Natikaki mingi mpo na eloko oyo eleki motuya
LISOLÓ YA JULIUS OWO BELLO
Na boumeli ya mbula 32 nazalaki Aladura.a Nakanisaki ete kobikisama na nzela ya kondima mpe mabondeli ekokaki kosilisa mikakatano na ngai mpe kolongola makɔnɔ na ngai nyonso. Nazalaki kosomba nkisi soko moke te, mpe ata nkisi mpo na kosilisa makɔnɔ mikemike. Na boumeli ya bambula yango, ata moto moko te kati na libota na ngai akɔtaki na lopitalo. Mbala nyonso oyo moko kati na bana na ngai azalaki kobɛla, nazalaki kobondela mpo na bango nyonso butu na moi kino bakozongela nzoto kolɔngɔ́nɔ́. Nandimaki ete Nzambe azalaki koyoka mabondeli na ngai mpe azalaki kopambola ngai.
NAZALAKI mosangani ya etuluku ebengami Egbe Jolly, oyo ezali etuluku eleki lokumu kati na Akure, engumba moko na wɛ́sti ya Nigeria. Baninga na ngai bazalaki bato ya bozwi mingi mpe bato ya nguya kati na mboka. Deji, mokonzi ya Akure, azalaki mbala mingi koya kotala ngai na ndako.
Nazalaki mpe mobali ya basi mingi, basi motoba mpe bamakango ebele. Mombongo na ngai ekólaki mingi. Makambo nyonso mazalaki kotambola malamu mpo na ngai. Nzokande, lokola moto na mombongo kati na lisese ya Yesu na ntina na mangaliti, namonaki eloko moko ya motuya monene oyo esalaki ete natika basi na ngai mitano, bamakango na ngai, lingomba, etuluku ya bokutani, mpe etɛlɛmɛlo monene kati na mboka mpo na kozwa yango.—Matai 13:45, 46.
Ndenge nakomaki Aladura
Nayokaki nsango ya Baaladura mpo na mbala ya liboso na 1936, na ntango yango nazalaki na mibu 13 ya kobotama. Moninga moko na nkombo Gabriel ayebisaki ngai ete: “Soki okei na lingomba ebéngami ete Église apostolique du Christ, okoyoka Nzambe azali koloba.”
Natunaki ye ete: “Nzambe alobaka lolenge nini?”
Alobaki ete: “Yaká, mpe okomona.”
Nazalaki na mposa makasi ya koyoka mongongo ya Nzambe. Na bongo na butu yango, nakendaki elongo na Gabriel na ndakonzambe. Mwa ndako moke etóndaki na basambeli. Basangani babandaki koyemba ete: “Yákani, bino bato! Yesu azali nde awa!”
Na boumeli ya loyembo yango, moto moko angangaki ete: “Kitá, elimo santu!” Moto mosusu abɛtaki ngonga mpe lisangá mobimba bafandaki nyɛɛ. Na nsima mwasi moko abandaki kolɛnga mpe koloba makambo na lokotá eyebani te. Na mbalamoko angangaki na mongongo makasi ete: “Bóyoka nsango ya Nzambe, Ɛ bino bato! Nzambe alobi boye: ‘Bósambela mpo na bato ya bokila ete báboma bato te!’” Bato nyonso bazalaki mitema likoló.
Nakanisaki ete Nzambe asilaki koloba na nzela na ye, na yango na mobu molandaki nazwaki batisimo kati na Église apostolique du Christ.
Bokutani ya libosoliboso na Batatoli ya Yehova
Na mobu 1951, nazwaki nimero moko ya zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli epai ya Motatoli moko na nkombo ya Adedeji Boboye. Zulunalo yango ezalaki ya kosepelisa, na yango nasalaki abonemá mpe nazalaki kotánga yango mbala na mbala. Na 1952, nakendaki na liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova oyo liumelaki mikolo minei na engumba Ado Ekiti.
Makambo namonaki na liyangani masimbaki motema na ngai. Nakanisaki mozindo na motema na ngai ete nákoma Motatoli ya Yehova kasi nalongolaki likanisi yango. Mokakatano na ngai ezalaki ete nazalaki na basi misato mpe makango moko na eleko wana. Nakanisaki ete likoki ezalaki te ete nákoka kofanda bobele na mwasi moko.
Wana nazongaki na Akure, nayebisaki na Adedeji ete atika koya kotala ngai, mpe nasalaki lisusu te abonemá na ngai ya sika mpo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Nakómaki lisusu na molende makasi kati na lingomba na ngai. Na nsima, namilobaki ete, soki natali malamu, Nzambe asili kopambola ngai uta nazali kosangana na Église apostolique du Christ. Nabalaki basi misato mpe nabotaki bana mingi. Natongaki ndako na ngai moko. Nakɔtaki mpe lopitalo ata moke te. Lokola emonanaki ete Nzambe azalaki koyanola na mabondeli na ngai, ntina nini nasengelaki kokɔta na lingomba mosusu?
Nakómi moto monene mpe nafungwami miso
Nakómaki kopesa makabo mingi na lingomba. Mosika te baponaki ngai nkulutu kati na lingomba, etɛlɛmɛlo oyo epesaki ngai likoki ya komona polele misala ya lingomba oyo mibombama. Makambo namonaki mabulunganisaki ngai. Pastɛrɛ mpe “basakoli” balingaki mosolo; lokoso na bango elɛmbisaki ngai.
Na ndakisa, na sanza ya Mársi 1967 basi na ngai misato babotaki. Na lingomba ezalaki na momesano ya kosala molulu ya kopesa bana nkombo. Na yango, namemaki makabo—mbisi, limonade, mpe milangi ya masanga sukali—epai ya pastɛrɛ mpo ete abongisa molulu.
Na mokolo ya molulu na ndakonzambe, pastɛrɛ alobaki liboso ya lisangá mobimba ete: “Bato oyo bazali bazwi na lingomba oyo bazali kokamwisa ngai. Balingi tosalela bango molulu ya kopesa nkombo, kasi bamemi bobele masanga sukali mpe mbisi. Nyama te! Ntaba te! Bokanisa naino! Kaina apesaki Nzambe likabo ya mbálá minene, kasi Nzambe andimaki likabo yango te mpamba te ezalaki na makila te kati na yango. Nzambe azali na mposa ya biloko oyo bizali na makila. Abele amemaki nyama, mpe likabo na ye lindimamaki.”
Mpo na yango, natɛlɛmaki mpe nabimaki na kosilika. Nzokande, natikaki te kokende na ndakonzambe. Nabakisaki lisusu ntango mingi mpo na bokutani na etuluku ya baninga na ngai. Na bantango mosusu nazalaki kosangana na makita na Ndako ya Bokonzi, mpe nasalaki abonemá ya sika na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Atako bongo, nazalaki naino pene te ya kokóma Motatoli ya Yehova.
Ekateli ya kosalela Yehova
Mbongwana mpo na ngai esalamaki na 1968. Mokolo moko nabandaki kotánga lisoló moko kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo lizalaki kolobela minyoko makasi oyo Batatoli ya Yehova bazalaki kozwa na mokili ya Malawi. Lisoló lilobelaki elenge mwasi moko ya mibu 15 oyo bakangaki ye na nzeté mpe babebisaki ye mbala motoba mpamba te aboyaki kowangana kondima na ye. Yango ebulunganisaki ngai mingi, nabwakaki zulunalo yango na nsé, kasi nazalaki ntango nyonso kokanisa na ntina na likambo yango. Nayebaki ete elenge mwasi ata moko te kati na lingomba na ngai akokoka komonisa kondima motindo wana. Na nsima, bobele na mpokwa wana, nazwaki zulunalo yango mpe natángaki lisusu lisoló yango.
Nabandaki koyekola Biblia na mozindo mpenza. Wana ezalaki ngai kokola na boyebi, nakómaki komona lolenge oyo lingomba ezimbisaki biso. Lokola emonanaki na ntango ya kala, banganga na biso ‘bamipesaki na masumu.’ (Hosea 6:9) Bato motindo wana bazali kati na basakoli ya lokuta oyo Yesu akebisaki bato na ntina na bango! (Matai 24:24) Nazalaki lisusu kondima te bimonaneli mpe misala na bango ya nguya. Nazwaki ekateli makasi ya komisikola na lingomba ya lokuta mpe kosalisa basusu ete básala mpe bongo.
Milende ya bato mpo ete natikala na lingomba
Ntango bankulutu ya lingomba bamonaki ete nazwaki ekateli ya kolongwa na lingomba, batindaki mwa etuluku ya bato ete báya kosembola ngai. Balingaki te kobungisa eutelo monene ya mosolo. Balakaki ngai ete nakókoma Baba Egbe, elingi koloba mokonzi ya moko kati na masangá ya Église apostolique du Christ na Akure.
Naboyaki lipesi na bango mpe nayebisaki bango ntina. Nalobaki ete: “Lingomba ezali kokosa biso. Bazali koloba ete bato malamu nyonso bakokende na likoló. Nzokande nasili kotánga kati na Biblia, mpe nandimisami ete bobele bato 144 000 nde bakokende na likoló. Bato mosusu ya sembo bakofanda na paladiso awa na mabelé.”—Matai 5:5; Emoniseli 14:1, 3.
Pastɛrɛ ya lingomba amekaki kopusa basi na ngai ete bátɛmɛla ngai. Ayebisaki bango bápekisa Batatoli ya Yehova koya na ndako na biso. Moko kati na basi na ngai atyelaki ngai ngɛngɛ kati na bilei. Mibale kati na bango bakebisaki ngai na ntina na emonaneli bazwaki na ndakonzambe. Emonaneli yango emonisaki ete soko natiki lingomba nakokufa. Atako nyonso wana, nalandaki kopesa litatoli epai ya basi na ngai, kobyangáká bango ete báya na makita elongo na ngai. Nalobaki na bango ete: “Kuna bokozwa mibali mosusu.” Nzokande, moko te kati na bango amonisaki bosepeli, mpe balandaki ntango nyonso komeka kolɛmbisa ngai.
Nsukansuka, na mokolo mwa 2 Febwáli 1970, wana nazongaki na ndako longwa na mobembo na engumba moko ya pembeni, nakutaki ete ndako ezalaki mpamba. Basi na ngai nyonso bakimaki elongo na bana.
Nakangami sé na mwasi moko
Nakanisaki ete ‘nakoki sikawa kobongisa libala na ngai.’ Nabyangisaki Janet, mwasi na ngai ya liboso, ete azonga na ndako. Andimaki. Nzokande, libota na ye baboyaki makasi likanisi wana. Ntango basi na ngai mosusu bayokaki ete nasɛngaki na Janet ete azonga, bakendaki na ndako ya tata na ye mpe balukaki kobɛta ye. Bongo libota na ye babyangaki ngai na likita moko.
Pene na bato 80 bayaki mpo na likita yango. Tata lɛki ya Janet, oyo azalaki mokonzi ya libota, alobaki ete: “Soki ozali na mposa ya kozongisa mwana na biso na libala, boye osengeli mpe kozongisa basi mosusu. Kasi soki olingi kolanda lingomba na yo ya sika mpe kotikala na mwasi moko, wana osengeli koluka mwasi mosusu. Soki ozongisi Janet, basi na yo mosusu bakoboma ye, mpe tozali na mposa te ete mwana na biso akufa.”
Nsima ya kosolola ntango molai, libota wana bayaki kososola ete nazalaki na ekateli makasi ya kozala na mwasi bobele moko. Nsukansuka bakitisaki mitema. Tata lɛki alobaki: “Tokobɔtɔla mwasi na yo te. Okoki kokende na ye.”
Na mokolo mwa 21 Máí 1970, Janet mpe ngai tobalanaki na miso ya Letá. Mikolo libwa na nsima nazwaki batisimo lokola Motatoli ya Yehova. Na Desɛ́mbɛ ya mobu bobele wana, Janet mpe azwaki batisimo.
Nazwi mapamboli ya Yehova
Basangani ya lingomba na biso ya kala basakolaki ete soki tokómi Batatoli ya Yehova, tokokufa. Yango ezalaki esili koleka pene na mibu 30. Ata soki nakufi sikawa, yango ekozala mpo ete nakómaki Motatoli ya Yehova? Soki mwasi na ngai akufi sikawa, ezali na moto oyo akoki koloba ete ezali mpo ete akómaki Motatoli ya Yehova?
Nasalaki milende makasi mpo na kolakisa nzela ya solo epai na bana na ngai 17. Atako mingi kati na bango basilaki kokóma mikóló na ntango oyo nakómaki Motatoli, nalendisaki bango ete bayekola Biblia mpe nazalaki komema bango na makita mpe na mayangani. Nazali na esengo ya komona mitano kati na bango kosalela Yehova elongo na ngai. Moko azali kosala na ngai elongo lokola nkulutu kati na lisangá. Mosusu azali mosaleli na misala na lisangá moko ya pembeni. Mibale kati na bana na ngai bazali kosala mosala ya mobongisi nzela ya sanza na sanza.
Soki nazongisi makanisi nsima, nakamwaka mpo na ngɔlu oyo Yehova amoniselaki ngai ete nakoma mosaleli na ye. Maloba oyo ya Yesu mazali mpenza solo ete: “Moto akoki koya epai na ngai te bobele soko Tata, Motindi na ngai, akobenda ye”!—Yoane 6:44.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Elimboli na lokotá ya Yoruba ete “ye oyo asambelaka.” Elobelamaka mpo na basangani ya lingomba moko ya Afrika oyo basalaka bikamwiseli ya kobikisa na nzela ya elimo.