Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/8 nk. 17-22
  • Tózala na “makanisi malamu” awa nsuka ekómi pene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózala na “makanisi malamu” awa nsuka ekómi pene
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Makanisi malamu” kati na boyokani na biso elongo na basusu
  • “Makanisi malamu” mpe mikumba ya libota
  • “Makanisi malamu” na lolenge na biso ya kotalela kelasi
  • ‘Koluka makambo minene te’
  • Lolenge malamu ya kosalela ntango oyo etikali
  • Tókóba kozala na “makanisi malamu”
  • Ayekolaki komonisa motema mawa
    Mekolá kondima na bango
  • Ayekoli koyokela basusu mawa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Salá makasi otalelaka bato ndenge oyo Yehova atalelaka bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Yona azwi liteya na motema mawa ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/8 nk. 17-22

Tózala na “makanisi malamu” awa nsuka ekómi pene

“Nde nsuka na makambo nyonso ezali kobɛlɛma. Na bongo bózala na makanisi na sembo [“makanisi malamu,” “NW”].”​—1 PETELO 4:7.

1. Kozala na “makanisi malamu” esangisi makambo nini?

MALOBA oyo ya ntoma Petelo esengeli kozala na bopusi makasi likoló na lolenge oyo baklisto bazali kotambwisa bomoi na bango. Nzokande, Petelo azalaki te koyebisa bato oyo balingaki kotánga mokanda na ye ete bátika kokokisa mikumba na bango ya mokolo na mokolo mpe bátika komibanzabanza mpo na bomoi na bango; alendisaki bango mpe te ete bázala na bobángi eleki ndelo mpo na likámá oyo ezalaki pene ya kosalema. Nzokande, alendisaki bango ete: “Bózala na makanisi na sembo [“makanisi malamu,” NW].” “Kozala na makanisi malamu” esangisi komonisa likoki ya kozwa bikateli malamu, koyeba nokinoki makambo oyo mazali koleka zingazinga na yo, kozala na bokɛngi, komonisa mayele na maloba mpe na misala. Yango elimboli kotika ete Liloba ya Nzambe etambwisa makanisi na biso mpe misala na biso. (Baloma 12:2) Lokola tozali kobika “kati na libota na bato banyɔngɔtani mpe bapɛngwi nzela,” kozala na makanisi malamu ezali na ntina mingi mpo na kopɛngola mitungisi mpe mikakatano.​—Bafilipi 2:15.

2. Lolenge nini baklisto bazali lelo oyo kozwa litomba na motema molai ya Yehova?

2 “Makanisi malamu” ezali mpe kosalisa biso ete tómitalela biso moko na lolenge elongobani mpenza, kasi na lolenge ya kolekisa ndelo te. (Tito 2:12; Baloma 12:3) Yango ezali na ntina mingi na kotaleláká maloba oyo ezwami na 2 Petelo 3:9: “Nkolo akoumela nsima na elaka na ye te, lokola bamosusu bazali kokanisa ete akoumela. Kasi azali na motema molai epai na bino, alingi te ete bamosusu bábeba [“bábomama,” NW] kasi ete bato nyonso bákóma kobongwana na motema.” Tomoni ete Yehova azali na motema molai, bobele te epai na bato oyo bazangi kondima, kasi epai “na bino” mpe lokola​—basangani ya lisangá ya boklisto. Mpo na nini? Mpamba te ‘alingi te ete bamosusu bábomama.’ Ekoki kozala ete ezali naino na baoyo basengeli kosala mbongwana mpe kosembola makambo na bango mpo bándimama mpo na kozwa likabo ya bomoi ya seko. Na bongo, tiká tótalela mwa ndambo ya makambo oyo ezali mbala mosusu kosɛnga ete tómisembola mpo na yango.

“Makanisi malamu” kati na boyokani na biso elongo na basusu

3. Mituna nini baboti basengeli komituna na ntina na bana na bango?

3 Libota esengeli kozala esika ya kimya. Kasi mpo na basusu ezalaka bongo “ndako [oyo] etondi na . . . kowelana.” (Masese 17:1) Ezali boni mpo na libota na yo? Ndako na biso ezangi “nkanda mpe kongala mpe kotɔ́nga”? (Baefese 4:31) Ezali boni mpo na bana na yo? Bazali komiyoka ete balingami mpe batalelami na motuya? (Kokanisá na Luka 3:22.) Ozwaka ntango ya koteya mpe kolakisa bango? ‘Osembolaka kati na boyengebene’ na esika ete osilika to ongala na nkanda makasi? (2 Timoté 3:16) Lokola bana bazali “likabo na [Yehova],” amibanzabanzaka mingi mpenza na ntina na lolenge oyo bazali kobɔkɔlama.​—Nzembo 127:3.

4. (a) Likambo nini ekoki komonana soki mobali azali kosalela mwasi na ye makambo makasi? (b) Lolenge nini basi bakoki kobatela kimya elongo na Nzambe mpe esengo kati na libota mobimba?

4 Ezali boni mpo na molongani na biso? “Ekoki na babali ete bálinga basi na bango lokola nzoto na bango mpenza. Ye oyo alingi mwasi na ye azali komilinga ye moko. Zambi moto te akoyina mosuni na ye moko nde akoleisa yango mpe akobatela yango pelamoko Klisto epai na Lingomba.” (Baefese 5:28, 29) Mobali oyo asalelaka bokonzi na ye na lolenge ya mabe, oyo anyokolaka to oyo azalaka na makambo makasimakasi azali te bobele kobebisa kimya ya libota na ye kasi azali mpe kobebisa boyokani na ye elongo na Yehova. (1 Petelo 3:7) Ezali boni mpo na basi? Bango mpe basengeli ‘kotosa babali na bango pelamoko epai na Nkolo.’ (Baefese 5:22) Likanisi ya koluka kosepelisa Nzambe ekoki kosalisa mwasi ete alimbisa mabungá ya mobali na ye mpe atosa ye kozanga kokakatana. Na bantango mosusu, ekoki kosɛnga ete mwasi ayebisa makanisi na ye polele. Masese 31:26 elobi na ntina na mwasi ya mayele ete: “Akozipola monɔkɔ na ye na mayele, mibeko na boboto ezali na lolemo na ye.” Na kosaleláká mobali na ye makambo na boboto, na limemya, mwasi akobatela kimya elongo na Nzambe, mpe akokólisa esengo ya libota mobimba.​—Masese 14:1.

5. Mpo na nini bilenge basengeli kolanda toli ya Biblia mpo na oyo etali lolenge ya kosala epai na baboti na bango?

5 Bilenge, lolenge nini bosalaka epai na baboti na bino? Bosalelaka maloba ya kotyola, ezangi botosi, oyo mingimingi epesameli nzela na mokili? To bozali nde kotosa etindá oyo ya Biblia: “Bino bana, bótosaka baboti na bino kati na Nkolo zambi yango ezali sembo. Kumisá tata na yo mpe mama na yo, oyo lilako na liboso lizali na elaka ete, Bongo ezala na yo malamu ete oumela na mokili ntango molai”?​—Baefese 6:1-3.

6. Lolenge nini tokoki koluka kimya elongo na baninga na biso bandimi?

6 Tomonisaka mpe “makanisi malamu” wana ‘tolukaka kimya mpe tolandaka yango’ elongo na baninga na biso bandimi. (1 Petelo 3:11, NW) Na bantango mosusu, kozanga boyokani mpe kowelana ebimaka. (Yakobo 3:2) Soki totiki nzela ete koyinana ekóla, kimya ya lisangá mobimba ekotyama na likámá. (Bagalatia 5:15) Na yango, tósilisaka matata nokinoki; tólukaka lolenge ya kosilisa yango na kimya nyonso.​—Matai 5:23-25; Baefese 4:26; Bakolose 3:13, 14.

“Makanisi malamu” mpe mikumba ya libota

7. (a) Lolenge nini Paulo alendisaki ezaleli ya komonisa “makanisi malamu” kati na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo? (b) Ezaleli nini mibali mpe basi baklisto basengeli kozala na yango mpo na oyo etali misala ya ndako?

7 Ntoma Paulo apesaki baklisto toli ete ‘bázalaka na makanisi malamu.’ (Tito 2:12, NW) Likambo ya kobenda likebi ezali ete, mwa moke liboso, Paulo alendisi basi ete ‘bálinga mibali na bango, bálinga mpe bana na bango, bázala mpe basembwi [“na makanisi malamu,” NW], na ezaleli na pɛto, babongisi malamu na ndako.’ (Tito 2:4, 5) Paulo akomaki toli yango na mibu 61-​64 T.B., mwa bambula liboso ya kobebisama ya ebongiseli ya biloko ya Bayuda. Kasi makambo ya mokolo na mokolo, lokola kobongisa ndako, ezalaki naino na ntina mingi. Na bongo, ezala mibali to basi, bango nyonso basengeli ntango nyonso kotalela misala ya ndako na lolenge oyo ebongi na yango mpenza, mpo “ete Liloba na Nzambe litukama te.” Tata moko ya libota asɛngaki mopaya oyo ayaki kotala bango ete alimbisa bango mpo ayokaki nsɔni lolenge biloko na ndako na bango ebongisamaki malamu te. Alobaki ete ebongisamaki malamu te “mpo ete azalaki kosala mosala ya mobongisi nzela.” Komipesa mingi kati na mosala ya Bokonzi ezali likambo malamu, kasi tosengeli kosɛnzɛla ete tóbebisa te bolamu ya mabota na biso.

8. Lolenge nini batata bakoki kokokisa bamposa ya mabota na bango na bokatikati nyonso?

8 Biblia ezali kolendisa batata ete bápesa motuya monene na mabota na bango, yango wana eyebisi ete ye oyo akokokisa te bamposa ya libota na ye “asili koboya bindimeli mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.” (1 Timoté 5:8) Lolenge ya bomoi ekesani engebene bamboka ndenge na ndenge kati na mokili mobimba, mpe ezali malamu ete tózala na bokatikati wana tozali kolukaka biloko ya mosuni. Mokomi ya Masese 30:8 abondelaki ete: “Pesá ngai bobólá te, bozwi mpe te.” Nzokande, baboti basengeli te kobosana bamposa ya mosuni ya bana na bango. Na ndakisa, ekozala likambo ya mayele ete tótika kopesa libota na biso biloko ya ntina ya bomoi mpo na kolanda kokokisa mikumba na biso ya Teokrasi? Yango ekopesa bana na yo mpasi, boye te? Lisusu, Masese 24:27 elobi ete: “Bongisá mosala na yo na libándá, omikokisela yango kati na elanga; boye na nsima tongá ndako na yo.” Ya solo, atako komibanzabanza mpo na bamposa ya mosuni ezali mpe na ntina, ‘kotonga ndako na yo’​—na elimo mpe mpo na oyo etali komonisa bolingo​—ezali na motuya koleka.

9. Mpo na nini ezali likambo ya mayele ete batata ya mabota bátalela likambo litali liwa na bango to maladi?

9 Osili kokamata bibongiseli oyo ekosunga libota na yo soki liwa ekómeli yo na mbalakaka? Masese 13:22 elobi ete: “Moto malamu akotika libula epai na bana na bana na ye.” Longolá libula oyo: boyebi ya Yehova mpe boyokani elongo na ye, baboti basengeli mpe komibanzabanza mpo na kokokisa bamposa ya mosuni ya bana na bango. Na mikili mingi, batata ya mabota oyo bayebi mpenza ntina ya mokumba na bango bamekaka kobomba mwa mosolo, kosala testamá, mpe kozala na assurance-vie. Toyebi malamu ete “ntango mpe makambo makanami te” ekómelaka bato nyonso, ata mpe basaleli ya Nzambe. (Mosakoli 9:11, NW) Mosolo ‘ekobatelaka,’ mpe kobongisa malamu makambo liboso ekoki kopɛngola mikakatano. (Mosakoli 7:12) Na bamboka oyo Letá afutelaka bato lisalisi ya monganga te, basusu bakoki komona malamu ete bábombaka mwa mosolo mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto to kokamata bibongiseli lokola assurance-maladie.a

10. Lolenge nini baboti baklisto basengeli “kobomba” mpo na bana na bango?

10 Makomami mayebisi mpe ete: “Ebongi te ete bana bábombela baboti biloko kasi baboti bábombela bana mpenza.” (2 Bakolinti 12:14) Na mokili baboti mingi babombaka mosolo oyo ekosalisa bana na bango na ntango bakokɔta kelasi mpe na ntango bakobala mpo na kosalisa bango ete bábanda bomoi na bango na lolenge ya malamu. Osilá kokanisa kobombela mwana na yo mosolo oyo ekosalisa ye na bomoi na ye ya elimo na mikolo mizali koya? Na ndakisa, soki mwana na yo oyo akóli azali kosala mosala ya ntango nyonso. Atako basaleli ya ntango nyonso basengeli komizela te ete basusu bámemela bango mokumba na bango mpo na oyo etali mosolo, baboti oyo bazali na bolingo bakoki komona malamu ete ‘bákabola elongo na ye engebene bamposa na ye’ mpo na kosalisa ye aumela kati na mosala ya ntango nyonso.​—Baloma 12:13, NW; 1 Samwele 2:18, 19; Bafilipi 4:14-18.

11. Kotalela mosolo na lolenge esengeli mpenza ezali nde komonisa kozanga kondima? Limbolá.

11 Kotalela mosolo na lolenge oyo ebongi mpenza ezali te komonisa ezaleli ya kozanga kondima ete ebongiseli mabe ya Satana ekómi pene na nsuka na yango. Ezali bobele lolenge moko na komonisa “mayele malamu” mpe makanisi malamu. (Masese 2:7; 3:21) Mokolo mosusu Yesu alobaki ete “bana na ekeke oyo baleki bana na moi na mayele” na lolenge na bango ya kosalela mosolo. (Luka 16:8) Na bongo, ezali likambo ya kokamwa te na komona ete basusu basili kososola ntina ya komisembola mpo na lolenge na bango ya kosalela biloko na bango ya motuya, mpo ete bákoka kokokisa malamu bamposa ya mabota na bango.

“Makanisi malamu” na lolenge na biso ya kotalela kelasi

12. Lolenge nini Yesu ateyaki bayekoli na ye ete bámimesenisa na ezalela ya makambo ya sika?

12 “Lolenge ya mokili oyo ezali kobongwana,” mpe makambo ya nkita mpe ya teknoloji ezali mpe kobongwana nokinoki. (1 Bakolinti 7:31, NW) Nzokande, Yesu ateyaki bayekoli na ye ete báyeba komimesenisa na makambo makeseni. Na ntango atindaki bango mpo na mbala ya liboso kati na mosala ya kosakola ayebisaki bango ete: “Bókamata wolo te to palata te motako te kati na nkamba na bino te, to liboke mpo na mobembo te to bilamba te to sapato te to lingenda te, zambi mosáli akozwa bilei na ye.” (Matai 10:9, 10) Nzokande, na libaku mosusu, Yesu alobaki ete: “Oyo azali na libenga akamata yango, na liboke [“ya bilei,” NW] pelamoko.” (Luka 22:36) Nini ebongwanaki? Ezalela ya makambo nde ebongwanaki. Ezalela ya bato ya teritware ekómaki mabe mpo na makambo matali losambo, mpe sikawa basengelaki komema bilei na bango moko.

13. Wapi mokano ya libosoliboso ya kelasi, mpe lolenge nini baboti bakoki kosunga bana na bango na likambo oyo?

13 Lolenge moko mpe lelo oyo, ekoki kozala mpenza na ntina ete baboti bátalela ezalela ya makambo ya nkita ya mikolo na biso. Na ndakisa, ozali kokamata bibongiseli oyo endimisi yo ete bana na yo bazali kozwa kobongisama oyo ekoki mpenza na eteyelo? Mokano ya libosoliboso ya kelasi esengeli kozala ete mwana na yo abongisama malamu mpo na kozala mosaleli malamu ya Yehova. Mpe kolakisama oyo eleki kolakisama nyonso ezali bongo kolakisama ya elimo. (Yisaya 54:13) Baboti bazali mpe komibanzabanza mpo na makoki oyo bana na bango basengeli kozala na yango ya kokokisa bamposa na bango moko ya mosolo. Na yango, pesá bana na yo litambwisi, salisá bango ete bápona kelasi ya malamu oyo bakoki kotánga, mpe sololá na bango mpo na koyeba soki ezali malamu kotánga kelasi molai to kotánga kelasi molai te. Kokamata mikano motindo wana ezali mokumba ya libota, mpe basusu basengeli te kotɔ́nga bango mpo na nzela oyo bango baponi. (Masese 22:6) Ezali boni mpo na baoyo bamonaki malamu ete bátángisa bana na bango na ndako?b Atako basusu basili kolónga na likambo yango, kasi basusu mpe bamoni ete ezali mosala monene koleka lolenge bakanisaki liboso, mpe bana na bango bazwaki te kobongisama oyo esengeli. Na yango, soki okanisi ete osengeli kotángisa bana na yo na ndako, osengeli kotalela liboso makambo nyonso oyo yango ezali kosɛnga, talelá na bosembo nyonso soki ozali na makoki mpe na molende oyo esengeli.​—Luka 14:28.

‘Koluka makambo minene te’

14, 15. (a) Lolenge nini Baluku akómaki kotɛngatɛnga na elimo? (b) Mpo na nini ezalaki likambo ya bozoba mpo na ye ete ‘aluka makambo minene’?

14 Lokola nsuka ya ebongiseli oyo eyei naino te, basusu bakoki kopusama na koluka biloko oyo mokili ezali kopesa​—mosala ya lokumu mingi, mosala ya mbongo mingi, mpe bomɛngo. Tótalela ndakisa ya Baluku, ye oyo azalaki mokomeli ya Yilimia. Amilelaki ete: “Mawa epai na ngai sasaipi! Mpo ete Nzambe abakisi mawa na mpasi na ngai; nalɛmbi na konguluma na ngai mpe nayebi kopema te.” (Yilimia 45:3) Baluku alɛmbaki. Kosala lokola mokomeli ya Yilimia ezalaki mosala ya mpasi, ya motungisi. (Yilimia 36:14-26) Mpe emonanaki lokola ete motungisi yango ezalaki na nsuka te. Etikalaki bobele mbula 18 mpamba liboso ete Yelusaleme ebebisama.

15 Yehova alobaki na Baluku ete: “Talá yango esili ngai kotonga, nakobuka yango; yango ezali ngai kokóna, nako[p]ikola yango; ezali mpe boye na mokili mobimba. Ozali nde koluka makambo minene mpo na yo moko? Luká yango te.” Baluku akómaki kotɛngatɛnga. Abandaki koluka ‘makambo minene mpo na ye moko,’ ekoki kozala ete akómaki koluka bomɛngo, lokumu, to biloko ya mosuni oyo ekobatela ye. Lokola Yehova azalaki ‘kopikola ata mabelé yango moko,’ koluka biloko wana ezalaki na litomba nini? Na bongo Yehova akundwelaki Baluku makanisi oyo ekokaki kopusa ye na kokanisa malamu: “Nakoyeisa mabe likoló na nzoto nyonso. . . . Kasi nakopesa bomoi na yo lokola libonza na bisika nyonso bikokenda yo.” Biloko ya mosuni ebatelamaki te na ntango Yelusaleme ebebisamaki! Yehova alakaki ye bobele ete asengelaki kobikisa ‘bomoi na ye lokola libonza.’​—Yilimia 45:4, 5.

16. Liteya nini basaleli ya Yehova bakoki kozwa lelo na likambo ya Baluku?

16 Baluku alandaki kosembolama oyo Yehova apesaki ye, mpe, engebene elaka ya Yehova, Baluku abikisaki bomoi na ye. (Yilimia 43:6, 7) Oyo ezali mpenza liteya kitoko mpo na basaleli ya Yehova na mikolo na biso! Oyo ezali te ntango ya ‘komilukela makambo minene.’ Mpo na nini? Mpamba te “mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango.”​—1 Yoane 2:17.

Lolenge malamu ya kosalela ntango oyo etikali

17, 18. (a) Yona asalaki nini ntango bato ya Ninive babongwanaki? (b) Liteya nini Yehova apesaki na Yona?

17 Na bongo, lolenge nini tokoki kosalela malamu ntango oyo etikali? Tózwa liteya na likambo oyo ekómelaki mosakoli Yona. “Akendaki epai na Ninive . . . , angangaki ete, Naino mikolo ntuku minei mpe Ninive akobukama.” Yona akamwaki na komona lolenge bato ya Ninive batosaki nsango na ye mpe babongolaki mitema! Yehova alongolaki ekateli na ye ya koboma engumba yango. Yona asalaki nini? “Ɛ [Yehova], nalɔmbi yo ete olongola bomoi na ngai mpo ete kokufa eleki malamu epai na ngai nde kobika te.”​—Yona 3:3, 4; 4:3.

18 Na nsima Yehova apesaki Yona liteya moko ya ntina mingi. “Abongisaki nkamba na libɔkɛ mpe akólisaki yango likoló na Yona ete ezala na ye molili likoló na motó . . . Boye Yona asepelaki na esengo monene mpo na libɔkɛ.” Nzokande, kosepela ya Yona ezalaki bobele ya ntango moke; mpamba te nkamba yango eumelaki te, ekaukaki. Yona ‘ayokaki nkanda’ mpo na mpasi oyo amonaki. Yehova abendaki likebi na ye na likambo oyo: “Osili koyokela libɔkɛ mawa, . . . Ngai mpe nayokela Ninive mawa te, mboka oyo monene, wana bato baleki nkóto monkámá na ntuku mibale, baoyo bayebi kokabola kati na lobɔkɔ na bango na mobali mpe lobɔkɔ na bango na mwasi te, mpe bibwele mingi lokola?”​—Yona 4:6, 7, 9-11.

19. Likanisi nini ya moimi tosengeli kopɛngola yango?

19 Yona azalaki mpenza na makanisi ya moimi! Akokaki koyoka mawa mpo na nkamba, kasi ayokaki mawa ata moke te mpo na bato ya Ninive​—bato oyo, na elobeli ya elimo, ‘bayebaki te kokabola kati na lobɔkɔ na bango na mobali mpe lobɔkɔ na bango na mwasi.’ Biso mpe na bosembo nyonso, tokoki koyoka mposa makasi ete mokili oyo mabe ebebisama! (2 Batesaloniki 1:8) Nzokande, awa ezali biso kozela, tozali na mokumba ya kosunga bato ya motema sembo oyo, na elobeli ya elimo, ‘bayebi te kokesenisa lobɔkɔ na bango ya mobali mpe lobɔkɔ na bango ya mwasi.’ (Matai 9:36; Baloma 10:13-15) Okosalela ntango mokuse oyo etikali mpo na kosunga bato mingi, engebene makoki na yo, ete bázwa boyebi ya Yehova, oyo ezali bongo na ntina mingi? Mosala nini ekoki kokokana na esengo ya kosunga moto ete azwa bomoi?

Tókóba kozala na “makanisi malamu”

20, 21. (a) Wapi mwa ndambo ya makambo oyo kati na yango tokoki komonisa “makanisi malamu” na mikolo oyo mizali koya? (b) Mapamboli nini tokozwa na kozaláká na “makanisi malamu”?

20 Lokola mokili ya Satana ezali sé kozinda kati na libebi, na ntembe te, tokokutana na mikakatano mosusu. Na 2 Timoté 3:13, Biblia esakoli ete: “Bato mabe mpe bakosi bakoleka na mabe, bakozimbisa mpe bakozimbisama.” Kasi “bólɛmba te mpe bókwea te kati na milimo na bino.” (Baebele 12:3, NW) Tóluka kozwa makasi epai ya Yehova. (Bafilipi 4:13) Tóyekola kobongwana, komimesenisa na ezalela ya makambo oyo ezali sé kokóma mpasi mingi koleka, na esika ya kokanisakanisa bantango eleká. (Mosakoli 7:10) Tósalela mayele ya malamu, tólandaka ntango nyonso litambwisi oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa.​—Matai 24:45-47.

21 Toyebi te soki ntango boni etikali. Kasi, tokoki koloba na kondimisama nyonso ete “nsuka na makambo nyonso ezali kobɛlɛma.” Liboso ete nsuka yango eya, tiká ete tózalaka ntango nyonso na “makanisi malamu” kati na boyokani ya biso elongo na basusu, na lolenge oyo tozali kokokisa bamposa ya mabota na biso, mpe na lolenge oyo tozali kokokisa misala na biso ya mosuni. Na kosaláká bongo, biso nyonso tokoki kondimisama ete tokozwama “na litɔnɔ mpe na likambo te kati na kimya”!​—2 Petelo 3:14.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na ndakisa na États-Unis, bato mingi bazali na assurance-vie, atako yango ezalaka ntalo mingi. Mabota mosusu ya Batatoli bamonaki ete minganga mosusu bandimaka kosalela nkisi mosusu na esika ya kozongisa moto makila soki libota bazali na assurance-maladie. Minganga mingi bandimaka mwa ndambo ya mosolo oyo epesameli nzela kati na bibongiseli ya assurance to ya assurance-maladie oyo euti na Letá.

b Soki moboti akani kotángisa bana na ye na ndako, ezali ekateli na ye moko. Talá lisoló “Kotángisa bana bobele na ndako: Okoki kosala yango?,” oyo ebimaki na Lamuká! ya 8 Apríli 1993 (ebimeli ya Lifalansé).

Bozongeli

◻ Lolenge nini tokoki komonisa “makanisi malamu” kati na boyokani na biso elongo na basusu?

◻ Lolenge nini tokoki komonisa bokatikati mpo na oyo etali mikumba na biso ya libota?

◻ Mpo na nini baboti basengeli kotya likebi likoló na kelasi ya bana na bango?

◻ Mateya nini tokoki kozwa kati na bomoi ya Baluku mpe ya Yona?

[Elilingi na lokasa 18]

Wana mobali mpe mwasi bazali konyokolana, bazali kobebisa boyokani na bango elongo na Yehova

[Elilingi na lokasa 20]

Baboti basengeli kotya likebi likoló na kobongisama ya bana na bango

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto