Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/1 nk. 29-31
  • Filemona mpe Onesimo basangani kati na bondeko ya boklisto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Filemona mpe Onesimo basangani kati na bondeko ya boklisto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokimi na engumba Loma
  • Paulo asungi Onesimo
  • Onesimo—Mobali oyo abongwanaki
  • Mokanda ya Biblia nimero 57​—Filemona
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Bolingo epai na bandeko ezali na nguya mpenza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • ‘Kolendisana na ntina na bolingo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Paulo akómi na Roma
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/1 nk. 29-31

Filemona mpe Onesimo basangani kati na bondeko ya boklisto

MOKO na mikanda ya Paulo oyo mipemami na Nzambe ekomamaki mpo na kosilisa matata oyo ezalaki kati na bato mibale: Filemona mpe Onesimo. Bato yango bazalaki banani? Likambo nini esalaki ete Paulo atya likebi na matata na bango?

Filemona, ye oyo batindelaki mokanda, azalaki kofanda na engumba Kolose na Asie Mineure. Na bokeseni na baklisto mosusu mingi ya engumba wana, Filemona ayebanaki malamu na Paulo, mpamba te ayambaki nsango malamu na nzela ya mosala ya kosakola ya ntoma yango. (Bakolose 1:1; 2:1) Paulo ayebaki ete ye azalaki ‘moninga ya mosala mpe ya bolingo.’ Filemona azalaki ndakisa malamu na oyo etali kondima mpe bolingo. Azalaki moyambi na bapaya mpe mobɔndisi mpo na baninga na ye baklisto. Emonani mpe ete Filemona azalaki moto ya mbongo, mpamba te ndako na ye ezalaki monene mpenza na boye ete makita ya lisangá na bango mazalaki kosalema wana. Bato mosusu bakanisaka ete Apia mpe Alakipi, oyo balobelami mpe na mokanda ya Paulo, ezalaki nde mwasi na ye mpe mwana na ye. Filemona azalaki mpe na moombo moko, Onesimo.​—Filemona 1, 2, 5, 7, 19b, 22.

Mokimi na engumba Loma

Makomami mazali koyebisa biso te mpo na nini Onesimo azalaki na Paulo na Loma, mboka oyo ezali na ntáká ya kilomɛtɛlɛ koleka 1 400 longwa na mboka na bango, ezali kuna nde mokanda epai na Filemona ekomamaki pene na mobu 61 T.B. Kasi Paulo alobaki na Filemona ete: “Soko [Onesimo] asili kosalela yo mabe na likambo nini, soko azali na nyongo nini epai na yo, tyá yango na mokumba na ngai.” (Filemona 18) Maloba oyo mamonisi polele ete matata mazalaki kati na Onesimo mpe nkolo na ye, Filemona. Mokanda ya Paulo mokomamaki na mokano ya kozongisa boyokani kati na mibali yango mibale.

Ekanisami ete Onesimo akimaki nsima ya koyiba mosolo ya Filemona mpo ete afuta tiké ya kokende na engumba Loma. Kuna akanaki komibomba kati na engumba wana oyo ezalaki na bato ebele.a Na mokili ya Bagreke mpe Baloma, kokima ezalaki likambo monene bobele mpo na bankolo ya moombo te kasi lisusu mpo na Letá. Balobaka ete Loma “eyebanaki lokola mboka ya komibomba” mpo na baombo oyo bazalaki kokima.

Ndenge nini Paulo akutanaki na Onesimo? Biblia eyebisi biso yango te. Nzokande, ntango aumelaki na bonsomi, Onesimo asosolaki ete amityaki na ezalela moko ya mpasi koleka. Na engumba Loma, ezalaki na etuluku ya bapolisi oyo bazalaki kolandela baombo oyo bakimá, mpe mbeba oyo basalaki ya kokima bankolo na bango ekweisamaki makasi na mibeko ya kala. Gerhard Friedrich alobi ete, “Soki bakangi baombo oyo bakimá, bazalaki kotya bango bilembo na elongi na ebende ya mɔ́tɔ. Bazalaki mbala mingi konyokola bango makasi . . . , kobwaka bango epai na banyama na libándá ya masano (cirque), to kokakisa bango na ekulusu mpo na kobangisa baombo mosusu ete bámekola ndakisa na bango te.” Friedrich apesi likanisi ete, ekoki kozala ete, nsima ya kosilisa mbongo oyo ayibaki, Onesimo alukaki esika ya komibomba to mosala kasi azwaki te, mpe lokola, liboso, asilaki koyoka nsango ya Paulo ntango azalaki na ndako ya Filemona, boye alukaki ye mpo na kozwa libateli mpe kosɛnga ye ete azala molobeli na ye epai ya nkolo na ye.

Bamosusu bakanisi ete Onesimo akimaki epai ya moninga ya nkolo na ye, kolikyáká ete na bopusi na ye, akokaki kozongela boyokani malamu na nkolo na ye oyo azalaki na nkanda na ye mpo na ntina moko to mosusu. Mikanda ya masoló ya kala mimonisi ete motindo wana ezalaki “mwango oyo baombo, na ntango bakómi na mikakatano bazalaki kosalela mingi mpe epalanganaki mingi.” Brian Rapske, nganga-mayele ya Biblia alobi ete, soki ezali bongo, mbongo Onesimo ayibaki “ekoki kozala mpo na kosunga ye ete akóma epai na Paulo, moyokanisi, na esika ete ezala mwango mpo na kokima.”

Paulo asungi Onesimo

Ezala akimaki na ntina nini, emonani ete Onesimo alukaki lisungi ya Paulo mpo ete azongela boyokani malamu na nkolo na ye wana azalaki na nkanda. Yango epesaki Paulo mokakatano. Moto yango azalaki liboso moombo oyo azalaki mondimi te, azalaki na mbeba na ntango akimaki. Ntoma asengelaki nde komeka kondimisa moninga na ye moklisto [Filemona] ete asalela te lotómo na ye oyo endimami na mibeko ya kopesa etumbu ya makasi? Paulo alingaki kosala nini?

Na eleko wana Paulo akomelaki Filemona mokanda, moto yango oyo akimaki asilaki kolekisa mwa ntango elongo na ntoma. Eumelaki ntango mwa mingi mpo ete Paulo akoka koloba ete Onesimo akómaki ‘ndeko molingami.’ (Bakolose 4:9) Paulo alobaki na ntina na boyokani ya elimo oyo azalaki na yango na Onesimo ete: “Nazali kolɔmba yo mpo na mwana na ngai Onesimo, oyo nasili kobota ye kati na ekangelo.” Na makambo nyonso Paulo asalaki mpo na kokɔtela Onesimo, yango ezalaki makambo Filemona akanisaki te. Ntoma alobaki ete moombo oyo liboso “azangaki mosala” azongisami lokola ndeko moklisto. Onesimo asengelaki sikawa kozala na “litomba” to “na mosala” kolandáká bomoi oyo eyokani na ndimbola ya nkombo na ye.​—Filemona 1, 10-12.

Onesimo akómaki na mosala mingi epai na ntoma mokangami. Kútu, Paulo alingaki kotikala na ye kuna, kasi lokola likambo yango eyokanaki na mobeko te, yango elingaki kobebisa lotómo ya Filemona. (Filemona 13, 14) Sé na eleko wana, na mokanda mosusu akomelaki lisangá oyo ezalaki koyangana na ndako ya Filemona, Paulo alobaki na ntina na Onesimo ete azali “ndeko na sembo mpe molingami, oyo moko na bino.” Yango emonisi ete Onesimo asilaki komonisa elembo ete bakoki kotyela ye motema.​—Bakolose 4:7-9.b

Paulo alendisaki Filemona ete ayamba Onesimo na boboto kasi asalelaki te bokonzi na ye ya ntoma mpo na kosɛngisa ye na makasi to kopesa moombo na ye bonsomi. Na ntina na boyokani na bango mpe na bolingo oyo bazalaki na yango moko epai na mosusu, Paulo amindimisaki ete Filemona “akoleka kosala” yango esɛngamaki. (Filemona 21) ‘Kosala koleka’ ekokaki kolimbolama ete eloko eyebisami polele te, mpamba te bobele Filemona nde akokaki kozwa ekateli ya nsuka mpo na Onesimo. Bamoko balobaki ete maloba ya Paulo ezalaki lisɛngi ya mayele ete Onesimo ‘azongisama epai na ye mpo ete akóba kosalela ye lokola asalaka yango uta kala.’

Filemona andimaki lilɔmbɔ ya Paulo na ntina na Onesimo? Na ntembe te andimaki yango, atako yango ekokaki kosepelisa te Bakolose mosusu oyo bazalaki na baombo oyo balingaki ete Onesimo azwa etumbu makasi mpo na kokebisa baombo na bango ete bámekola ndakisa na ye te.

Onesimo—Mobali oyo abongwanaki

Na nyonso wana, Onesimo azongaki na Kolose na bomoto ya sika. Makanisi na ye mabongwanaki na nzela ya nguya ya nsango malamu, na ntembe te akómaki mosangani ya sembo ya lisangá ya boklisto na engumba wana. Makomami elobi eloko te soki Onesimo alongwaki moombo ya Filemona. Nzokande, na elobeli ya elimo, moombo ya kala akómaki na bonsomi. (Kokanisá na 1 Bakolinti 7:22.) Mbongwana ya motindo wana ezali kosalema lelo. Ntango bato bazali kosalela mitindá ya Biblia kati na bomoi na bango, ezalela na bango mpe bomoto na bango ezali kobongwana. Baoyo batalelamaki liboso ete bazali na ntina te bazali kosalisama mpo na kokóma bato ya ndakisa malamu.c

Oyo nde bokeseni kobongwana na kondima ya solo emonisi! Atako Onesimo ya kala “azalaki na mosala te” epai na Filemona, na ntembe te Onesimo ya sika alandaki bomoi oyo eyokani na nkombo na ye moto ya “litomba.” Mpe ezalaki mpenza lipamboli ete Filemona na Onesimo básangana kati na bondeko ya boklisto.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mobeko ya Loma servus fugitivus (moombo oyo akimi) elimbolaki ete ‘moto oyo atiki nkolo na ye, na mokano ya kozonga lisusu te.’

b Na mobembo ya bozongi na engumba Kolose, emonani ete Paulo apesaki Onesimo mpe Tukiko mikanda misato, oyo lelo mizali komonana kati na kanɔ́ ya Biblia. Longola mokanda ya Paulo epai na Filemona, ezalaki na mokanda ya Paulo epai na Baefese mpe epai na Bakolose.

c Mpo na bandakisa, soki likoki ezali talá Lamuká! ya 22 Yúni 1996, nkasa 18-23; 8 Mársi 1997, nkasa 11-13 (ebimeli ya Lifalansé); Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augústo 1989, nkasa 30-31 (ebimeli ya Lifalansé); 15 Febwáli 1997, nkasa 21-24.

[Etanda na lokasa 30]

Baombo na nsé ya Mibeko ya Loma

Wana mibeko ya Loma ezalaki na nguya na ekeke ya liboso T.B., moombo asɛngelaki kotosa nkolo na ye na makambo nyonso, kokokisa bamposa nyonso ya nkolo na ye, mpe ata elimo nini oyo nkolo na ye akokaki komonisa. Engebene nganga-mayele Gerhard Friedrich, “na kotalela mibeko mpe lolenge yango ezalaki kosalema mpenza, moombo azalaki moto te, kasi eloko oyo nkolo na ye akokaki kosalela yango ndenge alingi. . . . Atalelamaki lolenge moko na bibwele mpe bisaleli mpe mibeko ya Letá mityelaki ye likebi te.” Moombo azalaki na lotomo te ya koluka kosembola ata bokesene nini bakokaki kosalela ye. Asengelaki bobele kotosa mitindá ya nkolo na ye. Nkolo oyo asiliki akokaki kopesa ye etumbu nyonso oyo ye alingi. Ata mpo na libunga moke, nkolo azalaki na lotómo ya koboma to ya kobikisa ye.

Bato ya bozwi bakokaki kozala na bankámá ya baombo, nzokande ata kati na ndako oyo bazalaki na bozwi mingi te bakokaki kozala na baombo mibale to misato. Nganga-mayele John Barclay alobi ete, “Baombo oyo bazalaki kosala na ndako, bazalaki na misala ndenge na ndenge. Baombo bazalaki kosala mosala lokola kokɛngɛla lopango, kolamba bilei, kotanda mesa, kosukola ndako, kokende kotika mikanda, kobatela bana ntango baboti na bango bazali te, komelisa bana mabɛlɛ, mpe mibali mosusu mpo na kobongisa bilamba ya bankolo na bango, kozanga kobosana ebele ya bato oyo bazalaki kosala mosala ya sikisiki kati na ndako ya monene mpe ya bozwi. . . . Na maloba ya polele, lolenge ya bomoi ya moombo ezalaki kotalela mingi ezaleli ya nkolo na ye mpe yango ekokaki kozala na litomba to koyokisa ye mpasi: kozala na nkolo ya nkandankanda elimboli konyokwama na ebele ya makambo mabe, kasi kozala na nkolo ya boboto mpe mokabi ezalaki kosepelisa bomoi mpe kopesa elikya. Ezali na bandakisa oyo eyebani mingi kati na mikanda minene ya kalakala, kasi ezali mpe na ebele ya mikanda oyo ezali komonisa boyokani malamu kati na bankolo mosusu na baombo na bango.”

*Mpo na boombo kati na bato na Nzambe na ntango ya kala, talá búku Insight on the Scriptures, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., Volimi 2, nkasa 977-979.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto