Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/8 lok. 31
  • Ozali Komikundola?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali Komikundola?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Masolo mosusu
  • Ntango Yesu akoya kati na nkembo ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Kobongwana na Klisto: etali biso na likambo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Sekele oyo okoki koyebisa basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Libombami oyo baklisto basengeli koyebisa polele!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/8 lok. 31

Ozali Komikundola?

Omonaki ete masoló oyo mautaki kobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mabongi mpo na yo? Boye mpo na nini te komeka boyebi na yo na mituna milandi?

◻ Armagedon ekozala lolenge nini? (Emoniseli 16:14, 16)

Ekozala etumba monene ya nikleere te to likámá mosusu ya monene oyo bato bakoyeisa. Te, yango ezali nde etumba ya Nzambe oyo ekosilisa bitumba nyonso mpe baoyo bazali kolendisa bitumba, mpe ekomema kimya ya solo mpo na baoyo balingaka kimya. Ekoumela te. (Habakuku 2:3)​—15/4, lokasa 17.

◻ Libala ya lolenge nini ekumisaka Yehova?

Libala oyo kati na yango makambo ya elimo mapesameli motuya mingi koleka bizaleli ya mokili ekokumisa solo Yehova. Wana bazali kosala makasi mpo na kozala bato ya mokili te na biyambayamba na yango mpe kolekisa ndelo na yango, mpe wana bazali kotikela yango nzela te ete ebebisa bibongiseli ya Teokrasi, mpe wana bamonisi ezaleli ya bopɔlɔ na esika ya nzombo, baklisto bakosepela na libaku yango.​—15/4, lokasa 26.

◻ Makambo nini mamonanaka epai ya moto ya bosembo?

Moto ya bosembo akoki kotyelama motema, bobele na bato te kasi, na koleka, na Nzambe. Bopɛto ya motema na ye emonanaka na misala na ye. Azali na bokosi te. Apɛngwaka na nzela na ye te to atikaka motema na ye kobebisama te. (2 Bakolinti 4:2)​—1/5, lokasa 6.

◻ Mpo na nini Yilimia alobaki ete: “Ezali malamu na elenge ete akumba [ekanganelo] na ntango na bolenge na ye”? (Bileli 3:27)

Koyekola koyika mpiko na mikakatano na ntango moto azali elenge ekobongisa ye mpo na kolónga mikakatano ya bomoi wana akokóma mokóló. (2 Timoté 3:12) Matomba ya kotikala sembo mazali mingi koleka libɔndisi nyonso ya ntango mokuse oyo kondima bopusi ya basusu ekoki kopesa.​—1/5, lokasa 32.

◻ Komonana ya Mose mpe Eliya na mbongwana ya Yesu esakolaki nini?

Na ntango ya mbongwana ya Yesu, Mose mpe Eliya bazalaki bililingi bibongi mpo na bandeko ya Yesu bapakolami na elimo. Likambo oyo ete ‘bamonanaki na nkembo,’ elongo na Yesu, elimboli ete baklisto bapakolami ya sembo bakozwa “nkembo esika moko” na Yesu kati na ebongiseli ya Bokonzi ya likoló. (Luka 9:30, 31; Baloma 8:17; 2 Batesaloniki 1:10)​—15/5, nkasa 12, 14.

◻ “Libombami ya bulɛɛ” ya Nzambe ezali nini? (1 Bakolinti 2:7)

“Libombami ya bulɛɛ” ya Nzambe etaleli mpenzampenza Yesu Klisto. (Baefese 1:9, 10) Nzokande, ezali te bobele komonisama ya Yesu lokola Masiya oyo alakamaki. Ezali kotalela boyangeli ya likoló, Bokonzi ya Masiya ya Nzambe, mpe ezali kotalela mosala oyo bapesi Yesu mpo na kosala kati na mokano ya Nzambe.​—1/6, lokasa 13.

◻ Lolenge nini moklisto asengeli kotalela bobangé to bokɔnɔ?

Na esika ya kotalela mokakatano motindo wana lokola epekiseli oyo ezali kotya ndelo na mosala na ye mpo na Yehova, asengeli kotalela yango lokola libaku ya kotyela ye lisusu motema. Lisusu, asengeli komikundwela ete motuya ya moklisto ezali kotalelama bobele te na bonene ya mosala oyo azali kokokisa, kasi na kondima na ye mpe bozindo ya bolingo na ye. (Malako 12:41-​44)​—1/6, lokasa 26.

◻ Na nini lolenge oyo Yehova asalelaki bato na esika ya baanzelu mpo na kokoma Biblia emonisi mayele na ye monene?

Soki mayoki ya bato ezangaki mpenza, mbala mosusu mbɛlɛ tozali na mokakatano ya kokanga ntina ya nsango ya Biblia. Lisusu, Biblia ezali na mɔ́tɔ, makembisi, mpe na bosepelisi oyo mayoki ya bato epesi yango.​—15/6, lokasa 8.

◻ Wapi sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota?

Sɛkɛlɛ́ ezali kati na Biblia, Liloba ya Nzambe, mpe kosalelama ya mitindá na yango, lokola ezaleli ya komipekisa, kotosa ebongiseli ya bokonzi, kosolola malamu, mpe bolingo.​—15/6, nkasa 23, 24.

◻ Lolenge nini kobikisa oyo Yesu asalaki ekeseni mpenza na oyo ezali kosalema na baoyo bazali koloba ete bázali na nguya ya kobikisa lelo oyo?

Ezalaki na makambo ya kobimisa mayoki makasi te kati na bibele oyo bazalaki koya mpe Yesu azalaki na bisalasala te. Lisusu, Yesu alɛmbaki kobikisa babɛli te na kopesáká mokalo ete mabonza na bango mazalaki moke to mpo ete bazangaki kondima.​—1/7, lokasa 5.

◻ Lolenge nini Yehova asalisaki basaleli na ye ete bázala na esika kati na mokano na ye na ntina na nkombo mpe Bokonzi na ye?

Ya liboso, Yehova apesi basaleli na ye solo. Ya mibale, apesi bango elimo santu na ye. Mpe ya misato, tozali kati na bondeko ya mokili mobimba mpe ebongiseli kitoko ya Yehova mpo na losambo.​—1/7, nkasa 19, 20.

◻ Bizaleli malamu ezali nini?

Bizaleli malamu elimboli kosala oyo ezali malamu, kozala motema malamu, komonisa misala ya sembo mpe makanisi ya sembo. Ezali ezaleli ya bopɔtu te kasi ya kosala malamu mpe kozala na makanisi mabongi. Bizaleli malamu esuki bobele na kopɛngola lisumu te; kasi esɛngaka kosala ntango nyonso oyo ezali malamu. (1 Timoté 6:11)​—15/7, lokasa 14.

◻ Wapi libula lileki motuya oyo baboti bakoki kotikela bana na bango?

Libula lileki motuya oyo baboti bakoki kopesa na bana na bango ezali bongo ndakisa na bango ya komonisa bolingo epai na basusu. Bana bazalaka na mposa ya komona mpe koyoka baboti na bango komonisa bolingo ya solosolo mpo na Nzambe na makambo nyonso oyo bazali kosala.​—15/7, lokasa 21.

◻ Wapi mwa makambo ya ntina mpo ete boyekoli ya libota ezala malamu?

Boyekoli ya libota esengeli kosalema pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Bosengeli ‘kosomba ntango’ mpo na boyekoli. (Baefese 5:15-17) Salá na boye ete bangonga ya boyekoli ezala bantango ya esengo mpo na bana na kopesáká bomoi na masoló ya Biblia. Mpo ete bana básepela na boyekoli, basengeli komiyoka ete etaleli mpe bango.​—1/8, nkasa 26, 28.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto