Ntango mpe bileko ezali na mabɔkɔ ya Yehova
“Ezali likambo na bino koyeba ntango soko [bileko, NW] bisili Tata kotya na bokonzi na ye moko te.”—MISALA 1:7.
1. Yesu ayanolaki ndenge nini na motuna ya bayekoli mpo na oyo etali ntango?
EBONGI mpenza ete bato oyo bazali ‘kokimela mpe kolela na ntina na makambo na mbindo nyonso mazali kosalema’ na kati ya mangomba ya boklisto mpe na mabelé mobimba bámituna soki ntango nini ebongiseli ya biloko mabe oyo ekosuka mpo ete mokili ya sika ya Nzambe ezwa esika na yango. (Ezekiele 9:4; 2 Petelo 3:13) Liboso Yesu akufa mpe nsima ya lisekwa na ye, bantoma batunaki ye mituna mpo na ntango. (Matai 24:3; Misala 1:6) Kasi, na eyano na ye, Yesu alakisaki bango kotánga mikolo te. Na libaku moko, apesaki bango elembo oyo esangisi makambo mingi, mpe na libaku mosusu alobaki na bango ete ‘ezali likambo na bango koyeba ntango soko [bileko, NW] bisili Tata kotya na bokonzi na ye moko te.’—Misala 1:7.
2. Mpo na nini tokoki koloba ete Yesu ayebaki ntango nyonso te manaka ya Tata na ye mpo na makambo oyo masengeli kobima na mikolo ya nsuka?
2 Atako Yesu azali Mwana mobotami-bobele-moko ya Yehova, ayebaki ntango nyonso te manaka oyo Tata na ye azalaki kosala na yango makambo. Na esakweli na ye ya mikolo ya nsuka, Yesu andimaki na komikitisa nyonso ete: “Nde mpo na mokolo yango mpe ntango yango, moto ayebi te, ata [baanzelu, NW] na Likoló te, ata Mwana mpenza te, kasi bobele Tata ayebi.” (Matai 24:36) Yesu andimaki kozela na motema molai ete Tata na ye ayebisa ye ntango mpenza akosukisa ebongiseli oyo ya biloko mabe.a
3. Liteya nini tokoki kozwa na biyano ya Yesu na mituna etali mokano ya Nzambe?
3 Tokoki kosimba makambo mibale na ndenge oyo Yesu ayanolaki na mituna etali makambo makobima mpo na kokokisa mokano ya Nzambe. Ya liboso, Yehova azalaka na manaka; mpe ya mibale, ye moko nde aponaka ntango na ye, mpe basaleli na ye basengeli kolikya te ete akoyebisa bango na bosikisiki ntango to bileko na ye.
Ntango mpe bileko ya Yehova
4. Pesá ndimbola ya maloba ya Greke oyo mabongolami na “ntango” mpe “bileko” na Misala 1:7?
4 “Ntango” mpe “bileko” elimboli nini? Na Misala 1:7, Yesu alobeli ndenge mibale ya ntango. Liloba ya Greke oyo ebongolami na “ntango” elimboli “ntango na kotalela boumeli,” bolai ya ntango (molai to mokuse). “Bileko” ebongoli liloba oyo emonisi ntango oyo etyami to eponami, eleko moko ya sikisiki oyo makambo ndenge na ndenge makobima. William Vine alobi boye mpo na maloba ya Greke wana mibale: “Na Misala 1:7, ‘Tata atii na nse ya bokonzi na ye’ ntango (chronos), bolai ya ntango, mpe bileko (kairos), bilaka oyo makambo ya sikisiki makosalema.”
5. Ntango nini Yehova ayebisaki Noa mokano na ye ya koboma mokili mabe, mpe mikumba nini apesaki ye?
5 Liboso Mpela eya, Nzambe akataki ete makambo mabe oyo bato mpe baanzelu oyo balataki nzoto ya bato batondisaki na mokili esengelaki koumela mbula 120. (Genese 6:1-3) Na ntango wana, mosembwi Noa azalaki na mbula 480. (Genese 7:6) Azalaki na bana te mpe atikalaki bongo mbula 20 lisusu. (Genese 5:32) Na nsima mpenza, ntango bana ya Noa bakómaki mikóló mpe babalaki, Nzambe ayebisaki Noa mokano na ye ya kolongola mabe na mokili. (Genese 6:9-13, 18) Ezala na ntango wana, atako Noa azwaki mokumba ya kotonga masuwa mpe kosakwela bato ya ntango na ye, Yehova ayebisaki ye manaka na ye te.—Genese 6:14; 2 Petelo 2:5.
6. (a) Ndenge nini Noa amonisaki ete atikaki makambo ya ntango na mabɔkɔ ya Yehova? (b) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Noa?
6 “Noa asalaki bobele bongo, mpe asilisaki nyonso elakaki Nzambe ye” na boumeli ya bambula mingi—ekoki kozala mbula ntuku mitano. Noa asalaki bongo “na kondima,” ayebaki dati moko ya sikisiki te. (Genese 6:22; Baebele 11:7) Yehova ayebisaki ye te ntango mpenza oyo akosala makambo kino etikalaki pɔsɔ moko liboso ete Mpela ebanda. (Genese 7:1-5) Elikya mpe kondima ezangi kotɛngatɛnga oyo Noa azalaki na yango epai ya Yehova esalisaki ye ete atika makambo ya ntango na mabɔkɔ ya Nzambe. Noa azalaki na botɔndi mingi ntango amonaki libateli ya Yehova na Mpela mpe na nsima abimaki na masuwa mpe atambolaki na mabelé oyo mapɛtolami! Lokola biso mpe tozali na elikya lolenge moko ya kobika na mikolo mizali koya, tosengeli komonisa kondima ya ndenge wana epai ya Nzambe, boye te?
7, 8. (a) Bikólo mpe banguya eleki makasi na mokili mobimba ebandaki ndenge nini? (b) Na ndimbola nini Yehova ‘aponeli bato bileko mpe atyeli bango ndelo na bifandelo na bango’?
7 Nsima ya Mpela, bakitani mingi ya Noa basundolaki losambo ya solo ya Yehova. Bazwaki mokano ya kofanda esika moko, yango wana babandaki kotonga mboka mpe ndako moko molai mpo na losambo ya lokuta. Yehova amonaki ete ntango ekokaki mpo asala likambo moko. Abulunganisaki minɔkɔ na bango mpe “apalanganisaki bango bipai nyonso na mokili [longwa na Babele].” (Genese 11:4, 8, 9) Na nsima, bituluku oyo ezalaki koloba lokota moko bikolaki mpe bikómaki bikólo, bikólo mosusu bisanganaki mpe bikómaki bikólo ya nguya na mwa eteni moko ya mokili, mpe mosusu banguya eleki makasi na mokili mobimba.—Genese 10:32.
8 Na ndenge azali kokokisa mokano na ye, na mabaku mosusu Nzambe akataki bandelo ya ekólo moko mpe ntango boni ekólo moko ekozala nguya oyo eleki makasi na eteni moko ya mokili to na mokili mobimba. (Genese 15:13, 14, 18-21; Exode 23:31; Deteronome 2:17-22; Danyele 8:5-7, 20, 21) Ntoma Paulo alobelaki likambo wana ya ntango mpe bileko ya Yehova wana ayebisaki Bagreke bato ya mayele na engumba Atene ete: “Nzambe oyo asalaki mokili, na biloko nyonso na kati na yango . . . Na nkɔkɔ moko abotisi mabota nyonso na bato kofanda na mikili nyonso na nse; aponeli bango [bileko, NW] mpe atyeli bango ndelo na bifandelo na bango.”—Misala 17:24, 26.
9. Ndenge nini Yehova ‘abongolaki ntango mpe bileko’ mpo na bakonzi?
9 Likambo oyo elingi koloba te ete Yehova nde asalaka ete bato bázwa bokonzi to mbongwana esalema na bikólo. Kasi, akoki kosala likambo moko soki aponi kosala bongo mpo na kokokisa mokano na ye. Yango wana, mosakoli Danyele oyo amonaki na miso kokwea ya Babilone, nguya eleki makasi na mokili mobimba, mpe ndenge nguya ya Bamede na Bapelese ezwaki esika na yango, alobaki ete: “[Yehova abongolaka ntango mpe bileko, NW]; ye akolongolaka mikonzi mpe akotɛmisaka mikonzi; ye akopesaka mayele na bato na mayele mpe boyebi na bango basosoli.”—Danyele 2:21; Yisaya 44:24–45:7.
‘Elaka ebɛlɛmaki’
10, 11. (a) Yehova aponaki mbula oyo asengelaki kosikola bakitani ya Abalayama na boombo ntango boni liboso? (b) Nini emonisi ete Bayisalaele bayebaki te ntango nini mpenza basengelaki kosikolama?
10 Koleka bikeke minei liboso, Yehova aponaki mbula mpenza oyo alingaki kosambwisa mokonzi ya Ezipito, nguya elekaki makasi na mokili mobimba, mpe kosikola bakitani ya Abalayama na boombo. Ntango ayebisaki Abalayama mokano na ye, alakaki ete: “Yebá boye ete mabota na yo bakozala bapaya kati na mokili mozali na bango te. Bakozala baombo kuna, mpe bakonyokolama mbula nkama minei. Kasi nakopesa etumbu na libota yango bango bakosalela, mpe na nsima bakobima na biloko na motuya mingi.” (Genese 15:13, 14) Ntango Setefano azongelaki lisolo mobimba ya Yisalaele na bokuse liboso ya Sanedrina, alobelaki eleko wana ya mbula 400 mpe alobaki ete: “Nde wana ebɛlɛmi elaka oyo Nzambe atikaki na Abalayama, bato batondani mingi mpenza kati na Ezipito, kino ebimi mokonzi mosusu na Ezipito oyo ayebaki Yosefe te.”—Misala 7:6, 17, 18.
11 Falo wana ya sika akómisaki Bayisalaele baombo. Atako na ntango wana Mose akomaki naino mokanda ya Genese te; emonani ete libota mokomoko ezalaki koyebisa elaka ya Yehova epai na Abalayama na libota oyo elandi yango, ezala na maloba to mpe na makomi. Atako bongo, emonani ete makambo oyo Bayisalaele bayebaki epesaki bango nzela ya kotánga mikolo te mpo na kozwa dati oyo balingaki kosikolama na boombo. Nzambe ayebaki ntango oyo alingaki kosikola bango, kasi emonani ete Bayisalaele oyo bazalaki konyokwama bayebaki ntango yango te. Totángi boye: “Ntango molai elekaki mpe mokonzi na Ezipito akufaki na ntango yango. Mpe bato na Yisalaele bakimelaki na boombo na bango mpe balelaki ete básungama mpe kolela na bango kati na boombo ekómaki epai na Nzambe. Nzambe ayokaki mpe [kolela, NW] na bango mpe Nzambe akanisaki kondimana kati na ye na Abalayama mpe na Yisaka mpe na Yakobo. Nzambe atalaki mpe bato na Yisalaele, mpe Nzambe ayebaki likambo na bango.”—Exode 2:23-25.
12. Ndenge nini Setefano amonisi ete Mose akendaki mbangu na kotalela ntango ya Yehova?
12 Lisolo mokuse ya Setefano ekoki mpe komonisa biso ete Bayisalaele bayebaki ntango ya sikisiki ya kosikwama na bango te. Setefano alobaki boye mpo na Mose: “Nde ezalaki ye na mbula ntuku minei, akanisi na motema na ye kokenda kotala bandeko na ye, bato na Yisalaele. Amoni moko na bango kozwa mpasi, mpe asungi ye. Abɛti Moezipito ete abikisa monyokolami. Akanisi ete bandeko na ye bayebi ete Nzambe akopesa bango lobiko na mabɔkɔ na ye, nde bayebi te.” (Misala 7:23-25) Mose asalaki likambo wana mbula 40 liboso ya ntango oyo Nzambe aponaki. Setefano amonisaki ete Mose asengelaki kozela lisusu mbula 40 liboso ete Nzambe ‘apesa bango lobiko na mabɔkɔ na ye.’—Misala 7:30-36.
13. Ndenge nini ezalela na biso ekokani na ezalela ya Bayisalaele liboso ya kosikwama na Ezipito?
13 Atako ‘ntango ya kokokisa elaka ekómaki pene’ mpe ete Nzambe aponaki mbula yango mpenza, Mose na Bayisalaele nyonso basengelaki kozala na kondima. Basengelaki kozela ntango oyo Yehova aponaki, kasi emonani mpenza ete bakokaki kotánga mikolo yango liboso te. Biso mpe tondimi ete etikali moke tokosikwama na ebongiseli ya biloko oyo. Toyebi ete tozali sikawa na “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1-5) Tosengeli kozala na mposa ya komonisa kondima na biso mpe kozela ntango oyo Yehova aponi mpo na mokolo monene na ye. (2 Petelo 3:11-13) Na ntango wana, lokola Mose na Bayisalaele, tokoyemba mpenza loyembo ya nkembo mpo na lobiko, mpo na kokumisa Yehova.—Exode 15:1-19.
‘Wana esili elaka kokoka’
14, 15. Ndenge nini toyebi ete Nzambe asilaki kopona ntango oyo Mwana na ye asengelaki koya awa na mabelé, mpe likambo nini basakoli mpe ata baanzelu bazalaki kotalatala?
14 Yehova aponaki ntango oyo Mwana na ye mobotami-bobele-moko asengelaki koya awa na mabelé lokola Masiya. Paulo akomaki ete: “Nde wana esili elaka kokoka solo, Nzambe atindaki Mwana na ye, oyo abotamaki na mwasi, oyo abotamaki na nse na Mibeko.” (Bagalatia 4:4) Likambo wana ekokisaki elaka na ye ya kotinda Mombóto—‘Silo, ye oyo bato nyonso bakotosa.’—Genese 3:15; 49:10, NW.
15 Basakoli ya Nzambe—ata mpe baanzelu—bazalaki kotalatala “eleko” oyo Masiya asengelaki komonana awa na mabelé mpo na kobikisa bato ya masumu. Petelo alobaki ete, “Basakoli balukaki mpe batunaki mpo na lobiko yango; bango basakolaki liboso mpo na ngɔlu ekokómela bino. Batunaki soko [elimo, NW] na Klisto ezali komonisa elaka nini to elaka na motindo nini. Ye azalaki kati na bango, mpe azalaki kotatola liboso mpo na mpasi na Klisto mpe mpo na nkembo ekoya nsima na bango. . . . [Baanzelu, NW] bazali na mposa na kotalatala kati na makambo oyo.”—1 Petelo 1:1-5, 10-12.
16, 17. (a) Na nzela ya esakweli nini Yehova asalisaki Bayuda ya ekeke ya liboso na kozela Masiya? (b) Esakweli ya Danyele esalaki bopusi nini epai ya Bayuda mpo na kozela Masiya?
16 Na nzela ya mosakoli Danyele—oyo azalaki na kondima makasi—Yehova apesaki esakweli ya “pɔsɔ nsambo.” Esakweli yango esalisaki Bayuda ya ekeke ya liboso na koyeba ete komonana ya Masiya oyo alakamaki ekómaki pene. Esakweli yango elobaki ete: “Longwa na kobima na liloba na kotɛlɛmisa mpe na kotonga Yelusaleme kino koya na mopakolami, mokonzi, ekozala pɔsɔ nsambo. Na nsima mpo na pɔsɔ ntuku motoba na mibale.” (Danyele 9:24, 25) Banganga-mayele ya teoloji ya Bayuda, ya Bakatolike, mpe ya Baprotesta bandimaka ete “bapɔsɔ” oyo elobelami awa ezali bapɔsɔ ya bambula. “Pɔsɔ” 69 (mbula 483) ya Danyele 9:25 ebandaki na mobu 455 L.T.B. ntango Alatazelezese, mokonzi ya Pelese apesaki Nehemia ndingisa ya “kotɛlɛmisa mpe kotonga Yelusaleme.” (Nehemia 2:1-8) Bapɔsɔ yango esukaki mbula 483 na nsima; elingi koloba na mobu 29 T.B., ntango Yesu abatisamaki mpe apakolamaki na elimo santu, na bongo akómaki Masiya, to Klisto.—Matai 3:13-17.
17 Eyebani te soki Bayuda ya ekeke ya liboso bayebaki mpenzampenza ntango oyo mbula 483 ebandaki. Kasi ntango Yoane Mobatisi abandaki mosala na ye, “bato bazalaki na mitema na likoló, bango nyonso kotuna na mitema na bango na ntina na Yoane, soko ye Klisto.” (Luka 3:15) Banganga-mayele mosusu ya Biblia balobaka ete motema likoló wana etalelaki esakweli ya Danyele. Matthew Henry akomaki boye mpo na vɛrsɛ yango: “Awa bayebisi biso . . . na kotalela mosala mpe batisimo oyo Yoane azalaki kopesa, ndenge bato bazwaki libaku ya kokanisa Masiya, mpe kokanisa ete koya na ye ekómi pene. . . . Pɔsɔ nsambo ya Danyele ekómaki na nsuka.” Buku moko (Manuel Biblique) ekomami na Vigouroux, Bacuez, mpe Brassac elobi boye: “Bato bayebaki ete pɔsɔ nsambo ya mibu oyo Danyele asakolaki ekómaki na nsuka; moto moko te akamwaki na komona Yoane Mobatisi kosakola ete Bokonzi ya Nzambe ekómi pene.” Abba Hillel Silver, nganga-mayele ya teoloji ya Bayuda, akomaki ete na kotalela “manaka oyo bato mingi bandimaki” na mikolo wana, “bazalaki kozela Masiya na eleko ebandi na mobu 25 kino mobu 50 ya ekeke ya liboso T.B.”
Makambo oyo makobima, kasi kotánga mikolo te
18. Atako esakweli ya Danyele esalisaki Bayuda na koyeba ntango oyo Masiya akokaki komonana, nini mpenza endimisaki bato ete Yesu azali Masiya?
18 Atako emonani ete kotánga mikolo esalisaki Bayuda na kozala na mwa likanisi na eleko oyo Masiya asengelaki komonana, makambo oyo elandaki emonisi ete yango esalisaki bato mingi te na kondima ete Yesu azalaki Masiya. Pene na mbula moko liboso ete akufa, Yesu atunaki bayekoli na ye ete: “Bato bazali koloba ete ngai nani?” Bayanolaki ete: “Yoane Mobatisi; nde bamosusu Eliya; mpe bamosusu ete moko na basakoli na kalakala asekwi.” (Luka 9:18, 19) Lisolo moko te emonisi biso ete Yesu, mpo na kondimisa ete azalaki Masiya, atángaki esakweli ya bapɔsɔ ya elilingi oyo Danyele akomaki. Kasi na libaku moko alobaki ete: “Nde ngai nazali na litatoli lileki yango na Yoane mpo ete misala mipesaki Tata epai na ngai ete nakokisa yango, misala mizali ngai kosala, ikotatola mpo na ngai ete Tata atindi ngai.” (Yoane 5:36) Nzambe apesaki manaka moko te mpo na komonisa ete Yesu azalaki Masiya oyo Nzambe atindaki. Kasi ezali nde na mosala ya kosakola mpe na bikamwiseli ya Yesu, bakisa mpe makambo oyo masalemaki ntango akufaki (molili ya kokamwa, elamba ya tempelo epasukaki, mpe mabelé eninganaki).—Matai 27:45, 51, 54; Yoane 7:31; Misala 2:22.
19. (a) Ndenge nini baklisto basengelaki koyeba ete etikali moke Yelusaleme ebomama? (b) Mpo na nini baklisto ya liboso oyo bakimaki Yelusaleme basengelaki ntango nyonso kozala na kondima mingi?
19 Ndenge moko, nsima ya liwa ya Yesu, ata mokolo moko te balakisaki baklisto ya ekeke ya liboso lolenge moko te ya kotánga mikolo mpo na koyeba ntango oyo nsuka ya ebongiseli ya biloko ya Bayuda ekoya. Ezali solo ete esakweli ya bapɔsɔ ya elilingi ya Danyele elobelaki kobomama ya ebongiseli yango. (Danyele 9:26b, 27b) Kasi likambo yango esengelaki kosalema nsima ya “bapɔsɔ nsambo” (455 L.T.B.-36 T.B.). Na maloba mosusu, nsima wana bato ya libosoliboso oyo bautaki na mabota mosusu bakómaki bayekoli ya Yesu na mobu 36 T.B., baklisto bazalaki lisusu kozela likambo moko te oyo Danyele mokapo 9 esakolaki. Mpo na bango, makambo oyo makobima, kasi manaka te, nde elingaki komonisa ete ebongiseli ya Bayuda elingi kosuka. Makambo oyo Yesu asakolaki mabandaki kokokisama na mobu 66 T.B. ntango basoda ya Loma bayaki kobundisa Yelusaleme mpe na nsima bazongaki. Likambo yango epesaki baklisto ya sembo oyo bazalaki kosɛnzɛla, baye bafandaki na Yelusaleme mpe na Yudea, libaku ya ‘kokima na bangomba.’ (Luka 21:20-22) Lokola bazalaki na manaka moko te, baklisto ya ekeke ya liboso bayebaki te ntango nini mpenza Yelusaleme elingaki kobebisama. Basengelaki mpenza kozala na kondima makasi mpo na kotika bandako, bibwele, mpe misala na bango mpe kokende kofanda mbula soko minei libándá ya Yelusaleme kino basoda ya Loma bayaki lisusu na mobu 70 T.B. mpe babomaki ebongiseli mobimba ya Bayuda!—Luka 19:41-44.
20. (a) Ndenge nini tokoki kozwa litomba na ndakisa ya Noa, Mose, mpe baklisto ya ekeke ya liboso oyo bafandaki na Yudea? (b) Tokolobela makambo nini na lisolo oyo elandi?
20 Lokola Noa, Mose, mpe baklisto ya ekeke ya liboso oyo bafandaki na Yudea, biso mpe lelo oyo tokoki, na elikya nyonso, kotika ntango mpe bileko na mabɔkɔ ya Yehova. Kondima oyo tozali na yango ete tozali sikawa na mikolo ya nsuka mpe ete lobiko na biso ekómi pene esimbami na kotánga mikolo te, kasi na makambo tozali komona, oyo mazali kokokisa bisakweli ya Biblia. Lisusu, atako tozali na eleko ya kozala ya Klisto, tozali se na mposa ya kozala na kondima mpe kosɛnzɛla ntango nyonso. Tosengeli kokoba kozela na mposa monene makambo oyo Makomami esakolaki. Ezali yango nde tokolobela na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augústo 1996, nkasa 30-31.
Bozongeli
◻ Yesu ayebisaki bayekoli na ye nini na ntina na ntango mpe bileko ya Yehova?
◻ Noa ayebaki ntango oyo Mpela esengelaki kobanda mikolo boni liboso?
◻ Nini emonisi ete Mose na Bayisalaele bayebaki na bosikisiki te ntango oyo balingaki kosikolama na Ezipito?
◻ Ndenge nini tokoki kozwa litomba na bandakisa ya Biblia oyo emonisi ntango mpe bileko ya Yehova?
[Elilingi na lokasa 11]
Kondima ya Noa esalisaki ye ete atika makambo ya ntango na mabɔkɔ ya Yehova