Nsukansuka—bosembo mpo na bato nyonso
“Na mbala oyo tokosala nyonso mpo na koyoka . . . bato oyo bazali kosalela bango bosembo te, bato oyo bazali konyokwama, bato oyo bazali na elikya te ete bakoyoka bango. . . . Eloko etikali ezali bongo kosala ete mibeko oyo mikomami mitosama: ata kosala ete lokola bato nyonso babotami na lokumu ndenge moko na miso ya Nzambe, ezala mpe ete banso babotami na lokumu ndenge moko na miso ya bato.”—Richard Nixon, prezida ya kala ya États-Unis, na lisukulu na ye na mokolo azwaki bokonzi, mwa 20 Yanuáli 1969.
NTANGO bakonzi, baprezida, mpe baministre-mokonzi bazwaka ebonga ya bokonzi, balingaka mingi kolobela bosembo. Richard Nixon, prezida ya kala ya États-Unis, ye mpe asalaki se bongo. Kasi, lelo oyo soki tozongisi makanisi nsima, tokomona ete maloba na ye ya kafukafu mazali lisusu na ntina te. Atako alobaki ete ‘akosala ete mibeko mitosama,’ na nsima ye moko abukaki mibeko mpe basɛngisaki ye ete atika bokonzi. Mbula 30 na nsima, ‘bato oyo bazali kosalela bango bosembo te, banyokwami, mpe baoyo bazali lisusu na elikya te ete bakoyoka bango’ bazali se konganga mpo ete báyoka bango.
Bakonzi mingi oyo bazali na mikano malamu bamoni ete koyoka bato wana mpe kolobela bampasi na bango ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Mokano ya kotya ‘bosembo mpo na bato nyonso’ ezali kolonga te. Atako bongo, ezali na elaka moko epesamaki eleki bikeke mingi, oyo ebongi ete tótyela yango likebi—elaka ya bosembo oyo ekokani na mosusu te.
Na nzela ya mosakoli Yisaya, Nzambe ayebisaki libota na Ye ete akotindela bango “moombo” oyo ye moko akopona. Yehova ayebisaki bango ete, “Natii [elimo, NW] na ngai likoló na ye, akosambisa mabota na sembo.” (Yisaya 42:1-3) Mokonzi moko te akoki ata komeka koloba likambo monene boye, oyo elimboli bosembo ya solosolo mpo na mokili mobimba. Tokoki nde kotyela elaka yango motema? Likambo monene boye ekoki nde kosalema?
Elaka oyo tokoki kotyela motema
Mpo na kotyela elaka moko motema etalelaka nani apesi yango. Awa, ezali moto mosusu te kasi ezali nde Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso alobi ete “moombo” na ye akotya bosembo na mokili mobimba. Yehova apesaka bilaka ya mpamba te, ndenge bato ya politiki basalaka. Biblia endimisi biso ete ‘akoki komimonisa na lokuta te.’ (Baebele 6:18) Nzambe alobi mpenza ete: “Lokola mokano mokanaki ngai, ekotɛma mpe bongo.”—Yisaya 14:24.
Kondimisama na biso elendisami lisusu na lisolo ya bomoi ya Yesu Klisto, “moombo” oyo Nzambe aponaki. Moto oyo akotya bosembo asengeli kolinga bosembo mpe kozala mosembwi. Lisolo ya bomoi ya Yesu emonisi ete azalaki moto oyo ‘alingaki boyengebene mpe ayinaki kilikili’ na ndenge ya kokoka mpenza. (Baebele 1:9) Makambo oyo alobaki, bomoi na ye, mpe ndenge akufaki, emonisi ete azalaki solo mosembwi. Ntango Yesu akufaki, Moloma moko, mokonzi ya basoda, oyo na ntembe te amonaki ndenge basambisaki mpe babomaki Yesu, alobaki ete: “Na solo moto oyo azalaki moyengebene.”—Luka 23:47.
Longola kozala moyengebene, Yesu aboyaki kozanga bosembo oyo epalanganaki mingi na eleko na ye. Aboyaki yango na kobimisáká botomboki te, kasi na ndenge ateyaki bosembo ya solo epai na moto nyonso oyo ayokaki ye. Lisolo na ye likoló na Ngomba ezali kopesa ndimbola ya mozindo na ndenge oyo bosembo mpe boyengebene ya solo esengeli komonisama.—Matai, mikapo 5-7.
Yesu azalaki kosalela makambo oyo azalaki koteya. Azalaki kotyola bato ya maba te, baoyo, epai ya Bayuda, bakokaki kofanda esika moko na bato mosusu te. Kasi, asololaki na bango, asimbaki bango, mpe lisusu asilisaki maladi na bango. (Malako 1:40-42) Bato nyonso oyo akutanaki na bango, ezala babola mpe bato mpamba, bazalaki na ntina na miso na ye. (Matai 9:36) Alobaki na bango ete, “Boyá liboso na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino.”—Matai 11:28.
Longola nyonso wana, Yesu aboyaki ete kozanga bosembo ya bato oyo bazingaki ye ebebisa ye. Ata mbala moko te azongisaki mabe na mabe. (1 Petelo 2:22, 23) Ata na ntango oyo azalaki na mpasi makasi, abondelaki Tata na ye ya likoló ete alimbisa basoda oyo bakakisaki ye na nzete. Asɛngaki ete, “Tata limbisá bango mpo ete bayebi yango ezali bango kosala te.” (Luka 23:34) Ya solo, Yesu ‘alimbolelaki mabota bosembo.’ (Matai 12:18, NW) Elembeteli eleki monene tozali na yango oyo emonisi ete Nzambe azali na mposa ya kotya mokili ya bosembo ezali bongo ndakisa ya Mwana na ye.
Tokoki kolonga kozanga bosembo
Na mokili ya lelo, tozali na elembeteli ya polele oyo emonisi ete tokoki kolonga kozanga bosembo. Batatoli ya Yehova, ezala moto na moto to bango nyonso lokola lisangá, bazali kosala nyonso mpo na kolonga makanisi mabe mpo na bato mosusu, koponapona, kopona mposo, mpe mobulu. Tótalela ndakisa oyo elandi.
Pedroa azalaki kokanisa ete botomboki ezali nzela bobele moko ya kotya bosembo na Pays Basque, etúká moko na ekólo Espagne epai azalaki kofanda. Yango wana, akɔtaki na ebongiseli moko ya banganga-mobulu (terrorisme) mpe ayekolaki mosala ya soda na ekólo France. Ntango asilisaki koyekola mosala ya soda, basɛngaki ye ete asala etuluku moko ya banganga-mobulu mpe abebisa káa moko ya bapolisi. Etuluku na ye esilaki kobanda kobongisa babombi ntango bapolisi bakangaki ye. Akɔtaki bolɔkɔ ya sanza 18, kasi ata kuna na bolɔkɔ azalaki kokoba kosala makambo na ye ya politiki, mbala moko aboyaki kolya na boumeli ya mikolo mingi mpe amizokisaki na matonga ya mabɔkɔ.
Pedro akanisaki ete azalaki kobunda mpo na bosembo. Na nsima azwaki libaku ya koyeba Yehova mpe mikano na ye. Ntango Pedro azalaki na bolɔkɔ, mwasi na ye akómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, mpe ntango abimaki, mwasi na ye abyangaki ye ete bákende na makita ya Batatoli ya Yehova. Asepelaki mingi na makambo amonaki kuna na boye ete asɛngaki boyekoli ya Biblia mpe boyekoli yango esalisaki ye ete asala mbongwana monene na makanisi na ye mpe na bomoi na ye. Nsukansuka, na 1989, Pedro na mwasi na ye bazwaki batisimo.
Pedro alobi ete, “Nazali kopesa Yehova botɔndi ete nabomaki ata moto te na boumeli ya bambula oyo nazalaki nganga-mobulu. Sikawa nazali kosalela mopanga ya elimo ya Nzambe, elingi koloba Biblia, mpo na koteya bato nsango ya kimya ya solo mpe bosembo—nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.” Eleki mwa mikolo, Pedro, oyo azali sikawa nkulutu kati na lisangá ya Batatoli ya Yehova, akendaki na káa ya bapolisi oyo akanaki kobebisa. Na mbala oyo akendaki kuna na mokano ya koteya nsango ya kimya na mabota oyo efandi kuna.
Batatoli ya Yehova bazali kosala mbongwana yango mpamba te bazali na mposa ya mokili ya boyengebene. (2 Petelo 3:13) Atako batyaka elikya nyonso na elaka ya Nzambe ya kosala mokili yango, bayebi ete basɛngisami kozala basembwi kati na bomoi na bango. Biblia emonisi biso polele ete Nzambe alingi ete tózala basembwi.
Tólona mbóto ya boyengebene
Ya solo, ntango tozali kokutana na kozanga bosembo, tokoki mpenza kotuna ete: “Nzambe ya boyengebene azali wapi?” Bayuda na mikolo ya Malaki bazalaki koloba ndenge yango. (Malaki 2:17, NW) Nzambe atyaki likebi na komilela na bango? Kutu, “elɛmbisaki” ye mpamba te bazalaki kosala makambo mingi ya mabe lokola kokosa basi na bango oyo bakómaki mibange mpe bazalaki koboma mabala mpo na makambo ezangi ntina. Yehova ayokaki mawa mpo na ‘basi ya bolenge na bango oyo basalelaki bango na bokosi atako bazalaki baninga na bango mpe basi na bango na nzela na kondimana.’—Malaki 2:14.
Tokozala mpenza na elonga ya komilelalela na ntina ya kozanga bosembo soki biso moko tozangi sembo? Nzokande, soki tomekoli Yesu na kolongoláká makanisi mabe mpo na basusu mpe koponapona mposo kati na mitema na biso, na koboyáká koponapona mpe kolinga bato nyonso, mpe na kozongisa mabe na mabe te, tokomonisa ete tolingaka solo bosembo.
Mpo na kobuka mbuma ya bosembo, Biblia elendisi biso ete ‘tólona boyengebene.’ (Hosea 10:12) Ata soki emonani moke ndenge nini, bolongi nyonso oyo tozwi likoló ya kozanga bosembo ezali na ntina. Lokola Martin Luther King amonisaki yango kati na mokanda na ye ezali na motó na likambo ete Letter From Birmingham Jail (Mokanda euti na bolɔkɔ ya Birmingham), “ezala na esika nini, kozanga bosembo ezali kotya bosembo na likama na bisika nyonso.” Baoyo bazali “koluka boyengebene” bazali bato oyo Nzambe aponi mpo na kozwa mokili ya sika ya boyengebene oyo ekoya mosika te.—Sefania 2:3.
Tokoki te kotonga bilikya na biso mpo na boyengebene na moboko oyo ezali kotɛngatɛnga, elingi koloba bilaka ya bato, kasi tokoki kotya motema na liloba ya Mozalisi na biso oyo atondi na bolingo. Yango wana Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bábondelaka mpo ete Bokonzi ya Nzambe eya. (Matai 6:9, 10) Yesu, Mokonzi oyo aponami kati na Bokonzi wana, “akobikisa mobola oyo akonganga mpe moto na mawa oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto na bolɔzi mpe mobola mawa; akobikisa milimo na babola.”—Nzembo 72:12, 13.
Ɛɛ, kozanga bosembo ekoumela seko te. Ntango Yesu akoyangela mabelé mobimba, akolonga kozanga bosembo mpo na libela, ndenge Nzambe andimisi biso na nzela ya mosakoli Yilimia ete: “Mikolo ikoya wana nakosala lokola liloba malamu lilobaki ngai . . . Na ntango yango nakokolisela Davidi etape na boyengebene; ye akosambisa sembo mpe na boyengebene kati na mokili.”—Yilimia 33:14, 15.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tobombi nkombo na ye ya solo.