Mabelé masalemá mpo na nini?
Ezali na motuna moko oyo osengeli kotalela: Etando kitoko oyo esalemá nde na Mozalisi ya mayele oyo azalaki na mokano mpo na mabelé mpe mpo na bato oyo bafandi wana? Eyano malamu na motuna wana ekoki kosalisa yo oyeba soki mabelé makozala ndenge nini na mikolo mizali koya.
BATO mingi ya siansi oyo bayekoli molɔ́ngɔ́ mpe mabelé na bozindo bamoni bilembeteli oyo bilakisi ete ezali na Mozalisi na yango. Nzambe nde asalaki biloko wana nyonso. Talá maloba oyo moko na bato yango alobaki:
Kati na buku The Mind of God (Makanisi ya Nzambe), profesere Paul Davies akomi ete: “Lokola molɔ́ngɔ́ ezali na mobulu te, ezali na biloko ndenge na ndenge bibongisami malamu mpe bizali alima, emonisi ete ezali na mibeko mpe bibongiseli ya sipesiale.”
Nsima ya kolobela “kokokana” ndenge na ndenge oyo ba astrophysiciens mpe bato mosusu ya siansi bamonaki, profesere Davies abakisi ete: “Nyonso wana, ezali elembeteli ya polele ete bomoi, na ndenge toyebi yango, esimbami mingi mpenza na lolenge ya mibeko ya fizike, mpe na mwa mituya ya sikisiki oyo miponamaki mpo na makambo lokola masse, résistance, mpe bongo na bongo, ya biloko ndenge na ndenge, mituya oyo emonanaka lokola ete eponamaki yango moko. . . . Tokoki koloba ete, soki tokamati esika ya Nzambe, mpe toponi mituya ya biloko yango kozanga kokanisa, lokola ete tozali kofinafina babutɔ, tokomona ete ezala ndenge nini tokosala, na nsuka ekobimisa molɔ́ngɔ́ oyo bato bakoki kofanda na yango te. Ntango mosusu emonanaka lokola ete esengelaki kofina babutɔ ndenge na ndenge mpe koyokanisa yango na bosikisiki mpenza mpo ete molɔ́ngɔ́ ezala na lolenge oyo esengeli kopesa nzela ete bikelamu ya bomoi bibotana. . . . Na komona ete ata mbongwana moke na lolenge oyo biloko bibongisami ekoki kobongola molɔ́ngɔ́ mobimba, likambo yango ezali na ndimbola monene.”
Mpo na bato mingi, elimboli ete mabelé, mpe biloko mosusu oyo bizali na molɔ́ngɔ́, bisalemaki na Mozalisi oyo azalaki na mokano. Soki ezali bongo, tosengeli koluka koyeba mpo na nini asalaki mabelé na ebandeli. Soki likoki ezali, tosengeli mpe koluka koyeba mokano na ye ezali nini mpo na mabelé. Ezali na likambo moko ya kokamwa oyo ezali komonana. Atako bato oyo bakanisaka ete Nzambe azali te bakómi mingi, ebele ya bato bazali naino kondima ete ezali na Mozalisi moko oyo azali na mayele. Mangomba mingi ya boklisto malobelaka mpenza Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso mpe Mozalisi ya molɔ́ngɔ́. Kasi, moko te kati na mangomba yango elobelaka na elikya mpe na kondimisama nyonso soki mabelé ezali na esika nini kati na mokano ya Nzambe mpo na mikolo mizali koya.
Biblia elobi nini?
Ebongi mpenza ete tóluka kati na mokanda oyo endimami na bato mingi ete euti epai ya Mozalisi. Mokanda yango ezali bongo Biblia. Mosakoli 1:4 ezali moko na mikapo oyo eyebisi na maloba ya pɛtɛɛ mpe ya polele lolenge oyo mabelé makozala na mikolo mizali koya. Tozali kotánga boye: “Libota moko bakolimwa mpe libota mosusu bakoya nde [mabelé makoumela, NW] seko.” Biblia emonisi polele ntina oyo Yehova Nzambe azalisaki mabelé. Emonisi mpe ete kati na molɔ́ngɔ́, atyaki mabelé yango na esika oyo ebongi mpenza mpe na ntaka malamu oyo ekaboli yango na moi mpo na kobatela bikelamu ya bomoi oyo bizali awa na mabelé. Yisaya, mosakoli ya ntango ya kala oyo apemamaki na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso akomaki ete: “[Yehova] alobi boye, ye oyo asalaki lola, ye azali Nzambe, ye oyo atongaki mokili mpe asalaki yango; ye akokisaki yango, asalaki yango eloko na mobulu te, atongaki yango ete bato báfanda wana; ye ete, Ngai nazali [Yehova], mosusu azali te.”—Yisaya 45:18.
Kasi, ezali boni mpo na biloko oyo bato bazali kosala, biloko oyo bikoki koboma bikelamu nyonso ya bomoi awa na mabelé? Na mayele na ye ezangi nsuka, Nzambe alobi ete akotika te ete básilisa koboma bikelamu nyonso ya bomoi na mokili oyo. Talá elaka oyo ezali kobɔndisa ezwami na mokanda ya nsuka ya Biblia, elingi koloba Emoniseli: “Mabota bangalaki, nde nkɛlɛ na yo eyaki, mpe elaka na kosambisa bakufi ekómi, mpe elaka na kopesa libonza na basakoli baombo na yo mpe na bapɛtwi mpe na bango babangi nkombo na yo, na bato mike na bato minene, mpe elaka na kobebisa babebisi na mokili.”—Emoniseli 11:18.
Yehova amonisi biso mokano oyo azalaki na yango na ebandeli ntango azalisaki mabelé to “biju kati na molɔ́ngɔ́,” ndenge astronote moko oyo atambolaki zingazinga ya mabelé abéngaki yango. Nzambe akanaki ete mabelé mobimba mázala paladiso, epai bato—mibali mpe basi—basengelaki kofanda malamu, na kimya mpe na boyokani. Abongisaki makambo na boye ete na ebandeli, apesaki babalani ya liboso likoki ya kobota bana mpe bango basengelaki kobotana mokemoke kino kotondisa mabelé mobimba. Mpo na bolamu mpe esengo ya babalani ya liboso, Yehova asalaki paladiso na mwa eteni moke ya mabelé. Ntango bato balingaki kobotana na boumeli ya bambula mpe bikeke, elanga ya Edene elingaki mpe kobanda koya monene mokemoke kino kokokisama ya Genese 1:28: “Nzambe alobelaki bango ete, Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nse na bino.”
Lokola lelo oyo tozali komona kobeba ya mabelé mpe bwale ya bafandi na yango, elingi nde koloba ete mokano oyo Nzambe azalaki na yango na ebandeli mpo na mabelé elongi te? To abongolaki mokano na ye mpe azwaki ekateli ete lokola bato bazali motó makasi, akotika ete etando oyo mobimba ebebisama nyɛɛ mpe abandela lisusu makambo? Te, tokoki kondimisama ete moko te kati na makambo yango ezali bongo. Biblia eyebisi biso ete nyonso oyo Yehova akani, nsukansuka esengeli kokokisama, likambo oyo ye alingi kosala ekoki kobebisama na moto moko te to makambo mosusu oyo makoki kobima na mbalakaka. Andimisi biso ete: “Boye na liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai; ekobutwa epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolonga na likambo litindaki ngai yango.”—Yisaya 55:11.
Mokano ya Nzambe etɛlɛmaki, kasi ebongwanaki te
Ntango Adama na Eva babebisaki mpe Nzambe abenganaki bango na elanga ya Edene, emonanaki polele ete Nzambe alingaki kokokisa mokano na ye ya kosala paladiso awa na mabelé ata soki bango bazali te. Nzokande, na ntango wana, Yehova amonisaki ete bamoko kati na bakitani na bango bakokokisa etinda na ye oyo apesaki na ebandeli. Ya solo, yango esengelaki kozwa ntango mingi, ata bikeke mingi, kasi eyebisami te soki ntango boni esengelaki koleka mpo na kokómisa mabelé mobimba paladiso ata soki Adama na Eva bakobaki na bomoi ya kokoka. Likambo yango oyo, na nsuka ya boyangeli ya mbula nkóto ya Klisto Yesu—etikali mwa moke koleka mbula nkóto kobanda sikawa—Paladiso lokola Edene ekozala na mabelé mobimba mpe mabelé makotonda na bakitani ya babalani ya liboso, bakofanda na kimya mpe na esengo. Ɛɛ, makoki oyo Yehova azali na yango lokola Mobandisi ya mikano oyo akweaka te, ekolongisama mpo na libela!
Na ntango wana, bisakweli kitoko oyo Nzambe apemisaki uta kalakala bikokokisama. Makomami lokola Yisaya 11:6-9 ekokokisama na nkembo ete: “Nyama na yauli akofanda elongo na mwana na mpate, mpe nkoi akolala elongo na mwana na ntaba; mwana na ngɔmbɛ mpe nkosi mpe nyama na mafuta bakozala elongo mpe mwana moke na moto akokamba bango. Ngɔmbɛ mpe ngombolo bakolyaka elongo, bana na bango bakolala esika moko; nkosi akolya matiti lokola ngɔmbɛ. Mwana-monungi akosana na libulu na etupa mpe mwana oyo akilisami mabɛlɛ akotya lobɔkɔ na ye na esika na nyoka. Bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba na bulɛɛ na ngai; zambi mokili ekotonda na boyebi na [Yehova] lokola mbonge ikozipaka mai-na-monana.”
Mpasi mpe maladi oyo ebomaka ekozala lisusu te, liwa yango moko mpe ekozala lisusu te. Ezali nde na maloba oyo makoki kolimbola yango polele koleka maloba oyo ya pɛtɛɛ mazwami na mokanda ya nsuka ya Biblia? “Efandelo na Nzambe ezali na bato esika moko. Akofanda na bango esika moko, mpe bango bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”—Emoniseli 21:3, 4.
Ɛɛ, tokoki kolendisama—mabelé, etando na biso kitoko ekotikala libela. Tiká ete yo mpe ozala na libaku malamu ya kobika na nsuka ya ebongiseli ya biloko mabe oyo na misala na yango mizali kobebisa mabelé. Mokili ya sika epɛtolami oyo Nzambe akosala ekómi pene. Mpe balingami na biso mingi bakolamuka na kufa na likamwisi ya lisekwa. (Yoane 5:28, 29) Ya solo, mabelé makotikala libela, biso mpe tokoki kotikala mpe kozala na bomoi kati na yango.