Bonsomi ya losambo elimboli nini mpo na yo?
Atako bonsomi ya lingomba etalelami lokola lotómo ya moboko kati na États-Unis, bituluku ya bato babimisaki mobulu makasi mpo na kotɛmɛla Batatoli ya Yehova na bambula 1940 na mokili yango
BAMILIÓ ya bato babundaki mpo na yango. Basusu kútu bakufaki mpo na yango. Ya solo, oyo ezali moko na biloko ya motuya oyo bato bazali na yango. Yango ezali nini? Bonsomi! Búku The World Book Encyclopedia elimboli bonsomi lokola “likoki ya kozwa bikateli mpe ya kokokisa yango.” Ebakisi ete: “Engebene mibeko, bato bazali na bonsomi soki bazali kosalela boyengebene, bazali te kotyela bango bipekiseli bizangi ntina, to mpe ya makasimakasi. Mboka epai kuna bafandi esengeli mpe kobatela ntómo na bango—elingi koloba, bonsomi na bango ya moboko, nguya na bango, mpe mabaku malamu na bango.”
Kolimbola yango emonani ete ezali pɛtɛɛ. Nzokande, mpo na kokokisa yango na misala, ezali komonana ete bato bazali mpenza te na likoki ya koyokana likoló na bandelo epai bonsomi esengeli kosuka. Na ndakisa, bamoko bazali kokanisa ete ezali mokumba ya guvernemá ya kosala mibeko mpo na kobatela bonsomi ya banamboka na yango. Nzokande basusu bazali koloba ete mibeko yango mizali mpenza minyɔlɔlɔ oyo banamboka basengeli kosikolama na yango! Ya solo, bonsomi ezali na ndimbola ikeseni engebene bato na bato.
Ezali boni mpo na bonsomi ya losambo?
Ekoki kozala ete bonsomi oyo eleki kobimisa kowelana ezali bongo bonsomi ya losambo, oyo elimbolami lokola “lotómo ya kondima mpe ya kosalela bindimeli oyo moto aponi yango ye moko.” Engebene Déclaration universelle des droits de l’homme ya Mabota Masangani, “moto na moto azali na bonsomi ya kosalela makanisi, lisosoli mpe losambo.” Yango esangisi lotómo oyo moto azali na yango ya “kobongwana na lingomba mosusu to mpe ya kobongola bindimeli na ye,” mpe lisusu bonsomi ya “kolakisa lingomba to bindimeli na ye na koteyáká yango, kosaleláká yango, na kosambeláká mpe na kolandáká masɛngami na yango.”—Article 18.
Na ntembe te, tosengeli komizela ete ekolo nyonso oyo emibanzabanzaka mpenza mpo na bafándi na yango ebatela bonsomi wana. Na mawa nyonso, ezalaka ntango nyonso bongo te. Búku The World Book Encyclopedia elobi ete: “Lingomba esimbaka mayoki mozindo ya bato mingi. Baguvernemá mingi ezali na boyokani makasi na lingomba moko mpe etalelaka bato ya mangomba mosusu ete bazali likámá mpo na bokonzi ya politiki. Guvernemá mosusu ekoki mpe kotalela lingomba ete ezali likámá mpo na politiki mpamba te mangomba makoki kosɛnga libosoliboso botosi epai ya Nzambe liboso ya kotosa Letá.”
Mpo na bantina yango baguvernemá mosusu ezali kotya mibeko mpo na lolenge ya kosalela lingomba. Mwa ndambo moke bazali kolendisa ezaleli ya kozanga kondima nyonso mpenza. Mosusu, atako bazali komiloba ete bazali kolendisa bonsomi ya losambo, bazali kokɛngelakɛngela misala nyonso mitali mangomba.
Na ndakisa, tótalela ezalela oyo emonanaki na boumeli ya bambula mingi na ekólo Mexique. Atako mibeko ya mboka mizalaki kobatela bonsomi ya losambo, mibeko yango milobaki lisusu ete: “Bandakonzambe oyo ezali kosalelama mpo na losambo epai na bato nyonso ezali biloko ya ekolo, oyo emonisami na guvernemá federal, oyo esengeli kokáta soki ndakonzambe nini ekoki kolanda kosalelama mpo na lolenge wana.” Na 1991 Mibeko ya ekólo mitalelamaki lisusu mpo na kolongola mobeko wana. Atako bongo, ndakisa wana ezali komonisa ete bonsomi ya losambo ekoki kolimbolama na ndenge ikeseni engebene ekólo na ekólo.
Lolenge mosusu ya bonsomi ya losambo
Bonsomi ya losambo ezali komonana na mboka epai oyo ofandi? Soki ezali boye, lolenge nini ezali kolimbolama? Ozali na likoki ya kosambela Nzambe na lolenge oyo yo moko oponi, to osengisami na makasi ete okóma mosangani ya lingomba ya Letá? Ozali na ndingisa ya kotánga mpe ya kokabola mikanda ya lingomba, to mikanda motindo wana mipekisami na guvernemá? Ozali na likoki ya kosolola na basusu na ntina na kondima na yo, to yango etalelami ete ezali kotyola ntómo na bango ya losambo?
Biyano na mituna wana bikeseni engebene esika oyo moto afandi. Nzokande, likambo ya kobenda likebi, ezali na lolenge moko ya bonsomi ya losambo oyo ezali kotalela soko moke te mboka epai kuna ofandi. Ntango azalaki na Yelusaleme na mobu 32 T.B., Yesu ayebisaki epai na bayekoli na ye ete: “Soko bino bokoumela kati na liloba na ngai, bokozala bayekoli na ngai na solo, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.”—Yoane 8:31, 32.
Yesu alingaki koloba nini na maloba wana? Bayoki na ye oyo bazalaki Bayuda bazalaki na mposa makasi ya kosikwama na boyangeli ya Baloma. Kasi Yesu azalaki te kosolola na bango na ntina na kosikwama na monyoko ya boyangeli ya politiki. Nzokande, azalaki kolaka bayekoli na ye eloko moko oyo eleki malamu, lokola tokomona yango na lisoló lilandi.