Nakendaki na teritware mosusu ntango nakómaki na mbula 80
LISOLO YA GWENDOLINE MATTHEWS
Ntango nakómaki na mbula 80, ngai na mobali na ngai tozwaki ekateli ya kokangisa biloko na biso nyonso kokɔtisa yango na motuka ya kofutela mpe tolongwaki na ekólo Angleterre mpo na kokende na ekólo Espagne. Toyebaki koloba Espagnole te, mpe tozalaki kokende na sudi-wɛsti ya ekólo Espagne, mboka ya mosika na boye ete baturiste oyo balobaka Lingelesi bakendaka kuna mingi te. Baninga na biso mingi bakanisaki ete tozwi ekateli ya mayele te, kasi namikundolaki na esengo ete Abalayama azalaki na mbula 75 ntango atikaki Ulu, mboka na ye.
BAMBULA oyo tosili kolekisa na Espagne uta tokómaki awa na sanza ya Apríli 1992 epesi bomoi na biso mbano mingi. Kasi liboso ete nalimbola mpo na nini tolongwaki na Angleterre, tiká naino nayebisa bino lolenge bomoi na biso na mosala ya Yehova ememaki biso na kozwa ekateli monene motindo wana.
Solo ya Biblia ebongoli bomoi na biso
Nakolaki na libota oyo bato bamipesaki mingi na makambo ya losambo na sudi-wɛsti ya engumba Londres, na ekólo Angleterre. Mama azalaki komema ngai na leki na ngai ya mwasi na bisika bikeseni ya losambo, mpamba te azalaki koluka esika akosepela na makambo ya elimo. Tata na ngai, azalaki na maladi ya ntolo oyo eumelá, azalaki kokende na biso te. Kasi azalaki motángi monene ya Biblia, mpe azalaki kotya yango mikɔlɔtɔ na esika nyonso oyo azalaki kokuta mokapo oyo epesaki ye engɛngiseli. Moko na biloko na ngai ya motuya ezali Biblia wana oyo Tata azalaki kosalela mingi, mpe ezalaki na motuya monene na miso na ye.
Na 1925, wana nazalaki na mbula 14, batyaki trakte moko na nse ya ekuke ya ndako na biso, trakte yango ezalaki kobyanga biso ete tókende koyoka lisukulu moko oyo ekosalema na ndako ya makita ya West Ham na engumba Londres. Mama na moninga na ye moko ya pembeni bazwaki ekateli ya kokende koyoka lisukulu, mpe ngai na leki na ngai ya mwasi tokendaki na bango elongo. Lisukulu yango oyo ezalaki na moto na likambo ete “Bamilio ya bato oyo bazali lelo na bomoi bakokufa te,” elonaki mbóto ya solo ya Biblia na motema ya mama.
Mwa basanza na nsima, Tata akufaki wana azalaki na mbula 38. Liwa na ye etungisaki biso mingi, mpamba te atikaki biso na mitema mitutami mpe na bobola. Na misa ya bawei oyo esalemaki na ndakonzambe ya Lingomba ya Angleterre, mama asepelaki te ntango sango alobaki ete molimo ya Tata ekendaki na likoló. Ayebaki oyo Biblia elobi ete bakufi bazali kolala kati na nkunda, mpe azalaki na endimiseli makasi ete mokolo mosusu Tata akosekwa mpo na bomoi ya seko awa na mabelé. (Nzembo 37:9-11, 29; 146:3, 4; Mosakoli 9:5; Misala 24:15; Emoniseli 21:3, 4) Lokola andimisamaki ete asengeli kosangana na bato oyo bazali koteya Liloba ya Nzambe, azwaki ekateli ya kosala boninga na Bayekoli ya Biblia, lolenge Batatoli ya Yehova bazalaki kobéngama na eleko wana.
Lokola tozalaki na mbongo te mpo na kofuta motuka, pɔsɔ na pɔsɔ tozalaki kotambola na makolo ngonga mibale mpo na koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova. Na nsima ya makita, tozalaki kotambola lisusu ngonga mibale mpo na kozonga na ndako. Kasi tozalaki kotalela makita yango na motuya mingi, na boye ete tozangisaki ata likita moko te, ata ntango londende makasi ezalaki kozipa engumba Londres. Mosika te mama azwaki ekateli ya komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo, mpe na 1927, ngai mpe nazwaki batisimo.
Atako tozalaki na mikakatano na ntina na mosolo, mama azalaki ntango nyonso koteya ngai ete natya matomba ya elimo na esika ya liboso. Matai 6:33 ezalaki moko na mikapo alingaki mingi, mpe azalaki solo ‘koluka liboso bokonzi.’ Na 1935, mama akufaki mpenza mobesu na maladi ya kanser, wana azalaki komibongisa mpo na kondima libyangi ya kosala mosala ya ntango nyonso, oyo mbɛlɛ akendaki kosala yango na ekólo France.
Bandakisa oyo elendisaki biso
Na bambula wana ya ebandeli, bato mosusu oyo bazalaki koyangana na makita na engumba Londres balingaki koteya makanisi na bango moko, mpe bato yango babimisaki kowelana mpe matata. Kasi, Mama azalaki ntango nyonso koloba ete ekozala sembo te kotika lisangá ya Yehova na kotaleláká makambo nyonso oyo tosilaki koyekola na lisalisi na yango. Boyei ya Joseph Rutherford oyo azalaki prezida ya Société Watch Tower na ntango wana, elendisaki biso ete tókoba kosalela Nzambe na bosembo.
Nazali komikundola ete Ndeko Rutherford azalaki na boboto, mpe moto nyonso akokaki kosolola na ye na bolɛmbu. Ntango nazalaki naino elenge, lisangá ya Londres esalaki mobembo ya kominanola ye mpe azalaki wana. Amonaki ngai—nazalaki elenge ya mwa nsɔninsɔni—nazalaki na masini ya kokanga fɔtɔ mpe atunaki ngai soki nakolinga kokanga ye fɔtɔ. Fɔtɔ yango ekómá eloko oyo nabosanaka te mpe nalingaka yango mingi.
Na nsima, nakutanaki na likambo moko oyo emonisaki bokeseni kati na bato oyo bazali kokamba lisangá ya boklisto na bakonzi ya mokili. Nazalaki mwana-mosala na ndako moko monene na engumba Londres epai Franz von Papen, moko ya batindami ya Hitler abyangamaki kolya na midi. Aboyaki kolongola mopanga na ye oyo alataki na loketo na ntango azalaki kolya, mpe natutaki yango, bongo supu oyo namemaki esopanaki likoló na yango. Alobaki na nkanda nyonso ete na Allemagne kozanga bokɛngi motindo wana elingaki komema ngai na kobomama na mondoki. Kino basilisaki kolya, nabɛlɛmaki lisusu pene na ye te!
Na 1931, liyangani moko monene esalemaki na Alexandra Palace, epai nayokaki lisukulu ya Ndeko Rutherford. Kuna, na esengo nyonso tondimaki nkombo na biso ya sika, Batatoli ya Yehova. (Yisaya 43:10, 12) Mbula mibale na nsima, na 1933, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela, lolenge tobéngaka mosala ya ntango nyonso. Lipamboli mosusu namikundolaka na bambula wana ezalaki boninga nasalaki na bilenge mibali ya bizaleli malamu oyo na nsima bakómaki bamisionere na bamboka mosika na nsuka ya mokili. Kati na bango ezalaki bongo Claude Goodman, Harold King, John Cooke, mpe Edwin Skinner. Bandakisa oyo ya bosembo epesaki ngai mposa ya kosala na mboka mopaya.
Mosala ya mobongisi-nzela na ɛsti ya Angleterre
Teritware na ngai mpo na mosala ya mobongisi-nzela ezalaki na ɛsti ya Angleterre, mpe esengelaki kozala na mɔ́tɔ mpe molende mpo na kosakola kuna. Lokola teritware na biso ezalaki monene mpenza, mpo na kosakola, tozalaki kotambola na velo longwa na engumba moko kino engumba mosusu mpe longwa na mboka moko kino na mboka mosusu mpe tozalaki kofanda na bandako ya kofutela. Kuna masangá mazalaki te, na yango, ngai na moninga na ngai, bobele biso mibale tozalaki kotalela biteni nyonso ya makita oyo mabongisamaki mpo na pɔsɔ. Na mosala na biso ya kosakola, tokabolaki bankóto ya mikanda mpe mwa babuku oyo elimbolaka mikano ya Nzambe.
Nabosanaka te mokolo oyo tokendaki kotala mokonzi moko ya Lingomba ya Angleterre na ndako na ye na mboka moko. Na bisika mingi, tozalaki kosolola na bakonzi ya Lingomba ya Angleterre na nsuka mpenza, mpamba te mbala mingi bazalaki kobimisela biso mikakatano soki bayebi ete tozali koteya nsango malamu na etúká yango. Kasi na mboka moke wana moto nyonso azalaki koloba malamu na ntina na mokonzi yango ya Lingomba. Azalaki kotala babɛli, azalaki kodefisa baoyo bazalaki kolinga kotánga mikanda, mpe azalaki kutu kokende na bandako kotala bato ya lingomba na ye mpo na kolimbwela bango Biblia.
Solo mpenza, ntango tokendaki kotala ye, azalaki na boboto mingi, mpe azwaki babuku mingi oyo topesaki ye. Ayebisaki biso lisusu ete soki moto moko kati na mboka asepelaki kozwa babuku na biso kasi azangaki makoki mpo na kosomba, ye akofutela ye mosolo. Toyokaki ete makambo ya nsɔmɔ oyo amonaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba epesaki ye ekateli ya kolendisa kimya mpe bolingi malamu kati na parwasi na ye. Liboso ya kokabwana na ye atombelaki biso mapamboli mpe alendisaki biso ete tókoba mosala na biso ya malamu. Maloba ya nsuka alobaki na biso ntango tokabwanaki ezalaki oyo ezwami na Mituya 6:24 ete: “Nkolo apambola yo, mpe abatela yo.”—King James Version.
Nabandaki mosala ya mobongisi-nzela mbula mibale nsima ya liwa ya mama, mpe nazongaki na Londres wana nazalaki na mosolo te mpe natikalaki bobele ngai moko. Moninga moko Motatoli moto ya ekólo Écosse akamataki ngai mpo na kofanda na ndako na ye, asungaki ngai liboso ya mokakatano na liwa ya mama, mpe alendisaki ngai ete nakoba mosala ya ntango nyonso. Na bongo, nazongaki na ɛsti ya Angleterre elongo na Julia Fairfax, moninga ya sika ya mosala ya mobongisi-nzela. Tobongisaki wago moko ya kala oyo tosalelaki lokola ndako; tozalaki kobenda yango na nsima ya motuka monene wana tozalaki komema yango na esika moko kino na esika mosusu. Elongo na mibange mibale mwasi na mobali, Albert na Ethel Abbott, oyo bazalaki mpe na wago ya moke, tokobaki mosala ya kosakola. Albert na Ethel bakómaki lokola baboti na ngai.
Wana nazalaki mobongisi-nzela na etúká ya Cambridgeshire, nakutanaki na John Matthews, ndeko moklisto na bizaleli malamu oyo asilaki komonisa bosembo na ye epai ya Yehova na bileko ya mpasi. Tobalanaki na 1940, mwa moke nsima ya ebandeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.
Eleko ya etumba mpe libota
Ntango tozalaki naino babalani ya sika, ndako na biso ezalaki mwa wago moke na bonene ya mwa kuku moke, mpe tozalaki kosalela tukutuku mpo na kobima na mosala ya kosakola. Mbula moko nsima ya kobalana, John azwaki etumbu ya kokende kosala na ferme, mpamba te aboyaki kosala mosala ya soda na ntina na bindimeli na ye bitongami na Biblia. (Yisaya 2:4) Atako yango etyaki nsuka na mosala na biso ya mobongisi-nzela, etumbu ya John emonanaki ete ezalaki ngɔlu mpamba te nakómaki na zemi mpe akokaki kosunga biso na mosolo.
Na boumeli ya bambula ya etumba, tozalaki kosepela na makita ya sipesiale oyo ezalaki kosalema atako mikakatano mizalaki. Na 1941, wana nazalaki na zemi ya mwana na biso ya liboso, ngai na John tokendeki na engumba Manchester na tukutuku na biso, na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 300. Na nzela, tozalaki koleka ebele ya bingumba bibebisami na babombi, mpe tozalaki komituna soki likita yango ekosalema na kati ya ezaleli motindo wana. Likita esalemaki. Batatoli ya Yehova bautaki na bisika mingi ya Angleterre batondaki na ndako ya likita ebéngami Free Trade Hall, mpe tolandaki manaka mobimba kino na nsuka.
Na nsuka ya lisukulu na ye, molobi ya nsuka ayebisaki bayangani ete tosengeli kobima mpe kolongwa nokinoki na zingazinga ya ndako ya likita, mpamba te babombi elingi kobwakama. Likebisi epesamaki mpenza na ntango ebongi. Tokómaki mosika te ntango toyokaki lokito ya mandoki oyo bazalaki kobɛta mpɛpo mpe lokito ya babombi oyo mpɛpo ezalaki kobwaka. Wana totalaki nsima, tomonaki ebele ya mpɛpo kobwaka babombi na engumba. Na mosika, tomonaki ndako oyo touti kofanda eleki naino miniti mingi te ezali kopela mpe etondi na milinga; ebebisamaki nyɛɛ! Likambo ya esengo, moko te kati na bandeko na biso baklisto akufaki.
Wana tozalaki kobɔkɔla bana na biso, tokokaki te kosala mosala ya mobongisi-nzela, kasi tobongisaki ndako na biso mpo na koyamba bakɛngɛli-batamboli mpe babongisi-nzela oyo bazangaki bisika ya kofanda. Na libaku moko, babongisi-nzela motoba bafandaki na ndako na biso na boumeli ya mwa basanza. Na ntembe te kosangana na bato motindo oyo ezalaki ntina oyo Eunice, mwana na biso ya mwasi aponaki kobanda mosala ya mobongisi-nzela na 1961 wana azalaki na mbula 15. Likambo ya mawa, mwana na biso ya mobali, David, alandaki kosalela Yehova te ntango akolaki, mpe mwana na biso ya mwasi, Linda, akufaki liwa ya nsɔmɔ na boumeli ya etumba.
Ekateli na biso ya kokende na Espagne
Ndakisa ya mama mpe elendiseli na ye elamwisaki epai na ngai mposa ya kozala misionere, mpe nabosanaka soko moke te mokano wana. Na yango, na 1973, tozalaki na esengo ntango Eunice atikaki Angleterre mpo na kokende na Espagne epai bosɛnga ya basakoli ya Bokonzi ezalaki monene. Ya solo, toyokaki mawa komona ye kokende, kasi lisusu epesaki biso lokumu mpamba te asepelaki kosalela Nzambe na mboka mopaya.
Na boumeli ya bambula tozalaki kokende kotala Eunice, mpe toyebaki ekólo Espagne malamu. Ɛɛ, ngai na John tokendaki kotala ye na teritware minei ekeseni epai asalaki mosala ya mobongisi-nzela. Na nsima, lokola bambula ezalaki koleka, makasi ya nzoto na biso ebandaki kosila. John akweaki mpe yango epesaki bokolɔngɔnɔ ya nzoto na ye mikakatano mingi, mpe ngai nazalaki na mitungisi ya motema mpe na mongongo. Longola makambo wana, biso mibale tozalaki kotungisama na mpasi ya mikuwa. Atako tozalaki mpenza na mposa ya lisungi ya Eunice, tolingaki te ete atika mosala na ye mpo na kobatela biso.
Toyebisaki Eunice makanisi na biso, mpe tobondelaki mpo na kozwa litambwisi. Andimaki kozonga na Angleterre mpo na kosalisa biso, kasi tozwaki ekateli ete malamu ngai na John tókende kofanda esika moko na ye na Espagne. Soki nakokoka te kozala misionere, atako bongo, nakoki kosalisa mwana na ngai mpe baninga na ye mibale na mosala ya mobongisi-nzela. Uta ntango yango, ngai na John totalelaka Nuria na Ana, baninga mibale oyo bazali kosala mosala ya mobongisi-nzela elongo na Eunice uta pene na mbula 15, ete bazali bana na biso ya basi. Mpe basepelaki kofanda na biso elongo ezala esika nini batindi bango kosala mosala ya Nzambe.
Mbula koleka motoba esili koleka uta tozwaki ekateli wana. Bokolɔngɔnɔ ya nzoto na biso ebebi mingi te, mpe bomoi na biso ekómi mpenza na esengo. Nazali naino na likoki ya koloba Espagnole malamu te, kasi yango epekisi ngai te kosakola nsango malamu. Ngai na John tozali komiyoka lokola tozali na mboka na biso kati na lisangá ya Extremadura, na sudi-wɛsti ya Espagne.
Bomoi na Espagne eteyi ngai makambo mingi na ntina na mosala na biso ya kosakola Bokonzi na mokili mobimba, mpe nasosoli polele maloba ya Yesu oyo alobaki ete, “elanga ezali mokili.”—Matai 13:38.
[Bililingi na lokasa 28]
Na mosala ya mobongisi-nzela na bambula ya 1930