwasi moko na nkombo Jean na boumeli ya mibu nsambo. Na bantango mosusu azalaki komonisa bosepeli mpe azalaki kozwa mikanda, kasi na bantango mosusu azalaki kosepela te. Mokolo mosusu, ntango Motatoli moko na nkombo Frances mpe moninga na ye bayaki kotala Jean, bakutaki ye na nkanda makasi. Batatoli yango balobi ete: “Nyonso oyo tolobaki ezalaki bobele komatisa nkanda na ye. Nsukansuka, alobaki na biso tóbima mpe akangaki ekuke.”
Frances amitunaki soki bozongeli mosusu elingaki sé kozala lolenge yango. Frances amilobelaki ete ‘mbala mosusu ntina ezali te ya kokenda lisusu kotala ye soki azali komonisa bosepeli ya solo te mpo na nsango ya Biblia.’ Nzokande, asololaki likambo yango elongo na mobali na ye, Thomas, mpe mobali na ye azalaki na elikya mingi. Mbala ya nsima oyo bazalaki na kartyé yango, bakendaki lisusu kotala Jean. Amonisaki boninga mpe azwaki bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Mbala na mbala oyo bazongelaki ye bakutanaki na bosepeli motindo moko, mpe Thomas na Frances babandaki boyekoli ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ elongo na ye.
Mpo na nini mbongwana motindo yango? Jean alobi ete na ntango oyo azangaki bonkóndé epai na Batatoli, autaki kobota mpe kobima na lopitálo. Lokola azalaki komelisa elɛzi mabɛlɛ mpe asengelaki koleisa mwana mosusu ya moke, azalaki kolala bobele na boumeli ya ngonga moko na ndambo na butu mobimba. Jean alobi ete: “Likambo oyo nazalaki mpenza kolinga te ezalaki bongo kosolola na ntina na lingomba.”
Nsima ya sanza mibale Jean abandaki koyangana na makita nyonso ya lisangá, mpe pene na sanza minei na nsima abandaki kosangana na mosala ya kosakola. Nsima ya sanza zomi uta ntango abandaki koyekola Biblia, azwaki batisimo. Sikawa ekperiansi ya Jean ezali kosalisa ye kati na mosala ya kosakola. Alobi ete: “Soki nakutani na moto moko oyo azangi bonkóndé, namekaka komitya na esika na ye. Nakomaka ntango nyonso likambo yango. Mbala mosusu makambo makobongwana ntango nakoya lisusu; ekoki kozala ete moto yango akómi malamu mpe akoki koyamba ngai malamu.”