Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/3 nk. 25-28
  • Obangaka Kotyela Basusu Motema?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Obangaka Kotyela Basusu Motema?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntina mpo na yango bato babangaka
  • Mpo na nini efelo wana esengeli kokweisama?
  • Tyelá libota na yo motema
  • Tyelá lisangá motema
  • Lolenge ya kotonga boyokani ya kotyelana motema
  • Okoki kotyela bandeko na yo motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Bankulutu​—Bobatela mokumba epesami na bino
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Tosengeli kotyela bato motema mpo na kozala na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Ozali moto oyo basusu bakoki kotyela motema?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/3 nk. 25-28

Obangaka Kotyela Basusu Motema?

‘EZALI ata na moto moko te oyo nakoki koyebisa ye yango. Bato bakokanga ntina te. Mikakatano na bango moko ezali kozwa bango ntango mingi. Bakozala na ntango ya kotalela oyo ya ngai te.’ Bato mingi bazali na makanisi motindo wana, mpe na yango bazali kobomba makambo na bango na motema. Ntango basusu batuni bango nsango, mbala mingi bazalaka na mposa ya koyebisa bango, kasi basalaka yango te. Bakokaka te kobimisa makanisi na bango na bonsomi nyonso.

Ya solo, ezali na bato oyo bazalaka mpenza te na mposa ya lisungi ya basusu. Nzokande, mingi bazali mpenza na mposa ya lisungi kasi babangaka kobimisa makanisi na bango, mayoki na bango, mpe makambo oyo bazali kokutana na yango na bomoi. Yo mpe ozali moko na bato yango? Moto oyo okoki mpenza kotyela ye motema azali te?

Ntina mpo na yango bato babangaka

Na mokili ya lelo, ezaleli ya kozanga kotyela bato motema epalangani mingi. Bilenge basololaka na baboti na bango te. Baboti basololaka te kati na bango. Ezali na bato mingi te oyo basepelaka kosolola na baoyo bazali na bokonzi. Lokola bazali na likoki ya koyebisa makambo na bango epai na bato mosusu te, bamoko bamipesi na masanga, na bilangwiseli, to na lolenge ya bomoi ya bonyama mpo na kobosana mikakatano na bango.​—Masese 23:29-​35; Yisaya 56:12.

Elikya oyo bato bazalaki kotya na baoyo bazali na bokonzi, na ndakisa bakonzi ya mangomba, minganga, basalisi ndenge na ndenge, mpe balakisi, esili kobunga mpo na bansango oyo ezali ntango nyonso kotɔndɔla kozanga kolongobana mpe makambo na bango ya mbindo. Na ndakisa, lapólo moko elobi ete bakonzi zomi kati na monkámá oyo batambwisaka mangomba bazali kosangana na misala ya mbindo ya bosangisi nzoto. Mokomi moko alobi ete: ‘Bato wana oyo basili koboma ezaleli ya kotyela bato motema bazali kotimola mabwaku, mabulu mpe batye minkaka kati na boyokani ya bato.’ Mbuma nini yango esili kobota na mangomba na bango? Kotyelana motema ezali lisusu te.

Kokwea ya bizaleli malamu oyo epalangani bipai binso esili mpe komema mikakatano kati na mabota, na boye ete mabota ya mobulu nde maleki mingi, mpe mazali lisusu ya koluka te. Ndako ezalaki ezingelo epai bana bazalaki koteyama malamu. Lelo oyo, yango ekómi nde lokola esika ya koluka eloko ya kolya mpe na nsima koleka nokinoki. Soki mwana akóli na libota epai “bolingo” ezali te, likambo oyo emonanaka mingi ezali ete mwana yango akozanga ezaleli ya kotyela bato motema ntango akokóma mokóló.​—2 Timoté 3:3.

Lisusu, lokola makambo ya mokili mazali sé kobeba, tozali ntango nyonso na likámá ya kokwela makambo oyo ekotungisa biso. Lokola azalaki na bomoi kati na ezalela ekokani na oyo ya lelo, mosakoli Mika akomaki ete: “Ondima moninga te.” (Mika 7:5) Yo mpe okoki kozala na mayoki motindo wana ntango bakosi yo na mwa likambo moko, to nsima wana moto moko abimisi sɛkɛlɛ́ oyo oyebisaki ye, to mpe nsima na kokutana na likambo moko ya monene oyo ekokaki ata komemela yo liwa. Okolinga lisusu te kotyela bato motema mpe okobungisa mayoki nyonso ya bomoto, komibombáká mokolo na mokolo nsima ya efelo oyo ezali kozipa mayoki na yo. (Kokanisá na Nzembo 102:1-7.) Ya solo, ezaleli motindo wana ekoki kosalisa yo na kolanda kozala na bomoi, kasi “mawa na motema” na yo ezali kolongola yo esengo nyonso ya bomoi. (Masese 15:13) Likambo ya solo yango oyo: mpo ete ozala na kolɔngɔ́nɔ́ malamu na elimo, na mayoki, na makanisi, mpe na nzoto, osengeli kokweisa efelo wana mpe koyekola kotyela basusu motema. Yango ekoki kosalema? Ɛɛ.

Mpo na nini efelo wana esengeli kokweisama?

Koyebisa basusu makambo mabombami ekoki kopesa libɔndisi na motema oyo motungisami. Hana amonaki likambo yango. Azalaki na libala ya malamu, na ndako ya libateli malamu, kasi atungisamaki mingi na makanisi. Atako ‘motema na ye etondaki na mawa,’ na mayele nyonso “abondelaki [Yehova]” mingi mpe yango esalaki ete bibebu na ye oyo bikangamaki ntango azalaki koloba na nsé ya motema bikómaki koningana. Ɛɛ, ayebisaki makambo na ye epai na Yehova. Na nsima, azipolaki motema na ye epai na Eli, momonisi ya Nzambe. Litomba nini azwaki? “[Hana] alongwaki na nzela na ye, alyaki bilei mpe mawa emonanaki lisusu na elongi na ye te.”​—1 Samwele 1:1-​18.

Bikólo mingi ya bato bisili komona matomba ya koyebisana makambo oyo mazali na motema. Na ndakisa, komonisa makanisi to makambo okutanaki na yango epai na moto oyo asilá mpe kokutana na makambo wana ekoki kopesa litomba. Bato oyo basalaka bolukiluki bapesi bosukisi oyo: “Kobomba mayoki ebotaka maladi​—tosengeli kobimisa yango mpo na kobatela kolɔngɔ́nɔ́ malamu na makanisi.” Bolukiluki mingi oyo bato ya siansi basali endimisi bosolo ya lisese lipemami oyo lilobi ete: “Ye oyo akomitangola na bamosusu akolukaka yango ekosepelisa ye moko; akosilika na makambo nyonso [ya] mayele.”​—Masese 18:1.

Soki ofungolaka motema na yo epai na basusu te, lolenge nini bakoki kosalisa yo? Atako Yehova Nzambe atángaka makambo mazali na mitema, yebá ete makanisi mpe mayoki na yo makoki koyebana te epai na libota mpe baninga na yo​—ekoyebana bobele soki ozipweli bango motema. (1 Ntango 28:9) Soki likambo oyo ozali kobomba etali kobukama ya mibeko ya Nzambe, boye koboya koyambola yango ezali sé koyeisa likambo ndóngó.​—Masese 28:13.

Na ntembe te, matomba ya koyebisa mitungisi na yo epai na basusu eleki mpenza bozito ya kozokisama oyo okoki kozwa. Ya solo, yango elingi te koloba ete tosengeli koloba basɛkɛlɛ́ na biso epai na moto nyonso. (Kokanisá na Basambisi 16:18; Yilimia 9:4; Luka 21:16.) Masese 18:24 (NW) ekebisi ete ‘ezali na baninga oyo bakosalanaka mabe moko na mosusu,’ kasi ebakisi mpe ete: ‘ezali na moninga oyo azali na bokangami makasi koleka ndeko.’ Epai wapi okoki kozwa moninga motindo wana?

Tyelá libota na yo motema

Soki ozali na likambo, omekaka kosolola yango na mobalani na yo to na baboti na yo? Mopesi-toli moko ya boyebi mingi alobi ete “mpo na kolónga ebele ya mikakatano, mwango ya kosalela ezali bobele ya kosolola na mozindo likoló na yango.” (Masese 27:9) Mibali baklisto oyo ‘balingaka basi na bango lokola bamilingaka bango moko,’ basi oyo ‘batosaka mibali na bango,’ mpe baboti oyo bazali kosimba malamu mokumba oyo Nzambe apesi bango ya ‘kobɔkɔla bana na mateya mpe na disipilini ya Yehova,’ bakosala milende makasi mpo na kozala bayoki oyo bayebi koyokela bato mawa mpe bapesi-toli oyo bakoki mpenza kopesa lisungi. (Baefese 5:22, 33; 6:4) Yesu Klisto apesaki ndakisa malamu na likambo yango atako, na lolenge ya bomoto, azalaki na mwasi te, mpe na bana te!​—Malako 10:13-​16; Baefese 5:25-​27.

Tokoloba boni soki likambo yango likoki te kosilisama na libota? Kati na lisangá ya boklisto, tozali biso moko te. Ntoma Paulo alobaki ete: “Nani azali na kolɛmba mpe ngai nazwi bolɛmbu te?” (2 Bakolinti 11:29) Apesaki elendiseli ete: “Bókumbanaka mikumba na mawa.” (Bagalatia 6:2; Baloma 15:1) Kati na bandeko na biso ya elimo, mibali mpe basi, ntembe ezali te ete tokoki kozwa ebele ya ‘bandeko babotami mpo na ntango na mpasi.’​—Masese 17:17.

Tyelá lisangá motema

Na masangá koleka 80 000 ya Batatoli ya Yehova na mabelé mobimba, ezali na bato ya komikitisa oyo bazali kosala lokola ‘basalani mpo na esengo na yo.’ (2 Bakolinti 1:24) Ezali bongo bankulutu. Yisaya ayebisi ete: “Moto na moto [kati na bango] akozala lokola ebombamelo mpo na mopɛpɛ, ezipelo na ntango na mbula makasi; lokola bitima na mai kati na esika ekauki, mpe lokola molili na libanga monene kati na mokili molɛmbisami na moi.” Bankulutu bazali kosala makasi mpo na kozala ebombamelo motindo wana.​—Yisaya 32:2; 50:4; 1 Batesaloniki 5:14.

Bankulutu bakokisaka masɛngami ya Makomami liboso ya ‘koponama na elimo santu.’ Koyeba likambo yango ekolendisa yo na kotyela bango motema. (Misala 20:28; 1 Timoté 3:2-7; Tito 1:5-9) Likambo oyo bosololi yo na nkulutu moko ekotikala mpenza libombami. Kozala moto oyo basusu bakoki kotyela ye motema ezali moko ya masɛngami oyo nkulutu yango akokisaki.​—Kokanisá na Exode 18:21; Nehemia 7:2.

Bankulutu ya lisangá bazali “kokɛngɛla milimo na bino lokola bato baoyo bakozongisa monɔkɔ.” (Baebele 13:17) Likambo yango epusi yo na kotyela mibali yango motema, boye te? Ya solo, bizaleli ya bankulutu ekeseni. Bamoko bakoki komonana ete bazali bato oyo okoki kobɛlɛma epai na bango kozanga nkáka, to bato ya boboto, to mpe bato oyo bamityaka na esika ya moto koleka bankulutu mosusu. (2 Bakolinti 12:15; 1 Batesaloniki 2:7, 8, 11) Mpo na nini te koyebisa likambo na yo epai na nkulutu oyo omiyokaka malamu pene na ye?

Mibali yango bakokani te na bapesi-toli oyo balukaka kozwa lifuti. Kútu bazali nde ‘makabo na motindo na mibali,’ oyo Yehova apesi na ntina ete básunga yo. (Baefese 4:8, 11-​13, NW; Bagalatia 6:1) Lolenge nini? Na kosaleláká Biblia malamumalamu, bakopesa toli na yango etondi na nguya mpo na kosilisa mokakatano na yo. (Nzembo 107:20; Masese 12:18; Baebele 4:12, 13) Bakobondela elongo na yo mpe mpo na litomba na yo. (Bafilipi 1:9; Yakobo 5:13-​18) Lisungi oyo liuti na bapesi-toli wana ya bolingo ekoki kosunga mpenza mpo na kobikisa elimo oyo etungisami mpe kozongisa kimya na makanisi.

Lolenge ya kotonga boyokani ya kotyelana motema

Kosɛnga lisungi, toli to kosɛnga ete moto ayoka yo ezali soko moke te elembo ya bolɛmbu to ya kozanga bolóngi. Ezali bobele lolenge lobongi ya kondima ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe moto moko te ayebi makambo nyonso. Ya solo, mopesi-toli aleki monene mpe moninga ya motema oyo tokoki koyebisa ye makambo ezali bongo Tata na biso ya likoló, Yehova Nzambe. Tondimi mpenza makambo oyo mokomi na Nzembo akomaki ete: “[Yehova] azali nguya na ngai mpe nguba na ngai; motema na ngai ezali na elikya epai na ye; boye nasungami.” (Nzembo 28:7) Na nzela ya libondeli, tokoki ‘kozipola motema na biso’ epai na ye na ntango nyonso oyo tolingi, kozaláká na elikya ete azali koyoka mpe komibanzabanza mpo na biso.​—Nzembo 62:7, 8; 1 Petelo 5:7.

Kasi, lolenge nini okoki koyekola kotyela bankulutu mpe basusu motema kati na lisangá? Libosoliboso, omitalela yo moko. Kobanga na yo ezali mpenza na moboko ya solosolo? Obangaka makanisi ya basusu? (1 Bakolinti 13:4, 7) Ezali nde na mwango ya kosala ete likámá ya kozokisama na moto likóma mpenza moke? Ɛɛ. Ndenge nini? Kati na makambo ya elimo, luká koyeba malamumalamu moto oyo oponi ete oyebisaka ye basɛkɛlɛ́ na yo. Sololá na ye na makita ya lisangá. Bimá na ye na mosala ya kosakola ndako na ndako. Mpo na kotyelama motema mpe komemyama, esɛngaka milende makasi. Na yango, zalá motema molai. Na ndakisa, ntango obandi koyeba mobateli na mpate ya elimo, elikya na yo epai na ye ekokóma monene. Lobelá ye mitungisi na yo mokemoke. Soki amonisi mayoki mabongi, mayoki ya koyokela mawa, mpe ezaleli ya kobomba sɛkɛlɛ́, boye okoki koyebisa ye makambo mosusu.

Bandeko na biso basambeli ya Yehova, mingi mpenza bankulutu baklisto, bazali kosala milende ya komekola bizaleli ya boboto ya Nzambe kati na boyokani na bango bamoko na bamosusu. (Matai 5:48) Likambo yango esili kobimisa ezaleli ya kotyelana motema kati na lisangá. Nkulutu moko oyo aumeli mingi na mokumba na ye alobi ete: “Bandeko basengeli koyeba likambo oyo: Ezala moto asali likambo nini, nkulutu akoki te kobungisa bolingo ya boklisto oyo azalaki komonisela moto yango. Akosepela te na mabe oyo masalemi, kasi azali ntango nyonso na bolingo mpo na ndeko na ye mpe alingi kosunga ye.”

Na yango, ntina ezali te ya kobomba likambo mpo na yo moko. Sololá yango na moto ya “makoki na elimo” oyo akoki kosunga yo na komema bozito oyo ozali na yango. (Bagalatia 6:1) Kobosana te ete “bozito na motema na moto ekokitisa yango,” kasi “maloba kitoko izali lokola mafuta na nzoi na elɛngi epai na molimo mpe na kobika kati na mikuwa.”​—Masese 12:25; 16:24.

[Etanda na lokasa 26]

Moklisto nyonso akoki kobyangama ete asunga ndeko moko ya mosuni, moninga moko, to mpe ndeko moko ya elimo oyo azali na mokakatano. Oyebi ndenge okoki kopesa lisungi yango?

Mopesi-toli ya solosolo

azali moto oyo basusu bakakatanaka te kobɛlɛma epai na ye: Matai 11:28, 29; 1 Petelo 1:22; 5:2, 3

alukaka esika ebongi mpe ntango malamu: Malako 9:33-​37

alukaka kokanga ntina ya likambo: Luka 8:18; Yakobo 1:19

atombokaka te: Bakolose 3:12-​14

asalisaka moto na kolónga mayoki ya mpasi: Batesaloniki 5:14; 1 Petelo 3:8

andimaka ete ye mpe akoká na makambo nyonso te: Bagalatia 6:3; 1 Petelo 5:5

apesaka toli ya sikisiki: Nzembo 19:7-9; Masese 24:26

abombaka sɛkɛlɛ́: Masese 10:19; 25:9

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto