Mpo na nini basɛkɛlɛ́ oyo nyonso?
LISESE moko ya bato ya ekólo France elobaka ete: “Eloko moko te eleki sɛkɛlɛ́ na bozito” na makambo nyonso. Yango ekoki nde kolimbola liyoki ya esengo tozalaka na yango na ntango toyebi sɛkɛlɛ́ moko kasi mbala mosusu toyokaka mawa soki tokoki te kobimisa yango? Nzokande, na boumeli ya bikeke mingi ebele na bato basepelaki kobomba sɛkɛlɛ́, kosanganáká na bituluku ya nkuku mpo na kokokisa mokano moko.
Balosambo ya nkuku oyo emonanaki na Ezipito, na Grèce, mpe na Loma ezalaki kati na masangá ya libosoliboso ya nkuku. Na nsima bamoko na bituluku yango ebongolaki mikano na yango ya liboso oyo ezalaki ya losambo mpe ekómaki na makambo ya politiki, ya nkita, to mpe ya ebikelo ya bato. Na ndakisa, na ntango masangá masalamaki na Mpótó na eleko ebéngami Moyen-Âge, basangani na yango basalelaki mwango ya kobomba sɛkɛlɛ́ libosoliboso mpo na komibatela na makambo ya nkita.
Mbala mingi bituluku ya nkuku na ntango na biso bisalamaki mpo na mikano ya malamu, engebene Encyclopædia Britannica, ekoki kozala mpo na “mikano ya ebikelo mpe kopesa lisungi ya bolingo malamu mpe mpo na kokokisa misala ya kosalisa mpe koteya bato.” Masangá mosusu ya bondeko, bituluku ya bokutani ya bilenge, bituluku ya bosalisani, na bituluku mosusu mpe ezalaka ya nkuku, to ezalaka na mwa makambo mosusu ya nkuku. Mbala mingi, bituluku yango bizalaka na mikano mabe te, ezali bobele ete basangani na yango basepelaka kozala na sɛkɛlɛ́. Milulu ya nkuku mpo na kondimama lokola mosangani ya sika epesaka mayoki makasi ya kosepela mpe elendisaka boninga mpe bomoko. Basangani bakómaka na liyoki ya kozala moko kati na etuluku mpe na liyoki ya kozala na mokano. Mbala mingi masangá ya nkuku ya motindo wana mazalaka na likámá te mpo na baoyo bazali basangani na yango te. Baoyo bazali basangani te bakoki kobanga eloko te atako bayebi basɛkɛlɛ́ na yango te.
Ntango sɛkɛlɛ́ ezali komonisa likámá
Bituluku nyonso ya nkuku bizali na sɛkɛlɛ́ motindo moko te. Kasi, lokola Encyclopædia Britannica emonisi yango, oyo ezali na “sɛkɛlɛ́ kati na sɛkɛlɛ́,” ezali na likámá moko ya sikisiki. Búku yango elimboli ete “na kosaleláká bankombo oyo eyebani sé na bango moko, kolapa ndai ya botosi to mpe koyebisamela mabombami ntango moto amati nivo mosusu,” basangani oyo bazali liboso balukaka “komikesenisa,” na ndenge yango bazali kokólisa epai na “baoyo bazali na nsé na bango elimo ya kosala milende misengeli mpo na kokóma na etɛlɛmɛlo ya lokumu.” Likámá ya bituluku motindo wana ezali komonana polele. Ekoki kozala ete baoyo bazali na nsima bazali mpenza koyeba te mikano ya solosolo ya lisangá, lokola bakómi naino na nivo ya boyebi wana te. Ezali mpasi te komikɔtisa na etuluku oyo oyebi mikano na yango nyonso te mpe myango ya kokokisa mikano yango mpe, mbala mosusu bakoyebisa yo makambo na yango nyonso te. Kasi moto oyo amikɔtisi na etuluku motindo wana, akoki mbala mosusu komona na nsima ete ekómi mpasi mpo ete amilongola na yango, lokola nde minyɔlɔlɔ ya sɛkɛlɛ́ ekangi ye.
Nzokande, na ntango etuluku ezali na mikano ya kosala makambo mapekisami na mibeko ya Letá to kosala mobulu, mpe na ndenge yango bazali koluka kosala na nkuku, sɛkɛlɛ́ ezalaka likámá monene koleka. To na ntango lisangá yango ya nkuku mpe mikano na yango minene miyebani, ekoki koluka kobomba basangani na yango mpe makambo oyo bakani kosala kozanga koumela. Ezalaka bongo mpo na bituluku ya banganga-mobulu minene oyo mbala na mbala bizali koningisa mokili na misala na bango ya mobulu.
Ɛɛ, kobomba sɛkɛlɛ́ ekoki kozala na likámá, ezala mpo na moto mokomoko mpe mpo na bato nyonso. Kanisá bituluku ya nkuku ya bilenge ya mobulu oyo bazali kosala mabe na bato basali eloko te, kanisá na bituluku ya basáli na mabe lokola lisangá ya nkuku oyo ebéngami Mafia, na bituluku oyo ekɔtelaka lokumu ya mindɛlɛ liboso ya bato ya mposo nyonso mosusu, lokola lisangá libéngami Ku Klux Klan,a kozanga kobosana bibele na bituluku ya banganga-mobulu na mokili mobimba oyo bazali kolanda kobebisa milende mizali kosalema mpo na kotya kimya mpe libateli.
Bazali kosala makambo nini sikawa?
Na bambula 1950, na ntina na kowelana kati na banguya minene ya mokili (guerre froide), bituluku mingi ya nkuku bisalemaki na bikólo ya Mpótó ya Wɛ́sti mpo na kozala miboko ya bibongiseli ya botɛmɛli soki ekólo U.R.S.S. emekaki kobundisa bango. Na ndakisa, engebene zulunalo ya lokóta ya Allemand Focus, “bisika 79 ya nkuku mpo na kobomba mandóki” bibongisamaki na ekólo Australie na boumeli ya eleko yango. Kútu, mikili mosusu ya Mpótó miyebaki te ete bituluku motindo wana bibongisami. Na ebandeli ya bambula 1990, zulunalo moko elobaki na lolenge lobongi mpenza ete: “Kino sikawa, eyebani te soki masangá boni mazali naino kosala misala na yango kino lelo mpe makambo nini basalaki mbala mosusu na mikolo miuti koleka.”
Ɛɛ, nani akoki mpenza koyeba lelo oyo soki bituluku boni ya nkuku bizali koyeisela biso likámá monene koleka oyo ata moto moko te kati na biso akoki kokanisa?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Etuluku yango oyo ezali na Étas-Unis ebatelaki makambo mosusu ya masangá ya nkuku ya kalakala na kosaleláká ekulusu oyo ezali kozika na mɔ́tɔ lokola elembo ya etuluku yango. Kala, bazalaki kokɔta na bandako ya bato na butu, wana basangani na yango balati basutani mpe milekani ya mpɛmbɛ mpe bazalaki konyokola bato moindo, bakatolike, Bayuda, bapaya, mpe lisangani ya bato ya misala.