Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/2 nk. 8-11
  • Baboti bóbatela bana na bino!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baboti bóbatela bana na bino!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lolenge bato batalelaka mateya matali kosangisa nzoto na Afrika
  • Mpo na nini kopesa mateya?
  • Kosolola ya malamu
  • Bana babatelami mpe bazali na esengo
  • Sololáká na bana na yo makambo etali kosangisa nzoto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Nasala nini soki baninga na ngai bazali kotya ngai mbamba nasangisa nzoto?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Batelá libota na yo na bopusi mabe
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Ndenge ya kozala na libota ya esengo—Eteni 2
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/2 nk. 8-11

Baboti bóbatela bana na bino!

NA ETEYELO moko ya ntéi na ekólo Nigeria, elenge mwasi moko oyo ayebanaki mingi mpo na etamboli na ye ya pite, azalaki kolinga mingi kopesa baninga na ye ya kelasi mateya ya makambo matali kosangisa nzoto. Moko kati na bankisi oyo alakisaki bango mpo na kolongola zemi ezalaki bongo kosangisa masanga Stout na tumbako. Masolo na ye, oyo azwaki yango na mikanda oyo milakisaka bato oyo bazali bolumbu, esepelisaki baninga na ye mingi. Bamoko babandaki kosangisa nzoto, mpe moko na bango azwaki zemi. Mpo na kolongola zemi, asangisaki Stout na tumbako mpe amelaki yango. Nsima ya mwa bangonga, abandaki kosanza makila. Akɔtaki lopitalo, mpe mikolo moke na nsima akufaki.

Na mokili ya lelo, bilenge mingi bazali ntango nyonso kolobela makambo matali kosangisa nzoto, kobebisáká bongo bilenge oyo bazali na bindimandima. Epai ya nani bilenge basengeli kokende mpo na kozwa boyebi ya sikisiki oyo ekobatela bango? Yango ekozala malamu soki bakoyokela baboti na bango oyo babangaka Nzambe, bango bazali na mokumba ya kobɔkɔla bango kati na ‘mateya mpe na mpamela ya Yehova.’—Baefese 6:4.

Lolenge bato batalelaka mateya matali kosangisa nzoto na Afrika

Na mokili mobimba, baboti mingi bakokaka te kosolola na bana na bango makambo matali kosangisa nzoto. Yango ezali mpenzampenza na Afrika. Na ekólo Sierra Leone, tata moko na nkombo Donald, alobaki ete: “Makambo matali kosangisa nzoto basololaka yango na bana te. Bonkɔkɔ ya Afrika epesi nzela ya kosala bongo te.” Mwasi moko na ekólo Nigeria nkombo na ye Confident, andimi ete: “Baboti na ngai batalelaka binama ya nzoto lokola likambo oyo ekoki kolobama na miso ya bato te; engebene bonkɔkɔ yango ezali ekila monene.”

Na bonkɔkɔ ya bamboka mosusu ya Afrika, kotánga nkombo ya binama ya nzoto lokola soka, malomi, mpe komona sanza, ezali likambo ya nsɔni. Kutu, mama moko moklisto apekisaki mwana na ye ya mwasi kosalela maloba “kolala na mwasi to na mobali,” kasi, alobaki na ye asalelaka liloba “pite.” Nzokande, Liloba ya Nzambe Biblia ezali koloba kozanga nsɔni na ntina na kosangisa nzoto mpe na ntina na binama ya nzoto. (Genese 17:11; 18:11; 30:16, 17; Levitike 15:2) Mokano ya makambo oyo ezali te ya kotungisa makanisi ya bato to ya kolamwisa mposa ya nzoto, kasi ezali nde ya kobatela mpe ya koteya bato na Nzambe.​—2 Timoté 3:16.

Longola likambo ya ekila engebene bonkɔkɔ, tata moko na Nigeria, amonisaki moko ya bantina mpo na yango baboti baboyaka kosolola makambo wana na bana na bango na maloba oyo: “Soki nasololi na bana makambo matali kosangisa nzoto, yango ekoki kopusa bango na kosala pite.” Kasi, mateya mabongi oyo mauti na Biblia na ntina na kosangisa nzoto ezali nde kolendisa bana ete bákende nokinoki kosala pite? Te, ezali bongo te. Na yango, ekoki kozala solo ete lokola bilenge bazali na boyebi mingi te, yango wana bazali kosala pite. Biblia elobi ete: “Mayele [oyo etongami likoló ya boyebi ya sikisiki] ekobatelaka.”​—Mosakoli 7:12.

Kati na lisese ya Yesu, moto ya mayele, asosolaki ete mipɛpɛ ekoya, mpe na yango, atongaki ndako na ye likoló na mabanga; nzokande, zoba atongaki ndako likoló na zelo mpe yango ekweaki. (Matai 7:24-27) Lolenge moko, baboti baklisto ya mayele, koyebáká ete bana na bango bakokutana na bopusi ekokani na mipɛpɛ ya komiyokanisa na mitindá mabe ya mokili na ntina na kosangisa nzoto, bazali kokembisa bana na bango na nzela ya boyebi ya sikisiki mpe na mayele oyo ekosunga bango ete bátikala ngwi.

Mwasi moko na Afrika, abakisaki ntina mosusu oyo baboti basololaka te makambo matali kosangisa nzoto na bana na bango nakolobáká ete: “Ntango nazalaki elenge, baboti na ngai oyo bazali Batatoli ya Yehova bazalaki kosolola na ngai te makambo matali kosangisa nzoto, ndenge moko, ngai mpe nakanisaka te kosolola yango na bana na ngai.” Nzokande, bopusi ezali makasi likoló ya bilenge ya lelo koleka ndenge ezalaki likoló ya bilenge na mbula 10 to mbula 20 oyo eleki. Yango ezali likambo ya kokamwa te. Liloba ya Nzambe esakolaki ete “na mikolo ya nsuka . . . , bato mabe mpe bakosi bakoleka na mabe, bakozimbisa mpe bakozimbisama.”​—2 Timoté 3:1, 13.

Likoló na wana, likambo mosusu ezali oyo ete bana mingi balingaka mpenza te to mpe bakokaka te koyebisa baboti na bango basɛkɛlɛ́. Basololaka mpenza te, ata na makambo ya mikemike. Elenge mobali moko ya mbula zomi na libwa amilelaki na maloba oyo: “Nasololaka na baboti na ngai te. Ngai na tata na ngai tosololaka malamu te. Atyelaka makambo na ngai likebi te.”

Bilenge bakoki mbala mosusu kobanga ete mituna oyo bakotuna na ntina na kosangisa nzoto ekobimisa matomba malamu te. Elenge mwasi moko ya mbula zomi na motoba alobaki ete: “Nasololaka makambo matali kosangisa nzoto na baboti na ngai te mpo na ezaleli oyo bamonisaka na likambo yango. Esili koleka mwa mikolo, yaya na ngai ya mwasi atunaki mama mituna oyo etalaki kosangisa nzoto. Na esika ete mama asunga ye na mokakatano na ye, akómaki nde kokanisela ye mabe. Mbala mingi mama azalaki kobenga ngai mpe kotunatuna ngai makambo ya yaya na ngai, mpe mbala mingi azalaki kokanisela ye mabe na ntina na etamboli na ye. Naboyi mama ayina ngai, yango wana nayebisaka ye makambo na ngai te.”

Mpo na nini kopesa mateya?

Koteya bana na biso na lolenge ekoki na makambo matali kosangisa nzoto ezali bobele sembo te, kasi ezali mpe komonisa boboto. Soki baboti bakoteya bana na bango makambo matali kosangisa nzoto te, bato mosusu nde bakoteya bango—ekómaka ete básala yango liboso mpenza ete baboti bábanda mpe mbala mingi mateya yango eyokanaka te na mitindá ya Nzambe. Elenge mwasi moko ya mbula zomi na misato asalaki pite mpo ete moninga moko ya kelasi alobaki na ye ete soki akotikala sé ngɔndɔ, akomona mpasi makasi na mikolo mizali koya. Alobaki na ye ete: “Bakofungola yo nzela na sizó mpo ete osangana na mobali.” Na ntango batunaki ye na nsima mpo na nini ayebisaki mama na ye oyo azalaki moklisto makambo yango te, ayanolaki ete makambo motindo wana asololá yango naino na mikóló te.

Elenge mwasi moko na Nigeria alobaki ete: “Baninga na ngai ya kelasi balukaki kondimisa ngai na makasi ete kosangisa nzoto ezali likambo oyo moto nyonso azali na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ asengeli kosala. Balobaki na ngai ete soki nakosangisa nzoto na mobali sikawa te, ntango nakokóma na mbula ntuku mibale na moko, nakozwa maladi oyo ekobimisela ngai mikakatano na bomwasi na ngai. Na yango, balobaki ete, mpo na kopɛngola likama yango, ezali malamu nasangisa nzoto na mibali liboso ya kobala.”

Lokola azalaki kosolola malamu na baboti na ye, nokinoki asosolaki ete mateya yango eyokanaki te na mateya oyo azwaki na ndako na bango. “Lokola momeseno, nazongaki na ndako mpe nayebisaki mama na ngai makambo bayebisaki ngai na eteyelo.” Mama na ye azwaki likoki ya kokweisa mateya wana ya lokuta.​—Kokanisá na Masese 14:15.

Nakopesáká boyebi esengeli mpo na kosunga bana ete bázwa mayele ya Nzambe na makambo ya kosangisa nzoto, baboti bazali kopesa bango bisaleli ekoki mpo na kososola makama mpe mpo na koyeba moto oyo alingi kokósa bango. Yango ekobatela bango ete bázwa te maladi oyo eutaka na kosangisa nzoto mpe bákumba zemi ya balabala te. Boyebi yango ezali na motuya mpo na limemya na bango moko mpe mpo na limemya oyo bato mosusu bakopesa bango. Ekosikola bango na makanisi ya lokuta mpe na mitungisi. Ekosalisa bango ete bázala na makanisi ya pɛto, ya sembo, mpo na oyo etali kosangisa nzoto, ekosala ete ntango bakobala bázala na esengo. Yango ekosalisa bango ete bábatela etɛlɛmɛlo oyo endimami na Nzambe. Mpe wana bana bazali komona likebi ya bolingo oyo bazali kotyela bango, yango ekoki kopusa bango na komemya mpe kolinga baboti na bango mingi koleka.

Kosolola ya malamu

Mpo ete toli ya baboti eyokana na mposa ya bana na bango, esengeli ete bápesaka bana mpe likoki ya koyebisa mayoki na bango. Soki baboti bayebi te nini ezali kati na makanisi mpe na mitema ya bana na bango, ata toli kitoko ekozala na litomba moke, ekozala lokola monganga oyo akomeli moto nkisi kozanga koyeba bokɔnɔ nini azali na yango. Mpo ete bázala bapesi-toli malamu, baboti basengeli koyeba makambo oyo bana na bango bazali mpenza kokanisa mpe oyo bazali koyoka. Basengeli koyeba bopusi mpe mitungisi oyo bana na bango bazali kokutana na yango mpe makambo oyo ezali kotungisa bango. Ebongi na baboti ete báyokaka bana na bango na likebi nyonso, bázala “koyoka noki nde báloba malɛmbɛ.”​—Yakobo 1:19; Masese 12:18; Mosakoli 7:8.

Yango esɛngaka ntango, motema molai, mpe milende epai na baboti mpo na kolóna mpe kobatela boyokani ya penepene elongo na bana na bango, boyokani oyo kati na yango bana bazali na bonsomi ya komonisa polele mayoki na bango ya kati ya motema. Ezali likambo ya esengo ntango baboti mpe bana bazali na boyokani ya penepene, boye te? Na Afrika ya Wɛ́sti, tata moko azali na bana mitano, alobaki ete: “Nazali tata na bango mpe nazali moto oyo bango bayebisaka basɛkɛlɛ́. Bana basololaka na ngai makambo nyonso kozanga kobanga, ata mpe makambo matali kosangisa nzoto. Ata baoyo ya basi bayebisaka ngai basɛkɛlɛ́ na bango. Tozwaka ntango mpo na kosolola elongo na bango. Bango mpe bakabolaka bisengo na bango elongo na ngai.”

Bola, mwana na ye ya mwasi, alobi ete: “Nabombelaka tata na ngai likambo te. Tata azali na boboto mpe ayebi komitya na esika na biso. Angalelaka biso te to asalelaka biso makambo na makasi te, ata soki tosali mabe. Na esika ete atɔmbɔka, atalelaka malamumalamu likambo yango mpe amonisaka biso nini ebongaki kosala to nini ebongaki kosala te. Mbala mingi asalelaka makambo mazali kati na mokanda Votre jeunesse mpe mokanda Bolamu na Libota.”a

Soki likoki ezali, ebongi ete baboti bábanda kosolola na bana na bango makambo matali kosangisa nzoto ntango bazali naino mike. Yango ekozala moboko mpo na masolo oyo ekolandana na eleko ya bolenge oyo etondi na mikakatano. Soki masolo ebandi te wana bana bazali naino mike, ekómaka mwa mpasi kokɔtisa yango ntango bapusani na mbula, kasi likoki ya kosala yango ezali. Mama moko oyo azali na mwana moko ya mbula mitano alobaki ete: “Nasalaki milende mpo na kosolola makambo yango kino, na nsuka, nazalaki lisusu koyokela yango nsɔni te, mwana mpe azalaki koyoka nsɔni te.” Lokola bolamu ya bana na yo ezali na likama, esengeli kosala milende wana.

Bana babatelami mpe bazali na esengo

Bana basepelaka na baboti oyo, na bolingo nyonso, bazali kopesa bango boyebi oyo ekobatela bango. Tótalela makambo oyo Batatoli ya Yehova na Afrika balobi:

Mojisola, azali na mbula 24, alobaki ete: “Natɔ́ndaka ntango nyonso mama na ngai. Ateyaki ngai makambo matali kosangisa nzoto na ntango ebongi mpenza. Atako nazalaki koyoka nsɔni ntango azalaki kolobela yango wana nazalaki naino elenge, sikawa namoni litomba na yango.”

Iniobong, abakisaki ete: “Nazalaka ntango nyonso na esengo soki nazongisi makanisi nsima mpe nakanisi makambo mama asalaki mpo na ngai na kopesáká ngai mateya mabongi na makambo matali kosangisa nzoto. Ezalaki mpenzampenza lisungi malamu oyo etambwisaki ngai kino kokóma mwasi monene. Ngai mpe nakosala sé bongo epai ya bana oyo nakobota.”

Kunle, azali na mbula 19, alobaki ete: “Baboti na ngai basungaki ngai ete natikala ngwi liboso ya bopusi mabe ya basi ya mokili oyo balɛngolaka mibali na mokano ya kosangisa na bango nzoto. Soki ezalaki lisungi na bango te, mbɛlɛ nakwea na lisumu. Nasepelaka ntango nyonso na makambo oyo basalaki.”

Christiana alobaki ete: “Nazwi matomba mingi uta na masolo oyo tozalaki kosolola na mama na makambo matali kosangisa nzoto. Nabatelami ete nazwa bamaladi mabe te mpe nazwa zemi ya balabala te, lisusu nazali ndakisa malamu oyo baleki na ngai ya mibali mpe ya basi bazali kolanda. Bato bazali kopesa ngai limemya, mpe mobali oyo akobala ngai akopesa ngai limemya lokola. Na koleka nyonso, nazali na boyokani malamu na Yehova Nzambe mpo ete nabateli mitindá na ye.”

Bola, oyo tolobelaki, alobaki ete: “Nazalaki na moninga moko ya kelasi oyo alobaki ete kosangisa nzoto ekoki kosalema ata mwasi na mobali babalani te. Mpo na ye, ezalaki likambo ya kosepelisa nzoto. Nzokande, amonaki ete yango ezalaki likambo ya kosepelisa nzoto te ntango azwaki zemi oyo epekisaki ye kosala examen d’État elongo na biso. Soki nazalaki na tata ya malamu te mpo na kotambwisa ngai, mbɛlɛ nalingaki kozala lokola ye, kosala bozoba liboso mpe kozwa mayele na nsima.”

Oyo nde lipamboli ntango baboti baklisto bazali kosalisa bana na bango ete bákóma na “boyebi mpo na kobika” kati na mokili oyo emipesi na kosangisa nzoto na ndenge ya ligboma! (2 Timoté 3:15) Mateya na bango oyo mauti na Biblia mazali lokola mayaka oyo ezali kongɛngisa bana mpe ezali kokómisa bango kitoko na miso ya Nzambe. (Masese 1:8, 9) Bana bazali komiyoka ete babatelami, mpe baboti bazali kosepela. Tata moko na Afrika oyo asalaka milende mpo na kosololaka na bana na ye alobaki ete: “Tozali na kimya ya elimo. Tondimisami ete bana na biso bayebi makambo oyo Yehova asepelaka na yango; bakozimbisama te na bato ya libándá. Tozali kolikya ete bakosala te makambo oyo ekopesa mpasi na libota. Nazali kotɔ́nda Yehova mpo ete bana bandimi kotyela biso motema.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

[Elilingi na lokasa 10]

Bilenge baklisto oyo bazali kozwa mateya mauti na Biblia epai ya baboti na bango bakoki kopɛngola mateya ya lokuta na makambo matali kosangisa nzoto oyo bilenge mosusu bazali kopesa.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto