Osili kokɔta na epemelo ya Nzambe?
“Ye oyo akoingela na epemelo na Nzambe akopema nsima na misala na ye.”—BAEBELE 4:10.
1. Mpo na nini tolingaka bopemi?
BOPEMI. Oyo nde liloba malamu mpe ya kosepelisa! Na mokili ya lelo, na makambo na yango ya mbangumbangu mpe ya yikiyiki, mingi kati na biso tokosepela kozwa mwa bopemi moke. Elenge to mokóló, moto oyo abala to monzemba, biso nyonso tokoki koyoka ete bomoi ya mokolo na mokolo ezali komema biso mbangumbangu mpe ezali kolɛmbisa biso. Mpo na bibɔsɔnɔ to baoyo bazali na mikakatano na nzoto, etumba ezali ya mokolo na mokolo. Lokola Makomami elobi yango, “biloko nyonso bizalisami na Nzambe, izali kokimela elongo kino ntango oyo.” (Baloma 8:22) Elingi koloba te ete soki moto azali kopema azali na goigoi. Kopema ezali mposa oyo moto nyonso asengeli kokokisa.
2. Yehova abandaki kopema ntango nini?
2 Yehova Nzambe ye moko azali kopema. Na mokanda ya Genese, tozali kotánga ete: “Likoló na nse isilaki kosalama mpe ebele na yango nyonso. Na mokolo na nsambo Nzambe asilisaki mosala mosalaki ye, mpe apemaki na mokolo na nsambo na misala nyonso misalaki ye.” Yehova apesaki motuya monene na “mokolo na nsambo,” mpamba te lisolo lipemami elobi lisusu ete: “Nzambe apambolaki mokolo na nsambo mpe abulisaki yango.”—Genese 2:1-3.
Nzambe apemaki na misala na ye
3. Nini ekoki te kozala bantina oyo Nzambe apemaki?
3 Mpo na nini Nzambe apemaki na “mokolo na nsambo”? Ya solo, ezali te ete apemaki mpo alɛmbaki. Yehova azali na “makasi kati na nguya” mpe “akosenzwa te, ye akolɛmba te.” (Yisaya 40:26, 28) Tokoki mpe koloba te ete Nzambe apemaki mpo ete azalaki na mposa ya konyolisa nzoto to kominanola mwa moke, mpamba te Yesu ayebisaki biso ete: “Tata na ngai azali naino kosala mosala, ngai mpe nazali kosala.” (Yoane 5:17) Ezala ndenge nini, “Nzambe azali elimo” mpe azali na nzoto oyo ezali na bamposa lokola oyo ya bikelamu ya mosuni te.—Yoane 4:24, NW.
4. Na likambo nini “mokolo na nsambo” ekesanaki na ‘mikolo’ motoba oyo elekaki?
4 Ndenge nini tokoki kokanga ntina oyo Nzambe apemaki na “mokolo na nsambo”? Na Tósimba ete atako Nzambe asepelaki mingi na nyonso oyo asalaki na boumeli ya eleko molai ya ‘mikolo’ motoba ya bozalisi oyo elekaki, apambolaki bobele “mokolo na nsambo” mpe “abulisaki” yango. Diksionere moko (Concise Oxford Dictionary) elimboli eloko oyo “ebulisami” lokola ete “epesami bobele to ebongi (na nzambe moko to na mokano moko ya losambo).” Na yango, na ndenge Yehova apambolaki “mokolo na nsambo” mpe abulisaki yango emonisi ete mokolo yango mpe “bopemi” na ye esengeli kozala na boyokani na mokano na ye mosantu kasi ezali te na bamposa oyo azalaki na yango. Boyokani yango ezali nini?
5. Na boumeli ya ‘mikolo’ mobota ya bozalisi, Nzambe abandaki kotambwisa makambo nini?
5 Na boumeli ya ‘mikolo’ motoba ya bozalisi oyo milekaki, Nzambe azalisaki mpe abandaki kotambwisa bibongiseli mpe mibeko nyonso oyo ezali koyangela misala ya mabelé mpe biloko nyonso oyo ezingi yango. Lelo oyo, wana bato ya siansi bazali koyekola biloko yango, bazali komona ete bisalemaki na motindo ya kokamwa. Ntango “mokolo na motoba” ekómaki pene na kosila, Nzambe azalisaki babalani ya liboso mpe atyaki bango kati na “elanga epai na ebimelo na ntango, kati na Edene.” Na nsuka, Nzambe ayebisaki mokano na ye mpo na libota ya bato mpe mabelé na esakweli oyo: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nse na bino; mpe bózala na bokonzi na likoló na mbisi na mai, mpe na ndɛkɛ na likoló, mpe likoló na nyama nyonso na bomoi ikotambolaka na mokili.”—Genese 1:28, 31; 2:8.
6. (a) Na nsuka ya “mokolo na motoba”; Nzambe akanisaki nini mpo na biloko nyonso oyo azalisaki? (b) Na ndimbola nini “mokolo na nsambo” ebulisami?
6 Wana “mokolo na motoba” ya bozalisi esukaki, lisolo eyebisi biso ete: “Nzambe atalaki biloko nyonso bisilaki ye kozalisa, mpe izalaki malamu mingi.” (Genese 1:31) Nzambe asepelaki na biloko nyonso oyo asalaki. Na bongo, apemaki, to asukisaki kozalisa biloko awa na mabelé. Nzokande, atako paladiso ezalaki ya kokoka mpe ezalaki na bonzenga, ezwaki bobele mwa etando moke, mpe bato bazalaki bobele mibale awa na mabelé. Ntango mingi esengelaki koleka mpo ete mabelé mpe libota ya bato ekóma na lolenge oyo Nzambe akanaki. Yango wana, atyaki “mokolo na nsambo,” na boumeli na yango, biloko nyonso oyo azalisaki na ‘mikolo’ motoba oyo elekaki bisengelaki kokola na boyokani na mokano na ye ya bulɛɛ. (Kokanisá na Baefese 1:11.) Ntango “mokolo na nsambo” ekokóma pene na nsuka na yango, mabelé mobimba makosila kokóma paladiso epai libota ya bato ya kokoka bakofanda mpo na libela. (Yisaya 45:18) “Mokolo na nsambo” eponami, to ebongisami mpo na kolandana mpe kokokisama ya mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mabelé. Ezali “bulɛɛ” na ndimbola wana.
7. (a) Nzambe apemaki na likambo nini na “mokolo na nsambo”? (b) Makambo nyonso makozala ndenge nini na nsuka ya “mokolo na nsambo”?
7 Na yango, na “mokolo na nsambo” Nzambe apemaki na oyo etali kozalisa. Ezali lokola ete asukisaki mpe atikaki ete biloko oyo abongisaki bilanda kosala. Amindimisi mpenza ete na nsuka ya “mokolo na nsambo,” biloko nyonso bikozala mpenza lokola akanaki yango. Ata soki kwɔkɔsɔ ebimi, akolonga yango. Bato nyonso ya botosi bakozwa litomba ntango mokano ya Nzambe ekokokisama. Eloko moko te ekopekisa yango mpamba te Nzambe apambolaki “mokolo na nsambo,” mpe ‘abulisaki’ yango. Yango ezali solo elikya monene mpo na bato ya botosi!
Yisalaele ekɔtaki na epemelo ya Nzambe te
8. Ntango nini mpe ndenge nini Bayisalaele bakómaki kobatela Sabata?
8 Libota ya Yisalaele elandaki ebongiseli malamu ya Yehova oyo etali kosala mosala mpe kopema. Kutu, liboso ya kopesa Bayisalaele Mibeko na Ngomba Sinai, Nzambe ayebisaki bango na nzela ya Mose ete: “Talá! [Yehova] apesi bino sabata, yango wana na mokolo na motoba ye apesi bino kwanga mpo na mikolo mibale. Na mokolo na nsambo bótikala moto na moto na esika na ye. Moto moko te abima na esika na ye na mokolo na nsambo.” Mpo na yango, “bato bapemaki na mokolo na nsambo.”—Exode 16:22-30.
9. Mpo na nini tokanisi ete mobeko ya Sabata ezalaki mbongwana oyo esepelisaki Bayisalaele?
9 Ebongiseli yango ezalaki ya sika mpo na Bayisalaele, oyo bautaki kosikwama na boombo na Ezipito. Atako Baezipito mpe bikólo mosusu bazalaki kotánga ntango na bileko ya mikolo mitano kino zomi, emonani ete Bayisalaele, baoyo bazalaki baombo, bapesamelaki mokolo ya kopema te. (Kokanisá na Exode 5:1-9.) Na yango, tokoki mpenza kokanisa ete libota ya Yisalaele basepelaki na mbongwana yango. Na esika ete bátalela lisɛngami ya kopema na mokolo ya Sabata lokola bozito to epekiseli, na ntembe te basepelaki kotosa yango. Kutu, na nsima Nzambe ayebisaki bango ete Sabata ezalaki mpo na kokundwela bango boombo na bango na Ezipito mpe ndenge asikolaki bango.—Deteronome 5:15.
10, 11. (a) Soki Bayisalaele bamonisaki botosi, mbɛlɛ bazwaki eloko nini? (b) Mpo na nini Bayisalaele bakɔtaki na epemelo ya Nzambe te?
10 Soki Bayisalaele oyo babimaki na Mose na Ezipito bazalaki na botosi, mbɛlɛ bazwaki libaku ya kokɔta na “mokili [motondi na miliki, NW] mpe na mafuta na nzoi” oyo Nzambe alakaki bango. (Exode 3:8) Kuna balingaki kozwa bopemi ya solosolo, bobele na mokolo ya Sabata te kasi bomoi na bango mobimba. (Deteronome 12:9, 10) Nzokande, esalemaki bongo te. Ntoma Paulo akomaki na ntina na bango ete: “Zambi banani bayokaki nde batombokaki? Ezalaki bango te baoyo babimi na Ezipito mpo na Mose? Ayokisami nkanda na banani kino [mbula, NW] ntuku minei? Na bango te baoyo basalaki masumu, baoyo bibembe na bango ikweaki na lisobe? Akataki ndai mpo na banani ete bakoingela kati na epemelo na ye te? Mpo na bango te baoyo bazalaki na nkanza? Boye, tomoni ete bayebaki koingela te mpo na kozanga kondima.”—Baebele 3:16-19.
11 Oyo ezali liteya monene mpo na biso! Mpo ete bandimelaki Yehova te, libota wana ezwaki bopemi oyo alakaki bango te. Nzokande, bakufaki na mokili mokauki. Basosolaki te ete lokola bazalaki bakitani ya Abalayama, bazalaki na esika monene kati na mokano ya Nzambe ya kopambola mabota nyonso ya mokili. (Genese 17:7, 8; 22:18) Na esika ete básala na boyokani na mokano ya Nzambe, batyaki makanisi na bango nyonso na bamposa na bango ya mosuni mpe ya moimi. Tómeka ata moke te kolanda etamboli motindo wana!—1 Bakolinti 10:6, 10.
Bopemi mosusu etikali
12. Elikya nini ezalaki naino mpo na baklisto na ekeke ya liboso, mpe ndenge nini bakokaki kozwa yango?
12 Nsima ya kolobela ndenge oyo Yisalaele ekɔtaki na epemelo ya Nzambe te mpo na kozanga kondima, Paulo atyaki likebi na ye epai na baninga na ye bandimi. Lokola emonisami na Baebele 4:1-5, andimisaki bango ete “naino elaka na koingela na epemelo na [Nzambe] ezali koumela.” Paulo alendisaki bango ete bámonisa kondima kati na “nsango malamu,” mpamba te “biso bandimi tokoingela na epemelo.” Lokola mbeka ya lisiko oyo Yesu apesaki esukisaki Mibeko, na esika oyo Paulo azalaki kolobela kopemisa nzoto na mokolo ya Sabata te. (Bakolose 2:13, 14) Na ndenge azongelaki maloba ya Genese 2:2 mpe Nzembo 95:11, Paulo azalaki kolendisa baklisto Baebele ete bákɔta na epemelo ya Nzambe.
13. Ntango azongelaki maloba ya Nzembo 95, mpo na nini Paulo abendaki likebi na liloba “lelo”?
13 Na ntembe te mpo na baklisto Baebele, koyoka ete bazalaki na likoki ya kokɔta na epemelo ya Nzambe ezalaki “nsango malamu,” se lokola bopemi ya Sabata ezalaki “nsango malamu” mpo na Bayisalaele ya kala. Yango wana, Paulo alendisaki baninga na ye bandimi ete bázongela te mabunga oyo Yisalaele esalaki na mokili mokauki. Azongelaki maloba ya Nzembo 95:7, 8 mpe abendaki likebi na liloba “lelo,” atako elekaki ntango mingi kobanda Nzambe apemaki na mosala ya kozalisa. (Baebele 4:6, 7) Paulo azalaki na likanisi nini? Ete “mokolo na nsambo” wana, oyo Nzambe abongisaki mpo ete mokano na ye mpo na mabelé mpe bato ekokisama nyonso, ezalaki naino kokoba. Yango wana, baninga na ye baklisto basengelaki, na lombangu nyonso, kosala na boyokani na mokano wana na esika ya kolanda bamposa na bango ya moimi. Azongelaki lisusu likebisi yango ete: “Bóyeisa mitema na bino makasi te.”
14. Ndenge nini Paulo amonisaki ete “epemelo” ya Nzambe ezali naino?
14 Lisusu, Paulo amonisaki ete “bopemi” oyo elakamaki ezalaki kaka likambo ya kofanda na Mokili ya Ndaka te na litambwisi ya Yosua. (Yosua 21:44) Paulo alobaki ete, “Soko Yosua apesaki bango epemelo, [mbɛlɛ] Nzambe alobi lisusu mpo na mokolo yango te.” Yango wana, Paulo abakisaki ete: “Epemelo na sabata etikali mpo na bato na Nzambe.” (Baebele 4:8, 9) “Epemelo na sabata” wana ezali nini?
Tókɔta na epemelo ya Nzambe
15, 16. (a) Liloba “epemelo na sabata” elimboli nini? (b) Soki moto ‘apemi na misala na ye’ elimboli nini?
15 Maloba “epemelo na sabata” mabongolami na liloba ya Greke oyo elimboli “kopema na sabata.” (Kingdom Interlinear) Profesere William Lane alobi ete: “Liloba yango ezwaki ndimbola na yango ya sikisiki uta na malako ya Sabata oyo mabimaki kati na Lingomba ya Bayuda na ndenge na bango ya kolimbola Exode 20:8-10, epai emonisamaki mingi ete bopemi mpe kosanzola etambolaka elongo . . . Mingimingi [ezali] komonisa likambo ya eyenga mpe esengo, oyo emonisami na losambo mpe masanzoli epai ya Nzambe.” Boye, bopemi oyo elakamaki ezalaki bobele kopema na mosala te. Ezali mbongwana ya kotika mosala oyo ezali kolɛmbisa, oyo ezangi mokano mpo na kosala mosala ya esengo oyo ezali kokumisa Nzambe.
16 Likambo yango endimisami na maloba ya Paulo oyo malandi ete: “Mpo ete ye oyo akoingela na epemelo na Nzambe akopema nsima na misala na ye, pelamoko ezalaki Nzambe kopema nsima na yango na ye mpenza.” (Baebele 4:10) Ezali te ete Nzambe apemaki na mokolo ya nsambo ya bozalisi mpo alɛmbaki. Kasi, asukisaki mosala ya kozalisa awa na mabelé mpo ete biloko oyo asalaki bilanda kokola kino na nkembo na yango nyonso, mpo na masanzoli mpe lokumu na ye. Lokola biso mpe tozali bikelamu ya Nzambe, tosengeli kozala na esika kati na ebongiseli yango. Tosengeli ‘kopema na misala na biso,’ elingi koloba ete tosengeli kotika koluka komilongisa liboso ya Nzambe mpo na koluka kozwa lobiko. Nzokande, tosengeli kondima ete tokozwa lobiko na nzela ya mbeka ya lisiko oyo Yesu Klisto apesaki, na nzela na yango nde biloko nyonso bikoyokanisama na mokano ya Nzambe.—Baefese 1:8-14; Bakolose 1:19, 20.
Liloba ya Nzambe ezali na nguya
17. Tosengeli koboya etamboli nini oyo Yisalaele ya mosuni elandaki?
17 Bayisalaele bakɔtaki na epemelo oyo Nzambe alakaki te mpo ete bazangaki botosi mpe bazangaki kondima. Yango wana, Paulo alendisaki baklisto Baebele ete: “Bongo tómeka makasi koingela na epemelo yango, ete moto moko akwea na lolenge yango na nkanza te.” (Baebele 4:11) Na ekeke ya liboso, Bayuda mingi bandimelaki Yesu te, mpe mingi kati na bango banyokwamaki mingi ntango ebongiseli ya biloko ya Bayuda ebomamaki na mobu 70 T.B. Lelo oyo, ezali mpenza na ntina mingi ete tózala na kondima kati na elaka ya Nzambe!
18. (a) Paulo apesaki bantina nini oyo tosengeli komonisa kondima kati na liloba ya Nzambe? (b) Na lolenge nini liloba ya Nzambe ezali “na mopotu koleka mipanga nyonso mipeli bipai mibale”?
18 Tozali na bantina malamu mpo na komonisa kondima kati na liloba ya Yehova. Paulo akomaki ete: “Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ezali mpe na mopotu koleka mipanga nyonso mipeli bipai mibale. Ezali kotɔbɔla kino ekabwelo na motema mpe molimo, matongi mpe lilongo; ezali komeka makanisi mpe mikano na motema.” (Baebele 4:12) Ɛɛ, liloba ya Nzambe, to nsango na ye, ezali na “mopotu koleka mipanga nyonso mipeli bipai mibale.” Baklisto Baebele basengelaki kobosana makambo oyo ekómelaki bankɔkɔ na bango te. Lokola bazangaki kotya likebi na ekateli ya Yehova ete bakokufa na mokili mokauki, bamekaki kokɔta na Mokili ya Ndaka. Kasi Mose akebisaki bango ete: “Baamaleki mpe Bakanana bazali liboso na bino mpe bokokwea na mopanga.” Ntango Bayisalaele bamonisaki motó makasi mpe bakɔtaki kaka, “Baamaleki mpe Bakanana, baoyo bafandaki na mokili na nkeka yango, bakitaki mpe babukaki bango mpe babenganaki bango kino Holoma.” (Mituya 14:39-45) Liloba ya Yehova ezali mopotu koleka mipanga nyonso mipeli bipai mibale, mpe moto nyonso oyo akotyela yango likebi te na nko, akozanga kobuka mbuma na yango te.—Bagalatia 6:7-9.
19. Liloba ya Nzambe ‘etɔbɔlaka’ na nguya nini, mpe mpo na nini tosengeli kondima ete tokozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe?
19 Liloba ya Nzambe ezali mpenza na nguya ya “kotɔbɔla kino ekabwelo na motema mpe molimo, matongi mpe lilongo”! Ezali kokɔta na makanisi mpe na mikano ya bato, mpe na elobeli ya elilingi ezali kotɔbɔla kino na lilongo na kati mpenza ya mokuwa! Atako Bayisalaele oyo basikwamaki na boombo na Ezipito bandimaki ete bakobatela Mibeko, Yehova ayebaki ete kati na mitema na bango basepelaki na bibongiseli mpe masɛngami na ye te. (Nzembo 95:7-11) Na esika ete básala mokano na ye, bamipesaki na kokokisa bamposa na bango ya mosuni. Yango wana, bakɔtaki na epemelo oyo Nzambe alakaki te, kasi bakufaki na mokili mokauki. Tosengeli kobosana likambo wana te, mpamba te “eloko moko ezali te oyo ebombami liboso na ye, kasi nyonso ezali bolumbu mpe emonisami polele na miso na ye oyo azali na biso na makambo.” (Baebele 4:13) Na yango, tókokisa masɛngami ya komipesa na biso epai na Yehova mpe ‘tózonga nsima mpo na kobebisama te.’—Baebele 10:39.
20. Makambo nini mazali liboso, mpe sikawa tosengeli kosala nini mpo na kokɔta na epemelo ya Nzambe?
20 Atako “mokolo na nsambo”—mokolo oyo Nzambe apemaki—ezali kokoba, azali kosɛnzɛla kolandana ya mokano na ye na ntina na bato mpe mabelé. Mosika te Yesu Klisto, Mokonzi Masiya, akolongola baye nyonso bazali kotɛmɛla mokano ya Nzambe awa na mabelé, na Satana Zabolo nzela moko. Na boumeli ya boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto, Yesu na baninga na ye bakonzi 144 000 bakokómisa mabelé mpe bato na lolenge oyo Nzambe akanaki. (Emoniseli 14:1; 20:1-6) Ntango ya komonisa ete tozali kosalela bomoi na biso mpo na kokokisama ya mokano ya Yehova Nzambe yango oyo. Na esika ya komilongisa liboso ya Nzambe mpe kotombola matomba na biso moko, sikoyo nde tosengeli ‘kopema na misala na biso’ mpe kosala na motema mobimba mpo na matomba ya Bokonzi. Soki tokosala bongo mpe soki tokotikala sembo epai na Yehova, Tata na biso ya likoló, tokozala na esengo ya kozwa matomba ya epemelo ya Nzambe sikoyo mpe mpo na libela.
Okoki kolimbola?
◻ Mpo na nini Nzambe apemaki na “mokolo na nsambo”?
◻ Bayisalaele balingaki kozwa epemelo nini, kasi mpo na nini bakɔtaki na epemelo yango te?
◻ Tosengeli kosala nini mpo na kokɔta na epemelo ya Nzambe?
◻ Na ndenge nini liloba ya Nzambe ezali na bomoi, na nguya, mpe na mopotu koleka mipanga nyonso mipeli bipai mibale?
[Elilingi na lokasa 16, 17]
Bayisalaele babatelaki Sabata, kasi bakɔtaki na epemelo ya Nzambe te. Oyebi mpo na nini?