Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/10 nk. 24-28
  • Tosaleli Yehova kati na libota oyo ezali na bomoko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tosaleli Yehova kati na libota oyo ezali na bomoko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Toyekoli solo ya Biblia
  • Esengo na mosala na ntango nyonso
  • Mbongwana na bomoi na ngai
  • Maponi ya bana na biso
  • Mwango ya bolóngi
  • Yango ekoki kozala mosala oyo ebongi na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Yo mpe okoki komipesa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Libyangi mpo na moto nyonso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/10 nk. 24-28

Tosaleli Yehova kati na libota oyo ezali na bomoko

LISOLÓ YA ANTONIO SANTOLERI

Tata na ngai azalaki na mibu 17 ntango alongwaki na mboka Italie na 1919. Akendaki kofanda na mboka Brésil mpo na koluka bomoi ya malamu. Na nsima, azwaki ndako mpo na kosala mosala ya kokata bato nsuki na engumba moko moke kati na etúká ya São Paulo.

MOKOLO moko na mobu 1938, wana nazalaki na mbula nsambo ya kobotama, mobali moko ayaki na ndako ya mosala epai kuna Tata azalaki kokata nsuki mpe atikelaki ye libongoli moko ya Biblia na lokóta ya Brasiliera. Nsima ya mbula mibale, mama azwaki bokɔnɔ makasi mpe akokaki lisusu kosala mosala te kino liwa na ye. Tata mpe azwaki bokɔnɔ, yango wana biso nyonso: Mama, Tata, ndeko na ngai ya mwasi Ana mpe ngai, tokendaki kofanda epai na bandeko mosusu ya libota na engumba São Paulo.

Wana nazalaki na kelasi na São Paulo, namipesaki mpenza na botángi mikanda, mingi mpenza mikanda ya makambo ya kala. Nakamwaki na komona ete na ntango mosusu Biblia ezalaki kolobelama kati na mikanda yango. Lisoló likoló na Ngomba elobelamaki mbala mingi kati na mokanda moko oyo nadefaki na bibliotɛkɛ ya São Paulo. Ezalaki na ntango wana nde nakamataki ekateli ya kozwa Biblia mpo na kotánga lisoló yango ngai moko. Nalukaki Biblia oyo Tata azwaki esilaki koleka mibu mingi mpe nayaki komona yango kati na sanduku moko epai kuna eumelaki mbula nsambo.

Libota na biso mobimba tozalaki Bakatolike, yango wana nalendisamaki soko moke te kotánga Biblia. Sikawa, na milende na ngai moko, nayekolaki koluka mikapo mpe bavɛrsɛ́. Natángaki na esengo monene bobele Lisoló likoló na Ngomba te kasi lisusu mokanda mobimba ya Matai mpe mikanda mosusu ya Biblia. Likambo oyo esepelisaki ngai mingi koleka ezalaki bongo lolenge oyo mateya mpe makamwisi ya Yesu malobelami na bosolo nyonso.

Komonáká bokeseni kati na lingomba ya Katolike mpe makambo natángaki kati na Biblia, nakómaki koyangana na Lingomba ya Presbytérien, mpe Ana alandaki ngai. Atako bongo, namiyokaki bobele ete eloko moko ezangaki ngai. Na boumeli ya mibu mingi nazalaki koluka Nzambe na mposa makasi mpenza. (Misala 17:27) Na butu moko, wana minzoto mimonanaki mingi na likoló, nazalaki kokanisakanisa, namitunaki ete: ‘Mpo na nini nazali awa? Mokano ya bomoi ezali nini?’ Nalukaki esika nakokaki kozala bobele ngai moko na nsima ya ndako, nafukamaki, mpe nabondelaki ete: ‘Nkolo Nzambe! Ozali nani? Ndenge nini nakoki koyeba yo?’ Eyano eumelaki na kozwama te.

Toyekoli solo ya Biblia

Mokolo moko na mobu 1949, wana Tata na ngai autaki kokita na bísi, elenge mwasi moko abɛlɛmaki na ye. Alakisaki ye zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Asalaki abonemá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe asɛngaki elenge mwasi yango aya epai na biso na ndako, koyebisáká ye ete azali na bana mibale oyo bakendaka na Lingomba ya ba Presbytériens. Na ntango mwasi wana ayaki kotala biso, atikelaki Ana búku Enfants mpe abandaki boyekoli ya Biblia elongo na ye. Na nsima ngai mpe nasanganaki na boyekoli yango.

Na novɛ́mbɛ 1950 tokendaki mpo na mbala ya liboso na liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova. Na boumeli na yango búku “Que Dieu soit reconnu pour vrai” ebimaki, mpe tokóbaki boyekoli na biso ya Biblia na lisalisi ya búku yango. Mwa moke na nsima, tososolaki ete tosilaki komona solo, mpe na Apríli 1951, tozwaki batisimo lokola elembo ya komipesa na biso epai na Yehova. Tata ayaki komipesa na Nzambe mwa mibu na nsima mpe atikalaki sembo kino kufa na ye na 1982.

Esengo na mosala na ntango nyonso

Na Yanuáli 1954, wana nazalaki bobele na mibu 22, nandimamaki mpo na kosala na filiale ya Batatoli ya Yehova, oyo ebéngami Betele. Ntango nakómaki kuna, nakamwaki na komona ete mobali moko oyo alekaki ngai bobele na mbula mibale ya kobotama, Richard Mucha, azalaki mokɛngɛli ya filiale. Na 1955, wana emonanaki ete basaleli ya zongazonga, ndenge bakɛngɛli batamboli bazalaki kobéngama na eleko wana, bazalaki mingi te, nazalaki moko na mibali mitano oyo babyangamaki kosala mosala yango.

Teritware na ngai ezalaki na etúká ya Rio Grande do Sul. Kuna ezalaki na masangá bobele 8 ya Batatoli ya Yehova ntango nabandaki, kasi na nsima ya sanza 18 masangá 2 ya sika mabotamaki mpe bitulúkú 20 ya mike bityamaki. Na teritware yango lelo oyo, ezali na zongazonga 15 ya Batatoli ya Yehova, oyo mokomoko ezali na masangá soko 20! Na nsuka ya 1956, bayebisaki ngai ete zongazonga na ngai esilaki kokabolama na biteni ya mike minei oyo esengelaki kotalelama na bakɛngɛli minei. Na ntango yango nazwaki etindá ya kozonga na Betele mpo na mosala mosusu.

Na kokamwa monene mpe na esengo nyonso, natindamaki na nɔ́rdi ya Brésil lokola mosaleli ya etúká, ministre mokɛngɛli oyo atalelaka bazongazonga mingi. Na eleko yango, Brésil ezalaki na baministre Batatoli ya Yehova 12 000, mpe mboka mobimba ezalaki na bitúká mibale. Richard Wuttke azalaki kosala na súdi, mpe ngai nazalaki kosala na etúka ya nɔ́rdi. Na Betele tolakisamaki kosalela masini mpo na kolakisa filime ebimisami na Batatoli ya Yehova, La Société du monde nouveau en action mpe La joie de la Société du monde nouveau.

Na eleko wana kosala mobémbo ekesanaki na ndenge ezali kosalema lelo. Moko te kati na Batatoli azalaki na motuka, na yango nazalaki kosala mobémbo na bwatu, na makálo mabendami na ngɔmbɛ, na mpunda, na engbunduka, mpe na mpepo mbala moko. Ezalaki likambo ya kosepelisa mpenza koleka na mpepo likoló ya zamba monene ebéngami Amazone mpo na kokenda kokita na Santarém, engumba oyo ezwami na katikati ya nzela oyo ekaboli engumba Balém, esika ebale Amazone esangani na mai monene mpe engumba Manaus, mboka-mokonzi ya etúká ya Amazone. Na eleko wana basaleli ya bitúká bazalaki kolɛngɛla mayangani ya zongazonga mingi te; na yango nazalaki kolekisa ntango na ngai mingi na kolakisa filime ya la Société. Na bingumba minene, bankamá ya bato bazalaki koya kotala yango.

Oyo ebendaki likebi na ngai mingi na nɔ́rdi ya Brésil ezalaki etúká ya Amazone. Ntango nazalaki kosala kuna na Apríli 1957, ebale Amazone mpe miluka na yango etondaki mingi. Nazwaki libaku ya kolakisa moko na bafilime na kati ya zamba, natyaki etánda ya kolakisa katikati na nzeté mibale. Lotilíki mpo na kotambwisa masini ya filime eutaki na bwato ya motɛlɛ oyo etɛlɛmisamaki na moluka moko ya pembeni. Mpo na bayangani mingi, ezalaki mbala ya liboso ete bákoka komona filime.

Nokinoki nsima na yango nazongaki na mosala ya Betele, mpe na mbula oyo elandaki, na 1958, nazwaki libaku ya kosangana na liyangani monene ya mikili mingi ya Batatoli ya Yehova, “La volonté divine,” na engumba New York. Batindami oyo bautaki na mikili 123 bazalaki kati na bayangani 253 922 oyo batondisaki libándá ya masano ya Yankee Stadium mpe libándá ya masano Polo Grounds oyo ezali penepene na yango na mokolo ya nsuka ya liyangani wana ya mikolo mwambe.

Mbongwana na bomoi na ngai

Mwa moke nsima ya bozongi na Betele, nasalaki boninga elongo na Clara Berndt, mpe na Mársi 1959 tobalanaki. Totindamaki na mosala ya zongazonga na etúká ya Bahia, kuna tosalaki pene ya mbula moko. Clara mpe ngai tozali naino komikundola na esengo nyonso ezaleli ya komikitisa, boyambi, molende mpe bolingo ya bondeko ya etúká yango; bazalaki babólá na mosuni kasi bazalaki bazwi mpo na oyo etali mbuma ya Bokonzi. Nsima na yango totindamaki na etúká ya São Paulo. Ezali kuna nde, mwasi na ngai akómaki na zemi na 1960, mpe tosengelaki kotika mosala ya ntango nyonso.

Tozwaki ekateli ya kokende kofanda na etúká ya Santa Catarina, epai mwasi na ngai abotamaki. Mwana na biso ya mobali, Gerson, azalaki mwana ya liboso kati na bana mitano oyo tobotaki. Na nsima na ye tobotaki Gilson na 1962, Talita na 1965, Tárcio na 1969, mpe Janice na 1974. Na lisalisi ya Yehova mpe toli kitoko oyo apesaka, tolóngaki etumba ya kobokola bango na mateya mpe na [disipilini, NW] ya Yehova.”​—Baefese 6:4.

Totalelaka mokomoko na bana na biso na motuya mingi. Mokomi na Nzembo amonisaki malamu mpenza mayoki na biso: “Bana mibali bazali likabo na [Yehova].” (Nzembo 127:3) Atako mikakatano, tobatelaki bana na biso lokola tokokaki kosala yango mpo na ‘likabo nyonso liuti na Yehova,’ kozanga kobosana malako mazwami na Liloba na ye. Tosili kozwa mbano mingi. Epesaki biso esengo mingi mpenza ntango bango nyonso mitano, moko nsima na mosusu, moto na moto na ngala na ye, mpe na makanisi na bango moko bamonisaki mposa ya kozwa batisimo lokola elembo ya komipesa na bango epai na Yehova.​—Mosakoli 12:1.

Maponi ya bana na biso

Totondaki na esengo na ntango Gerson, nokinoki nsima ya kosilisa kelasi epai kuna ayekolaki kosalela ordinatɛrɛ, alobaki ete azali na mposa ya kosala na Betele, koponáká bongo mosala ya ntango nyonso na esika ya kopona mosala ya mosuni. Nzokande na ebandeli bomoi ya Betele ezalaki pɛtɛɛ te mpo na Gerson. Nsima ya kokende kotala ye wana alekisaki bobele sanza minei na Betele, nabulunganisamaki mingi mpo ete azalaki na elongi ya mawa wana ezalaki biso kozonga. Na lisalisi ya talatála ya motuka na biso, namonaki ye kotala biso kino tomonanaki lisusu te wana tokɔtaki na libúnu ya nzela. Miso na ngai etondaki na mpisoli na boye ete natɛlɛmaki pembeni ya nzela liboso ya kokóba mobémbo na biso ya bakilomɛ́tɛlɛ 700 kino na ndako.

Gerson ayaki kosepela mpenza na Betele. Nsima ya kosala kuna pene na mibu motoba, abalaki Heidi Besser, mpe basalaki elongo na Betele mbula mibale lisusu. Basengelaki kotika mosala na Betele ntango Heidi akómaki na zemi. Mwana na bango ya mwasi Cintia, oyo azali sikawa na mibu motoba, akendaka na bango elongo kati na mosala ya Bokonzi.

Mwa moke nsima wana tokendaki kotala Gerson na Betele mpo na mbala ya liboso, Gilson autaki kosilisa mbula na ye ya liboso na kelasi ya koyekola lolenge ya kokamba misala ya mombongo, alobaki ete ye mpe azalaki na mposa ya kosala na Betele. Azalaki na mikano ete azongela kelasi na ye na nsima ya kosala mbula moko na Betele. Kasi mikano na ye mibongwanaki, mpe atikalaki na mosala ya Betele. Na 1988 abalaki Vivian Gonçalves, mobongizi-nzela, lolenge babéngaka basáli ya ntango nyonso. Uta wana bazali kosala elongo na Betele.

Esengo na biso ekóbaki na ntango mwana na biso ya misato aponaki mosala ya mobongisi-nzela na 1986, nsima ya koyekola architecture. Mbula misato na nsima ye mpe abyangamaki na Betele. Na 1991, abalanaki na José Cozzi, oyo abandaki kosala na Betele esilaki koleka mibu zomi. Kino sikawa bazali kosala kuna lokola babalani.

Mwasi na ngai mpe ngai tosepelaki lisusu ntango Tárcio oyo alandi baoyo tolobeli, azongelaki maloba bobele moko oyo tosilaki koyoka yango mbala misato, “Tata, nalingi kokenda kosala na Betele.” Lisengami na ye lindimamaki; mpe na 1991 ye mpe abandaki mosala na Betele, epai kuna atikalaki kino na mobu 1985. Tozali na esengo ete asalelaki nguya ya bolenge na ye mpo na kotombola matomba ya Bokonzi ya Yehova ya lolenge yango na boumeli ya mibu koleka misato.

Mwana na biso ya nsuka, Janice, azwaki ekateli ya kosalela Yehova mpe azwaki batisimo na ntango akómaki na mibu 13. Na boumeli ya kelasi na ye, asalaki lokola mobongisi-nzela mosungi na boumeli ya mbula moko. Na nsima, na mokolo mwa 1 Sɛtɛ́mbɛ 1993, abandaki kosala lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza na lisangá na biso awa na engumba Gaspar.

Mwango ya bolóngi

Wapi sɛkɛlɛ ya kobatela libota na bomoko kati na losambo ya Yehova? Nandimi te ete ezali na monɔ́ moko ya nkuku mpo na kosilisa mikakatano nyonso. Yehova asili kopesa toli kati na Liloba na ye mpo na baboti baklisto ete bálanda yango, na bongo lokumu nyonso esengeli kopesama epai na ye mpo na matomba kitoko oyo tosili kozwa. Tosalaki bobele makasi ya kolanda litambwisi na ye. (Masese 22:6) Bana na biso nyonso balandaki elimo na ngai ya kobimisa mayoki polele lokola ezalaka epai na bato mingi oyo bauti na bankɔ́kɔ Latins, mpe balandaki elimo ya mama na bango ya kozwa bikateli ya mayele lokola emonanaka mingi epai na bato ya mboka Allemagne. Kasi, eloko eleki ntina ezali ete basili kozwa uta na biso libula ya elimo.

Matomba ya Bokonzi ezalaki na motuya monene kati na bomoi na biso ya libota. Kotya ntango nyonso matomba wana na esika ya liboso ezalaki pɛtɛɛ te. Na ndakisa, tozalaki na mokakatano ya kolanda boyekoli ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, ata bongo totikaki yango soko moke te. Uta na bomwana na bango mpenza, mwana mokomoko amemamaki na makita ya boklisto mpe na mayangani ya mike mpe ya minene. Bobele maladi to likambo mosusu ya lombangu nde epekisaki biso koyangana na makita. Lisusu, uta bomwana mpenza, bana balandaki biso na mosala ya boklisto.

Ntango bakómaki pene na mibu zomi, bana babandaki kosala masoló na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Tosalisaki bango na kobongisa masoló na bango ya liboso, kolendisáká bango ete bákomaka bobele makanisi ya moboko ya lisoló likoló na nkasa, na esika ya kokoma makambo nyonso. Na nsima, moto na moto azalaki kobongisa lisoló na ye. Lisusu, wana bakómaki na mibu kati na 10 mpe 12, mokomoko akómaki kosangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na mosala ya kosakola. Yango ezali lolenge ya bomoi bobele moko oyo bayebaki.

Mwasi na ngai, Clara, akokisaki mokumba monene na bobɔkɔli ya bana na biso. Butu nyonso, ntango bazalaki mike mpenza​—eleko oyo mwana akɔtisaka kati na bɔɔngɔ́ makambo nyonso oyo azali koyekola—⁠Clara azalaki kotángela bango lisoló moko ya Biblia mpe kobondela elongo na moko na moko na bango. Asalelaki malamu mikanda Paladiso ebungi na paladiso ekozwama; Boyoka Moteyi Monene mpe Mokanda mpo na Masoló ya Biblia.a Na ntango bisaleli lokola bakasɛti mpe bakasɛti ya video ebimisamaki na Batatoli ya Yehova, tosalelaki mpe yango.

Makambo oyo tosili kokutana na yango lokola baboti baklisto endimisi biso ete bana bazali na mposa ete tótyela bango likebi mokolo na mokolo. Bolingo makasi, likebi epai na moko na moko na bango, mpe ntango mingi ezali kati na bamposa ya moboko ya bilenge. Totalelaki yango bobele te lokola mokumba na biso ya kokokisa bamposa wana na makoki na biso nyonso kasi lisusu tozwaki esengo monene na kosaláká bongo.

Na solo, ezali kopesa bosepeli epai na baboti na komona kokokisama ya maloba ya Nzembo 127:3-5: “Bana mibali bazali likabo na [Yehova], mpe mbuma na libumu ezali libonza. Bana mibali babotami na moto kati na makasi na ye bazali pelamoko mbanzi na lobɔkɔ na elombe. Esengo ezali na moto oyo azali na ebuluki etondi na bango.” Kosalela Yehova na bomoko libota mobimba epesi biso esengo!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Nyonso ebimisami na la Société Watch Tower and Tract Society of New York, Inc.

[Elilingi na lokasa 26]

Antonio Santoleri mpe libota na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto