Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/7 nk. 8-13
  • Tómonisa bizaleli malamu kati na mokili motondi na mabe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tómonisa bizaleli malamu kati na mokili motondi na mabe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mikili ya bokonzi ya Loma mitondaki na mabe
  • Mokili ya lelo motondi na mabe
  • Tóbwaka bizaleli ya mbindo ya mokili
  • Ozali kolanda komonisa bizaleli malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Ndenge nini tokoki kolona bizaleli malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Lolenge nini tokoki kobakisa bizaleli bibongi likoló na kondima na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mpo na nini Nzambe abundisaki Bakanana?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/7 nk. 8-13

Tómonisa bizaleli malamu kati na mokili motondi na mabe

“Bósala makambo nyonso na kozanga koimaima mpe kotyana ntembe ete bózala na efundeli te mpe ekweli te, bana na Nzambe baoyo bazangi litɔnɔ kati na libota na bato banyɔngɔtani mpe bapɛngwi nzela.”​—BAFILIPI 2:14, 15.

1, 2. Mpo na nini Nzambe apesaki etindá ete Bakanana bábomama?

MITINDÁ ya Yehova esengeli kokakolama soko moke te. Wana Bayisalaele bazalaki pene na kokɔta na Mokili ya Ndaka, mosakoli Mose ayebisaki bango boye: “Okoboma bango nyɛ, Bahiti mpe Baamola mpe Bakanana mpe Bapelizi mpe Bahiwi mpe Bayebusi, lokola [Yehova] Nzambe na yo alakeli yo.”​—Deteronome 7:2; 20:17.

2 Lokola Yehova azali Nzambe ya ngɔlu, mpo na nini apesaki etindá ete bafandi ya Kanana bábomama? (Exode 34:6) Moko ya bantina ezalaki ‘ete Bakanana bálakisa Bayisalaele kosala lokola na misala na mbindo na bango nyonso te, oyo esalaki bango na kosalela banzambe na bango, mpe kosala lisumu boye epai na Yehova Nzambe.’ (Deteronome 20:18) Mose alobaki mpe ete: “Ezali mpo na masumu na mabota oyo ete [Yehova] Nzambe na yo alingi kobimisa bango liboso na yo.” (Deteronome 9:4) Bakanana bazalaki mpenza bato oyo bamipesaki na misala ya mbindo. Kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo mpe kosambela bikeko ezalaki mimeseno ya losambo na bango. (Exode 23:24; 34:12, 13; Mituya 33:52; Deteronome 7:5) Kosangisa nzoto bandeko na bandeko, kosangisa nzoto mibali na mibali mpe kosangisa nzoto na banyama ezalaki lolenge ‘ekosalaka bango na mokili na Kanana.’ (Levitike 18:3-​25) Bana oyo basali likambo te bazalaki kopesama mbeka na banzambe ya lokuta. (Deteronome 18:9-​12) Likambo ya kokamwa ezali te na ndenge Yehova amonisaki ete kotika mabota yango ete mázala wana ezalaki likámá ya nzoto, ya bizaleli mpe ya elimo ya libota na ye!​—Exode 34:14-​16.

3. Nini emonanaki ntango Bayisalaele bakokisaki mpenza te mitindá ya Nzambe na ntina na bafandi ya Kanana?

3 Mpo ete mitindá ya Nzambe mikokisamaki mpenza te, bafandi mingi na Kanana babomamaki te ntango Yisalaele azwaki Mokili ya Ndaka. (Basambisi 1:19-​21) Na nsima, bopusi mabe ya Bakanana emonanaki, mpe na yango ekokaki kolobama ete: “[Bayisalaele] baboyaki mibeko na [Nzambe] mpe kondimana oyo ye akataki na batata na bango mpe maloba makebisaki ye bango; babilaki makambo na mpamba mpe bayaki bato na mpamba; babilaki bapakano baoyo bazingelaki bango, baoyo [Yehova] alakisaki bango ete básala lokola bango te.” (2 Mikonzi 17:15) Ɛɛ, na boumeli ya bambula, Bayisalaele mingi bamipesaki na misala ya mbindo na boye ete Nzambe apesaki etindá ya kosilisa Bakanana​—losambo ya bikeko, kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo, ata mpe kopesa bana lokola mbeka!​—Basambisi 10:6; 2 Mikonzi 17:17; Yilimia 13:27.

4, 5. (a) Nini ekómelaki Yisalaele mpe Yuda oyo ezangaki bosembo? (b) Elendiseli nini epesami na Bafilipi 2:14, 15, mpe mituna nini mibimisami?

4 Na yango, mosakoli Hosea alobaki ete: “Bóyoka liloba na [Yehova], bino bato na Yisalaele, zambi [Yehova] azali na likambo epai na bafandi na mokili. Solo ezali te, boboto ezali te, boyebi na Nzambe ezali mpe kati na mokili te. Bobele kotuka mpe kobuka nkuta mpe koboma mpe koyiba mpe kosalaka pite; bazali kotomboka mpe makila ekolanda makila. Boye mokili ezali kolela mpe bafandi nyonso kati na yango bazali kolɛmba; banyama na bilanga lokola, bandɛkɛ na lola mpe, ata mbisi na mai-na-monana ilongolami.” (Hosea 4:1-3) Na mobu 740 L.T.B., Yisalaele, bokonzi mabe ya nɔ́rdi ebɔtɔlamaki na Asulia. Nsima soko ya ekeke moko, Yuda, bokonzi ya súdi oyo ezangaki bosembo ebɔtɔlamaki na Babilone.

5 Makambo yango mazali komonisa lolenge ekoki kozala likámá soki tomitiki kolɛngolama na bizaleli mabe. Nzambe ayini bokesene mpe akotikela yango nzela te kati na libota na ye. (1 Petelo 1:14-​16) Ezali solo ete tozali kobika kati na “ebongiseli mabe ya biloko ya ntango oyo,” kati na mokili oyo mabe mazali sé kobakisama. (Bagalatia 1:4; 2 Timoté 3:13) Atako bongo, Liloba ya Nzambe lizali kolendisa baklisto nyonso ete bákóba kosala na lolenge ete bázala “na efundeli te mpe ekweli te, bana na Nzambe baoyo bazangi litɔnɔ kati na libota na bato banyɔngɔtani mpe bapɛngwi nzela. Kati na bango [bazali] kongɛnga lokola miinda na mokili.” (Bafilipi 2:14, 15) Kasi ndenge nini tokoki kobatela bizaleli malamu kati na mokili oyo motondi na mabe? Likoki ezali mpenza ya kosala bongo?

Mikili ya bokonzi ya Loma mitondaki na mabe

6. Mpo na nini baklisto ya ekeke ya liboso bakutanaki na mokakatano mpo na komonisa bizaleli malamu?

6 Baklisto ya ekeke ya liboso bakutanaki na mokakatano mpo na kobatela bizaleli malamu mpamba te mabe epalanganaki na lolenge nyonso ya bomoi ya mboka Loma. Sénèque, filozofe Moloma alobaki na ntina na bato ya eleko na ye ete: “Bato bazali kobunda kati na bonguna makasi ya kosala mabe. Mokolo na mokolo mposa ya kosala mabe ezali sé kokóla, nzokande kobanga kosala mabe ezali kokita.” Akokanisaki mboka Loma na “etuluku ya banyama ya yauli.” Na bongo, likambo ya kokamwa ezali te ete, mpo na kominanola, Baloma bazalaki koluka masano makasi ya kobunda na mbeli mpe bilakiseli mosusu ya mbindo.

7. Lolenge nini Paulo alobelaki bizaleli ya mabe oyo epalanganaki epai ya bato mingi na ekeke ya liboso na T.B.?

7 Mbala mosusu, ntoma Paulo azalaki kokanisa etamboli mabe ya bato ya ekeke ya liboso ntango akomaki ete: “Nzambe atiki bango kati na mposa na nsɔni. Mpo ete basi na bango basenzi ezaleli na mwasi mpo na bizaleli bibongi te, mpe babali na bango lokola, batiki kosangana na mwasi pelamoko ezaleli na mobali nde baziki na mposa mpo na bango mpenza. Babali bazali kosangana na babali na makambo na nsɔni mpe bazwi kati na nzoto na bango libonza na makambo mabe na bango.” (Baloma 1:26, 27) Kolandáká ntango nyonso bamposa mabe ya nzoto, mikili ya Loma etondaki na bizaleli ya mbindo.

8. Na lolenge nini mbala mingi bana mike bazalaki kosalelama mabe na Grèce mpe na Loma?

8 Lisoló ya bato ezali komonisa polele te lolenge oyo kosangisa nzoto mibali na mibali epalanganaki kati na Baloma. Atako bongo, na ntembe te bazwaki bopusi ya Bagreke oyo bazalaki liboso na bango, baoyo kati na bango kosangisa nzoto mibali na mibali epalanganaki mingi. Mibali mikóló bazalaki na momeseno ya kolɛngola bilenge mibali, kosaláká na bango boyokani lokola oyo ezalaka kati na molakisi mpe mwanakelasi oyo mbala mingi ezalaki komema bilenge na kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo. Na ntembe te, Satana mpe bademó na ye bazalaki nsima ya ezaleli mabe wana mpe kobebisama ya bana.​—Yoele 3:3; Yuda 6, 7.

9, 10. (a) Na motindo nini 1 Bakolinti 6:9, 10 ekweisi mabe ndenge na ndenge? (b) Bizaleli nini bamosusu kati na lisangá ya Kolinti bazalaki na yango liboso, mpe basalaki mbongwana nini?

9 Wana akomaki na kopemama na Nzambe, Paulo ayebisaki baklisto ya mboka Kolinti ete: “Boyebi te ete bato na masumu bakosangola libula na Bokonzi na Nzambe te? Bómizimbisa te, moto na pite mpe basambeli na bikeko mpe bato na ekobo mpe bakembi na nsɔni mpe mibali bamibebisi na mibali mpe bayibi mpe bato na bilulela mpe balangi masanga mpe batuki mpe babotoli bakosangola Bokonzi na Nzambe te. Bamosusu na bino bozalaki bongo. Kasi bosili kosukwa, bosili kobulisama, bosili kozwa boyengebene na nkombo na Nkolo Yesu Klisto mpe na [elimo, NW] na Nzambe na biso.”​—1 Bakolinti 6:9-​11.

10 Na bongo, mokanda mopemami ya Paulo mokweisaki ezaleli ya kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo, kolobáká ete “bato na pite bakosangola bokonzi na Nzambe te.” Nzokande, nsima ya kotánga molɔngɔ́ ya bizaleli ya mbindo, Paulo alobaki ete: “Bamosusu na bino bozalaki bongo. Kasi bosili kosukwa.” Na lisalisi ya Nzambe, basáli na mabe bakokaki kokóma pɛto na miso na ye.

11. Lolenge nini baklisto ya ekeke ya liboso balóngaki kati na ezingelo mabe ya mikolo na bango?

11 Ɛɛ, bizaleli malamu ya boklisto bizalaki kokóla ata kati na mokili motondaki na mabe na ekeke ya liboso. Bandimi ‘babongwanaki na kozwáká makanisi ya sika.’ (Baloma 12:2) Batikaki ‘motindo na bango oyo ekangamaki na ezaleli na bango ya liboso’ mpe ‘balataki motindo na sika oyo ezali na nguya ya kosala kati na makanisi na bango.’ Na yango, bakimaki bizaleli ya mbindo ya mokili mpe ‘balataki motindo na sika oyo ezali na motindo na Nzambe na boyengebene mpe na bulɛɛ na solo.’​—Baefese 4:22-​24.

Mokili ya lelo motondi na mabe

12. Mbongwana nini esili kokɔta kati na mokili uta 1914?

12 Ezali boni na mikolo na biso? Mokili oyo tozali kobika kati na yango etondi na bizaleli ya mbindo koleka bileko mosusu nyonso. Mingimingi banda 1914 kokwea ya bizaleli malamu ezali mpenza komonana. (2 Timoté 3:1-5) Kobwakáká mimeseno mitali bizaleli malamu, lokumu, mpe alimá, bato mingi bakómi kotalela bobele makanisi na bango moko mpe “bazali koyoka mawa te.” (Baefese 4:19) Zulunalo Newsweek elobaki ete: “Tozali kobika na eleko moko oyo bizaleli malamu bizali kotalelama engebene moto na moto,” ebakisaki ete “etamboli oyo epalangani lelo ekómisi likambo litali koyeba malamu mpe mabe, liponi ya moto na moto engebene mayoki to mimeseno na ye.”

13. (a) Lolenge nini kominanola ya lelo ezali kolendisa bizaleli ya mabe? (b) Bopusi nini ya mabe kominanola ya mbindo ezali na yango likoló na bato?

13 Lolenge moko na ekeke ya liboso, kominanola ya mbindo ezali mpe komonana mingi lelo oyo. Televizyó, radio, bafilime mpe video ezali mbala mingi kotalisa makambo oyo mazali kobenda likebi na kosangisa nzoto. Kútu makambo ya mbindo masili kokɔtisama na baordinatere. Engebene ankɛtɛ oyo esalemaki na Iniversité moko, kolakisa bolumbu na ordinatere ezali sikawa “moko ya lolenge ya kominanola oyo eleki kosalelama (mbala mosusu yango nde eleki mpenza kosalelama) na basaleli ya ordinatere.” Bopusi ya makambo oyo nyonso ezali nini? Mokomi ya zulunalo moko alobi ete: “Lokola kotangisa makila, kobebisa nzoto mpe kosangisa nzoto na banyama etondi kati na mimeseno ya bato, na yango, tokómi komesana mpe na kotangisa makila, kobebisa nzoto mpe kosangisa nzoto lokola banyama. Tolɛmbi nzoto. Lokola bizaleli ya mbindo bizali kopesamela nzela, na yango bikómi kotalelama ete bizali lisusu mabe te.”​—Kokanisá na 1 Timoté 4:1, 2.

14, 15. Nini emonisi polele ete likambo litali kosangisa nzoto esili kobeba kati na mokili mobimba?

14 Tótalela oyo elobelamaki na zulunalo The New York Times: “Makambo oyo matalelamaki lokola makambo ya nsɔni esili koleka mbula 25, sikawa makómi ebongiseli ya bomoi oyo endimami na bato. Motángo ya babalani oyo bazali kopona kofanda makango na esika ete bábalana mosali bokóli ya 80 likoló na monkámá [na États-Unis] uta 1980 kino 1991.” Yango ezali likambo oyo lizali kosalema bobele na Amerika ya Nɔ́rdi te. Zulunalo Asiaweek ekomi ete: “Ntembe ezali konginda na mikili [ya Azia]. Ntina ya likambo ezali ete esengeli nde kobatela mimeseno ya kala to kopesa bonsomi na kosangisa nzoto; mpe bopusi mpo na mbongwana ezali kokóla makasi mpenza.” Mitángo mizali komonisa ete ekobo mpe kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali kondimama na mikili mingi.

15 Biblia esakolaki ete misala ya Satana mikokóla na mikolo na biso. (Emoniseli 12:12) Na yango, esengeli kokamwisa biso te ete mabe ezali sé kopalangana. Na ndakisa, likambo litali kosalela bana mike na mikano ya kosangisa nzoto ekómi mpenza likambo ya nsɔ́mɔ koleka.a Ebongiseli etali bana kati na lisangá ya Mabota Masangani elobi ete “mombongo ya makambo matali kosangisa nzoto ezali kobebisa bana kati na bikólo nyonso ya mokili.” Mbula na mbula “bana koleka milió 1 na mokili mobimba bazali kosɛngisama na makasi kosala bondumba, bazali kosalela bango na mombongo mpe bazali kotɛkisa bango mpo na mikano ya kosangisa nzoto, mpe bazali kosalelama mpo na kobimisa bililingi oyo bizali komonisa bolumbu ya bana.” Kosangisa nzoto mibali na mibali mpe epalangani, bato mosusu ya politiki mpe bakonzi ya mangomba bazali kozwa esika ya liboso mpo na kolendisa yango lokola nde ezali “lolenge mosusu ya bomoi ekeseni na oyo tomeseni na yango.”

Tóbwaka bizaleli ya mbindo ya mokili

16. Etɛlɛmɛlo nini Batatoli ya Yehova bazali na yango na ntina na makambo ya kosangisa nzoto?

16 Batatoli ya Yehova bandimelaka te baoyo bazali kotika nzela na kobuka mitindá ya makambo matali kosangisa nzoto. Tito 2:11, 12 elobi ete: “Ngɔlu na Nzambe esili komonana mpo na lobiko na bato nyonso. Yango ezali kolakisa biso ete tóboya kotuka Nzambe mpe kobila mposa na mokili, kasi tózala na bizaleli na kokanga motema mpe na boyengebene mpe na kosambela Nzambe kati na ekeke oyo.” Ɛɛ, tozali kolóna koyina makasi, mpii ya bizaleli ya mbindo lokola kosangisa nzoto liboso ya kobala, ekóbo mpe kosangisa nzoto mibali na mibali.b (Baloma 12:9; Baefese 5:3-5) Paulo apesaki elendiseli oyo: “Tiká ete moto na moto oyo akobyanga nkombo na Nkolo atangwa na masumu.”​—2 Timoté 2:19.

17. Lolenge nini baklisto ya solo batalelaka masanga?

17 Baklisto ya solo bazali kobwaka makanisi ya mokili na ntina na makambo oyo mazali komonana lokola mabe mikemike. Na ndakisa, lelo oyo bato mingi batalelaka kolangwa masanga lokola lisɛki. Kasi Batatoli ya Yehova bazali kokeba na toli oyo ezwami na Baefese 5:18: “Bólangaka vinyo te zambi yango ezali kozanga kobika. Nde botondaka na [elimo, NW].” Soki moklisto aponi komela masanga, akomela na bokatikati.​—Masese 23:29-​32.

18. Lolenge nini mitindá ya Biblia mizali kotambwisa basaleli ya Nzambe kati na boyokani na bango mpe basangani ya libota?

18 Lokola tozali basaleli ya Yehova, tozali mpe kobwaka makanisi ya bato mosusu na mokili ete kofinga, kongangela baninga mpe bana, kotungisa bango na maloba ya kotuka ete ezali bizaleli bindimami. Na mokano ya kolanda komonisa bizaleli malamu, mibali baklisto mpe basi na bango bazali kosala elongo mpo na kokokisa toli oyo ya Paulo: “Makambo nyonso na bololo mpe likunya mpe nkanda mpe kongala mpe kotɔnga málongwa na bino mpe makambo nyonso na mabe lokola. Bózalanaka na boboto, moko epai na mosusu, na motema na mawa, na kolimbisana moko moko pelamoko Nzambe asili kolimbisa bino kati na Klisto.”​—Baefese 4:31, 32.

19. Lolenge nini bizaleli mabe ezali komonana na makambo ya mombongo na mokili?

19 Ezaleli ya kozanga kolongobana, kobuba, lokuta, mombongo ya mbilingambilinga mpe moyibi etondi mpe na mikolo na biso. Lisoló moko ebimaki kati na CFO, zulunalo moko ya mombongo elobi ete: “Ankɛtɛ oyo esalemaki likoló na basáli 4 000 . . . emonisaki ete basáli 31 likoló na monkámá bamonaki ‘etamboli mabe’ na boumeli ya mobu oyo molekaki.” Etamboli yango mabe esangisaki makambo lokola kokosa, kokoma makambo malongobani te, kotungisa basusu na makambo ya bosɔtɔ, mpe moyibi. Soki tolingi kotikala pɛto na miso ya Yehova, tosengeli kopɛngola etamboli motindo wana mpe kozala sembo na makambo matali mosolo.​—Mika 6:10, 11.

20. Mpo na nini baklisto basengeli kopɛngola “mposa na mosolo”?

20 Tótalela oyo ekómelaki mobali moko oyo akanisaki ete akokaki kozala na ntango mingi koleka mpo na mosala ya Nzambe soki azwi mosolo mingi na mbala moko. Apusaki basusu na mwango ya kotya mosolo na kolekisáká ndelo ya motuya ya mbano oyo bakozwa. Lokola mosolo yango ebotaki te, azalaki na likoki te ya kozongisa mosolo mingi oyo mobungaki, na yango ayibaki mosolo oyo babombisaki epai na ye. Mpo na misala wana mpe ezalela ya kozanga kobongola motema, abimisamaki na lisangá. Oyo nde bosolo ya likebisi ya Biblia oyo lilobi ete “Baoyo bazali na mposa na kozwa mosolo, bakokwea na kati na komekama mpe na lilonga [“motambo,” NW] , mpe mposa ezangi ntina mpe ikoyokisa mpasi. Mposa yango ikozindisa bato na liwa mpe na libebi nyɛ. Zambi mposa na mosolo ezali ntina na mabe nyonso. Mpo na yango, bamosusu basili kopɛngwa longwa na kondima mpe bamitɔbɔli bango mpenza na bolɔ́zi mingi.”​—1 Timoté 6:9, 10.

21. Etamboli nini bato oyo bazali na bokonzi kati na mokili bazali na yango, kasi ndenge nini baoyo bazali na mikumba kati na lisangá ya boklisto basengeli komitambwisa?

21 Bato oyo bazali na bokonzi mpe na bopusi na makambo ya mokili, mbala mingi bazalaka na bizaleli malamu te mpe na lolenge yango bamonisaka bosolo ya likambo oyo elobamaka ete ‘Bokonzi ebebisaka.’ (Mosakoli 8:9) Na mikili mosusu, kanyaka mpe myango misusu ya kobuba ezali lolenge ya bomoi ya basambisi, bapolisi mpe bato ya politiki. Nzokande, baoyo bazali kotambwisa lisangá ya boklisto basengeli kozala na bizaleli malamu mpe basengeli te koyangela basusu. (Luka 22:25, 26) Bankulutu mpe basaleli na misala bazali kosala “na mposa na kozwa lifuti te.” Basengeli kokeba na komekama nyonso oyo ekoki kobulunganisa bango to kopusa makanisi na bango na lolenge ya kotalela bozwi oyo moto azali na yango.​—1 Petelo 5:2; Exode 23:8; Masese 17:23; 1 Timoté 5:21.

22. Lisoló lilandi likolobela nini?

22 Mingi mpenza, baklisto bazali kolónga mokakatano ya lelo ya komonisa bizaleli malamu kati na mokili oyo motondi na mabe. Nzokande, bizaleli malamu etaleli bobele kopɛngola mabe te. Lisoló oyo lilandi likolobela nini ezali kosɛngama mpo na kolóna bizaleli malamu.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá lisoló “Batelá bana na yo!” ebimaki na Lamuká! ya 8 Ɔkɔtɔ́bɛ 1993 (ebimeli ya Lifalansé).

b Baoyo liboso bamikɔtisaki na misala ya mbindo lokola kosangisa nzoto mibali na mibali bakoki kobongola bizaleli na bango, lolenge moko basusu basalaki na ekeke ya liboso. (1 Bakolinti 6:11) Makanisi ya kosunga mapesamaki na Lamuká! ya 22 Mársi 1995, nkasa 21-23 (ebimeli ya Lifalansé).

Makanisi ya bozongeli

◻ Mpo na nini Yehova apesaki etindá ya koboma Bakanana?

◻ Bizaleli mabe nini ezalaki komonana mingi na ekeke ya liboso, mpe ndenge nini baklisto balóngaki kati na ezingelo motindo wana?

◻ Endimiseli nini ezali komonisa kobeba ya bizaleli ya mokili uta 1914?

◻ Bizaleli mabe nini Batatoli ya Yehova basengeli kobwaka?

[Elilingi na lokasa 9]

Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki na bizaleli malamu, atako bazalaki kofanda kati na mokili motondaki na mabe

[Elilingi na lokasa 10]

Bizaleli ya mbindo bisili kokɔta ata na ordinatere, kopesáká nzela na bilenge mpe na bato mosusu ete bátalaka bolumbu ya bato

[Elilingi na lokasa 12]

Baklisto basengeli kozala na bizaleli malamu, basengeli te komekola mayele mabe ya basusu

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto