Bólanda kotambola elongo na Nzambe
“Bólanda kotambola na elimo mpe bokokokisa mposa ya nzoto soko moke te.”—BAGALATIA 5:16, NW.
1. (a) Enoka atambolaki elongo na Nzambe kati na ezalela nini mpe na boumeli ya ntango boni? (b) Noa atambolaki na Nzambe na boumeli ya ntango boni, mpe mikumba minene nini azalaki na yango?
BIBLIA ezali koyebisa biso ete Enoka “alandaki kotambola elongo na Nzambe ya solo.” Atako bato na zingazinga na ye bazalaki na maloba mabe mpe bazalaki kotyola Nzambe, ye alendendelaki na kotambola elongo na Nzambe kino na nsuka ya bomoi na ye ntango akokisaki mibu 365. (Genese 5:23, 24, NW; Yuda 14, 15) Noa mpe “atambolaki elongo na Nzambe ya solo.” Asalaki bongo wana azalaki kobɔkɔla libota na ye, wana azalaki kotɛmɛla mokili oyo ezalaki na nsé ya bopusi ya baanzelu batomboki mpe bana na bango oyo bazalaki bato ya mobulu, mpe wana azalaki kokokisa makambo mikemike nyonso oyo masɛngamaki mpo na kotonga masuwa monene oyo elekaki masuwa nyonso mazalaki kotambola na mai monene na ntango ya kala. Alandaki kotambola elongo na Nzambe nsima ya Mpela, ata ntango oyo bato babandaki lisusu kotombokela Yehova na Babele. Ɛɛ, Noa alandaki kotambola elongo na Nzambe kino liwa na ye ntango akokisaki mibu 950.—Genese 6:9, NW; Gen. 9:29.
2. “Kotambola elongo na Nzambe” elimboli nini?
2 Na ntango Biblia ezali koloba ete bato yango oyo bazalaki na kondima ‘batambolaki’ elongo na Nzambe, ezali kosalela liloba yango na ndimbola ya elilingi. Elimboli ete Enoka mpe Noa bazalaki na lolenge ya bomoi oyo emonisaki polele ete bazalaki na kondima makasi epai na Nzambe. Basalaki makambo oyo Yehova atindaki bango mpe batambwisaki bomoi na bango engebene makambo oyo bayebaki na ntina na ye na kotaleláká boyokani na ye elongo na bato. (Kokanisá na 2 Ntango 7:17.) Bamonisaki bobele na makanisi te ete bandimaki oyo Nzambe alobaki mpe asalaki kasi basalaki engebene masɛngami na ye nyonso—bobele ndambo te kasi nyonso na meko oyo makoki na bango ya bato ya kozanga kokoka epesaki nzela. Na bongo, na ndakisa Noa asalaki bobele lokola Nzambe asɛngaki ye. (Genese 6:22) Noa abakisaki makambo te likoló na malako oyo bapesaki ye, mpe amonisaki bopɔtu te na kozongisáká makambo nsima. Lokola azalaki na boyokani ya penepene elongo na Yehova, azalaki kokakatana te mpo na kobondela Nzambe mpe alingaki litambwisi ya Nzambe, azalaki kotambola elongo na ye. Yo mpe, ozali kosala bongo?
Lolenge ya bomoi oyo elongobani
3. Nini ezali na ntina mingi mpo na basaleli nyonso ya Nzambe oyo bamipesi mpe bazwi batisimo?
3 Komona lolenge bato bazali kobanda kotambola elongo na Nzambe ezali mpenza kosepelisa motema. Ntango bazali kosala matambe mpo na kokende liboso na boyokani na mokano ya Nzambe, bazali komonisa polele ete bazali na kondima, oyo soki ezali te, moto moko te akoki kosepelisa Nzambe. (Baebele 11:6) Tozali mpenza kosepela ete mbula na mbula, soki tozwi mwayene ya mbula mitano oyo eleki, bato koleka 330 000 basilaki komipesa na Yehova mpe bazwaki batisimo ya mai! Kasi ezali mpe na ntina mpo na bango mpe biso nyonso ete tókoba kotambola elongo na Nzambe.—Matai 24:13; Emoniseli 2:10.
4. Atako bamonisaki mwa kondima, mpo na nini Bayisalaele mingi oyo babimaki na Ezipito bakɔtaki na Mokili ya Ndaka te?
4 Na ntango ya Mose, libota mokomoko ya bana ya Yisalaele esengelaki kozala na kondima mpo ete bákumisa Elekeli na Ezipito mpe bápakola makila na bikuke na bango mpe likoló ya bikɔtelo ya ndako na bango. (Exode 12:1-28) Nzokande, kondima ya mingi kati na bango etɛngatɛngaki ntango batalaki nsima mpe bamonaki mampinga ya Falo kopusana pene na bango na Mai Motane. (Exode 14:9-12) Nzembo 106:12 emonisi ete ntango balekaki kozanga likama na mabelé makauki katikati na mai oyo makabwanaki mpe bamonaki mbonge makasi ya mai koboma mampinga ya Ezipito, “bandimelaki” lisusu “maloba na [Yehova].” Nzokande, mwa moke nsima, kati na mokili mokauki, Bayisalaele bakómaki komilelalela mpo ete bazangaki mai ya komela, bilei, mpe litambwisi. Lapólo mabe ya banɔ́ngi 10 kati na banɔ́ngi 12 oyo bautaki na Mokili ya Ndaka ebangisaki bango. Na ezalela wana, Nzembo 106:24 elobi ete, “bandimaki liloba na [Nzambe] te.” Balingaki kozonga na Ezipito. (Mituya 14:1-4) Bazalaki komonisa kondima bobele na ntango bamoni bilakiseli ya nguya ya Nzambe. Batambolaki elongo na Nzambe ntango nyonso te. Mpo na yango, Bayisalaele wana bakɔtaki na Mokili ya Ndaka te.—Nzembo 95:10, 11.
5. Kotambola elongo na Nzambe ezali na boyokani nini na 2 Bakolinti 13:5 mpe Masese 3:5, 6?
5 Biblia ezali kopesa biso toli ete: “Bómimeka ntango nyonso mpo na koyeba soko bozali kati na kondima; bómitala ntango nyonso soki bozali motindo nini.” (2 Bakolinti 13:5, NW) Kozala “kati na kondima” elimboli kolanda bindimeli nyonso ya boklisto. Yango ezali na ntina mingi soki tolingi kolónga kotambola elongo na Nzambe na bomoi na biso mobimba. Mpo na kotambola elongo na Nzambe, tosengeli mpe komonisa kondima, kotyáká motema mobimba na Yehova. (Masese 3:5, 6) Ezali na mitambo ndenge na ndenge oyo mikoki kozwa baoyo bazali kosala bongo te. Wapi bamoko na yango?
Kimá motambo ya komityela motema
6. Baklisto nyonso bayebi likambo nini na ntina na pite mpe ekobo, mpe ndenge nini batalelaka masumu yango?
6 Moto nyonso oyo asili koyekola Biblia, amipesi epai na Yehova mpe azwi batisimo ayebi ete Liloba ya Nzambe epekisi pite mpe ekobo. (1 Batesaloniki 4:1-3; Baebele 13:4) Bato yango bandimaka ete mobeko yango elongobani. Bazali na mposa ya kotosa yango. Kasi, pite mpe ekobo ezali ntango nyonso motambo oyo Satana azali kozwa na yango bato mingi. Mpo na nini?
7. Na Mokili patatálú ya Moaba, lolenge nini mibali ya Yisalaele bamipesaki na etamboli oyo bayebaki ete ezali mabe?
7 Ekoki kozala ete baoyo bazali kokwea na etamboli wana ya mbindo bakanaki yango liboso te. Mbala mosusu ezalaki mpe bongo mpo na Bayisalaele na Mokili patatálú ya Moaba. Mpo na mibali Bayisalaele oyo balɛmbaki na ntina na lolenge ya bomoi oyo bazalaki na yango kati na mokili mokauki, ekoki kozala ete na ebandeli basi ya Moaba mpe ya Midyani oyo balɛngolaki bango bamonanaki lokola baninga mpe bayambi bapaya. Kasi nini esalemaki ntango Bayisalaele bandimaki libyangi ya kosala boninga na libota oyo bazalaki kosalela Baala kasi Yehova te, bato oyo batikaki nzela na bana na bango ya basi (ata kati na mabota ya lokumu) ete básangisa nzoto na mibali oyo babalanaki na bango te? Ntango mibali oyo bautaki na molako ya Yisalaele babandaki kosepela na boninga motindo wana, balɛngolamaki mpe basalaki makambo oyo bayebaki ete ezali mabe, mpe yango ememelaki bango liwa.—Mituya 22:1; 25:1-15; 31:16; Emoniseli 2:14.
8. Na mikolo na biso, nini ekoki komema moklisto na kosala pite to ekobo?
8 Nini ekoki kokweisa moto na motambo motindo wana na mikolo na biso? Atako akoki koyeba ete pite mpe ekobo ezali masumu minene, soki azali kososola te likama ya komityela motema, akoki komikɔtisa na ezalela oyo kati na yango kolɛngolama na kosala mabe ekozipa bososoli na ye.—Masese 7:6-9, 21, 22; 14:16.
9. Makebisi nini mauti na Makomami makoki kobatela biso ete tókwea te na etamboli ya mbindo?
9 Na lolenge ya polele mpenza, Liloba ya Nzambe ezali kokebisa biso ete tózimbisama te na kokanisáká ete tozali na makasi mingi na boye ete boninga mabe ekobebisa biso te. Boninga yango mabe esangisi kotala bililingi ya televizyó oyo bizali komonisa bomoi ya bato oyo bazali na etamboli ya mbindo mpe kotánga bazulunalo oyo ezali na masoló mpe bililingi oyo ezali kolamusa mposa ya nzoto. (1 Bakolinti 10:11, 12; 15:33) Ezala bokutani elongo na bandeko na biso bandimi na bisika elongobani te ekoki komema na makama. Nzoto ya mwasi mpe ya mobali ebendamaka makasi moko epai na mosusu. Na yango, na komibanzabanza mpe bolingo mpo na biso, lisangá ya Yehova ezali kokebisa ete ezali malamu te mpo na mwana mwasi na mwana mobali oyo babalani te to mpe bazali bandeko te kozala esika moko bango mibale wana bato mosusu bazali komona bango te. Mpo na kolanda kotambola elongo na Nzambe, tosengeli kokima motambo ya komityela motema mpe kolanda makebisi oyo azali kopesa biso.—Nzembo 85:8.
Kotika te ete kobanga bato elónga yo
10. Lolenge nini “kobanga bato” eyeisaka motambo?
10 Likama mosusu emonisami na Masese 29:25, oyo elobi ete: “Kobanga bato ekoyeisa motambo.” Mbala mingi motambo ya mobomi nyama ezalaka na litingá oyo ekangaka nyama makasi na nkingo to nsinga oyo ekangaka nyama na makolo. (Yobo 18:8-11) Lolenge moko, kolɛnga liboso ya bato epekisaka moto ete azala na makoki ya koloba kozanga kokakatana to komitambwisa na lolenge oyo ezali kosepelisa Nzambe. Kolinga kosepelisa basusu ezali mposa oyo elongobani, mpe kotyola makanisi ya bato mosusu ezali ezaleli ya boklisto te. Kasi tosengeli kozala na bokatikati. Ntango komibanzabanza mpo na oyo bato mosusu bakoloba ezali kopusa moto na kosala makambo oyo Nzambe apekisi to ezali kopekisa moto na kosala makambo oyo Liloba ya Nzambe etindi, moto yango asili kozwama na motambo.
11. (a) Eloko nini ekobatela biso mpo ete kobanga bato elónga biso te? (b) Lolenge nini Yehova asalisaki basaleli na ye oyo bazalaki kobundisa ezaleli ya kobanga bato?
11 Libateli liboso ya motambo motindo wana, ezali na makoki ya moto ye moko te, kasi na ‘kotyáká motema epai na Yehova.’ (Masese 29:25b) Na kotyáká motema epai na Nzambe, ata moto oyo azali moto ya nsɔninsɔni akoki komonisa mpiko mpe kozala ngwi. Ntango nyonso oyo tozingami na bopusi ya ebongiseli ya biloko ya Satana, tokozala na mposa ya kokeba na motambo ya kobanga bato. Atako mosakoli Eliya asilaki kosala mosala na mpiko nyonso na boumeli ya mbula mingi, ntango Yezabele akanaki kobomisa ye, akimaki mpo na bobangi. (1 Mikonzi 19:2-18) Kati na komekama makasi, ntoma Petelo awanganaki na bobangi nyonso ete ayebi Yesu Klisto te, mpe bambula mingi na nsima, atikaki nzela ete bobangi emema ye na komitambwisa na lolenge eyokani te na kondima. (Malako 14:66-71; Bagalatia 2:11, 12) Nzokande, bato yango mibale, Eliya mpe Petelo bandimaki lisalisi ya elimo mpe, na kotyáká motema epai na Yehova, bakóbaki kosalela Nzambe na lolenge oyo endimami.
12. Bandakisa nini ya mikolo na biso ezali komonisa lolenge oyo bato basalisamaki mpo na kotika te ete kobanga bato epekisa bango kosepelisa Nzambe?
12 Mingi kati na basaleli ya Yehova na mikolo na biso basili koyeba lolenge ya kolónga bobangi oyo ezali koyeisa motambo. Elenge mwasi moko Motatoli na ekólo Guyane alobaki ete: “Na eteyelo, etumba mpo na kotɛmɛla bopusi ya baninga ezali makasi.” Kasi abakisaki ete: “Kondima na ngai epai na Yehova ezali mpe makasi.” Ntango molakisi na ye atyolaki ye liboso ya banakelasi nyonso na ntina na kondima na ye, abondelaki Yehova na kati ya motema. Na nsima, ntango bazalaki na esika moko bango mibale apesaki molakisi yango litatoli na mayele nyonso. Na ekólo Bénin, elenge mobali moko oyo azalaki koyekola mitindá ya Yehova, akendaki na mboka na bango kotala libota na ye, kuna azwaki ekateli makasi ya kobwaka ekeko oyo tata na ye asalelaki ye. Elenge yango ayebaki ete ekeko yango ezalaki na bomoi te, mpe azalaki kobanga yango te, kasi ayebaki mpe ete soki bato ya mboka basiliki bakoki koluka koboma ye. Abondelaki Yehova, mpe na nsima, na kati ya butu amemaki ekeko yango na zamba mpe abwakaki yango. (Kokanisá na Basambisi 6:27-31.) Ntango mwasi moko na République Dominicaine abandaki kosalela Yehova, mobali na ye ayebisaki ye ete apona oyo alingi kati na ye mpe Yehova. Mobali yango abangisaki ye ete akoboma libala. Bobangi epusaki ye ete atika kondima na ye? Ayanolaki ete: “Soki ezalaki ete nasali ekobo, mbɛlɛ nalingaki koyoka nsɔni, kasi nakoki koyoka nsɔni te mpo na kosalela Yehova Nzambe!” Alandaki kotambola elongo na Nzambe, mpe na nsima, mobali na ye alandaki ye na kosala mokano ya Yehova. Na kotyáká motema mobimba epai ya Tata na biso ya likoló, biso mpe tokoki koboya kotika nzela ete kobanga moto ezongisa biso nsima te mpo na kosala makambo oyo toyebi ete makosepelisa Yehova.
Tóboya kotyola toli
13. 1 Timoté 6:9 ezali kokebisa biso na ntina na motambo nini?
13 Atako mitambo mosusu ya babomi nyama mibongisamaka mpo na kokanga nyama oyo akoleka na esika yango etyami, mitambo misusu mibendaka nyama na lisalisi ya mwa eloko ezali kolɛngola oyo etyami kati na yango. Mpo na bato mingi, bozwi ezali bongo. (Matai 13:22) Na 1 Timoté 6:8, 9, Biblia elendisi biso ete tósepelaka na biloko ya kolya mpe bilamba ya kolata oyo tozali na yango. Na nsima ekebisi ete: “Baoyo bazali na mposa [ya kokóma na bozwi mingi, NW], bakokwea na kati na komekama mpe na lilonga, mpe kati na mposa ezangi ntina mpe ikoyokisa mpasi.”
14. (a) Nini ekoki kopekisa moto ete alanda te toli ya kosepelaka na biloko ya kolya mpe bilamba ya kolata oyo azali na yango? (b) Lolenge mabe nini ya kolimbola bozwi ekoki kopusa moto na kotyola likebisi ya 1 Timoté 6:9? (c) Na lolenge nini “mposa mabe na miso” ezali kosala ete basusu básosola te motambo oyo ezali liboso na bango?
14 Atako likebisi yango eyebani, mingi bazali kozwama na motambo mpamba te bazali kosalela toli yango te. Mpo na nini? Ekoki nde kozala ete lolendo ezali kopusa bango na kotingama na likanisi ya kozala na lolenge ya bomoi oyo ezali kosɛnga biloko mingi koleka “biloko ya kolya mpe na bilamba ya kolata” oyo Biblia eyebisi biso ete tósepelaka na yango? Bazali nde kotyola likebisi ya Biblia mpamba te na makanisi na bango bozwi elimboli biloko oyo bato ya bozwi mingi bazali na yango? Biblia esali bobele bokeseni kati na mposa ya kozala na bozwi mingi mpe kosepela na biloko ya kolya mpe bilamba ya kolata. (Kokanisá na Baebele 13:5.) “Mposa mabe na miso”—elingi koloba mposa ya kozala na biloko oyo miso ezali komona, ata soki esɛngisi bango kosundola mikano ya elimo—ezali komema bango ete bázongisa matomba ya losambo ya solo na esika ya mibale? (1 Yoane 2:15-17; Hagai 1:2-8) Baoyo bazali mpenza kolanda toli ya Biblia mpe bazali kotambola elongo na Nzambe na kosaláká ete mosala ya Yehova ezala lobanzo ya liboso kati na bomoi na bango, bazali na esengo mingi mpenza!
Lolenge ya kolónga mitungisi ya bomoi
15. Makambo nini oyo toyebi ete makoki mpenza kotungisa basaleli mingi ya Yehova, mpe tosengeli kokeba na motambo nini ntango tozali na mokakatano motindo wana?
15 Komitungisa mpo na kozwa biloko ya ntina kati na bomoi emonanaka mingi koleka mposa ya kozala na bozwi mingi ya mosuni. Basaleli mingi ya Yehova bazali kobikela bobele na biloko moke. Bazali kosala mosala makasi na boumeli ya bangonga mingi mpo na kozwa bilamba ya kolata, esika ya kolala mpo na libota, mpe mwa bilei mpo na mokolo. Basusu bazali kobunda na mikakatano ya maladi to bobangé, ezala ya bango moko to ya bato mosusu kati na libota na bango. Ekoki kozala na mpasi te mpo ete makambo motindo wana ezongisa matomba ya elimo nsima kati na bomoi na bango!—Matai 13:22.
16. Lolenge nini Yehova azali kosalisa biso tólónga mitungisi ya bomoi?
16 Na bolingo nyonso, Yehova azali koyebisa biso libɔndisi oyo tokozwa na nsé ya Bokonzi ya Masiya. (Nzembo 72:1-4, 16; Yisaya 25:7, 8) Azali mpe kosunga biso mpo na kolónga mitungisi ya bomoi ya lelo na kopesáká biso toli mpo na lolenge ya kobatela makambo maleki ntina kati na bomoi na esika na yango. (Matai 4:4; 6:25-34) Na nzela ya masoló oyo mazali komonisa lolenge asalisaki basaleli na ye na ntango ya kala, Yehova azali kondimisa biso. (Yilimia 37:21; Yakobo 5:11) Azali kolendisa biso na koyeba ete, ata soki monyoko ya lolenge nini eyeli biso, bolingo na ye mpo na basaleli na ye ya sembo ekobongwana te. (Baloma 8:35-39) Epai na baoyo bazali kotya motema epai na Yehova, alobi ete: “Nakotika yo soko moke te, nakosabola yo mpe te.”—Baebele 13:5.
17. Pesá bandakisa na lolenge oyo bato bazali kati na monyoko makasi bazali kolónga kotambola elongo na Nzambe.
17 Lokola balendisami na boyebi wana, baklisto ya solo bazali kokóba kotambola elongo na Nzambe na esika ya komipesa na banzela ya mokili. Likanisi moko ya bato ya mokili epalangani mingi epai na babola na bikólo mingi elobi ete kozwa biloko ya moto oyo azali na yango mingi mpo ete okoka koleisa libota na yo ezali moyibi te. Kasi, baoyo bazali kotambola na kondima baboyaka likanisi wana. Bapesaka motuya mingi na kondimama na Nzambe koleka likambo mosusu nyonso mpe bazelaka ete ye apesa bango mbano mpo na etamboli na bango ya kolongobana. (Masese 30:8, 9; 1 Bakolinti 10:13; Baebele 13:18) Mwasi moko mokufeli-mobali na ekólo Inde amonaki ete komipesa na mosala mpe kolukaluka esalisaki ye ete alónga. Na esika ya koyoka nkanda mpo na ezalela na ye kati na bomoi, ayebaki ete, soki atye Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na yango na esika ya liboso kati na bomoi na ye, Yehova akopambola milende na ye mpo na kozwa biloko ya kobikela mpo na ye mpe mwana na ye ya mobali. (Matai 6:33, 34) Bankóto ya bato na mokili mobimba bazali komonisa ete, atako mpasi nini bakoki kokutana na yango, Yehova azali ekimelo mpe ndako molai na bango. (Nzembo 91:2) Ezali mpe bongo mpo na yo?
18. Nini ezali fungola mpo na kopɛngola mitambo ya mokili ya Satana?
18 Ntango nyonso oyo tokozala kati na ebongiseli ya biloko oyo, mitambo oyo tosengeli kopɛngola mikozanga te. (1 Yoane 5:19) Biblia ezali kotɔndɔla mitambo yango mpe ezali komonisa biso lolenge ya kopɛngola yango. Baoyo balingaka Yehova solo mpe babangaka kozanga kosepelisa ye bakoki kokima mitambo yango. Soki ‘balandi kotambola na elimo,’ bakokwea na banzela ya mokili te. (Bagalatia 5:16-25) Elikya ya kotambola elongo na Nzambe, kozala na boyokani ya penepene elongo na ye libela na libela ezali liboso ya baoyo nyonso bazali kotambwisa bomoi na bango na kobateláká liboso boyokani malamu elongo na Yehova.—Nzembo 25:14.
Okanisi nini?
◻ Lolenge nini komityela motema ekoki kozala motambo?
◻ Nini ekoki kobatela biso ete kobanga bato elónga biso te?
◻ Nini ekoki kosala ete tólónga te kosalela toli na ntina na likama ya koluka bozwi mingi?
◻ Nini ekopesa biso likoki ya kopɛngola kozwama na motambo ya mitungisi ya bomoi?
[Elilingi na lokasa 16, 17]
Mingi bazali kolanda kotambola elongo na Nzambe na bomoi na bango mobimba