Yesu Mokonzi “Oyo ebandeli na ye ezalaki kalakala”
MOTEMA ezali kobɛta wana ozali kozela ndeko na yo moko oyo bomonanaka lisusu te uta kala. Nsukansuka, akómi mpe oyambi ye na esengo. Ozali koyoka ye na likebi wana azali koyebisa yo ntina oyo tata na ye atindi ye epai na yo. Mosika te, ntango ekoki mpo ete azonga epai na ye. Na mawa nyonso, otombeli ye bozongi malamu. Mawa oyokaki ekiti mwa moke ntango oyoki nsango ete akómaki malamu na bozongi na ye.
Na nsima, ntango ozali koluka na mikanda ya kala, omoni nkoma oyo ezali kolobela makambo minene ndeko na yo asalaki liboso ete aya kotala yo. Makambo elobami na nkoma wana epesi yo bososoli ya bomoi mpe misala na ye ya kala mpe ebakisi bosepeli na yo mpo na botali na ye mpe mosala oyo azali kosala sikawa.
“Ezalaki kalakala”
Kati na mikanda ya kala oyo Bayuda na ekeke ya liboso bazalaki na yango, ezalaki na makomi ya mosakoli Mika, oyo ekomamaki pene na mbula nkama nsambo liboso. Makomi yango emonisaki na bosikisiki esika oyo Masiya akobotama. “Yo, Beteleme Efelata, ozali moke kati na mabota ya Yuda; uta na yo moko akobima mpo na ngai oyo akozala mokóló-na-mokili kati na Yisalaele; ebandeli na ye ezalaki kalakala, longwa na mikolo na liboso.” (Mika 5:2) Na kokokisama ya maloba wana, Yesu abotamaki na Beteleme, mboka moke ya Yuda, na eleko oyo tobéngaka lelo mobu 2 L.T.B. Kasi ndenge nini ebandeli na ye ekoki kozala uta “kalakala”?
Yesu azalaki na bomoi liboso ete abotama lokola moto. Kati na mokanda oyo atindelaki baklisto ya Kolose, ntoma Paulo alobaki na ntina na Yesu ete azali “elilingi na Nzambe, oyo akomonanaka te, Mobotami na liboso na biloko nyonso bizalisami.”—Bakolose 1:15.
Yehova, Liziba ya mayele, azalisaki mwana na ye ya liboso, ‘liboso na misala na ye na kala,’ engebene maloba mapemami oyo Mokonzi Salomo akomaki na mokanda ya Masese. Nsima ya mwa ntango mokuse oyo Yesu alekisaki awa na mabelé mpe kozonga na ye na likoló, amonisaki ete azalaki solo “ebandeli na bozalisi na Nzambe.” Lokola mayele oyo emonisami na motindo na moto, Yesu oyo azalaki na bomoi liboso ete abotama lokola moto alobaki ete: “Ebongisaki [Yehova] lola, ngai nazalaki wana.”—Masese 8:22, 23, 27; Emoniseli 3:14.
Uta na ebandeli, Mwana ya Nzambe azwaki mokumba moko ya ntina mingi, elingi koloba kozala “kapita-mosali” elongo na Tata na ye. Likambo yango esepelisaki Yehova mingi! Masese 8:30 elobi ete: “Mokolo na mokolo nazalaki esengo na ye.” Mpe ebakisi ete: “Kosepela liboso na ye ntango nyonso.”
Na nsima, Yehova abyangaki Mwana na ye mobotami ya liboso mpo ete asangana na kozalisama ya bato. Alobaki ete: “Tiká tózalisa moto na lolenge na biso na elilingi na biso.” (Genese 1:26) Mpo na yango, bolingo ebakisamaki lisusu kati na bango. Yesu, oyo azalaki na bomoi liboso ete abotama lokola moto alimboli ete: “Esengo na ngai ezalaki kati na bana na bato.” (Masese 8:31) Na ebandeli ya Evanzile na ye, ntoma Yoane andimaki mokumba oyo Yesu akokisaki na bozalisi liboso ete abotama lokola moto, kolobáká ete: “Biloko nyonso izalisami na ye mpe soko na ye te, eloko moko ezalisami te.”—Yoane 1:3.
Molobeli ya Yehova
Maloba ya Yoane ebendi likebi likoló na libaku malamu mosusu oyo Mwana ya Nzambe azalaki na yango, elingi koloba, kozala molobeli. Uta na ebandeli azalaki kosala lokola Liloba. Na yango, ntango Yehova alobaki na Adama, mpe na nsima alobaki na Adama na Eva elongo, emonani ete asalaki yango na nzela ya Liloba. Mpe ezali na moto mosusu oyo abongi mpenza mpo na koyebisa malako ya Nzambe mpo na bolamu ya bato koleka ye oyo alingaki bango mingi?—Yoane 1:1, 2.
Liloba atungisamaki mingi ntango amonaki Eva mpe na nsima Adama kozanga botosi epai na Mozalisi na bango! Mpe ayokaki mpenza mposa makasi ya kosilisa mabe oyo kozanga botosi na bango ememelaki bakitani na bango! (Genese 2:15-17; 3:6, 8; Baloma 5:12) Epai na Satana oyo apusaki Eva na botomboki, Yehova alobaki boye: “Nakotya koyinana kati na yo mpe mwasi, kati na momboto na yo mpe momboto na ye.” (Genese 3:15, NW) Lokola amonaki makambo oyo malekaki na Edene, Liloba asosolaki ete bakoyina ye makasi lokola azali moto ya liboso kati na “momboto” ya mwasi. Ayebaki ete Satana azalaki mobomi na bato.—Yoane 8:44.
Na nsima, ntango Satana abɛtaki ntembe na ntina na bosembo ya mosembwi Yobo, Liloba ayokaki mpasi na bifundeli ya lokuta oyo abimiselaki Tata na ye. (Yobo 1:6-10; 2:1-4) Ɛɛ, na mokumba na ye lokola mokóló na baanzelu, Liloba ayebani lokola Mikaele, nkombo oyo elimboli “Nani azali lokola Nzambe?” mpe emonisi lolenge azali kolongisa Yehova liboso na bato nyonso oyo bazali komeka kokamata esika ya boyangeli ya Nzambe.—Danyele 12:1; Emoniseli 12:7-10.
Wana lisolo ya Yisalaele ezalaki kolandana, Liloba azalaki kotala milende oyo Satana azalaki kosala mpo na kopɛngwisa bato na losambo ya pɛto. Nsima ya kobima na Ezipito, Nzambe ayebisaki Bayisalaele na nzela ya Mose ete: “Talá, nakotinda [anzelu, NW] na liboso na yo ete abatela yo na nzela mpe ete akómisa yo na esika esili ngai kobongisa. Yoká ye mpe tosá monɔkɔ na ye mpe tɛmɛlá ye te, mpo ete akolimbisa nkanza na yo te, mpo ete nkombo na ngai ezali kati na ye.” (Exode 23:20, 21) Anzelu yango ezalaki nani? Emonani ete, ezali Yesu oyo azalaki na bomoi liboso ete abotama lokola moto.
Komisɔkisa na bosembo
Mose akufaki na 1473 L.T.B., mpe bakundaki ye “na lobwaku na mokili na Moaba kotalana na Bete-peole.” (Deteronome 34:5, 6) Emonani ete Satana alingaki kosalela nzoto ya mowei mpo na kotombola losambo ya bikeko. Mikaele atɛmɛlaki likambo yango, kasi na komikitisa nyonso atosaki bokonzi ya Tata na ye, Yehova. ‘Kozanga kokitisa ye na maloba na kotuka,’ Mikaele alobaki na Satana ete: “[Yehova] apamela yo.”—Yuda 9.
Na nsima, Yisalaele ebandaki etumba mpo na kozwa Mokili ya Ndaka, elingi koloba Kanana. Penepene na engumba Yeliko, Yosua azwaki endimiseli ete Liloba azalaki kokoba kokɛngɛla libota. Kuna akutanaki na moto moko oyo asimbaki mopanga na lobɔkɔ. Yosua akendaki epai ya mopaya yango mpe atunaki ye ete: “Ozali na biso elongo, to na bayini na biso?” Kanisá kokamwa ya Yosua ntango moto yango amonisaki ye soki azali nani, kolobáká ete: “Te, nakómi lokola mokonzi na basoda na [Yehova].” Tokoki kokamwa te ete Yosua akweaki na elongi na nse liboso ya momonisi ya Yehova oyo azalaki na nkembo mingi, na ntembe te, ezalaki Yesu oyo azalaki na bomoi liboso ete abotama lokola moto, ye oyo na nsima akómaki “Masiya Mokonzi.”—Yosua 5:13-15; Danyele 9:25, NW.
Yesu awelanaki lisusu na Satana na eleko ya Danyele, mosakoli ya Nzambe. Na libaku yango Mikaele ayaki kosunga anzelu mosusu ntango demo moko, mokonzi na Palasa ‘atɛmɛlaki’ ye na boumeli ya pɔsɔ misato. Anzelu alimbolaki ete: “Nde Mikaele, moko na mikonzi oyo aleki na lokumu, akómaki kosunga ngai; bongo natikaki ye wana esika moko na mokonzi na bokonzi na Palasa.”—Danyele 10:13, 21.
Nkembo liboso ya kobotama lokola moto mpe nsima ya kobotama
Na mobu 778 L.T.B., Uzia, mokonzi ya Yuda, akufaki, mpe Yisaya, mosakoli ya Nzambe amonaki emonaneli ya Yehova afandi na kiti na ye ya bokonzi etombwani. Yehova atunaki ete: “Tokotinda nani? Nani akokenda mpo na biso?” Yisaya andimaki, kasi Yehova akebisaki ye ete bandeko na ye Bayisalaele bakoyoka ye te. Na ekeke ya liboso, ntoma Yoane akokanisaki Bayuda oyo bazangi kondima na bato ya eleko ya Yisaya, mpe akomaki ete: “Yisaya alobi boye mpo ete amoni nkembo na ye.” Nkembo ya nani? Ya Yehova mpe ya Yesu oyo azalaki na bomoi liboso ete abotama, esika moko na Nzambe na likoló.—Yisaya 6:1, 8-10; Yoane 12:37-41.
Mwa bikeke na nsima, ntango ekokaki mpo ete Yesu azwa mokumba oyo eleki mikumba nyonso kino ntango wana. Yehova alongolaki bomoi ya Mwana na ye ya bolingo na likoló mpe atyaki yango na libumu ya Malia. Nsima ya sanza libwa, abotaki mwana mobali, Yesu. (Luka 2:1-7, 21) Ntoma Paulo alobi boye: “Nde awa esili elaka kokoka solo, Nzambe atindaki Mwana na ye, oyo abotamaki na mwasi.” (Bagalatia 4:4) Bobele bongo, ntoma Yoane andimaki ete: “Liloba akómi mosuni mpe atɛmisi mongombo na ye kati na biso mpe tomoni nkembo na ye, nkembo lokola [Mwana mobotami-bobele-moko, NW] longwa na Tata; atondi na ngɔlu mpe na solo.”—Yoane 1:14.
Masiya amonani
Na mbula 12, elenge Yesu asosolaki ete esengelaki komipesa mpo na mosala ya Tata na ye ya likoló. (Luka 2:48, 49) Pene na mbula 18 na nsima, Yesu akendaki epai na Yoane Mobatisi na Ebale Yordani mpe azwaki batisimo. Wana Yesu azalaki kobondela, makoló mafungwamaki, mpe elimo santu ekitaki likoló na ye. Kanisá ebele ya makambo ayebaki liboso oyo eyelaki ye na makanisi wana amikundolaki ebele ya bambula oyo asalaki elongo na Tata na ye lokola kapita-mosali, molobeli, mokonzi na basoda ya Yehova, mpe lokola mokóló na baanzelu, Mikaele. Na nsima ayokaki esengo na koyoka mongongo ya Tata na ye koloba na Yoane Mobatisi ete: “Oyo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli [na] ye mingi.”—Matai 3:16, 17; Luka 3:21, 22.
Yoane Mobatisi atyaki ata ntembe te ete Yesu azalaki na bomoi liboso ya kobotama lokola moto. Ntango Yesu azalaki koya epai na ye, Yoane alobaki ete: “Talá Mwana-na-mpate na Nzambe, molongoli na masumu na mokili.” Mpe abakisaki ete: “Ye oyo nalobi mpo na ye ete, Moto akoya nsima na ngai oyo azali liboso na ngai mpo ete azalaki liboso na ngai.” (Yoane 1:15, 29, 30) Ntoma Yoane mpe ayebaki ete Yesu azalaki na bomoi liboso ya kobotama lokola moto. Akomaki ete: “Oyo auti na Likoló azali liboso na nyonso. Yango esili ye komona mpe koyoka, azali kotatola mpo na yango.”—Yoane 3:31, 32.
Pene na mobu 61 T.B., ntoma Paulo ayebisaki baklisto Baebele ete bápesa motuya na boyei ya Masiya awa na mabelé mpe na mosala na ye lokola Nganga-Monene. Kobendáká likebi likoló na mokumba ya Yesu lokola Molobeli, Paulo akomaki ete: “Nzambe . . . na mikolo oyo ya nsuka asololi na biso kati na Mwana [na ye] . . .; na ye mpe azalisaki [ebongiseli ya biloko, NW].” Ezala ete maloba oyo mataleli mokumba ya Yesu lokola “kapita-mosali” na bozalisi to esika na ye kati na bibongiseli oyo Nzambe akamataki mpo na kozongisa boyokani na bato, awa Paulo abakisi litatoli na ye ete Yesu azalaki na bomoi liboso ya kobotama lokola moto.—Baebele 1:1-6; 2:9.
Bosembo uta “kalakala”
Epai na baklisto ya Filipi na ekeke ya liboso, Paulo apesaki elendiseli oyo: “Bókanisa kati na bino yango ekanisaki Klisto Yesu. Ata azalaki na motindo na Nzambe, atángaki te ete ameka kokokana na Nzambe, nde amiyeisi mpamba, akamati motindo na moombo, abotami na lolenge na bato. Ezwami ye na motindo na moto, amisɔkisi mpe atosi kino kufa, ɛɛ, kino kufa na [nzete ya mpasi, NW].” (Bafilipi 2:5-8) Yehova andimaki na bolingo nyonso bosembo ya Yesu na kosekwisáká ye mpe na koyambáká ye lisusu na likoló. Oyo nde ndakisa malamu ya bosembo na boumeli ya ntango molai mpenza Yesu atikelaki biso!—1 Petelo 2:21.
Tozali na botɔ́ndi na lolenge Biblia emonisi na bokuse bomoi ya Yesu liboso ete abotama lokola moto! Yango elendisi mpenza ekateli na biso ya komekola ndakisa ya mosala na ye ya bosembo, mingimingi sikawa, awa azali koyangela lokola Mokonzi kati na Bokonzi ya Masiya ya Nzambe. Tiká ete tópesa losako na “Nkolo na kimya,” Klisto Yesu, Moyangeli mpe Mokonzi “oyo ebandeli na ye ezalaki kalakala”!—Yisaya 9:6; Mika 5:2.
[Etanda na lokasa 24]
Litatoli mpo na bomoi liboso ya kobotama lokola moto
◻ Maloba ya Yesu ye moko, ndenge ekomami na nse, ezali kotatola ete azalaki na bomoi liboso ya kobotama lokola moto:
◻ “Moto mpe te asili kobuta kino Likoló bobele ye oyo akitaki longwa na Likoló, ye Mwana na moto.”—Yoane 3:13.
◻ “Ezalaki Mose oyo apesaki bino [limpa, NW] longwa na Likoló te kasi Tata na ngai azali kopesa bino limpa na solo na Likoló. Mpo ete [limpa] na Nzambe ezali yango ekokita na Likoló mpe ekopesa bomoi na mokili. Nasili kokita longwa na Likoló ete nasala mokano na ngai moko te kasi mokano na Motindi na ngai.”—Yoane 6:32, 33, 38.
◻ “Oyo ezali [limpa, NW] oyo ekiti longwa na Likoló ete moto alya na yango mpe akufa te. Ngai nazali [limpa, NW] ya bomoi oyo ekiti longwa na Likoló. Soko moto nani akolya [limpa] oyo akozala na bomoi libela.”—Yoane 6:50, 51.
◻ “Soko nde bokomona Mwana na moto kobuta esika ezalaki ye liboso?”—Yoane 6:62.
◻ “Litatoli na ngai ezali solo mpo ete nayebi esika euti ngai mpe esika ekokenda ngai. Bino bouti na nse, ngai nauti na Likoló. Bino bouti na mokili oyo, ngai nauti na mokili oyo te.”—Yoane 8:14, 23.
◻ “Soko Nzambe azali nde tata na bino mbɛ bokolingaka ngai. Mpo ete ngai nabimi na Nzambe mpe nazali awa. Zambi nayei na ntina na ngai moko te kasi ye atindi ngai.”—Yoane 8:42.
◻ “Solo solo nalobi na bino ete, naino ezalaki Abalayama te, ngai nazali.”—Yoane 8:58.
◻ “Tata, kumisá ngai pembeni na yo na lokumu lozalaki na ngai pembeni na yo liboso, naino mokili ezalaki te. Tata, nalingi ete bango osili kopesa ngai bázala na ngai elongo na esika ezali ngai ete bámona lokumu na ngai losili yo kopesa ngai, zambi olingaki ngai liboso na kozalisama na mokili.”—Yoane 17:5, 24.
[Elilingi na lokasa 23]
Yosua akutanaki na mokonzi na basoda na Yehova