Babɔtɔli bokonzi ya moyangeli oyo apusaki lolendo
MOSAKOLI Danyele akomaki ete, “Mokonzi Belesasala asalaki elambo monene mpo na bato na lokumu na ye nkóto, mpe amelaki vinyo na liboso na nkóto yango.” Kasi, ntango elambo ezalaki kosalema, “elongi na mokonzi ebongwanaki, mpe makanisi na ye matungisaki ye; makolo na ye malɛmbaki mpe mabɔlɔngɔ na ye mabɛtanaki.” Liboso ntɔngɔ etana, “Belesasala, mokonzi na Bakaladi abomamaki. Mpe Dalio, Momadai, azwaki bokonzi.”—Danyele 5:1, 6, 30, 31.
Belesasala azalaki nani? Ebandaki boni bábénga ye “mokonzi na Bakaladi”? Azalaki mpenza na esika nini na Bokonzi ya Babilone? Ndenge nini babɔtɔlaki ye bokonzi?
Moyangeli-molandi to Mokonzi?
Danyele alobi ete Nebukadanesala azalaki tata ya Belesasala. (Danyele 5:2, 11, 18, 22) Nzokande, bondeko na bango ezali mpenza ndenge alobeli yango te. Buku moko (Nabonidus and Belshazzar), ekomami na Raymond Dougherty, emonisi ete ekoki kozala ete Nebukadanesala azalaki nkɔkɔ ya Belesasala oyo abotá Nitocris, mama na ye. Ekoki mpe kozala ete Nebukadanesala, oyo azalaki mokonzi liboso ya Belesasala, azalaki bobele “tata” na ye na ndenge ayangelaki liboso na ye. (Kokanisá na Genese 28:10, 13.) Ata soki ezalaki ndenge nini, basilɛndrɛ mingi esalemi na libazi (argile) oyo bakundolaki na sudi ya ekólo Irak na ekeke ya 19 ezali na makomi ya cunéiforme oyo emonisi ete Belesasala azalaki mwana ya liboso ya Nabonide, mokonzi ya Babilone.
Lokola lisolo ya Danyele mokapo 5 elobeli mingi makambo oyo esalemaki na butu oyo Babilone ekweaki na mobu 539 L.T.B., eyebisi te ndenge nini Belesasala akómaki moyangeli. Kasi, biloko oyo bakundoli na bolukiluki ya arkeoloji bizali kopesa biso mwa likanisi ya bondeko ya Nabonide na Belesasala. Alan Millard, nganga-mayele ya arkeoloji mpe na nkota ya Basemite ya kala alobi ete: “Makomi ya Babilone emonisi ete Nabonide azalaki moyangeli moko oyo azalaki na makambo ya ndenge mosusu.” Millard alobi lisusu ete: “Atako abosanaki banzambe ya Babilone te, . . . amipesaki mingi na nzambe-sanza na bingumba mosusu: Ulu mpe Halana. Na eleko ya boyangeli na ye, Nabonide afandaki mbula mingi te na Babilone; kasi azalaki kofanda na Teima [to, Tema] na nɔrdi ya Alaba.” Tomoni ete Nabonide alekisaki mbula mingi ya boyangeli na ye na bisika mosusu kasi na Babilone te oyo ezalaki engumba-mokonzi. Soki azali te, Belesasala nde azalaki koyangela.
Mpo na kolimbola malamu esika oyo Belesasala azalaki na yango, mokanda moko ebéngami “Pamphlet contre Nabonide” oyo ezali na makomi ya cunéiforme elobi ete: “[Nabonide] atikaki (mwana) na ye ya liboso atambwisa ‘mampinga ya basoda,’ atyaki ye mokonzi ya basoda na ekólo mobimba. Atikelaki ye (makambo nyonso), apesaki ye bokonzi.” Na bongo, Belesasala azalaki moyangeli-molandi.
Kasi, moyangeli-molandi akoki nde kobéngama mokonzi? Na bambula ya 1970, bakundolaki ekeko ya moyangeli moko ya kala na nɔrdi ya ekólo Syrie; ekeko yango emonisi ete ezalaki kosalema ete moyangeli abéngama mokonzi soki azalaki na titre ya nse. Ekeko wana ezalaki ya moyangeli ya engumba Gozan mpe ezalaki na makomi na lokota ya Assyrien mpe ya Araméen. Makomi ya Assyrien ebéngaki moto yango guvernere ya engumba Gozan, kasi, makomi makokani na yango oyo makomamaki na Araméen ebéngaki ye mokonzi. Na yango, ezalaki likambo ya sika te ete na mikanda ya Leta ya Babilone bábénga Belesasala ete mwana oyo akosangola bokonzi, bongo na makomi ya Araméen oyo Danyele akomaki bábénga ye mokonzi.
Ebongiseli ya kotya Belesasala moyangeli-mosungi ya Nabonide ekobaki kino ntango Bokonzi ya Babilone esukaki. Yango wana, na butu oyo Babilone ekweaki, Belesasala alakaki ete akotya Danyele moyangeli ya misato kati na bokonzi, kasi ya mibale te.—Danyele 5:16.
Moyangeli oyo amityelaki motema koleka mpe apusaki lolendo
Makambo masalemaki na nsuka ya boyangeli ya Belesasala emonisi ete mwana yango ya mokonzi amityelaki motema koleka mpe azalaki na lolendo. Ntango bokonzi na ye ekómaki na nsuka na mokolo ya 5 Ɔkɔtɔ́bɛ ya mobu 539 L.T.B., bakendaki kobomba Nabonide na Borsippa, mpamba te Bamede na Bapelese balongaki basoda na ye. Bazingaki engumba Babilone. Kasi, Belesasala akanisaki ete eloko moko ekokómela ye te lokola engumba ezalaki na lopango ya bifelo mineneminene; yango wana, na butu yango asalaki “elambo monene mpo na bato na ye minene nkóto.” Hérodote, nganga-mayele ya istware mpe moto ya ekólo Grèce oyo azalaki na ekeke ya mitano L.T.B., alobi ete na kati ya engumba, bato “bazalaki kobina mpe kosepela na ntango wana.”
Nzokande, na libándá ya Babilone, basoda ya Mede na Pelese bazalaki kosɛnzɛla. Sirise oyo azalaki kokamba bango atindaki ete bálekisa mai ya Ebale Pelata oyo elekaki na kati ya engumba na nzela mosusu. Basoda na ye bakatisaki ebale ntango kaka mai na yango ekitaki na nivo oyo ekokaki mpo báleka na makolo. Babutaki likoló mpe lokola bikuke ya motako oyo ezalaki na kati ya bifelo pembenipembeni ya ebale ezalaki polele, bakɔtaki na kati ya engumba.
Soki Belesasala ayebaki makambo oyo ezalaki koleka libándá ya engumba, mbɛlɛ atindaki ete bákanga bikuke ya motako mpe ete bato na ye ya makasi bátɛlɛma na bifelo pembenipembeni ya ebale, mpe básukisa mayele ya banguna. Nzokande, na molangwa ya vinyo, Belesasala, moto oyo apusaki lofundo, asɛngaki ete báya na bakɔpɔ ya tempelo ya Yehova. Bongo ye na babyangami na ye, basi na ye, mpe bamakango na ye babangaki te komela na bakɔpɔ yango, wana bazalaki kokumisa banzambe ya Babilone. Mbala moko, likambo moko ya kokamwa esalemaki: lobɔkɔ moko ebimaki mpe ebandaki kokoma na efelo ya ndako ya mokonzi. Lokola nsɔmɔ ekangaki ye, Belesasala abéngaki bato na ye ya mayele ete bálimbwela ye makomi yango. Kasi, “bakokaki kotánga likomi te mpe bakokaki koyebisa mokonzi ntina na yango te.” Na nsima, Danyele “akambamaki liboso na mokonzi.” Na kopemama na Nzambe, mosakoli ya mpiko ya Yehova ayebisaki ndimbola ya nsango oyo ebimaki na likamwisi, asakolaki ete Babilone ekokwea na mabɔkɔ ya Bamede na Bapelese.—Danyele 5:2-28.
Bamede na Bapelese bazwaki engumba yango na bolɛmbu nyonso, mpe babomaki Belesasala kaka na butu wana. Bokonzi ya Babilone esukaki nzela moko na liwa ya Belesasala mpe emonani ete na ntango yango Nabonide amikabaki na mabɔkɔ ya Sirise.
[Elilingi na lokasa 9]
Danyele alimboli nsango ya kobomama ya Bokonzi ya Babilone