Lolenge ya kozwa elikya kati na ezalela ya kozanga elikya
KANISÁ ete yo nde okutani na makambo oyo: Biloko na yo nyonso bibebisami, otikali mabɔkɔ mpamba. Bana na yo—esengo ya bomoi na yo—bazali lisusu te. Mobalani na yo azali kolendisa yo soko moke te. Kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na yo ebebi mpenza. Mokolo na mokolo ekómi komekama makasi.
Soki likambo motindo boye ekómeli yo, okomona mpenza ntina ya kozala lisusu na bomoi? To okobungisa nde elikya?
Malɔ́zi oyo touti kolobela ezalaki mpenza likambo oyo Yobo akutanaki na yango na bomoi na ye. Yobo azalaki na bomoi na ntango ya lisoló ya Biblia. (Yobo, mikapo 1, 2) Na nsuka mpenza, Yobo amilelaki ete: “Molimo na ngai elɛmbi na bomoi na ngai.” Asepelaki kútu ete akufa na ye mpo na kolongwa na bampasi wana. (Yobo 10:1; 14:13) Nzokande, atako azalaki na bampasi makasi, Yobo abatelaki bosembo na ye epai na Nzambe. Yango wana Yehova “apambolaki mikolo na nsuka na Yobo koleka yango na ebandeli na ye.” Na yango, akufaki na kimya, “mpaka, atondi na mikolo mingi.”—Yobo 42:12, 17.
Yobo atikaki ndakisa ya koyika mpiko oyo ezali kokumisama kino lelo. Minyoko na ye mibongisaki lisusu bomoto na ye mpe mipusaki bato mosusu ete básala misala malamu. (Yakobo 5:10, 11) Likambo ya ntina koleka, bosembo ya solosolo oyo Yobo amonisaki esepelisaki motema ya Yehova. (Masese 27:11) Bongo, na nsima, eleko ya bwale ekómaki elónga monene ya bokangami na Nzambe, ya kondima, mpe ya bosembo oyo ememaki mapamboli epai na Yobo mpe epai na baoyo nyonso balandaki na ndakisa na ye.
Elikya ata kati na minyoko ndenge na ndenge
Yo mpe okoki kokutana na minyoko lokola Yobo. Kokufela molingami ekoki kotika yo na mpasi na mayoki. Maladi makasi ekoki kokɔtisa bomoi na yo na komekama makasi. Kokufa ya libala oyo etiki yo na mpasi na motema ekoki kosala ete bomoi na yo mobimba ebulungana. Mikakatano ya nkita ekoki kotika yo mabɔkɔ mpamba. Okoki kozwa minyoko makasi epai na batɛmɛli oyo bazali koyina mpenza losambo ya solo. Etumba mpo na kolónga mikakatano na yo ekoki kotika yo na liyoki ete avenire na yo ezangi elikya.—1 Petelo 1:6.
Na esika ya komitika na kozanga elikya, omituna ete ‘mpo na nini nazali konyokwama?’ Ozali konyokwama mpamba te ozali na mokili oyo ezali “kolala na kati na oyo mabe,” Satana Zabolo. (1 Yoane 5:19) Mbuma na yango ezali ete bato nyonso bazali konyokwama. Na lolenge moko to mosusu, biso banso tozali kokutana na koyinama oyo Zabolo azali kobimisa na ntina na nsango ya Bokonzi, tozali kokutana na maloba ya kozanga bolingo oyo mazali kouta na bato mosusu, to misala mabe miuti na etamboli ya kozanga bobángi Nzambe oyo epalangani mingi na “ntango na mpasi” oyo tozali na yango.—2 Timoté 3:1-5.
Soki likambo moko ya nsɔ́mɔ ekómeli yo, ekoki kozala ete okweli “ntango mpe makambo makanami te.” (Mosakoli 9:11, NW) Epai mosusu, na bomoi mbala mosusu makambo matambolaka malamu te na ntina na ezaleli ya masumu oyo tosangola. (Baloma 5:12) Ata soki osalaki libunga moko monene kasi osilaki kobongola motema mpe olukaki lisungi ya elimo, kokanisa te ete Nzambe asundoli yo. (Nzembo 103:10-14; Yakobo 5:13-15) Ye azali komibanzabanza mpo na biso koleka moto mosusu nyonso. (1 Petelo 5:6, 7) Okoki komindimisa ete “[Yehova] azali penepene na bango bazali na mitema mitutami; akobikisa bango bazali na [elimo enyatámi, NW].” (Nzembo 34:18) Ata soki monyoko na yo ezali ya nsɔ́mɔ to mpe ya mpasi ndenge nini, Yehova akoki kopesa yo mayele ya kolónga yango. (Yakobo 1:5-8) Ntango nyonso omikundola ete Yehova akoki kokaukisa bampota nyonso. Na ntango ozali kozwa ngɔlu na ye, eloko moko te ekoki kopekisa yo kozwa mbano ya bomoi.—Baloma 8:38, 39.
Likambo malamu ekoki nde kouta na komekama?
Lisese moko ya kala elobaka ete “Koleka libumu ezalaka mpe na matomba na yango.” Wana ezali lolenge mokuse ya koloba ete atako mpasi ezali makasi ndenge nini, okoki ntango nyonso kozala na ntina ya kolikya. Mokano ya likambo mokomoko oyo likomami na Liloba ya Nzambe ezali mpo ete “tózala na elikya.” (Baloma 15:4) Atako mpasi na yo ezali makasi ndenge nini, bilaka mpe mitindá ezwami na Biblia ekoki komemela yo esengo mpe elikya ya sika.
Makomami mazali komonisa ete “bolɔ́zi oyo ezangi bozito mpe eumeli bobele ntango moke” soki tokokanisi yango na mapamboli ya seko oyo mazali liboso na baoyo balingaka Nzambe. (2 Bakolinti 4:16-18) Biblia ezali komonisa lisusu ete bizaleli ya bonzambe oyo bikólisami na ntango ya minyoko bizali na motuya monene koleka lokumu to bozwi ya mosuni. (1 Yoane 2:15-17) Na yango, ata minyoko mikoki kozala na litomba. (Baebele 5:8) Ya solo, kosalela oyo oyekoli na ntango ozali na minyoko ekoki komemela yo mapamboli oyo omizelaki na yango te.
Komekama ya makasi ekoki kokómisa yo moto ya boboto koleka. Okoki komona ete kala ozalaki na ezaleli oyo ezalaki kosepelisa bato mosusu te mpe ata oyo ezalaki kopekisa bokóli na yo na elimo. Ekoki kozala ete ozalaki komityela motema na koleka ndelo. Nsima ya kozwa monyoko moko, okoki kososola mbala moko bolɛmbu na yo mpe koyeba na meko nini ozali na mposa ya basusu. Soki minyoko na yo epesaki yo liteya wana mpe osilaki kosala mbongwana esengeli, yango ezali na litomba mpo na yo.
Ezali boni soki, liboso, bato mosusu bazalaki na nkaká mpo na komesana na yo mpo ete ozalaki na mokakatano ya kopekisa mayoki na yo? Ekoki mbala mosusu kozala ete yango ememelaki yo mwa mpasi na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto. (Masese 14:29, 30) Nzokande, sikawa makambo makoki kokóma malamu koleka mpamba te ozali kotya motema ete elimo ya Nzambe ekosunga yo ete omonisa ezaleli ya komipekisa.—Bagalatia 5:22, 23.
Lokola bato mosusu, ekoki kozala ete na eleko moko ozangaki komonisa ngɔlu epai na baoyo basalaki libunga. Kasi soki yo moko ozwamaki na likambo oyo kati na yango ozalaki na mposa makasi ete basusu bamonisela yo ngɔlu, na ntembe te, sikawa okomi pene ya komonisela bato mosusu ngɔlu. Bosepeli ya solosolo, komibanzabanza, mpe ngɔlu oyo bamoniselaki yo esili kosalisa yo na kososola ete yo mpe osengeli komonisa bizaleli lolenge moko epai na basáli na mabe oyo babongoli motema. Soki mpasi na yo epusaki yo na kosilisa bolɛmbu yango na bomoto na yo, yango ezali litomba euti na makambo okutanaki na yango. Osili koyekola ete “mawa ekolónga kati na kosambisama.”—Yakobo 2:13; Matai 5:7.
Ezali boni soki, na ntina na disipilini oyo epesameli yo na lisangá ya boklisto, obungisi mabaku ya mosala mpe limemya ya bato mosusu oyo olingaki mingi? Kozindisama te kati na kozanga elikya. Disipilini esalisaka lisangá ete etikala pɛto, kasi moko na mikano na yango ezali ya kozongisa mosáli na mabe na ezalela malamu ya elimo. Ya solo, “bitumbu nyonso iyokani na esengo te kasi na mpasi; nde nsima ikozwisa mbuma na kimya na boyengebene epai na bango baoyo balendisami na yango.” (Baebele 12:11) Atako disipilini ekoki kozala likambo oyo epesaka mpasi, yango etikaka te mosokɛmi oyo abongoli motema ete azanga elikya. Davidi, Mokonzi ya Yisalaele ya kala azwaki disipilini makasi mpo na likambo mabe asalaki, kasi abongolaki motema mpe na nsima azwaki longonya mingi lokola moto oyo azalaki na kondima monene.—2 Samwele 12:7-12; Nzembo 32:5; Baebele 11:32-34.
Komekama ekoki kozala na bopusi makasi likoló na lolenge oyo otalelaka makambo. Liboso, ekoki kozala ete makanisi na yo mazalaki sé na mikano ya kozala na biloko mingi ya mosuni mpe kokokisa makambo oyo mamemaki yo na koyebana mpe na etɛlɛmɛlo monene na mokili oyo. Mbala mosusu mokakatano ya mosolo to mpe kobungisa biloko ya mosuni ebendaki makanisi na yo likoló na makambo maleki ntina. (Kokanisá na Bafilipi 1:10.) Sikawa okómi na bososoli ete mitindá mpe mikano ya elimo na mosala ya bulɛɛ ezali bobele yango nde ekoki komema esengo ya solo mpe bosepeli oyo ekoumela.
Tyá elikya epai na Yehova
Baoyo bazali kotɛmɛla bindimeli ya boklisto bakoki kobimisela yo minyoko mpe mikakatano mpo ete ozali kosalela Yehova mosala ya bulɛɛ. Okoki komiyoka ete otungisami na mpasi yango, kasi likambo ya malamu likoki kobima uta na yango. Komekama yango ekoki kolendisa kondima na yo. Lisusu, bato mosusu oyo bazali konyokwama bakoki kolendisama mpe kozwa makasi na kotaláká kolendendela na yo. Bato oyo bazali komona etamboli malamu na yo bakoki kopusama na kokumisa Nzambe. Ata mpe batɛmɛli na yo bakoki koyoka nsɔni mpe kondima misala na yo ya malamu!—1 Petelo 2:12; 3:16.
Mpo na kopɛngola kozanga elikya na ntango ya minyoko, osengeli kolikya epai na Yehova. Liloba na ye lizali komonisa ete lisungi mpo na minyoko likozanga te koya, kasi mbala mosusu ekoki kokóma mpenza nsima ya ntango oyo yo olingi. Na kozeláká, ‘olɛmba te na kosaláká malamu.’ (2 Batesaloniki 3:13) Luká ntango nyonso lolenge ya koyika mpiko na minyoko mpe ya kolendendela. Ezala na ntango oyo makambo mazali komonana lokola ete elikya ezali te, “kitisá mokumba na yo epai na [Yehova] mpe ye akokumba yo; libela ye akotika te ete moyengebene atelengana.” (Nzembo 55:22) Na esika ya komizindisa na mawa, kanisá lipamboli ozali na yango ya koyeba Yehova, ya kozala mosangani ya libota na ye, mpe ya kozala na elikya ya bomoi ezangi nsuka.—Yoane 3:16, 36.
Tiká ete makanisi na yo mázala ntango nyonso likoló na makambo maleki ntina. Bɛlɛmá na Yehova mikolo nyonso na nzela ya libondeli, kosɛngáká ye nguya ya koyika mpiko. (Bafilipi 4:6, 7, 13) Benganá makanisi nyonso ya kozongisela baoyo bazali konyokola yo mabe. Tiká makambo nyonso na mabɔkɔ ya Yehova. (Baloma 12:19) Lukaka ntango nyonso myango ya kobongisa lisusu bomoto na yo, na kolónáká bizaleli ya boklisto. (2 Petelo 1:5-8) Monisá bosepeli mpo na nyonso oyo basusu bazali kosalela yo, bakisa bankulutu oyo, na likebi ya bolingo, bazali komibanzabanza mpo na bamposa na yo ya elimo. (Baebele 13:7, 17) Zalá sembo epai na Nzambe, mpe batelá makanisi na yo likoló na mbano ya bomoi, na kozaláká na elikya ete eloko moko te, ata liwa, ekoki kolongola yo yango.—Yoane 5:28, 29; 17:3.
Soki ozangi mpenza bosepeli sikawa to ozali na mpasi makasi, “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba,” mpe na nsima, esengo monene ekokitana bampasi mpe minyoko na yo. (Masese 3:5, 6; Yoane 16:20) Bwale ekotika esika na bolamu na ntango Nzambe akopambola yo lokola asalaki yango mpo na Yobo. Minyoko ya lelo ezali moke mpenza soki tokokanisi yango na mbano oyo okozwa. (Kokanisá na Baloma 8:18.) Kolendendela na yo ya sembo ekoki kolendisa basusu mpe ekoki kosalisa yo ete okólisa bizaleli malamu ya boklisto oyo bimonanaka kati na “bomoto ya sika.” (Baefese 4:23, 24; Bakolose 3:10, 12-14, NW) Na yango, zwá mpiko na toli ya mayele oyo ntoma Petelo apesaki ete: “Tiká ete bango bazali koyoka mpasi pelamoko ekani Nzambe mokano, bápesa bomoi na bango epai na Mozalisi na bango mpo na kosaláká malamu.”—1 Petelo 4:19.
[Elilingi na lokasa 23]
Zalá lokola Yobo. Kobungisa elikya soko moke te
[Elilingi na lokasa 24]
Tyá elikya epai na Yehova na motema na yo mobimba