Bayekoli ya Liloba ya Nzambe bazwi mapɔlɔ́mi
NA NDAKISA ya baklisto ya ekeke ya liboso, Batatoli ya Yehova bayebani na mokili mobimba mpo na mosala na bango ya kosakola ndako na ndako. Likambo yango elobelamaki mingi na maloba ya bofungoli molulu ya kopesa mapɔlɔ́mi na banakelasi ya mbala ya 102 ya Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower.
Na mokolo ya 1 Mársi 1997, Albert Schroeder, moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, abendaki likebi na lisoló moko eutaki kobima na Le Point, zulunalo moko ya ekólo France. Elobelaki myango ya lingomba ya Katolike ya Loma mpo na kobanda mosala ya kosakola ndako na ndako na ekólo Italie. Lisoló lilobaki ete “Mpo ete [bamisionere ya Vatican] báya mabɔkɔ mpamba te wana bakokóma na teritware epai Batatoli ya Yehova bazali kosakola, Vatican ezwi mokano ya konyata milió moko ya Evanzile ya Santu Malako, lokola batindami na bango bakokutana na momekano ya kosala lokola [Batatoli] oyo bameseni na ‘kokabola’ nsango malamu ndako na ndako.”
Bato 48 oyo bazwi mapɔlɔ́mi, bazali kati na baoyo basili komekola mayele ya koteya oyo Yesu asalelaki mpo na kopalanganisa Liloba ya Nzambe. Bautaki na bikólo mwambe mpe bayaki na Esika Monene ya Watchtower mpo na mateya na Patterson, na etúká ya New York. Na boumeli ya sanza mitano ya kelasi na bango, bayekolaki Biblia mobimba. Bazwaki mateya na makambo lokola lisoló ya lisangá ya Nzambe, makambo mabongi kosalelama na bomoi ya misionere, mpe mbuma ya elimo ya Nzambe. Nyonso wana ezalaki mpo na mokano moko—kobongisa bango mpo na mosala ya misionere na mikili 17 epai batindamaki. Mokolo ya kozwa mapɔlɔ́mi na bango, bato 5 015 oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge bayanganaki mpo na kokabola esengo elongo na bango. Wapi batoli ya nsuka oyo ebongi bayekoli wana ya Gileadi bazwaki?
Bilendiseli na ntango ebongi mpo na bamisionere ya sika
Nsima ya maloba ya bofungoli na mokambi ya likita, Ralph Walls, oyo azali mosungi na Komité ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpo na basáli, asalaki lisukúlu mokuse ya liboso oyo ezalaki na batoli ebongi mpo na bamisionere ya sika. Motó na likambo na yango ezalaki ete “Bóbosana bolingo te.” Amonisaki ete Biblia, kati na 2 Timoté mokapo 3, esakolaki ete kozanga bolingo ekobakisama kati na mokili. Apesaki makundoli oyo na ntango ebongi mpo na bamisionere ya sika, na boyokani na ndimbola ya bolingo oyo ezwami na 1 Bakolinti 13:1-7: “Lokola bozali bamisionere, bokoki kolekisa ngonga esɛngami mpo na mosala na bino. Bokoki kozala na boyebi mingi uta na kolakisama na bino na Gileadi. To tokoki kosala na molende ntango mingi koleka na mosala mopesameli biso na filiale na biso. Kasi milende na biso mpe komipesa na biso ekozala na ntina te soki tobosani bolingo.”
Molobi oyo alandaki na manáka ezalaki bongo Carey Barber, moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, ye alobelaki lisoló na motó na likambo ete “Yehova azali kokamba biso na elónga.” Longwa na ebandeli na bango, wana bazalaki moke mpenza nsima ya Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba, Yehova Nzambe asili kotambwisa basaleli na ye ya sembo na elónga na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi, atako bakutanaki na minyoko. Na mobu 1931, Bayekoli ya Biblia, lolenge bazalaki kobéngama, bazwaki nkombo Batatoli ya Yehova, likambo oyo epesaki nkanda mingi na bakonzi ya mangomba ya boklisto. Ndeko Barber alobaki ete “banakelasi ya mbala ya 102 ya Eteyelo ya bamisionere ya Gileadi bazali sikawa na libaku malamu ya kosangana mingi na mosala ya nkembo mpo na kopesa na bato mingi koleka libaku ya koyekola nkombo wana ya bulɛɛ.” Bayei kobakisama na molɔngɔ́ molai ya bamisionere 7 131 oyo basilaki kozwa mateya na Eteyelo ya Gileadi mpe oyo basili kopesa mabɔkɔ mpo na kopalanganisa mosala ya kosakola Liloba ya Nzambe longwa na mikili 54 na mobu 1943 kino na mikili 233 lelo oyo.
Molobi oyo alandaki ezalaki bongo Lloyd Barry, ye mpe azali moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, azwaka lipɔlɔ́mi na kelasi ya mbala ya 11 ya Gileadi mpe asalaki lokola misionere na ekólo Japon na boumeli ya mbula koleka 25. Apesaki bilendiseli na ye na motó na likambo ete: “Oumela na makambo oyo.” Ayebisaki banakelasi ete “bokozwa esengo mingi na koyikáká mpiko.” Mbano nini ezali kozwama na koyika mpiko na mosala ya misionere to na mosala nyonso ya Teokrasi? “Libosoliboso, koyika mpiko na biso ezali kosepelisa motema ya Yehova . . . Esengo ezali monene na kokutama ete ozali kobatela bosembo na komekama . . . Bókomisa mosala ya misionere mosala ya bomoi na bino mobimba . . . Mbano bokozwa ezali ete mokonzi akoloba na bino na mɔ́tɔ nyonso ete ‘osali malamu.’” (Matai 25:21; Masese 27:11) Mpo na kosukisa lisoló na ye, Ndeko Barry alendisaki na nguya nyonso bamisionere ya sika ete “bóumela na makambo oyo” na kozaláká na ekateli ete mosala ya misionere ekóma lolenge ya bomoi na bango mpenza.—1 Timoté 4:16.
“Makambo nini bokomona?” ezali wana motuna Karl Adams atunaki, ye asilaki kosangana na kopesa mateya na bakelasi mingi ya Gileadi. Amonisaki ete makambo oyo bamisionere ya sika bakomona na bateritware na bango etaleli bobele miso na bango ya mosuni te kasi lisusu miso ya motema na bango. (Baefese 1:18) Yango emonisamaki na oyo banɔ́ngi Bayisalaele bamonaki wana bakendaki konɔ́nga Mokili ya Ndaka. Banɔ́ngi nyonso 12 bamonaki makambo ndenge moko na miso na bango ya mosuni, kasi bobele mibale bamonaki Mokili ya Ndaka na lolenge oyo Nzambe azalaki komonela yango. Bamisionere bakoki bango mpe komona makambo na ndenge ikeseni. Na mikili mosusu epai bakosala, bakoki komona bobólá, minyoko, mpe kozanga elikya. Kasi basengeli kotalela yango na lolenge mabe te mpe basengeli kotika mosala na bango te. Ndeko Adams alobelaki misionere moko ya kelasi eutaki koleka oyo alobaki ete: “Baeksperiansi oyo esalisi ngai na kososola ete nasengeli kotikala awa. Bato oyo bazali na mposa ya elikya mpo na mikolo mizali koya. Nalingi kobongola bomoi na bango.” Ndeko Adams asukisaki na kolendisáká bamisionere ya sika na kotalela mikili epai batindami lokola bisika oyo Yehova asilaki kokana kokómisa Paladiso na Ye mpe na kotalela bato oyo bazali kuna lokola baoyo bakoki kokóma basangani ya mokili ya sika.
Lisukúlu ya nsuka na eteni oyo ya manáka lisalemaki na Wallace Liverance, oyo asalaki mosala ya misionere na boumeli ya bambula mingi liboso ya kokóma molakisi na Gileadi. Motó na likambo na yango ezalaki ete “Bósala na mayele kati na misala kitoko ya Nzambe.” Kosala na mayele esɛngi kosala na bokɛngi, na bososoli, mpe na makanisi malamu. Ezali yango nde Saulo, Mokonzi ya Yisalaele azangaki kosala.—1 Samwele 13:9-13; 15:1-22.
Lolenge moko ya kosala na mayele ezali bongo kondima etumba ya komiyokanisa na lolenge ya bomoi ya sika, kati na yango koyekola lokótá ya sika mpe koyekola koyeba mimeseno ya bato. Makambo oyo bamisionere bazali kokutana na yango na kosaláká milende mpe kolónga mikakatano ekoki kolendisa bango na elimo na lolenge oyo Yosua mpe Kalebe balendisamaki wana bazalaki kobɔtɔla mokili oyo Nzambe apesaki bango.
Mituna-masoló
Eteni ya manáka oyo elandaki ezalaki bongo molɔngɔ́ ya mituna-masoló. Harold Jackson atunaki Ulysses Glass, mokomeli mpe molakisi oyo aumeli mingi na Eteyelo ya Gileadi, ye azali sikawa na mibu 85. Bamisionere mingi oyo bazali naino na bateritware bazali komikundola malamu bambula oyo asali na koteya mpe kolakisa na bosembo. Na nsima ezalaki bongo Mark Noumair, molakisi na Gileadi oyo alekisaki bambula mingi na mosala ya misionere na Afrika liboso ya kosangana na mosala ya Eteyelo ya Gileadi. Atunaki banakelasi na ntina na mosala na bango ya kosakola na boumeli ya sanza mitano oyo balekisaki na kelasi. Baeksperiansi na bango emonisaki polele ete ezali na bato oyo bazali kosepela na Liloba ya Nzambe na teritware yango.
Na nsima, Robert Ciranko mpe Charles Molohan basololaki na mibali oyo bazali na eksperiansi mingi oyo bazalaki na kelasi mosusu bobele kuna na Patterson, kelasi mpo na basáli ya filiale. Toli na bango epai na banakelasi oyo bazwaki mapɔlɔ́mi esangisaki ntina ya kozala na komikitisa mpe kosala mpo na bomoko ya lisangá. Bapesaki toli ete banakelasi basengeli komisalela makanisi na bango moko te na ntina na oyo ekosalema na mosala na bango ya misionere, nzokande, basengeli bobele kozala pene ya kondima makambo nyonso oyo bakokutana na yango. Kosalela toli yango na ntembe te ekosalisa bamisionere ya sika ete bákokisa mosala na bango lokola balakisi ya Liloba ya Nzambe.
Na nsuka, Theodore Jaracz, moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alobelaki bayangani lisoló na motó na likambo ete “Nani azali kosala bopusi likoló na moninga?” Alimbolaki ete na ntango biso baklisto tozali komonisa mbuma ya elimo, tokoki kosala bopusi malamu likoló na bato mosusu. Alobaki ete “bamisionere oyo bazali kotindama na lisangá ya Yehova basili kosala bopusi mingi na lolenge ya pɛto mpe ya elimo oyo ebongi kopesamela longonya.” Bongo atángaki makanisi mosusu oyo mapesamaki na bato oyo basilaki kosalisama mpo na kosalela Nzambe lokola litomba ya ndakisa malamu oyo bamisionere bamonisaki. Asukisaki na koloba ete “tiká ete bóbatela lokumu oyo libota ya Yehova esili kozwa mpe bólanda kobɛta bikuke na teritware na bino na mikili ya bopaya na kolukáká baoyo babongi . . . Lisusu, na nzela ya etamboli na bino ya sembo mpe ya pɛto, bótɛmɛla elimo ya mokili oyo, mpe bózala na bopusi malamu mpo na kopesa Yehova masanzoli mpe lokumu.”
Mpo na kosukisa manáka, mokambi apesaki bambote eutaki bisika ndenge na ndenge mpe na nsima akabolaki mapɔlɔ́mi mpe atángaki mboka epai bamisionere batindamaki. Na nsima na yango, moko kati na banakelasi atángaki nkomá ya banakelasi nyonso oyo kati na yango bapesaki matɔ́ndi mpo na mateya oyo mapesamelaki bango. Ya solo, molulu ya kopesa mapɔlɔ́mi na kelasi ya mbala ya 102 epesaki na baoyo nyonso basanganaki na yango ekateli makasi ya kokende liboso na kosakola Liloba ya Nzambe.
[Elilingi na lokasa 31]
Kelasi ya mbala ya 102 ya Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower
Kati na bankombo oyo ezali awa na nsé, milɔngɔ́ mitángami kobanda liboso kino na nsima, mpe bankombo etángami kobanda na lobɔkɔ ya mwasi kino na lobɔkɔ ya mobali.
(1) Duffy, C.; Alexis, D.; Harff, R.; Lee, J.; Corey, V.; Nortum, T.; Mora, N.; Journet, F.
(2) Djupvik, L.; Singh, K.; Hart, B.; Kirkoryan, M.; Lee, S.; Rastall, S.; Zoulin, K.; Kollat, K.
(3) Singh, D.; Pitteloud, J.; Pitteloud, F.; Bokoch, N.; Torma, C.; Muxlow, A.; Richardson, C.; Nortum, D.
(4) Harff, J.; Journet, K.; Barber, A.; Loberto, J.; Loberto, R.; Muxlow, M.; Mora, R.; Hart, M.
(5) Torma, S.; Rastall, A.; Diaz, R.; Diaz, H.; Weiser, M.; Weiser, J.; Kirkoryan, G.; Zoulin, A.
(6) Alexis, R.; Barber, D.; Djupvik, H.; Duffy, C.; Kollat, T.; Richardson, M.; Bokoch, S.; Corey, G.