Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/7 nk. 30-31
  • Mosamalia amimonisi mozalani malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mosamalia amimonisi mozalani malamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mosamalia ya motema mawa
  • Liteya mpo na biso
  • Kozala “Mosamaria ya motema malamu” elakisi nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mosamaria moko na motema malamu
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Mosamaria ya motema malamu
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Tokoki kolinga bazalani na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/7 nk. 30-31

Basalaki mokano ya Yehova

Mosamalia amimonisi mozalani malamu

NA MIKOLO ya Yesu, koyinana makasi ezalaki kati na Bayuda mpe mabota. Na eleko yango, kutu Mishnah ya Bayuda ezalaki na mobeko oyo epekisaki basi ya Yisalaele kosunga basi ya mabota na ntango ya kobota, mpamba te yango elingaki kosala ete moto mosusu ya mabota abakisama na mokili.​—Abodah Zarah 2:1.

Basamalia bazalaki mpenza libota ya penepene na Bayuda koleka mabota mosusu, ezala na makambo ya losambo to na loposo. Kasi, bango mpe batalelamaki lokola bato ya mbindo. Ntoma Yoane akomaki ete: “Bayuda mpe Basamalia bakosanganaka te.” (Yoane 4:9) Na yango, Talmud ezalaki koteya ete “eteni ya limpa oyo euti na Mosamalia ezali mbindo koleka mosuni ya ngulu.” Bayuda mosusu bazalaki kosalela liloba “Mosamalia” mpo na komonisa botyoli mpe mbindo.​—Yoane 8:48.

Na kotalela ezalela oyo, maloba ya Yesu epai na moto oyo amipesaki mingi na mibeko ya Bayuda ezali na toli mingi. Moto yango abɛlɛmaki na Yesu mpe atunaki ye ete: “Molakisi, nasala nini ete nazwa bomoi na seko?” Na eyano na ye, Yesu abendaki likebi na ye na Mobeko ya Mose, oyo esɛngisi ‘kolinga Yehova na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na nguya na yo mobimba, mpe na makanisi na yo mobimba,’ mpe ‘kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’ Molakisi na mibeko atunaki lisusu ete: “Mozalani na ngai azali nani?” (Luka 10:25-29; Levitike 19:18; Deteronome 6:5) Engebene Bafalisai, liloba “mozalani” ezalaki kosalelama bobele epai na baoyo bazalaki kobatela bonkɔkɔ ya Bayuda—ezalaki bato ya mabota te to Basamalia te. Soki molakisi na mibeko oyo akanisaki ete Yesu akolongisa likanisi wana, sikawa akokamwa.

Mosamalia ya motema mawa

Yesu ayanolaki moto yango na kosaleláká lisese moko.a Alobaki ete: “Moto moko azalaki kokita na Yelusaleme kokenda na Yeliko.” Yelusaleme mpe Yeliko ekabwani na ntaka ya kilomɛtɛlɛ soko 23. Nzela oyo ezalaki kokangisa bingumba yango mibale ezalaki nyokanyoka mpe na bangomba mingi pembenipembeni, yango ezalaki kosalisa bayibi ete bábombama, básala bato mabe, mpe bákima. Ndenge esalemaki ete, mosali mobembo ya lisese ya Yesu “akweaki kati na babɔtɔli, mpe bango balongolaki bilamba na ye, mpe babɛti ye, mpe kokenda na bango batiki ye penepene na kufa.”​—Luka 10:30.

Yesu abakisi ete: “Likambo ebimi boye ete nganga moko azalaki kokita na nzela yango, mpe amonaki ye, mpe aleki na epai mosusu. Bobele bongo Molevi akómi na esika yango, mpe amonaki ye, mpe aleki na epai mosusu.” (Luka 10:31, 32) Banganga mpe Balevi bazalaki balakisi ya Mibeko—bakisa mobeko ya kolinga mozalani. (Levitike 10:8-11; Deteronome 33:1, 10) Ya solo, koleka bato nyonso, bango nde basengelaki kopusama na koyokela mosali mobembo oyo azalaki kati na mpasi mawa.

Yesu alobaki lisusu ete: “Mosamalia azalaki kotambola mobembo, akutaki ye, mpe emonaki ye ayokelaki ye mawa mingi.” Na ntembe te, ntango Yesu atángaki nkombo Mosamalia likebi ya molakisi na mibeko elamukaki. Yesu mpe azalaki na likanisi mabe mpo na bato yango? Nzokande, komonáká mosali mobembo oyo azalaki na mpasi, Mosamalia “ayokelaki ye mawa mingi.” Yesu alobaki ete: “Mpe akendaki epai na ye mpe akangi mpota na ye mpe asopi mafuta na vinyo na kati na yango, mpe abutisi ye na mpunda na ye mpenza, mpe akei na ye na ndako na bato na mobembo, mpe abateli ye.b Na mokolo na nsima abimisi denali mibale, mpe apesi yango na mobateli na ndako, mpe alobi ete, Bátela ye, mpe soko okosilisa mosolo mosusu boni, nakozongisela yo yango wana ekozonga ngai awa.”​—Luka 10:33-35.

Sikawa Yesu atuni molobani na ye ete: “Na kati na bango misato okanisi nani [amimonisaki, NW] mozalani na oyo akweaki kati na babɔtɔli?” Molakisi na mibeko ayebaki eyano, kasi akakatanaki mpo na koloba “Mosamalia.” Kasi, alobaki bobele ete: “Oyo ayokelaki ye mawa.” Bongo, Yesu alobaki ete: “Kenda na yo kosala bobele bongo.”​—Luka 10: 36, 37.

Liteya mpo na biso

Moto oyo atunaki Yesu asalaki yango mpo “amilongisa ete azali moyengebene.” (Luka 10:29) Mbala mosusu akanisaki ete Yesu akosepela na kotingama na ye na Mibeko ya Mose. Kasi moto oyo ya lolɛndo asengelaki koyekola bosolo ya lisese ya Biblia oyo elobi ete: “Nzela nyonso na moto imonani malamu na miso na ye moko, kasi [Yehova] akomekaka mitema.”​—Masese 21:2.

Lisese ya Yesu emonisi ete moto oyo azali mpenza sembo ezali te bobele oyo atosaka mibeko ya Nzambe kasi lisusu oyo amekolaka bizaleli na ye. (Baefese 5:1) Na ndakisa, Biblia eyebisi biso ete “Nzambe aponaponaka bato te.” (Misala 10:34, NW) Tomekolaka Nzambe na likambo yango? Lisese oyo Yesu asalaki ezali kosimba motema mpe emonisi ete mozalani na biso ezali te bobele moto oyo tozali na ye ekólo moko, mimeseno moko, to lingomba moko. Ya solo, baklisto bateyami ete ‘básalela bato nyonso malamu’—kasi básalela te bobele baoyo bazali na bango etɛlɛmɛlo moko, loposo moko, to ekólo moko to bobele bandeko na bango bandimi.​—Bagalatia 6:10.

Batatoli ya Yehova basalaka makasi mpo na kolanda etinda oyo ya Makomami. Na ndakisa, ntango makama ebimaka, bapesaka lisungi epai na bandeko na bango bandimi mpe lisusu na baoyo bazali Batatoli te.c Soki tolongoli wana, lokola lisangá, bazali kolekisa ngonga koleka miliare moko mbula na mbula mpo na kosalisa bato ete báyeba Biblia malamu. Basalaka makasi mpo na komemela moto nyonso nsango ya Bokonzi, mpo ete mokano ya Nzambe ezali ete “bato nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.”​—1 Timoté 2:4, NW; Misala 10:35.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lisese ezali lisolo mokuse, elobelaka lisapo oyo tokozwa na yango liteya ya solo na ntina na etamboli to na makambo ya elimo.

b Emonani ete na mikolo ya Yesu bandako mosusu ya mobembo ezalaki bobele kopesa bato esika ya kolala te kasi lisusu biloko ya kolya mpe misala mosusu. Ekoki kozala motindo ya bandako yango nde Yesu azalaki kokanisa, mpo ete liloba ya Greke oyo esalelami awa ekeseni na oyo ebongolami na “ndako na kolala” na Luka 2:7.

c Mpo na kozwa bandakisa, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛ́mbɛ 1996, nkasa 3-8, mpe oyo ya 15 Yanuáli 1998, nkasa 3-7.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto