Bomoi na yo na mikolo mizali koya ekozala lolenge nini?
SOKI Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso ayebi makambo nyonso, ayebi makambo nyonso maleká, makambo ya lelo, mpe makambo makoya, mbɛlɛ makambo nyonso masalemaka mpenzampenza na lolenge Nzambe asilá komona yango uta kala, boye te? Soki Nzambe asilá komona mpe asilá kokata bomoi ya moto na moto, tokoki nde koloba ete tozali na bonsomi ya kopona lolenge ya bomoi na biso, to bomoi na biso na mikolo mizali koya?
Uta bikeke mingi mituna oyo mibimisaka ntango nyonso ntembe. Kino lelo oyo, ntembe likoló na yango ezali naino kokabola mangomba minene. Likoki oyo Nzambe azali na yango ya koyeba makambo makoya ekoki koyokana na bonsomi ya moto na kopona etamboli na ye? Tosengeli koluka biyano epai wapi?
Bamilio ya bato na mokili mobimba bandimaka ete Nzambe asololaka na bato na nzela ya Liloba na ye likomami oyo apesaki na nzela ya balobeli na ye, basakoli. Na ndakisa, Coran elobaka ete bimoniseli biutaki na Nzambe: Taurāh (Torah, Mibeko, to mikanda mitano ya Mose), Zabūr (Nzembo), mpe Injīl (Evanzile, Makomami ya Greke ya boklisto, to “Kondimana ya Sika”), mpe makambo oyo mayebisamaki na basakoli ya Yisalaele.
Kati na Makomami ya Greke ya boklisto, tozali kotánga boye: “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kobongisa makambo, mpo na kosembola.” (2 Timoté 3:16, NW) Na ntembe te litambwisi nyonso to kongɛngisama nyonso oyo tozali kozwa esengeli mpenza kouta na Nzambe ye moko. Na bongo, ekozala likambo ya mayele soki totaleli makomi ya basakoli ya kalakala ya Nzambe, boye te? Makomi yango mazali komonisa nini na oyo etali bomoi na biso na mikolo mizali koya?
Makambo oyo makomamaki liboso
Moto na moto oyo asilá kotánga Makomami Mosantu ayebi ete ezali na ebele ya bisakweli. Makambo oyo masalamaká kati na lisolo ya bato lokola kokwea ya Babilone, kotongama lisusu ya Yelusaleme (banda ekeke ya motoba kino ekeke ya mitano L.T.B.), kobima mpe kokwea ya bakonzi ya Mede na Pelese mpe ya Grèce, nyonso esakolamaki kino na makambo mikemike. (Yisaya 13:17-19; 44:24–45:1; Danyele 8:1-7, 20-22) Kokokisama ya bisakweli motindo wana ezali moko na bilembeteli ya solosolo bimonisi ete Makomami Mosantu mazali mpenza Liloba ya Nzambe, mpamba te bobele Nzambe nde azali na nguya ya komona makambo mazali liboso mpe kokata nini ekosalema na mikolo mizali koya. Na ndimbola oyo ezali solo ete makambo makosalema masilá kokomama kati na Makomami Mosantu.
Nzambe ye moko alobi ete: “Ngai nazali Nzambe mpe mosusu azali te; ngai nazali Nzambe, mosusu azali lokola ngai te, oyo akosakola makambo na nsuka longwa na ebandeli, mpe longwa ntango na kala makambo masalami naino te, oyo alobi ete, Toli na ngai ekotɛlɛma mpe nakokokisa mokano mobimba na ngai. . . . Ngai nasili koloba yango mpe nakosala yango, nakani yango mpe nakokokisa yango.” (Yisaya 46:9-11; 55:10, 11) Nkombo oyo Nzambe amimonisaki na yango epai na basakoli na ye ya kala ezali bongo Yehova, oyo elimboli mpenza ete “Ye oyo akómisaka.”a (Genese 12:7, 8; Exode 3:13-15; Nzembo 83:18) Nzambe amimonisaka lokola Ye oyo akómaka Mokokisi ya liloba na ye, Ye oyo akokisaka ntango nyonso mikano na ye.
Na bongo, Nzambe asalelaka nguya na ye ya koyeba makambo masalami naino te mpo na kokokisa mikano na ye. Mbala mingi asalelaki yango mpo na kokebisa basali na mabe na ntina na etumbu oyo alingi koyeisa mpe mpo na kopesa basaleli na ye elikya ya lobiko. Kasi, Nzambe asalelaka nguya yango kozanga ndelo? Kati na Makomami Mosantu, ezali nde na elembeteli ya makambo oyo Nzambe aponaki ete akoyeba yango liboso te?
Nzambe ayebaka makambo nyonso liboso?
Makanisi nyonso oyo mapesamaka mpo na kondimisa ete makambo nyonso masilá kokanama mazwi moboko na likanisi ete lokola Nzambe azali na nguya ya koyeba mpe ya kokata makambo makoya liboso, asengeli koyeba makambo nyonso liboso, bakisa mpe misala oyo moto na moto akosala na mikolo mizali koya. Nzokande, likanisi yango ezali solo? Makambo oyo Nzambe ayebisi kati na Makomami Mosantu mamonisi ete ezali bongo te.
Na ndakisa, Makomami malobi ete “Nzambe amekaki Abalayama” na kotindáká ye ete apesa mwana na ye Yisaka lokola mbeka ya kotumba. Ntango Abalayama alingaki kokaba Yisaka lokola mbeka, Nzambe apekisaki ye mpe alobaki ete: “Sikawa nayebi ete obangi Nzambe, mpo ete oboyi kopesa mwana na yo te, mwana na yo [bobele moko, NW].” (Genese 22:1-12) Nzambe alingaki nde koloba likambo yango soki ayebaki liboso ete Abalayama akotosa etinda yango? Yango mbɛlɛ ezalaki mpenza komekama ya sembo?
Lisusu, basakoli ya ntango ya kala bayebisi ete mbala na mbala Nzambe alobaki na ntina na ye moko ete ‘ayokaki mawa’ mpo na likambo moko oyo asilaki kosala to oyo akanaki kosala. Na ndakisa, Nzambe alobaki ete ‘ayokaki mawa [na Liebele na·chamʹ] ete abongisaki Saulo ete azala mokonzi ya Yisalaele.’ (1 Samwele 15:11, 35; kokanisá na Yilimia 18:7-10; Yona 3:10.) Lokola Nzambe azali na kokoka, bavɛrsɛ oyo ekoki kolimbola te ete Nzambe asalaki libunga na koponáká Saulo ete azala mokonzi ya liboso ya Yisalaele. Kasi, esengeli kolimbola ete Nzambe ayokaki mawa ete Saulo akómaki na kozanga kondima mpe kozanga botosi. Lolenge oyo Nzambe asalelaki maloba wana mpo na ye moko elingaki kozala na ndimbola te soki ayebaki liboso misala ya Saulo.
Liloba yango tozali kokuta yango lisusu na Makomami ya kalakala oyo maleki koumela epai kuna, na ntina na mikolo ya Noa, elobami ete: “[Yehova] ayokaki mawa ete asalaki bato kozala na nse, mpe likambo yango epesaki ye bolɔzi na motema. [Yehova] alobaki ete, Nakolongola na mokili bato oyo esalaki ngai, . . . mpo ete nazali na mawa ete nazalisaki bango.” (Genese 6:6, 7) Awa lisusu, emonisi ete misala ya bato mikanamaka na Nzambe te. Nzambe ayokaki mawa, mpasi, mpe ata bolɔzi. Ezali te ete asalaki misala na ye na libunga, kasi mpo ete mabe ya bato ekómaki mingi. Mozalisi ayokaki mawa ete asengeli sikawa koboma bato nyonso, longola bobele Noa mpe libota na ye. Nzambe andimisi biso ete: “Nazwi esengo na liwa na moto mabe te.”—Ezekiele 33:11; kokanisá na Deteronome 32:4, 5.
Na yango, Nzambe ayebaki nde liboso mpe akanaki ete Adama akokwea na lisumu; mpe lisusu, ayebaki liboso mpasi oyo yango esengelaki komemela bato? Makambo oyo touti kotalela mamonisi ete ekoki kozala bongo te. Mpe lisusu, soki Nzambe ayebaki liboso makambo yango nyonso, boye tokoloba ete ye nde abandisaki lisumu ntango azalisaki moto, mpe mpasi na minyoko oyo bato bazali na yango Nzambe nde abandisaki yango na nko. Nzokande, ezali polele ete likanisi yango ekoki koyokana te na makambo oyo Nzambe alobi na ntina na ye moko kati na Mokomami. Azali Nzambe ya bolingo mpe ya sembo oyo ayini mabe.—Nzembo 33:5; Masese 15:9; 1 Yoane 4:8.
Nzela mibale etyami liboso ya moto
Makomami Mosantu mamonisi te ete bomoi ya mokomoko na biso na mikolo mizali koya esilá kobongisama liboso, to esilá kokanama na Nzambe. Nzokande, Makomami mamonisi ete Nzambe ayebisaki liboso nzela mibale etyami liboso ya moto. Nzambe apesi moto na moto bonsomi ya kopona nzela oyo akolanda. Mosakoli Mose alobaká na Bayisalaele ete: “Natii liboso na yo bomoi mpe kufa . . . Na bongo poná bomoi ete yo mpe bana na yo bózala na bomoi, mpe ete olinga [Yehova] Nzambe na yo mpe otosa mongongo na ye mpe okangana na ye, mpo ete yango bomoi mpe konuna mpo na yo.” (Deteronome 30:19, 20) Yesu mosakoli ya Nzambe apesaki likebisi oyo: “Bóingela na ekuke na nkaka. Zambi ekuke ezali monene mpe nzela ezali na esika monene oyo ekoleka kino libebi. Bazali mingi baoyo bakoingela na yango. Mpo ete ekuke ezali na nkaka mpe nzela ekangani oyo ekoleka na bomoi mpe baoyo bakomona yango bazali mingi te.” (Matai 7:13, 14) Nzela ezali mibale, ezali mpe komema na nsuka mibale. Bomoi na biso na mikolo mizali koya etaleli misala na biso moko. Kotosa Nzambe elimboli bomoi, kozanga botosi elimboli liwa.—Baloma 6:23.
Nzambe “azali kosakola na bato nyonso na bisika nyonso ete bábongola mitema; mpo ete asili kopona mokolo wana ekosambisa ye mikili nyonso na sembo.” (Misala 17:30, 31) Se lokola bato mingi na mikolo ya Noa baponaki kozanga botosi epai na Nzambe mpe babomamaki nyɛɛ, bobele bongo bato mingi na mikolo na biso bazali kotosa mibeko ya Nzambe te. Kasi, Nzambe asilá kokana liboso te nani akobomama mpe nani akobika. Kutu, Liloba ya Nzambe elobi ete “alingi te ete bamosusu bábeba kasi ete bato nyonso bákóma kobongwana na motema.” (2 Petelo 3:9) Ata basali na mabe minene bakoki kobongwana, kokóma batosi, mpe kosala mbongwana oyo esengeli mpo na kozwa ngɔlu ya Nzambe.—Yisaya 1:18-20; 55:6, 7; Ezekiele 33:14-16; Baloma 2:4-8.
Epai na bato ya botosi, Nzambe alaki bomoi ya seko kati na paladiso ya kimya, na mabelé mapɛtolami na mabe nyonso, na mobulu, mpe na bitumba, mokili epai kuna nzala, minyoko, maladi, mpe liwa ekozala te. (Nzembo 37:9-11; 46:9; Yisaya 2:4; 11:6-9; 25:6-8; 35:5, 6; Emoniseli 21:4) Ata mpe bakufi bakosekwisama mpe bakozwa libaku ya kosalela Nzambe.—Danyele 12:2; Yoane 5:28, 29.
Nzambe alobi ete: “Talá moto na sembo mpe kotika kotala moyengebene te, mpamba te bomoi ya moto yango ekozala kimya na mikolo mizali koya. Kasi, batyoli na mibeko bakosilisama nyɛɛ bango nyonso; ɛɛ, bomoi ya bato mabe na mikolo mizali koya ekolongolama.” (Nzembo 37:37, 38, NW) Bomoi na yo na mikolo mizali koya ekozala ndenge nini? Yango etaleli bobele yo. Babimisi ya zulunalo oyo bakosepela koyebisa yo makambo mosusu mpe kopesa yo likoki ete omibongisela bomoi ya esengo mpe ya kimya mpo na mikolo mizali koya.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kati na Makomami Mosantu, tozali kokuta nkombo Yehova mbala koleka 7 000; talá trakte Le plus grand des noms, ebimisamaki na 1997 na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
Nzambe asalelaka nguya na ye ya koyeba makambo masalami naino te mpo na kokokisa mikano na ye
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]
Nzambe “alingi te ete bamosusu bábeba kasi ete bato nyonso bákóma kobongwana na motema.” 2 Petelo 3:9
[Elilingi na lokasa 7]
Soki Nzambe ayebaki liboso ete Abalayama akondima kopesa mwana na ye lokola mbeka, mbɛlɛ komekama yango ezalaki komekama ya sembo?