Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/2 nk. 8-13
  • Bomoi na yo​—⁠Ntina na yango ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi na yo​—⁠Ntina na yango ezali nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Liziba monene ya bososoli
  • Ntina ya bomoi na kotaleláká zolongano na yango
  • Ntango ya komisalela nkombo malamu yango oyo
  • ‘Nyonso oyo esɛngami epai na moto’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Azali ndakisa to likebisi mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mokanda ya Biblia nimero 21—Mosakoli
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Salelá bomoi na yo na lolenge malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/2 nk. 8-13

Bomoi na yo​—Ntina na yango ezali nini?

“Natambwisaki motema na ngai na mayele . . . kino nakokaki kososola oyo ezali malamu mpo na bana na bato . . . na boumeli ya mikolo nyonso ya bomoi na bango.”​—MOSAKOLI 2:3, NW.

1, 2. Mpo na nini ezali mabe te komibanzabanzaka na ntina na yo moko na bokatikati nyonso?

OMIBANZABANZAKA na ntina na yo moko, boye te? Yango ezali likambo libongi mpenza. Yango wana tolyaka mokolo na mokolo, tolalaka mpɔngi na ntango toyoki ete nzoto elɛmbi, tosepelaka kozala elongo na baninga mpe balingami na biso. Na bantango mosusu, tosalaka masano, tosukolaka na mai, to mpe tosalaka makambo mosusu oyo masepelisaka biso; nyonso wana emonisi ete tomibanzabanzaka na bokatikati mpo na biso moko.

2 Komibanzabanza motindo wana mpo na yo moko eyokani mpenza na makambo oyo Nzambe apusaki Salomo na kokoma ete: “Likambo lileki malamu ezali mpo na moto te, bobele ete alya mpe amela mpe azwa esengo kati na mosala na ye.” Na kotalela makambo oyo ye moko amonaki, Salomo abakisaki ete: “Oyo mpe nasili komona, ɛɛ ngai, ete yango euti na lobɔkɔ ya Nzambe ya solo. Mpo ete nani akolyaka mpe nani akomelaka koleka ngai?, NW.”​—Mosakoli 2:24, 25.

3. Mituna nini ya mpasi bato mingi bazali kozwa eyano na yango te?

3 Kasi, oyebi malamu ete bomoi esuki te bobele na kolya, komela, kolala mpe kosala mwa makambo ya malamu. Tozali na bampasi, na makambo oyo mazali koyokisa biso mawa, mpe na mitungisi. Kasi emonani ete tozalaka mpenza na ntango te ya kokanisa ntina ya bomoi na biso. Ezali mpe bongo mpo na yo, boye te? Nsima ya kotalela malamumalamu boyebi mozindo mpe ebele ya makoki oyo biso bato tozali na yango, Vermont Royster, mobimisi ya kala ya zulunalo The Wall Street Journal, akomaki ete: “Talá likambo ya kokamwa. Ntango tozali kokanisa na ntina na bato, na mikakatano na bango, mpe na esika na bango kati na mɔlɔ́ngɔ́ oyo, tozali ntango nyonso kokoka te koyeba makambo mingi koleka oyo eyebanaki na ntango bomoi ebandaki. Tozali naino komituna soki tozali banani, mpo na nini tozali, mpe tozali kokende wapi.”

4. Mpo na nini mokomoko na biso asengeli koyeba biyano na mituna oyo mitali biso?

4 Okoyanola ndenge nini na mituna oyo: Tozali banani? Mpo na nini tozali awa? Mpe tozali kokende wapi? Mr. Royster akufaki na sanza ya Yulí oyo eutaki koleka. Okanisi ete na ntango yango asilaki kozwa biyano ya solosolo na mituna wana? Na etuneli ya polele, ezali nde na nzela oyo okoki koluka biyano yango? Lolenge nini kozwama ya biyano wana ya solosolo ekoki kosalisa yo ete ozala na bomoi ya esengo koleka mpe ya ntina mingi? Tiká tótalela yango.

Liziba monene ya bososoli

5. Mpo na nini tosengeli kotalela Nzambe ntango tozali koluka kozwa biyano na mituna mitali ntina ya bomoi?

5 Soki totikamaki bobele biso moko ete tóluka ntina ya bomoi na biso, mbɛlɛ tokokaki kolónga soko moke te, mpe likambo yango lisili komonana epai na ebele ya mibali mpe basi, ezala baoyo batondi na boyebi mpe na eksperiansi. Kasi totikami biso moko te. Mozalisi na biso apesi lisungi. Ntango ozali kokanisa likambo oyo ete ye azali na bomoi “lobiko na lobiko” mpe ete ayebi mɔlɔ́ngɔ́ mpe lisoló mobimba ya bato bandá nsuka kino nsuka, ozali kososola ete azali Liziba ya bososoli mpe ya mayele oyo eleki nyonso, boye te? (Nzembo 90:1, 2) Azalisaki bato mpe asili komona makambo nyonso oyo bato basili kokutana na yango, boye ezali Ye nde tosengeli kotalela mpo na kozwa bososoli, kasi tokotalela te bato oyo bazangi kokoka, oyo mayele na bango mpe makoki na bango ya kokanisa ezali na ndelo.​—Nzembo 14:1-3; Baloma 3:10-​12.

6. (a) Na lolenge nini Mozalisi apesi bososoli oyo tozali na yango mposa? (b) Lolenge nini Salomo atalelami na likambo yango?

6 Atako tokoki te komizela ete Mozalisi ayebisa biso ntina ya bomoi na monɔkɔ na ye mpenza, tóyeba ete asili kopesa liziba ya bososoli​—Liloba na ye lipemami. (Nzembo 32:8; 111:10) Mokanda ya Mosakoli mozali na motuya monene kati na likambo yango. Nzambe apemisaki Salomo, mokomi ya mokanda yango, na boye ete “mayele na Salomo elekaki mayele na bato nyonso na epai na ebimelo na moi.” (1 Mikonzi 3:6-​12; 4:30-​34) “Mayele na Salomo” ebimisaki kokamwa monene epai na mokonzi-mwasi moko mopaya, kino alobaki ete makambo oyo bayebisaki ye ezalaki ata katikati te ya oyo ye moko amonaki mpe ete baoyo bazalaki koyoka mayele ya Salomo bazalaki mpenza bato na esengo.a (1 Mikonzi 10:4-8) Biso mpe tokoki kozwa bososoli mpe esengo na mayele oyo Mozalisi na biso apesaki na nzela ya Salomo.

7. (a) Salomo apesaki bosukisi nini na misala mingi oyo misalemi na nsé na lola? (b) Bandakisa nini emonisi bosolo ya makanisi ya Salomo?

7 Mokanda ya Mosakoli mozali komonisa mayele oyo Nzambe azali kopesa, oyo esalaki bopusi kati na motema mpe na bɔɔngɔ́ ya Salomo. Lokola azalaki na ntango, na makoki, mpe na bososoli, Salomo atalelaki na mozindo “makambo nyonso masalami na nsé na lola.” Asosolaki ete mingi na makambo yango “izali bobele bisalasala mpe koluka kokwa mopɛpɛ,” mpe yango ezali likanisi lipemami oyo tosengeli kobosana yango te ntango tozali kokanisa ntina ya bomoi na biso. (Mosakoli 1:13, 14, 16) Salomo azalaki koloba polele, lolenge mpenza makambo mazali. Na ndakisa, kanisá naino maloba na ye oyo mazwami na Mosakoli 1:15, 18. Oyebi malamu ete, na boumeli ya bikeke mingi, bato bameki mitindo na mitindo ya baguvernemá, kozaláká mbala mosusu na mposa mpenza ya kosilisa mikakatano mpe kobongisa bomoi ya bato. Atako bongo, ezali nde na boyangeli ata moko oyo esili kosembola makambo nyonso oyo masilá ‘kongumbama’ na ebongiseli oyo ya kozanga kokoka? Mpe osili mbala mosusu komona ete ntango moto moko azali na boyebi mozindo mingi, akososola mpe na bozindo ete na boumeli ya bomoi mokuse oyo bato bazali na yango, likoki ya kosembola makambo malamumalamu ezali te. Boyebi ya likambo wana ememeli bato mingi mitungisi makasi, nzokande biso tozali mbala mosusu kozwa mitungisi yango te.

8. Mitindo nini ya zolongano ebandá uta kalakala?

8 Likambo mosusu oyo tosengeli kotalela ezali bongo zolongano oyo ikozongaka mbala na mbala, oyo izali na bopusi likoló na biso, na ndakisa kobima mpe kolala ya moi to kopɛpa ya mopɛpɛ mpe mbonge ya mai. Biloko nyonso wana bizalaki na eleko ya Mose, ya Salomo, ya Napoléon, mpe ya bankɔ́kɔ oyo babotaki bankɔ́kɔ na biso. Mpe yango ezali kolandana kino lelo. Bobele bongo, “libota moko bakolimwa mpe libota moko bakoya.” (Mosakoli 1:4-7) Na etaleli ya bomoto, makambo mabongwani mpenza te. Bato ya kala mpe bato ya lelo bazali na misala mikokani, bilikya motindo moko, bamposa motindo moko mpe bikela motindo moko. Ata soki kati na bato, moko amizwelaki lokumu to ayebanaki mingi mpo na bonzengá to makoki na ye, moto yango azali wapi lelo? Akendá mpe mbala mosusu basilá kobosana ye. Likanisi wana ezali te likanisi ya kozokisa mayoki. Bato mingi bayebi ata nkombo ya baboti ya bankɔ́kɔ na bango te, bayebaka ata esika babotamaki te, bayebi mpe esika bakundamá te. Okoki sikawa kososola ntina oyo Salomo andimaki na elónga mpenza ete misala mpe milende oyo bato bazali kosala ezali bobele bisalasala.​—Mosakoli 1:9-​11.

9. Lolenge nini kozala na bososoli ebongi na makambo oyo mazali kokómela bato ekoki kosalisa biso?

9 Na esika ya kotungisa biso, bososoli ya Nzambe na makambo ya moboko oyo mazali kokómela bato ekoki nde kopesa biso litomba, kopusáká biso na koboya kopesa motuya na mikano to na bolukiluki ya biloko oyo mosika te bikoleka mpe bikobosanama. Bososoli yango esengeli kosalisa biso na komona motuya ya oyo tozali kozwa na bomoi mpe oyo tozali komeka kosala. Na ndakisa, na esika ya kozala bato oyo baminyokolaka nzoto bango moko, tosengeli nde kozwa esengo na kolya mpe komela na bokatikati. (Mosakoli 2:24) Boye, lokola tokoki komona yango, bosukisi ya Salomo na makambo oyo mazali kokómela bato ezali mpenza malamu mpe na makanisi ya bolóngi. Na mokuse, bosukisi yango ezali ete tosengeli kopesa motuya na boyokani na biso elongo na Mozalisi, mpamba te ye akoki kosalisa biso ete tózwa bomoi ya esengo mpe ya ntina libela na libela na mikolo mizali koya. Salomo anyataki ete: “Tóyoka nsuka na likambo: Tosá Nzambe mpe batelá mibeko na ye; yango ezali [nyonso oyo esɛngami epai na moto, NW ].”​—Mosakoli 12:13.

Ntina ya bomoi na kotaleláká zolongano na yango

10. Na lolenge nini Salomo amonisaki ete moto mpe nyama bakokani?

10 Mayele mauti na Nzambe, oyo mazali kati na mokanda ya Mosakoli, makoki lisusu kosalisa biso mpo na kotalela ntina ya bomoi na biso. Ndenge nini? Na boye ete, na makanisi mabongi mpenza, Salomo atalelaki na bozindo makambo mosusu ya solo oyo mbala mingi biso moko tokanisaka ata yango te. Moko na yango etali bokokani ndenge na ndenge kati na moto mpe nyama. Yesu akokanisaki bayekoli na ye na bampate, nzokande bato mingi balingaka te ete bákokanisa bango na banyama. (Yoane 10:11-​16) Atako bongo, Salomo abimisaki makambo mosusu oyo makoki kotyelama ntembe te ete: “Nzambe azali komeka [bana na bato] ete amonisa bango ete bazali bobele nyama. Mpo ete, yango ekokwela bana na bato, ekokwela mpe banyama; bobele likambo moko ekokwela bango. Lokola moko akokufa, oyo mosusu mpe akokufa; . . . boye moto azali koleka likoló na nyama te. Nyonso bobele mpamba. . . . Nyonso ilongwi na mputulu, nyonso ikozonga na mputulu.”​—Mosakoli 3:18-​20.

11. (a) Lolenge nini zolongano ya bomoi ya nyama ekoki kolimbolama? (b) Ozali na mayoki nini na lolenge makambo yango malobelami?

11 Kanisá mwa moke nyama oyo osepelaka kotala, ekoki kozala panya ya zámba to simbiliki. (Deteronome 14:7; Nzembo 104:18; Masese 30:26) To mpe okoki kobanza na esende; ezali na mitindo koleka 300 ya bisende na mokili mobimba. Zolongano ya bomoi na ye elekaka lolenge nini? Nsima ya kobotama, mama na ye aleisaka ye na boumeli ya mwa bapɔ́sɔ. Mwa moke na nsima, nkungé (poils) ibimi na nzoto mpe akoki sikawa kosakana mwa moke na libándá. Okoki komona ye ntango azali kokimakima epai na epai mpo na koyekola koluka bilei. Kasi mbala mingi emonanaka lokola ete azali bobele kosakana, mpe kosepela na bolenge na ye. Nsima ya kokokisa soko mbula moko, alukaka molongani. Na nsima asengeli kosala zumbu to mobengá mpe kobatela bana na ye. Soki bazali kozwa mbuma mingi, ndiká mingi, mpe mbóto mingi, libota ya esende ekoki koyikana mpe kozwa likoki ya koyeisa mwa ndako na bango monene. Kasi bobele nsima ya mwa bambula, esende anuni mpe akómi kozwa makámá mpe makɔnɔ ntango nyonso. Ntango akokisi pene na mbula zomi, akufi. Ezali na mwa bokeseni kati na mitindo ndenge na ndenge ya bisende, kasi mpo na bango nyonso bomoi elekaka lolenge wana.

12. (a) Na bosolo mpenza, mpo na nini zolongano ya bomoi ya bato mingi ekokani na oyo ya nyama mpamba? (b) Tosengeli komikundola nini na ntango tokomona lisusu nyama oyo tozali kokanisa sikawa?

12 Bato mingi baboyaka te ete zolongano ya bomoi ya nyama ezala bongo, mpe bayebi malamu ete esende akoki te kozala na mokano moko ya mayele na bomoi. Nzokande, bomoi ya bato mingi ekeseni mpenza te na oyo ya nyama, boye te? Babotamaka mpe babatelamaka ntango bazali naino mike. Balyaka, bakólaka, mpe basakanaka na ntango ya bolenge. Nsima ya mwa ntango, bakómi mikóló, bazwi molongani, bazwi ndako ya kofanda mpe lolenge ya komizwela bilei. Soki balóngi, bakoki koyikana mpe koyeisa efandelo (zumbu) na bango monene, epai kuna bakobɔkɔla bana. Nokinoki nsima wana bambula eleki, bakómi mibangé. Soki bakufi liboso te, bakoki kokufa nsima ya mbula 70 to 80 oyo etondi na “mpasi mpe na bolózi.” (Nzembo 90:9, 10, 12) Okoki komikundola makambo wana, oyo mazali kopusa biso na komanyola, mokolo oyo okomona lisusu esende (to nyama mosusu oyo ozali komona na makanisi na yo).

13. Likambo nini lizali kokómela ezala banyama to bato?

13 Ososoli ntina oyo Salomo akokanisaki bomoi ya moto na oyo ya nyama. Akomaki ete: “Ntango ezali mpo na eloko na eloko . . . ; ntango na kobotama mpe ntango na kokufa.” Likambo oyo ya nsuka, elingi koloba liwa, ezali motindo moko epai na moto mpe epai na nyama, “lokola moko akokufa, mosusu mpe akokufa.” Abakisaki ete: “Nyonso ilongwi na mputulu, nyonso ikozonga na mputulu lisusu.”​—Mosakoli 3:1, 2, 19, 20.

14. Lolenge nini bato mosusu bamekaka kobongola zolongano ya bomoi oyo ekwelaka bato banso, kasi yango ebimisaka litomba nini?

14 Esengeli te kotalela likanisi wana, oyo limonisi makambo na bosolo, ete ezali likanisi ya kolɛmbisa nzoto. Ya solo, bamoko bazali koluka kobongisa ezalela ya bomoi na bango, na ndakisa na kokóbáká kosala nsima ya bangonga oyo esɛngami na mosala mpo na kozwa biloko mingi ya mosuni koleka baboti na bango. Bakoki kolanda kelasi milaimilai mpo na kozwa biloko bileki motuya wana bazali kokólisa boyebi na bango likoló na bomoi. Bakoki mpe komipesa mingi na kosala ngalasisi to koboya kolya bilei mosusu mpo na kozala na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ mpe mpo na koyeisa bomoi mwa molai. Milende wana mikoki kopesa mwa matomba. Kasi nani ayebi soki milende yango mikolónga? Ata soki milóngi, ekozala mpo na ntango boni?

15. Likanisi nini ya solosolo na bomoi ya bato mingi libongi mpenza kondimama?

15 Salomo atunaki mituna oyo: ‘Lokola ezali na makambo mingi oyo mazangi ntina, moto akozwa litomba nini? Mpo ete nani ayebi malamu oyo moto akozwa, na boumeli ya mikolo ya bomoi na ye ya mpamba, oyo akolekisa yango lokola elili? Mpamba te, nani akoki koyebisa moto makambo oyo makobima nsima na ye?’ (Mosakoli 6:11, 12, NW) Lokola liwa esukisaka nokinoki milende nyonso oyo moto asalaki, ezali nde na litomba ete moto amipesa na koluka kozwa biloko mingi ya mosuni, to na kolanda kelasi milaimilai na mokano libosoliboso ya kozwa biloko mingi? Mpe lokola bomoi ezali mokuse, ezali koleka lokola elili, mingi basosoli ete ntango ezali lisusu te ya kopesa milende na bango na bolandi mokano ya bomoto, zambi basili koyeba ete nsukansuka bakolónga te; lisusu, moto ayebi te makambo oyo ekobimela bana na ye na “nsima na ye.”

Ntango ya komisalela nkombo malamu yango oyo

16. (a) Nini tosengeli kosala, oyo banyama bakoki kosala yango te? (b) Solo nini mosusu esengeli kosala bopusi likoló na makanisi na biso?

16 Na bokeseni na banyama, biso bato tozali na likoki ya komituna: ‘Ntina ya bomoi na ngai ezali nini? Ezali nde bobele zolongano moko esilá kotyama, oyo esangisi ntango ya kobotama mpe ntango ya kokufa?’ Na likambo yango, omikundola solo oyo ezwami na maloba ya Salomo na ntina na moto mpe nyama ete: “Nyonso ikozonga na mputulu lisusu.” Yango elingi nde koloba ete liwa esukisaka mpenza bomoi na biso? Biblia emonisi ete bato bazalaka te na molimo mozangi kokufa oyo ekóbaka kozala na bomoi soki nzoto ekufi. Bato bazali mpenza milimo, mpe molimo oyo asali lisumu akokufa. (Ezekiele 18:4, 20) Salomo alimbolaki ete: “Bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te, bazali na libonza mpe te; kokanisa na bango esili kobungana. Oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na nguya na yo mpo ete ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na esika na bakufi, esika ekokenda yo.”​—Mosakoli 9:5, 10.

17. Mosakoli 7:1, 2 esengeli kopusa biso na komanyola nini?

17 Na ntina na likambo wana oyo okoki kopɛngola te, tyá likebi na maloba oyo: “Nkombo malamu eleki mafuta na motuya; mokolo na kufa [eleki] mokolo na kobotama na malamu. Kokenda na ndako na kolela eleki malamu na kokenda na ndako na elambo; zambi yango ezali nsuka na bato nyonso mpe moto na bomoi akotya yango na motema na ye.” (Mosakoli 7:1, 2) Tosengeli kondima ete liwa ezali mpenza “nsuka na bato nyonso.” Ezali ata na moto moko te oyo azwi bomoi ezangi kufa nsima ya komela bankisi, kolya biloko ya vitamini mingi, koboya bilei mosusu mpo na kozala nzoto kolɔngɔ́nɔ́, to nsima ya komipesa mingi na ngalasisi. Kasi, lokola momeseno, ‘kokanisama na bango ezali kobungana’ mwa moke nsima ya liwa na bango. Na bongo, mpo na nini elobami ete “nkombo malamu eleki mafuta na motuya; mokolo na kufa [eleki] mokolo na kobotama na malamu”?

18. Mpo na nini tokoki kondimisama ete Salomo azalaki kondima lisekwa?

18 Lokola tosili komona yango, Salomo azalaki kolobela makambo ndenge mazali mpenza. Ayebaki lisoló ya bankɔ́kɔ na ye Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo, oyo na ntembe te, bamisalelaki nkombo malamu na miso ya Mozalisi. Lokola ayebaki Abalayama malamu, Yehova alakaki ete akopambola ye mpe mombóto na ye. (Genese 18:18, 19; 22:17) Ɛɛ, Abalayama azalaki na nkombo malamu na miso ya Nzambe, mpe akómaki moninga na ye. (2 Ntango 20:7; Yisaya 41:8; Yakobo 2:23) Abalayama ayebaki ete bomoi na ye mpe oyo ya mwana na ye ezalaki te eteni mpamba ya zolongano ya kobotama mpe kokufa. Ntina na yango esukaki te bobele na kolekisa mwa bambula na bomoi mpe na nsima kokufa. Bazalaki na elikya ya solosolo ya kozala lisusu na bomoi mpo ete bakosekwa, kasi ezali te mpo na molimo oyo bazalaki na yango, oyo ezangi kokufa. Abalayama andimisamaki mpenza ete “Nzambe azalaki na nguya [ya] kosekwisa bato ata na bakufi.”​—Baebele 11:17-​19.

19. Uta na mokanda ya Yobo, bososoli nini tokoki kozwa na oyo etali ndimbola ya Mosakoli 7:1?

19 Wana ezali fungola mpo na koyeba ndimbola ya likambo oyo emonisi ete “nkombo malamu eleki mafuta na motuya; mokolo na kufa [eleki] mokolo na kobotama na malamu.” Motindo moko na Yobo oyo azalaki na bomoi liboso na ye, Salomo andimisamaki ete Oyo azalisaki bomoi ya moto akoki kozongisa yango lisusu. Akoki kozongisa na bomoi bato oyo basilá kokufa. (Yobo 14:7-​14) Mosembwi Yobo alobaki ete: “[Yehova] okobyanga mpe ngai nakozongisela yo; okozala na mposa mpo na mosala na mabɔkɔ na yo.” (Yobo 14:15) Kanisá naino likambo yango! Mozalisi na biso azali ‘na mposa makasi’ ya basaleli na ye ya sembo oyo basilá kokufa. (“Oyoki mposa makasi ya komono ekelamu ya yo.”​—Biblia Liloba lya Nzambe.) Na kosaleláká mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto, Mozalisi akoki kosekwisa bato. (Yoane 3:16; Misala 24:15) Ya solo, bato bakoki kokesana na banyama mpamba oyo bazali kokufa.

20. (a) Ntango nini emonanaka ete mokolo ya kufa eleki mokolo ya kobotama na malamu? (b) Bopusi nini lisekwa ya Lasalo esalaki likoló na ebele ya bato?

20 Yango elimboli ete mokolo ya liwa ekoki kozala malamu koleka mokolo oyo moto abotamaki, soki moto yango amisaleli nkombo malamu na miso ya Yehova, oyo akoki kosekwisa basembwi oyo bazali kokufa. Yesu Klisto, Salomo Monene, andimisaki likambo yango. Na ndakisa, azongisaki mosembwi Lasalo na bomoi. (Luka 11:31; Yoane 11:1-​44) Lokola okoki komona yango na makanisi na yo, lisekwa ya Lasalo esimbaki mitema ya ebele ya bato oyo bazalaki wana, na boye ete bandimaki Mwana na Nzambe. (Yoane 11:45) Na makanisi na yo, bato yango bamiyokaki nde ete bomoi na bango ezangi ntina, mpe bayebaki te soki bazalaki banani mpe bazalaki kokende wapi? Kútu, basosolaki nde ete basengelaki soko moke te kokokana na banyama mpamba oyo soki babotami, balekisi mwa ntango na bomoi, na nsima bakufi. Ntina ya bomoi na bango ezali na bokangani mpenza na koyeba Tata ya Yesu mpe kosala mokano na Ye. Ezali boni mpo na yo? Lisoló oyo lisili kosalisa yo na komona, to kososola lisusu malamu, lolenge oyo bomoi na yo ekoki mpe esengeli kozala na ntina ya solosolo?

21. Tokotalela likambo nini mosusu mpo na boluki ntina ya bomoi na biso?

21 Nzokande, kozala na ntina ya solosolo mpe ya mozindo kati na bomoi esangisi makambo mingi, kasi esuki te bobele na komanyola likoló na liwa mpe kozonga lisusu na bomoi. Yango etaleli mpe lolenge tozali kotambwisa bomoi na biso mokolo na mokolo. Na mokanda ya Mosakoli, Salomo alobelaki mpe likambo wana, lokola tokomona yango na lisoló lilandi.

[Maloba na nse]

a “Lisoló ya Mokonzi-mwasi ya Seba lizali kolobela polele mayele ya Salomo, mpe elobamaka mingi ete lisoló yango lizali bobele lisapo mpamba. (1 Mik. 10:1-​13) Nzokande, makambo oyo malobami na mokapo yango mazali komonisa ete boyei na ye epai na Salomo etalelaki mpenza makambo ya mombongo, mpe yango ekoki kososolama polele; ntina ya kotya ntembe na bosolo na yango ezali te.”​—The International Standard Bible Encyclopedia (1988), Volimi IV, lokasa 567.

Ozali komikundola?

◻ Na lolenge nini banyama bakokani na bato?

◻ Mpo na nini tokoki koloba ete liwa emonisi polele ete milende mpe misala mingi oyo bato bazali kosala ezali bobele bisalasala?

◻ Lolenge nini mokolo ya kufa ekoki kozala malamu koleka mokolo ya kobotama?

◻ Kozala na ntina ya solosolo na bomoi na biso etaleli boyokani nini?

[Bililingi na lokasa 10]

Lolenge nini bomoi na yo ekeseni mpenza na oyo ya banyama?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto