Kobikisama na nzela ya bikamwiseli esalemaka kino lelo?
“NDIMELÁ Yesu mpe bikisamá!” Maloba motindo oyo mamemaki Alexandre, mosangani moko ya lingomba ebéngami Évangélique, na kondima ete kozwa nkisi ya monganga mpo na kosilisa bokɔnɔ na ye ekomonisa ete azangi kondima. Amindimisaki makasi ete bobele kondima na ye nde ekomemela ye kobikisama na nzela ya ekamwiseli oyo asengelaki na yango. Motema ya Benedite, mokatolike moko ya molende, esimbamaki makasi ntango ayokaki nsango ya kobikisama na nzela ya bikamwiseli oyo ezalaki kosalema na ndakonzambe ya Aparecida do Norte, na etúká ya São Paulo, na ekólo Brésil. Na kozongeláká maloba ya kobelela bilimu oyo mama-nkulutu na ye alakisaki ye, Benedite abondelaki Mama wa biso wa Aparecida, na Mosantu Antoine, mpe na “basantu” mosusu mpo na kosɛnga nguya ya kobikisa makɔnɔ.
Emonani lokola ete, ata na ekeke oyo ya 20, bato mingi bazali naino na kondima kati na kobikisama na nzela ya bikamwiseli—kasi mpo na nini? Ekoki kozala ete, bamoko bazali kozanga elikya ntango minganga bazali kolónga te kosilisa makɔnɔ, mpasi, mpe minyoko ya balingami na bango, mingi mpenza ya bana na bango. Baoyo bazali konyokwama na ntina na makɔnɔ oyo masilaka te bakoki kokanisa ete lokola nkisi ya monganga ezali kosɛnga mosolo mingi, ekozala mabe te soki baluki kobikisama na nzela ya kondima. Basusu bazali komona na televizyó mangomba ndenge na ndenge mpe bato oyo bazali kobikisa makɔnɔ lokola sida, konyokwama na makanisi, kanser, ligboma, hypertension, mpe makɔnɔ mosusu ndenge na ndenge. Ata soki bazali kondima makambo yango to bazali kondima yango te, bazali komipesa na yango lokola elikya ya nsuka. Nzokande basusu oyo bazali kokanisa ete bokɔnɔ na bango euti na bilimu mabe bakoki kokanisa ete nkisi ya monganga ezali na nguya ya kosunga bango te.
Epai mosusu, ezali na baoyo bazali kotɛmɛla makasi, ata mpe kokweisa likanisi ya kobikisama na nzela ya bikamwiseli ya “basantu” oyo bakufá to basáli na bikamwiseli oyo bazali na bomoi. Engebene zulunalo Jornal da Tarde, Monganga Dráusio Varella akanisaka ete kondima kobikisama na nzela ya bikamwiseli ezali “kotyola kondima ya bato bazangi bokɛngi mpe baoyo bazangi elikya.” Abakisi ete: “Na kondimáká bikamwiseli, mingi bakoki kosundola nkisi ya solosolo ya monganga mpo na kolanda bakosi yango.” Mpe búku The New Encyclopædia Britannica elimboli ete: “Na ntango ya kala, kobikisama na nzela ya bikamwiseli ezalaki kosalema na bisika mosantu mpe elongo na milulu ya mangomba, mpe engebene zébi ya minganga kobikisama motindo wana ekoki kolimbolama lokola mwango ya komema makanisi ya moto na ezalela ya malamu koleka (hypnotisme).” Atako bongo, ezali na bato mingi oyo bandimaka ete babikisamaki mpenza na nzela ya ekamwiseli. Epai na bango, kobikisama esalemaki!
Baoyo batángaka Biblia bayebi ete na mabaku mingi Yesu Klisto abikisaki babɛli, mpe asalaki bongo na “nguya ya Nzambe.” (Luka 9:42, 43, NW) Na yango bakoki komituna ete, ‘Nguya yango ya Nzambe ezali naino kosala mpe kobikisa na nzela ya bikamwiseli kino lelo oyo?’ Soko ezali boye, mpo na nini bato oyo bazali komeka kobikisa bazali kolónga te kokokisa bilaka na bango? Ezali mpo ete babɛli bazali na kondima moke to mpo ete mabonza bazali kopesa mazali moke? Ebongi na moklisto koluka kobikisama na nzela ya ekamwiseli na ntango azali konyokwama na bokɔnɔ ya mpasi mingi to oyo ekoki kosila te? Mpe kobikisama na nzela ya bikamwiseli ya solo na lolenge oyo Yesu asalaki ezali lisusu kosalema lelo oyo? Okoki kozwa biyano na mituna yango ya ntina mingi kati na lisoló oyo lilandi.