Tópesaka lokumu mingi na mabaku malamu ya mosala ya bulɛɛ
BAKAMATAKA mikumba ya mosala ya bulɛɛ na lisɛki te. Ntango banganga na Yuda ya kala batyolaki mabaku oyo Yehova apesaki bango ya kosala na tempelo, apamelaki bango makasi. (Malaki 1:6-14) Ntango bato mosusu ya Yisalaele balendisaki Banasili ete bálɛmbisa mikumba oyo bandimaki na mosala ya bulɛɛ, Yehova apamelaki Bayisalaele wana basumuki. (Amosa 2:11-16) Baklisto ya solo bamipesi mpe na mosala ya bulɛɛ, mpe bazwaka yango na lisɛki te. (Baloma 12:1) Mosala oyo ya bulɛɛ ezali na mitindo mingi, nyonso ezali na ntina.
Ntango Yesu azalaki naino na mabelé na bayekoli na ye, ateyaki bango mpo ete bázala basakoli ya Bokonzi ya Nzambe. Na nsuka, nsango na bango esengelaki kokóma kino na nsuka ya mokili. (Matai 28:19, 20; Misala 1:8) Mosala ya kosakola nsango yango ekómi likambo ya lombangu na mikolo oyo ya nsuka ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo.
Batatoli ya Yehova nyonso basanganaka na mosala yango. Mingi bazali na esengo na ndenge bazali kosala lokola babongisi-nzela. Mpo na kokokisa bamposa ya ntina na mosala oyo ezali kosalema na mokili mobimba, bankóto bamipesi na mosala ya ntina mingi, elingi koloba kosala mosala ya ntango nyonso na Betele, kozala bakɛngɛli ya zongazonga to ya etúká, to bamisionere. Yango ekoki kosɛngisa nini epai na baoyo balingi kokoba na mosala wana ya ntina?
Ntango libota ekómi na bosɛnga makasi
Na momeseno, liboso ya kobanda mosala ya ntango nyonso atako ezali mosala ya ntina, moto asengeli komibongisa. Moto nyonso te nde akoki kosala mosala yango. Moto akoki kozanga likoki ya kosala mosala yango na ntina na mikumba mosusu oyo azali na yango, mikumba oyo asengeli kokokisa na boyokani na Makomami. Nzokande, nini ekómelaka baoyo bazali na mosala ya ntango nyonso, ntango libota ekómi na bosɛnga makasi, mpenzampenza bosɛnga ya kobatela baboti oyo bakómi mibange? Mitinda mpe toli ya Biblia lokola oyo elandi ezali kopesa litambwisi ebongi.
Tosengeli kobatela boyokani na biso na Yehova kati na makambo nyonso oyo tozali kosala na bomoi na biso. (Mosakoli 12:13; Malako 12:28-30) Tosengeli kopesa lokumu mingi na mosala ya bulɛɛ oyo bapesi biso. (Luka 1:74, 75; Baebele 12:16) Na libaku moko, Yesu ayebisaki mobali moko oyo asengelaki kobongola makambo oyo azalaki kotya na esika ya liboso na bomoi na ye ete asengeli komipesa mobimba na mosala ya kosakola Bokonzi ya Nzambe. Emonani ete, mobali yango alingaki kozongisa mosala wana nsima kino tata na ye akokufa. (Luka 9:59, 60) Nzokande, Yesu atɔndɔlaki makanisi mabe ya moto nyonso oyo azalaki koloba ete apesi biloko nyonso na Nzambe mpe ‘akosalela tata soko mama na ye’ lisusu eloko moko te. (Malako 7:9-13) Ntoma Paulo mpe amonisaki ete mokumba ya moto mpo na koleisa “bato na ye,” bakisa mpe baboti mpe bankɔkɔ na ye ezali likambo ya lisɛki te.—1 Timote 5:3-8.
Yango elingi koloba ete na ntango ya bosɛnga makasi, baoyo bazali na mosala ya ntango nyonso basengeli kotika mikumba na bango mpo ete bákoka kopesa lisungi? Mpo na kopesa eyano esengeli kotalela makambo mingi. Moto ye moko akozwa ekateli. (Bagalatia 6:5) Mingi bazwaki ekateli ete, atako balingaka mokumba na bango mingi, ezali likambo ya mayele ete bázala esika moko na baboti na bango mpo ete básunga bango malamu. Mpo na nini? Mpamba te, bosɛnga ekoki kozala makasi, mbala mosusu mosangani ya libota oyo akoki kosunga azali te, to lisangá ekoki te kosala makambo nyonso oyo esɛngami. Bamoko balandaki kosala mosala ya mobongisi-nzela wana bazali kosunga baboti na bango. Bamosusu balongaki kozongela mosala ya ntango nyonso nsima wana bamposa ya libota ekokisamaki. Nzokande, mbala mingi, likoki ezalaki mpo na kosilisa likambo yango na ndenge mosusu.
Bazali kokokisa mokumba na bango
Ntango bosɛnga ekómaki makasi, bato mosusu oyo bazali kati na mosala ya ntango nyonso, balongaki kopesa lisungi kozanga ete bátika mikumba na bango. Bandakisa ezali mingi, kasi tótalela bobele ndambo.
Mobali moko na mwasi na ye, basalaka na biro monene ya Batatoli ya Yehova, babandaki mosala na Betele na 1978, nsima ya kosala mosala ya mokɛngɛli ya zongazonga mpe ya etúká. Ndeko mobali azali na mikumba mingi kati na lisangá ya Nzambe. Kasi, baboti na ye bazalaki mpe na mposa ya lisungi. Mbula na mbula, mobali na mwasi oyo basalaka na Betele, bazalaki kosala mobembo mbala misato to minei na kilomɛtɛlɛ soko 3 500 mpo na kosunga baboti na bango. Batongelaki baboti na bango ndako mpo na kokokisa bamposa na bango. Basalaki mibembo mosusu ya mbangumbangu mpo na kosunga bango ntango bazalaki kobɛla. Tokoki koloba ete basalelaki mikolo na bango nyonso ya bopemi ya mbula 20 mpo na kokokisa mokumba oyo. Balingaka mpe bakumisaka baboti na bango, kasi, bapesaka lisusu motuya na mabaku malamu ya mosala na bango ya bulɛɛ.
Ndeko mosusu ya mobali asilaki kolekisa mbula 36 na mosala ya mokɛngɛli-motamboli ntango akutanaki na likambo oyo ye moko abéngaka yango komekama oyo eleki monene na bomoi na ye. Bokilo na ye ya mwasi, mosaleli ya sembo ya Yehova, azali na mbula 85, azalaki na mposa ya kofanda na moto oyo akokoka kosunga ye. Nzokande, na ntango wana bana na ye mingi baboyaki kokamata ye ete afanda epai na bango. Ndeko moko ya mosuni ayebisaki mokɛngɛli-motamboli yango ete, mpo na bolamu ya libota, ye na mwasi na ye ebongi bátika mosala mpo ete bákoka kobatela mama na bango. Kasi, mobali na mwasi oyo batikaki mosala na bango ya motuya te, bamonisaki mpe bopɔtu te na bosɛnga ya mama na bango. Na boumeli ya mbula libwa oyo elandaki, afandaki mingi na bango. Na ebandeli bazalaki kofanda na ndako oyo ekumbamaka na motuka, na nsima bafandaki na bandako oyo ebongisamá mpo na bakɛngɛli ya zongazonga. Na boumeli ya ntango molai, ndeko mobali, na eleko wana azalaki mokɛngɛli ya etúká, akobaki kosala mibembo mpo na kokokisa mikumba na ye, nzokande mwasi na ye azalaki kotikala na mama na ye mpo na kobatela ye ntango nyonso. Pɔsɔ na pɔsɔ nsima ya makita na mokolo ya lomingo, mobali oyo azalaki kosala mobembo molai mpo na kozonga kosunga bango. Bato mingi oyo bayebaki likambo yango bazalaki kokumisa makambo oyo mobali na mwasi oyo bazalaki kosala. Na nsima, basangani mosusu ya libota bapusamaki na kopesa lisungi. Bankóto ya basaleli ya Yehova bazali kokoba kozwa matomba na mosala ya mobali na mwasi oyo, mpamba te bakangami na libaku malamu ya mosala na bango ya ntango nyonso.
Koyokana kati na libota
Ntango basangani ya libota bazali kopesa motuya na mosala ya ntango nyonso, bakoki koyokana na boye ete bamoko kati na bango básala mosala yango.
Elimo oyo ya koyokana kati na libota esalisaki mobali moko na mwasi na ye banamboka Canada oyo bazali bamisionere na Afrika ya Wɛsti. Bazelaki te kino makambo ekóma ndongo, na elikya ete eloko moko ekosalema te. Liboso ya kokende na Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower, mpo na kobongisama liboso ete bákende kosala mosala na mokili ya bopaya, mobali oyo asololaki na leki na ye ya mobali na ntina na kobatela mama na bango soki abɛli to soki azwi mokakatano mosusu. Mpo na komonisa ete alingaka mama na bango mpe asepelaka na mosala ya misionere, leki na ye alobaki ete: “Sikawa nazali na libota mpe na bana. Nakoki kokende mosika te mpe nakoki kosala misala oyo yo ozali kosala te. Na yango, soki mokakatano ekómeli Mama, nakosalisa ye.”
Mobali moko na mwasi na ye bazali bamisionere na Amerika ya Sudi, basalisamaki mingi na bandeko ya mwasi na ye oyo bazalaki kobatela mama na bango oyo akómaki mobange. Yaya na ye ya mwasi na mobali na ye, bazalaki kobatela mama na bango kino ntango yaya yango abɛlaki makasi. Nini esalemaki na nsima? Mpo na kobɔndisa ye ete amitungisa mingi te, mobali ya yaya na ye akomelaki ye ete: “Lokola ngai na bana tozali na bomoi, okotika mosala ya misionere soko moke te.” Lisungi mosusu ya basangani ya libota eyaki ntango leki na ye ya mwasi na mobali na ye balongwaki esika bazalaki kofanda mpe bakendaki esika mama na bango azalaki kofanda mpo na kobatela ye, mpe babatelaki ye kino ntango akufaki. Elimo ya koyokana boye ezali malamu mingi! Bango nyonso bazalaki kopesa lisungi mpo na kosimba mosala ya misionere.
Baboti oyo bazali kokabela Yehova na motema mobimba
Baboti mbala mingi bapesaka ndakisa malamu na oyo etali kosepela na mosala ya bulɛɛ. Bana na bango bazali kati na biloko na bango ya motuya mingi oyo bakoki kokumisa na yango Yehova. (Masese 3:9) Baboti mingi oyo bazali baklisto balendisaka bana na bango ete básala mosala ya ntango nyonso. Bamoko bazali na mayoki lokola ya Hana, oyo apesaki mwana na ye Samwele epai na Yehova “libela,” elingi koloba, “mikolo nyonso na bomoi na ye.”—1 Samwele 1:22, 28.
Mama moko oyo azali na elimo ya lolenge wana akomelaki mwana na ye ya mwasi oyo azali na Afrika boye: “Totɔndaka Yehova mpo na libaku malamu oyo yo ozali na yango. Okokisi mpenza likambo oyo tolikyaki.” Na libaku mosusu alobaki ete: “Ezali solo ete tozali mpenza komipimela na ndenge tokabwani na yo, kasi oyo nde esengo na komona lolenge Yehova azali kobatela yo!”
Nsima ya kotalela makambo ndenge na ndenge oyo mabimaki ntango bazalaki kobatela baboti na bango oyo bakómaki mibange, misionere moko na ekólo Équateur akomaki ete: “Nabanzi ete lisungi eleki monene oyo ngai na mwasi na ngai tozwaki, ezalaki mabondeli oyo tata azalaki kosala mpo na biso. Nsima ya liwa na ye, mama ayebisaki biso ete: ‘Mokolo ata moko ezalaki koleka te kozanga ete tata na bino abondela Yehova ete apesa bino nyonso likoki ya kolanda mosala na bino ya misionere.’”
Mobali moko na mwasi na ye oyo bakómi mibange mpe bafandaka na etúká ya Californie, na États-Unis, basepelaki na ndenge mwana na bango ya mobali azali mosaleli ya ntango nyonso. Mwana yango na mwasi na ye bazalaki na ekólo Espagne ntango mama na ye akufaki. Basangani mosusu ya libota bamonaki ete esengelaki kokamata bibongiseli mpo na kobatela tata na bango. Lokola bazalaki na misala ya mosuni mpe na bana oyo bazalaki kobɔkola, bamonaki ete bakokoka te kobakisa mokumba wana. Na yango, basɛngisaki mpenza mobali na mwasi oyo bazalaki na mosala ya ntango nyonso ete bázonga na mboka mpo na kobatela tata na bango. Nzokande, tata yango atako azalaki na mbula 79, azalaki naino na nzoto makasi, mpe apesaka motuya na makambo ya elimo. Na likita moko ya libota, nsima wana bato mingi bamonisaki makanisi na bango, tata atɛlɛmaki mpe alobaki na mpiko nyonso ete: “Nalingi bázonga na Espagne mpe bákoba na mosala na bango.” Bazongaki, basungaki ye mpe na ndenge oyo emonanaki. Bazali sikawa na mosala ya zongazonga na Espagne. Kobanda likita wana, basangani mosusu ya libota bakómá kosepela na mosala oyo mobali na mwasi wana bazali kosala na mokili ya bopaya. Nsima ya bambula, tata yango afandaki epai ya mwana na ye moko kino ntango akufaki.
Na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis ndeko moko mopakolami, oyo asalaki mosala ya mobongisi-nzela na boumeli ya mbula soko 40, azalaki na mbula koleka 90 ntango mwasi na ye abɛlaki makasi mpe akufaki. Azalaki na bana misato ya basi mpe mwana moko ya mobali, bakisa ebele ya bana na elimo. Mwana na ye moko ya mwasi azalaki na mosala ya ntango nyonso koleka mbula 40, elongo na mobali na ye basalaki mosala ya misionere, ya mokɛngɛli-motamboli, mpe na Betele. Azwaki bibongiseli mpo ete lisungi ebongi epesamela tata na ye. Bandeko ya lisangá mpe basungaki na kokendáká na tata na ye na makita na Ndako ya Bokonzi. Na nsima, ntango mobali na ye akufaki, atunaki tata na ye soki alingi ete atika mosala na Betele mpo na koya kobatela ye. Lokola apesaka motuya mingi na makambo ya bulɛɛ, amonaki ete bamposa na ye ekoki kokokisama na ndenge mosusu. Ayanolaki ete: “Soki okosala boye ekozala mabe mpenza, mpe ekoleka lisusu mabe soki ngai natiki yo osala bongo.”
Masangá oyo ezali kosunga
Masangá mosusu epesaki lisungi monene mpo na kobatela mibange oyo bana na bango bazali na mosala ya ntango nyonso. Basepelaka mpenza na bana oyo bazali na mosala motindo wana uta bambula mingi. Atako bakolongola bana wana mokumba oyo Makomami epesi bango te, bandeko na masangá motindo oyo basalaka mingi mpo ete bozito ya bana wana ekóma pɛpɛlɛ na boye ete bátika mosala na bango te.
Ntango mama na bango oyo azali mobange azalaki na mposa ya lisungi makasi, mobali moko na mwasi na ye bato ya ekólo Allemagne, bazalaki kosala na mokili ya bopaya pene na mbula 17, mingimingi balekisaki yango na mosala ya mokɛngɛli-motamboli. Mbula na mbula bazalaki kosalela mikolo na bango ya bopemi mpo na kokende kosunga ye. Batatoli mosusu ya penepene bapesaki ye lisungi ya bolingo. Na nsima, ntango mobali oyo na mwasi na ye, oyo bazali basaleli ya ntango nyonso, bafandaki na mama na bango na ntango ya mpasi makasi, bankulutu ya lisangá bakamataki bibongiseli mpo na kokutana na bango. Bayebaki malamu lisungi mobali oyo na mwasi na ye bazalaki ntango nyonso kopesa na mama na bango. Bazalaki lisusu kotalela mosala ya ntina mingi oyo mobali yango na mwasi na ye bazalaki kopesa motuya. Bongo, bankulutu bamonisaki bibongiseli oyo bakamataki mpo na kobatela mama wana, mpe balobaki boye: “Bokoki kosala eloko mosusu te likoló na oyo bosili kosala, sikawa biso tokosunga bino mpo ete bókoba mosala na bino na Espagne.” Na boumeli ya mbula nsambo oyo eleki bankulutu oyo bakobaki kosala bongo.
Bobele bongo, ndeko moko oyo azali misionere na ekólo Sénégal uta 1967, azwaki lisungi ya bolingo ya bandeko ya lisangá oyo tata na ye azali. Ntango ya bosɛnga makasi, mobali wana na boyokani na mwasi na ye ya bolingo, akendaki ye moko na États-Unis mpo na kosunga baboti na ye. Amonaki ete ebongaki aumela kuna basanza mingi. Makambo ezalaki mpasi, kasi ntango asalaki oyo akokaki kosala, bandeko ya lisangá bayaki kosunga ye mpo ete akoba mosala na ye ya misionere. Na boumeli ya koleka mbula 18, bandeko ya lisangá wana bapesaki lisungi ya bolingo na ndenge mingi, liboso epai na tata (atako azalaki lisusu koyeba mingi kati na bango te) mpe lisusu epai na mama na ye. Yango elongolaki mwana na mokumba na ye? Te; mbala mingi azalaki kouta na Sénégal mpo na kopesa lisungi oyo akokaki kopesa. Kasi, bato mingi na lisangá wana bazalaki na esengo ya koyeba ete bazali kopesa maboko mpo ete mobali na mwasi oyo ya molende bátikala kati na mosala ya ntango nyonso na ekólo Sénégal.
Yesu alobaki ete baoyo batiki nyonso mpo na nsango malamu, bakozwa bandeko mibali, bandeko basi, bamama, mpe bana mbala monkama. (Malako 10:29, 30) Yango ezali mpenza komonana epai na basaleli ya Yehova. Mobali na mwasi moko bazali sikawa kosala na ekólo Bénin, na Afrika ya Wɛsti, bamonaki bosolo ya likambo yango na lolenge ya kokamwa ntango Batatoli mibale oyo bazali na lisangá moko na baboti na bango bayebisaki bango ete bámitungisa lisusu te mpo na baboti na bango. Babakisaki ete: “Baboti na bino bazali mpe baboti na biso.”
Ɛɛ, ezali na ndenge mingi oyo tokoki komonisa ete topesaka lokumu mingi na mabaku ya mosala ya bulɛɛ. Ndenge mosusu ezali oyo okoki kosala boye, mbala mosusu kosala yango mingi koleka?
[Bililingi na lokasa 26]
Bamipesi mpo na kosala mosala ya ntango nyonso