Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/4 nk. 14-19
  • Yehova akokisaka bilaka na ye epai na basembwi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova akokisaka bilaka na ye epai na basembwi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kondima ya solosolo na ntango ya kala
  • Mbuma ya kozanga kondima
  • Kondima emonisami na ntango na biso
  • Mikolo malamu mizali koya mpo na basembwi
  • Bomoi ya esengo na mikolo mizali koya epesameli ndanga
  • Tyá elikya epai na Yehova mpo na kokokisama ya mokano na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • ‘Tozali kotambola na kondima kasi na komona te’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • “Bólendisa mitema na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Tózala na kondima oyo etongami likoló na solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/4 nk. 14-19

Yehova akokisaka bilaka na ye epai na basembwi

“Ye oyo apesaki elaka azali sembo.”​—BAEBELE 10:23.

1, 2. Mpo na nini tokoki kotyela bilaka ya Yehova motema mobimba?

YEHOVA asɛngaka basaleli na ye ete bálona mpe bábatela kondima makasi epai na ye mpe na bilaka na ye. Na kondima motindo wana moto akoki kotyela Yehova motema mobimba ete akokokisa bilaka na ye. Liloba na ye lipemami elobi ete: “[Yehova] na bibele [alapi] ndai ete, Lokola mwango mobongisaki ngai, ekozala mpe bongo; lokola mokano mokanaki ngai, ekotɛma mpe bongo.”​—Yisaya 14:24.

2 Maloba oyo ete, “Yehova na bibele alapi ndai,” mamonisi ete akati seleka ete akokokisa bilaka na ye. Yango wana Liloba na ye elobi ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.” (Masese 3:5, 6) Ntango totyeli Yehova motema mpe tomitiki kotambwisama na mayele na ye, na ntembe te matambe na biso makokamba biso na bomoi ya seko, mpamba te mayele ya Nzambe mazali “nzete na bomoi mpo na nyonso oyo bakosimbaka [yango].”​—Masese 3:18; Yoane 17:3.

Kondima ya solosolo na ntango ya kala

3. Ndenge nini Noa amonisaki kondima epai na Yehova?

3 Misala ya Yehova mpo na baoyo bamonisaki kondima ya solosolo emonisi ete tokoki kotyela ye motema. Na ndakisa, eleki mbula 4 400 na ndambo, Nzambe ayebisaki Noa ete mokili ya eleko na ye esengeli kobomama na Mpela ya mokili mobimba. Atindaki Noa ete atonga masuwa monene mpo na kobatela bomoi ya bato mpe banyama. Noa asalaki nini? Baebele 11:7 eyebisi biso ete: “Mpo na kondima, Noa akebisami mpo na makambo mamonani naino te, mpe atii motema na bozito, atongi masuwa mpo na kobikisa libota na ye.” Mpo na nini Noa andimaki likambo oyo esalemaki naino te, likambo oyo ‘emonani naino te’? Mpamba te ayebaki malamu lolenge oyo Nzambe asalaki makambo epai na bato liboso mpe na yango ayebaki ete liloba nyonso ya Nzambe ekokisamaka. Na yango, Noa atyaki mpe motema ete Mpela ekoya.​—Genese 6:9-22.

4, 5. Mpo na nini Abalayama atyelaki Yehova motema mobimba?

4 Abalayama azali ndakisa mosusu ya kondima ya solosolo. Eleki pene na mbula 3 900, Nzambe asɛngaki ye ete akaba mwana na ye Yisaka lokola mbeka, mwana na ye bobele moko oyo abotaki na Sala, mwasi na ye. (Genese 22:1-10) Abalayama atalelaki likambo yango ndenge nini? Baebele 11:17 elobi ete: “Mpo na kondima, Abalayama atombolaki Yisaka lokola mbeka wana emekamaki ye.” Nzokande, ntango mpenza alingaki kosala yango, anzelu ya Yehova apekisaki Abalayama. (Genese 22:11, 12) Kasi, mpo na nini Abalayama alingaki kosala likambo motindo wana? Mpamba te, lokola Baebele 11:19 elobi, “atángaki ete Nzambe azalaki na nguya [ya] kosekwisa [Yisaka] ata na bakufi.” Kasi, lolenge nini Abalayama akokaki kondima lisekwa na ntango oyo amonaki naino yango te mpe elobamaki liboso te ete moto moko asilá kosekwisama?

5 Tómikundola ete Sala azalaki na mbula 89 ntango Nzambe alakelaki bango mwana. Sala azalaki lisusu na makoki ya kobota te—tokoki koloba ete libumu na ye esilaki kokufa. (Genese 18:9-14) Nzambe azongisaki makoki ya Sala mpo na kobota mpe abotaki Yisaka. (Genese 21:1-3) Abalayama ayebaki ete lokola Nzambe azongisaki libumu ya Sala na bomoi, libumu oyo esilaki kokufa, boye akokaki mpe kozongisa Yisaka na bomoi soki esengeli. Baloma 4:20, 21 elobi na ntina na Abalayama ete: “Abɛtaki elaka na Nzambe ntembe te, kasi akembaki mingi kati na kondima; apesaki Nzambe nkembo. Andimaki na motema mobimba ete Nzambe akoki kosala yango esili ye kolaka.”

6. Lolenge nini Yosua atyelaki Yehova motema?

6 Eleki sikawa mbula 3 400 na ndambo, ntango Yosua azalaki na mibu koleka nkama mpe nsima ya komona, na boumeli ya bomoi na ye, ete Nzambe akoki kotyelama motema, ayebisaki ntina oyo andimisamaki, ye ete: “Boyebi na mitema na bino mpe na milimo na bino nyonso ete eloko moko ezangi te na makambo malamu nyonso oyo [Yehova] Nzambe na bino atyaki ndaka na yango na ntina na bino. Yango nyonso ebimelaki bino, mpe eloko na yango moko ezangaki te.”​—Yosua 23:14.

7, 8. Baklisto ya ekeke ya liboso basalaki likambo nini mpo na kobikisa bomoi na bango, mpe mpo na nini?

7 Eleki pene na mbula 1 900, bato mingi ya komikitisa bamonisaki kondima ya solosolo. Na nzela ya kokokisama ya bisakweli ya Biblia basosolaki ete Yesu azali Masiya mpe bandimaki mateya na ye. Makambo oyo bamonaki mpe oyo ekomamaki na Makomami ya Liebele ezalaki moboko makasi mpo na kondima mateya ya Yesu. Na yango, ntango Yesu alobaki ete Nzambe alingi kopesa etumbu na Yudea mpe Yelusaleme na ntina na kozanga bosembo, bandimelaki ye. Mpe ntango ayebisaki bango makambo oyo basengeli kosala mpo na kobikisa bomoi na bango, basalaki yango.

8 Yesu ayebisaki bandimi ete ntango Yelusaleme ekozingama na basoda, basengeli kokima. Basoda ya Loma bayaki kobundisa Yelusaleme na mobu 66 T.B. Kasi na nsima, Baloma bazongaki mpo na ntina oyo eyebani te. Yango ezalaki elembo oyo esengelaki kotinda baklisto ete bábima na engumba, mpamba te Yesu alobaki ete: “Soko bokomona Yelusaleme kozingama na bibele na basoda, bóyeba na ntango yango ete libebisi na yango esili kobɛlɛma. Na ntango yango bango na kati na Yuda bákima kuna na ngomba, mpe bango na kati na mboka bálongwa wana, mpe bango na bilanga bákɔta na mboka te.” (Luka 21:20, 21) Baoyo bazalaki na kondima ya solosolo balongwaki na Yelusaleme mpe zingazinga na yango mpe bakimaki na esika ya libateli.

Mbuma ya kozanga kondima

9, 10. (a) Lolenge nini bakonzi ya mangomba bamonisaki kozanga kondima epai na Yesu? (b) Mbuma ya kozanga kondima wana ezalaki nini?

9 Baoyo bazangaki kondima ya solosolo basalaki nini? Bakimaki te na ntango libaku ya kokima emonanaki. Bakanisaki ete bakambi na bango bakoki kobikisa bango. Kasi, bakambi yango mpe balandi na bango bamonaki bilembeteli ete Yesu azali Masiya. Kasi mpo na nini bandimaki maloba na ye te? Ezali mpo na ezalela mabe ya mitema na bango. Yango eutaki kotɔndɔlama liboso ntango bamonaki ebele ya bato bazangi etɛlɛmɛlo ya lokumu kokende epai na Yesu nsima ya lisekwa ya Lasalo. Yoane 11:47, 48 eyebisi ete: “Banganga minene mpe Bafalisai bayanganisi Koyangana [“Sanedrina,” NW] [esambiselo monene ya Bayuda] mpe balobi ete, Tósala nini? Mpo ete moto oyo [Yesu] azali kosala bilembo mingi. Soko tokotika ye boye, bato nyonso bakondima ye mpe Baloma bakoya mpe bakobebisa esika na biso mpe libota na biso.” Vɛrsɛ 53 elobi ete: “Longwa na mokolo yango, bakani ete báboma ye.”

10 Oyo nde likamwisi monene Yesu asalaki—asekwisaki Lasalo kati na bakufi! Kasi bakonzi ya mangomba balingaki koboma Yesu mpo ete asalaki likambo wana. Motema mabe na bango etɔndɔlamaki lisusu ntango “banganga minene bakani ete báboma Lasolo mpe, zambi na mpo na ye Bayuda mingi bazalaki kolongwa mpe kondima Yesu.” (Yoane 12:10, 11) Lasalo autaki kosekwisama kati na bakufi, mpe talá, banganga yango balingaki ete akufa lisusu! Bamibanzabanzaki mpo na mokano ya Nzambe te to mpo na bolamu ya bato te. Bazalaki bato ya moimi, bamibanzabanzaki se mpo na etɛlɛmɛlo na bango mpe matomba na bango. “Balingaki lokumu na bato liboso na lokumu na Nzambe.” (Yoane 12:43) Kasi bazwaki mbano mpo na kozanga kondima na bango. Na mobu 70 T.B., basoda ya Loma bayaki lisusu mpe babebisaki engumba na bango mpe libota na bango, mpe babomaki bato mingi kati na bango.

Kondima emonisami na ntango na biso

11. Na ebandeli ya ekeke oyo, lolenge nini kondima ya solosolo emonisamaki?

11 Na ekeke oyo, mibali mpe basi mingi bazali na kondima ya solosolo. Na ndakisa, na ebandeli ya bambula ya 1900, bato mingi bazalaki kolikya kozala na bomoi ya kimya mpe ya malamu mpo na mikolo mizalaki liboso. Bobele na eleko yango, baoyo bandimelaki Yehova bazalaki kosakola ete mosika te mokili elingaki kokɔta na eleko moko ya yikiyiki oyo emonanaki naino te. Yango nde esakolamaki kati na Liloba ya Nzambe na Matai mokapo 24, 2 Timoté mokapo 3, mpe na mikapo mosusu. Makambo oyo bato wana ya kondima basakolaki masalemaki solo, kobanda na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba na 1914. Ya solo, mokili ekɔtaki na “mikolo ya nsuka” na “ntango ya mpasi” oyo esakolamaki. (2 Timoté 3:1) Mpo na nini basaleli ya Yehova bayebaki solo na ntina na ezalela ya mokili na ntango wana kasi bato mosusu bayebaki yango te? Mpamba te, lokola Yosua, bandimaki ete ata liloba moko te ya Yehova ekozanga kokokisama.

12. Lelo oyo, elaka nini Yehova apesi oyo basaleli na ye bazali kotyela yango motema mobimba?

12 Lelo oyo, basaleli ya Yehova pene na milio motoba kati na mokili mobimba, bazali kotyela ye motema. Na ndenge liloba ya esakweli ya Nzambe ezali kokokisama, bayebi ete mosika te akosukisa ebongiseli ya biloko oyo etondi na mobulu mpe makambo ya mbindo. Na yango, bazali na elikya ete mosika te bakomona kokokisama ya 1 Yoane 2:17, oyo elobi ete: “Mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumelaka seko.” Basaleli na ye batyaka motema mobimba ete Yehova akokokisa elaka yango.

13. Na meko nini okoki kotyela Yehova motema?

13 Na meko nini okoki kotyela Yehova motema? Okoki kotyela ye motema mobimba! Ata soki obungisi bomoi na yo sikawa mpo ete ozali kosalela ye, akozongisela yo bomoi ya malamu koleka nsima ya lisekwa. Yesu andimisi biso ete: “Ntango ekoya wana nyonso bazali kati na [nkunda ya ekaniseli, NW] [elingi koloba kati na makanisi ya Nzambe] bakoyoka mongongo na ye, mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Oyebi monganga moko, mokonzi moko ya politiki, moto moko ya siansi, moto ya mombongo, to moto mosusu nyonso oyo akoki kosala likambo yango? Lisolo ya makambo oyo basilá kosala emonisi ete bakoki kosala yango te. Nzokande, Yehova akoki, mpe akosala yango!

Mikolo malamu mizali koya mpo na basembwi

14. Bomoi kitoko nini Liloba ya Nzambe elaki mpo na basembwi?

14 Yesu amonisaki ete mokili ya sika na nse ya Bokonzi ya Nzambe ezali likambo oyo ekosalema solo. Alobaki ete: “Esengo na basɔkɛmi, mpamba te bakosangola mabelé.” (Matai 5:5, NW) Yango endimisaki elaka ya Nzambe ezwami na Nzembo 37:29 ete: “Bayengebeni bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” Mpe liboso ete Yesu akufa, ntango mosali na mabe amonisaki kondima epai na ye, Yesu alobaki na moto wana ete: “Okozala na ngai kati na Paladiso.” (Luka 23:43) Ɛɛ, lokola Mokonzi oyo akoyangela kati na Bokonzi ya Nzambe, Yesu akosekwisa moto yango mpo na bomoi awa na mabelé mpe akopesamela libaku ya kozala na bomoi ya seko na Paladiso wana. Lelo oyo, baoyo bazali kondima Bokonzi ya Yehova bakoki mpe kolikya kozala na bomoi na Paladiso ntango “[Nzambe] akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te.”​—Emoniseli 21:4.

15, 16. Mpo na nini bomoi ekozala na kimya na mokili ya sika?

15 Tiká ete tómona na miso na biso ya makanisi ete tofandi na mokili wana ya sika. Kanisá ete tozali sikawa mpenza kofanda kati na mokili yango. Mbala moko, tozali mpenza komona na bisika nyonso bato ya esengo bafandi esika moko na kimya ya solosolo. Bazali kosepela na makambo lokola oyo elobelami na Yisaya 14:7: “Mokili mobimba ezali na kimya mpe na nyɛɛ; babandi koyemba.” Mpo na nini bazali na ezalela yango? Mpo na ntina moko, talá, bikuke ya ndako bizali na fungola te. Yango ezali na ntina te, mpamba te koboma bato to mobulu ezali te. Ezali se lokola Liloba ya Nzambe esakolaki ete: “Bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse na miwiti na ye mpe na nzete na ye na mosuke, moto moko akobangisa bango te.”​—Mika 4:4.

16 Bitumba mpe ezali lisusu te, mpamba te na mokili yango ya sika, etumba epekisami. Mandoki nyonso ebongolami bisaleli ya kimya. Na ndimbola na yango ya moboko, Yisaya 2:4 esili kokokisama ete: “Bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mazala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.” Kasi, toyebaki ete ekozala bongo! Mpo na nini? Mpamba te bafandi mingi ya mokili ya sika bayekolaki kosala yango ntango bazalaki kosalela Nzambe na mokili ya kala.

17. Bomoi ekozala ndenge nini na nse ya Bokonzi ya Nzambe?

17 Likambo mosusu ozali komona ezali ete bobola ezali te. Moto moko te afandi na mwa epɔtu ya ndako etondá na bosɔtɔ to alati bilamba epasukapasuka to mpe azangi ndako. Moto nyonso azali na ndako malamu mpe lopango ya pɛto na banzete kitoko mpe bafololo. (Yisaya 35:1, 2; 65:21, 22; Ezekiele 34:27) Mpe nzala ezali lisusu te mpamba te Nzambe akokisi elaka na ye ete bilei bikotonda mɛkɛ mpo na bato nyonso: “Masangu makotonda na mabelé; kofuluka ekozala likoló ya ngomba.” (Nzembo 72:16, NW) Ya solo, na nse ya litambwisi ya Bokonzi ya Nzambe, paladiso ya nkembo ezipi mabelé mobimba, se lokola Nzambe akanaká kalakala na Edene.​—Genese 2:8.

18. Kati na mokili ya sika, makambo nini makobangisa lisusu bato te?

18 Ozali mpe kokamwa na makasi ya nzoto oyo moto nyonso azali na yango. Ezali boye mpamba te bazali sikawa na nzoto mpe makanisi ya kokoka. Maladi, mpasi, to liwa ezali lisusu te. Moto moko te azali kotambola na kiti ya babɛli to alali na mbeto ya lopitalo. Nyonso wana esili mpo na libela. (Yisaya 33:24; 35:5, 6) Ɛɛ, nyama moko te ezali lisusu kobangisa, mpamba te nyonso ekómi kimya na nguya ya Nzambe!—Yisaya 11:6-8; 65:25; Ezekiele 34:25.

19. Kati na mokili ya sika, mpo na nini mokolo na mokolo ekozala ya ‘kosepela’?

19 Basembwi oyo bafandi na mokili yango ya sika basali mpenza lisangani kitoko! Nguya na bango, makoki na bango, mpe bozwi ya mabelé ezali kosalelama mpo na mikano ya malamu, kasi ya mabe te; mpo na kosalana na basusu, kasi mpo na kowelana na bango te. Mpe moto nyonso oyo okutani na ye okoki kotyela ye motema, lokola Nzambe alakaki, banso bazali ‘bato balakisami na Yehova.’ (Yisaya 54:13) Lokola moto na moto atambwisami na mibeko ya Nzambe, mabelé ‘matondi na boyebi ya Yehova lokola mbonge ekozipaka mai-na-monana.’ (Yisaya 11:9) Ya solo, kati na mokili oyo ya sika mokolo na mokolo, lokola Nzembo 37:11 esakolaki, ezali mokolo ya ‘kosepela.’

Bomoi ya esengo na mikolo mizali koya epesameli ndanga

20. Tosengeli kosala nini mpo na kozala na bomoi ya malamu na mikolo mizali koya?

20 Tosengeli kosala nini mpo na kozala na bomoi wana ya esengo na mikolo mizali koya? Yisaya 55:6 eyebisi biso ete: “Bóluka [Yehova] naino akoki komonana, bóbyanga ye naino abɛlɛmi penepene.” Mpe wana tozali koluka, makanisi na biso masengeli kozala lokola emonisami na Nzembo 143:10: “Lakisá ngai ete nasala mokano na yo mpo ete yo ozali Nzambe na ngai.” Baoyo bazali kosala bongo bakoki kotambola na kozanga ekweli na miso ya Yehova na mikolo oyo ya nsuka mpe bakoki kolikya bomoi malamu mpo na mikolo mizali koya. “Talá moto na sembo mpe kotika kotala moyengebene te; mpamba te bomoi ya moto yango ekozala na kimya na mikolo mizali koya. Kasi babuki na mibeko bakolongolama elongo; bomoi ya bato mabe ekolongolama.”​—Nzembo 37:37, 38, NW.

21, 22. Nzambe azali kobongisa nini sikawa, mpe kobongisama yango ezali kosalema ndenge nini?

21 Sikawa Yehova azali kobyanga baoyo balingi kosala mokano na ye kati na mabota nyonso. Azali kobongisa bango mpo na kozala moboko ya libota ya mokili ya sika, lokola esakweli ya Biblia eyebisaki ete: “Na mikolo na nsuka [mikolo oyo tozali na yango lelo oyo] . . . , bikólo mingi bakokende mpe bakoloba ete, Yakani, tóbuta na ngomba na [Yehova] [losambo na ye ya solo oyo etombwani] . . . ete alakisa biso nzela na ye mpe ete tótambola na bipai bikokendaka ye.”​—Yisaya 2:2, 3.

22 Emoniseli 7:9 emonisi bato yango lokola “ebele monene . . . bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, na minɔkɔ nyonso.” Vɛrsɛ 14 elobi ete: “Bazali baoyo babimi na [bolɔzi, NW] monene,” babiki na nsuka ya ebongiseli oyo. Moboko yango ya mokili ya sika esangisi sikawa bato pene na milio motoba, mpe mingi bazali kobakisama mbula na mbula. Basaleli nyonso wana ya sembo ya Yehova bazali kolakisama mpo na bomoi kati na mokili na ye ya sika. Bazali koyekola makoki ya elimo mpe makambo mosusu masengeli mpo na kobongola mabelé oyo ete ekóma paladiso. Mpe bazali kotya motema mobimba ete Paladiso ekosalema solo mpamba te “ye oyo epesaki elaka azali sembo.”​—Baebele 10:23.

Bozongeli

◻ Na ekeke ya liboso, kozanga kondima ebotaki mbuma nini?

◻ Na meko nini basaleli ya Nzambe bakoki kotyela ye motema?

◻ Basembwi bakozala na bomoi ya lolenge nini na mikolo mizali koya?

◻ Tosengeli kosala nini mpo na kozala na bomoi ya esengo na mikolo mizali koya kati na mokili ya sika ya Nzambe?

[Elilingi na lokasa 18]

Sikawa Yehova azali kobongisa moboko ya bafandi na mabelé ya sika

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto