Bonkɔkɔ mpe mitinda ya boklisto ekoki koyokana?
STEPHEN azali Motatoli ya Yehova, azali moto ya Mpoto, kasi akendaki kosala mosala ya misionere na mboka moko na Afrika. Mokolo moko azalaki kotambola elongo na ndeko mobali moko ya mboka wana. Kasi ntango ndeko yango asimbaki ye na lobɔkɔ, ekamwisaki ye.
Komona mibali mibale basimbani ntango bazali kotambola ezalaki likambo ya kokamwa mpo na Stephen. Na mboka na bango, soki mibali basimbani, elingi koloba basangisaka nzoto mibali na mibali. (Baloma 1:27) Nzokande, mpo na ndeko wana ya Afrika, kosimbana na mabɔkɔ ezali elembo ya boninga. Soki oboyi moto asimba yo na lobɔkɔ elingi koloba oboyi ye azala moninga na yo.
Mpo na nini likambo ya bokeseni ya mimeseno esengeli kotalela biso? Ya liboso, ezali mpo basaleli ya Yehova basengeli kosala mosala oyo Nzambe apesi bango ya “kozalisa bayekoli na mabota nyonso.” (Matai 28:19) Mpo na kosala mosala wana, basusu bazali kokende na bamboka oyo ezali na mposa ya basakoli mingi. Mpo bálonga epai bakei, basengeli koyeba mpe komimesanisa na makambo ndenge na ndenge oyo bakokuta kuna. Bongo, bakosala na boyokani na bandeko na mboka oyo bakei, mpe lisusu bakobota mbuma mingi na mosala ya kosakola.
Lisusu, na mokili oyo etondi na yikiyiki, bato mingi bazali kokima bamboka na bango oyo ezali na matata mpo na makambo ya politiki to ya nkita mpe bazali kokende kofanda na bamboka mosusu. Yango wana, ntango toteyaka bato oyo bayei sika na teritware na biso, tomonaka mimeseno oyo toyebaki liboso te. (Matai 22:39) Soki tomoni bato bazali kosala makambo ndenge mosusu, na ebandeli ekoki kobulunganisa biso.
Makambo oyo ezali polele
Bato na bato esika bafandi bazali na mimeseno na bango. Yango wana, ekozala ntina te ete tózala ‘basembwi na kolekisa ndelo.’ Mpe tókolukaluka koyeba ata likambo moke soki eyokani na mitinda ya Biblia!—Mosakoli 7:16.
Kasi, tosengeli koyeba bonkɔkɔ oyo ezali kobuka mitinda ya Nzambe. Mbala mingi, ezalaka mpasi te mpo na koyeba yango, mpamba te Liloba ya Nzambe ezali wana “mpo na kosembola.” (2 Timote 3:16) Na ndakisa, bonkɔkɔ ya mboka mosusu esɛngaka mobali abala basi ebele. Kasi, mpo na baklisto ya solo, Biblia elobi mobali akobala kaka mwasi moko.—Genese 2:24; 1 Timote 3:2.
Ndenge moko mpe, moklisto ya solo akoboya kosala makambo mosusu oyo bato basalaka na ntango ya matánga mpo na kobengana bilimo mabe, mpamba te bato yango bakanisaka ete molimo ekufaka te. Bato mosusu batumbaka mpaka na malasi to babondelaka mowei mpo na kobengana bilimo mabe. Basusu bafandaka ntɔngɔ saa na ebembe to basalaka milulu mosusu nsima ya mikolo mpo na kosalisa mowei azala malamu na ‘mokili mosusu.’ Nzokande, Biblia elobi “bakufi bayebi likambo te” mpe bakoki kosala moto malamu to mabe te.—Mosakoli 9:5; Nzembo 146:4.
Ya solo, bonkɔkɔ mingi eyokani na Liloba ya Nzambe. Tosepelaka mingi ntango tokómi na mboka oyo kino lelo bato balingaka koyamba bapaya. Epai bonkɔkɔ esɛngaka kopesa moto nyonso mbote ya esengo ata soki oyebi ye te, mpe soki likoki ezali, kokɔtisa ye na ndako! Soki basaleli yo boye, yo mpe okosepela kolanda ndakisa yango, boye te? Soki okosala bongo, ekosalisa yo okóma lisusu moklisto ya malamu koleka.—Baebele 13:1, 2.
Nani yango alingaka báfandisa ye ntango molai mpo na kozela? Na bamboka mosusu esalemaka mpenza mingi te, mpamba te botosi ya ngonga ezali likambo ya lisɛki te. Biblia eyebisi biso ete Yehova azali Nzambe ya mobulu te. (1 Bakolinti 14:33) Yango wana, akani “mokolo mpe ngonga” oyo akosilisa mabe, mpe alaki biso ete likambo yango “ekoumela mingi te.” (Matai 24:36, NW; Habakuku 2:3) Bonkɔkɔ oyo elendisaka botosi ya ngonga esalisaka biso tósalaka makambo na molɔngɔ mpe tómemyaka bato mosusu mpo na ngonga oyo bapesi biso. Likambo yango eyokani na mitinda ya Biblia.—1 Bakolinti 14:40; Bafilipi 2:4.
Tokosala nini soki bonkɔkɔ ezali mabe te?
Atako bonkɔkɔ mosusu eyokani na mitinda ya boklisto, kasi mosusu eyokani te. Kasi ezali boni mpo na bonkɔkɔ oyo tokoki koloba te soki ezali malamu to mabe? Bonkɔkɔ mingi ezalaka mabe te. Kasi, lolenge oyo totalelaka yango nde ekoki komonisa soki tozali na bokatikati na elimo.
Na ndakisa, ndenge ya kopesa mbote ezali mingi—ekoki kopesana lobɔkɔ, kogumbama mwa moke liboso ya moto, kopwepwana (baiser), to ata koyambana. Bobele bongo, bato na bato bazali na bonkɔkɔ na bango na ndenge ya kolya. Na bamboka mosusu bato nyonso balyaka na saani moko. Epai mosusu, kobimisa mopɛpɛ ya libumu na monɔkɔ ezali mabe te, kutu na bisika mosusu ezalaka lolene malamu ya komonisa botɔndi. Kasi na bamboka mosusu ezali nsɔni mpe emonisaka ete moto oyo asali yango azali mosɛnzi.
Na esika ya koloba ete bonkɔkɔ oyo esepelisi yo to esepelisi yo te, salá nde makasi mpo na kotalela yango na ndenge ya malamu. Ntango nyonso Biblia ezali koloba na biso tósala ‘likambo moko mpo na elulela soko mpo na nzombo te kasi, awa ezali bino na kosɔkɛma, bótánga bamosusu ete baleki biso.’ (Bafilipi 2:3) Bobele bongo, Eleanor Boykin, na buku na ye (This Way, Please—A Book of Manners,) alobi: “Bosengeli liboso kozala na motema boboto.”
Mwa toli oyo ekopekisa biso kotyola bonkɔkɔ ya bato mosusu. Ekopusa biso tósepela koyekola ndenge bato mosusu bazalaka, tósalaka ndenge bango basalaka mpe tómeka bilei na bango na esika ya koboya to kokanisa mabe mpo na eloko nyonso oyo ekeseni na oyo biso tomeseni na yango. Soki tozali kondima mpe kotosa bonkɔkɔ oyo toyebaki liboso te, ekolakisa ete tozali kopesa limemya na moto oyo ayambi biso epai na ye to bapaya oyo bafandi pene na biso. Biso moko mpe tokozwa matomba ntango “tofungoli” mitema na biso mpe miso na biso mpo na komona makambo ya sika.—2 Bakolinti 6:13.
Soki bonkɔkɔ ezali kopekisa moto kokola na elimo
Kasi tokosala nini soki bonkɔkɔ na biso ebuki mibeko ya Biblia te, kasi ezali kosala ete moto akola te na elimo? Na ndakisa, na bamboka mosusu, bato bamesani kozongisa makambo nsima. Ezaleli wana ekoki kosalisa moto ete azalaka motema likolólikoló te, kasi ekosalisa biso te mpo na kokokisa mosala na biso ya Nzambe na ‘ndenge ekoki.’—2 Timote 4:5.
Ndenge nini tokoki kolendisa bato mosusu bázongisaka makambo ya ntina na nsima te? Tóbosana te ete “tosengeli liboso kozala na motema boboto.” Na bolingo nyonso, tokopesa ndakisa mpe tokolimbola na boboto matomba ya kosala makambo kaka mokolo wana na esika ya kozongisa yango nsima. (Mosakoli 11:4) Kasi, tosengeli mpe kokeba. Atako matomba malamu ezali na ntina, nzokande yango esengeli te kobosanisa biso ete tosengeli kotyela baninga motema. Soki bato bazali kondima makanisi na biso te na ebandeli, tokondimisa bango na makasi te. Tosengeli mpe kokangela bango nkanda te. Tosengeli kotyaka ntango nyonso bolingo na esika ya liboso mpe bamposa na biso na esika ya mibale.—1 Petelo 4:8; 5:3.
Tóyeba makambo oyo esepelisaka bato na esika tofandi
Tosengeli komindimisa ete likanisi nyonso oyo tozali kopesa ezali ya solo kasi tozali koluka te kopusa bato na makasi bándima bamposa na biso moko. Na ndakisa, elateli ezali na ndenge mingi. Na bamboka mosusu, moto oyo azali koteya nsango malamu ebongi alata kalavati, kasi na mboka ya moi makasi emonanaka lokola kolekisa ndelo. Koyeba makambo oyo esepelisaka bato na esika tofandi ezali malamu. Na ndakisa, balingaka moto ya lokumu oyo asalaka mosala liboso na bato mingi alata ndenge nini? Soki toyebi yango, ekoki kosalisa biso. Tosengeli kozala na “makanisi malamu” ntango tozali kotalela likambo etali molato.—1 Timote 2:9, 10.
Kasi tokosala boni soki bonkɔkɔ yango ezali kosepelisa biso te? Tokoboya yango mbala moko? Te. Bonkɔkɔ oyo endimaka mibali básimbana na mabɔkɔ, oyo tolobelaki na ebandeli, ezali mabe te na mboka wana ya Afrika. Ntango misionere wana amonaki mibali mosusu pembeni na bango bazalaki kotambola basimbani na mabɔkɔ, amitungisaki lisusu te.
Na mibembo ya mosala ya misionere, ntoma Paulo atalaki masangá oyo basangani na yango bautaki na bamboka ndenge na ndenge. Na ntembe te, bato na bato bazalaki na bonkɔkɔ na bango. Paulo amesanaki na bonkɔkɔ oyo akokaki komesana na yango, kasi azalaki kobosana mitinda ya Biblia te. Alobaki: “Nayei ndenge nyonso epai na bato nyonso ete na nzela nyonso nabikisa bamosusu.”—1 Bakolinti 9:22, 23; Misala 16:3.
Mwa mituna moke ya ntina ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge nini tokosala ntango tokutani na bonkɔkɔ oyo toyebaki liboso te. Ntango tondimi bonkɔkɔ moko to toboyi yango, bato bakomona biso ndenge nini? Bakondima nsango ya Bokonzi mpo bamoni ete tomeseni na bonkɔkɔ na bango? To, soki tolandi bonkɔkɔ ya mboka oyo tofandi, “mosala na biso [mpo na Nzambe] ekofingama?”—2 Bakolinti 6:3, NW.
Soki tolingi tókóma “ndenge nyonso epai na bato nyonso,” tosengeli kobongola lolenge totalelaka makambo oyo ebongi na oyo ebongi te. Mbala mingi lolenge “malamu” to “mabe” ya kosala likambo moko etalelaka mpenza esika tofandi. Yango wana, na mboka moko komona mibali basimbani na mabɔkɔ ezali elembo ya boninga, nzokande na mboka mosusu ekobwaka nsɔni na nsango ya Bokonzi.
Nzokande, ezali na bonkɔkɔ mosusu oyo endimami na bamboka mingi mpe ezali mabe te mpo na baklisto; kasi tosengeli kotalela yango na bokɛngi.
Kebá, kolekisa ndelo te!
Yesu Klisto alobaki na bayekoli na ye ete atako bakolongolama na mokili te, basengelaki kozala “bato na mokili te.” (Yoane 17:15, 16) Kasi, na bantango mosusu ezalaka mpasi mpo na kokesenisa makambo ya mokili ya Satana mpe oyo ezali bobele bonkɔkɔ ya bato. Na ndakisa, mboka na mboka ezali na miziki na mabina na yango. Na bamboka mosusu likambo yango ezalaka na ntina mingi.
Ekoki kozala likambo ya pɛtɛɛ kokamata ekateli na katalela bonkɔkɔ ya mboka na biso na esika ya kotalela Makomami. Ndeko moko nkombo na ye Alex, azali moto ya Allemagne atindamaki mpo na mosala na ekólo Espagne. Na Allemagne, bato mingi bamesani kobina te, kasi na Espagne kobina ezali likambo ya bonkɔkɔ. Ntango amonaki mpo na mbala ya liboso ndeko mobali na ndeko mwasi bazali kobina mabina ya makasi ya flamenco, amitungisaki. Mabina yango ezalaki mabe to ezalaki komonisa elimo ya mokili? Soki andimaki bonkɔkɔ wana, alingaki nde kobuka mitinda na ye? Alex ayaki koyeba ete atako miziki mpe mabina wana ekesanaki na oyo ya Allemagne, akokaki koloba te ete bandeko na ye mibali na basi bazalaki kobuka mitinda ya boklisto. Amitungisaki bobele mpo bonkɔkɔ na bango ekesanaki na bonkɔkɔ ya bato ya Espagne.
Nzokande, ndeko mosusu nkombo na ye Emilio, ye asepelaka na mabina oyo babinaka na Espagne, alobi ete likama ezali. Alobi: “Mabina mingi esɛngaka mwasi na mobali bákangana na nzoto. Lokola nazali monzemba, namoni ete yango ekoki kolamwisa bamposa na ngai to ya mwasi oyo nakobina na ye. Mbala mosusu, basusu balobaka ete kobina na moto moko ezali ndenge ya kolakisa ete olingi ye. Kasi mpo na komibatela, osengeli koyeba soki miziki oyo batii ezali malamu mpe kobina yango esɛngaka kotutana na nzoto te. Atako bongo, nayebi solo ete ntango bandeko mibali na bandeko basi oyo bazali bilenge bakei kobina, ezalaka mpasi mpo ete makambo nyonso máleka ndenge Teokrasi esɛngi.”
Ya solo, tokosalela te bonkɔkɔ na biso lokola nzela ya kolanda etamboli mabe ya bato ya mokili. Bayisalaele bazalaki kobɛta miziki mpe kobina. Ntango babimaki na boombo na Ezipito, basalaki feti monene na Mai Motane, bayembaki mpe babinaki. (Exode 15:1, 20) Nzokande, miziki mpe mabina na bango ekesanaki na oyo ya bapakano oyo bazalaki pene na bango.
Likambo ya mawa, ntango bazalaki kozela Mose auta na Ngomba Sinai, Bayisalaele bakangaki motema te, basalaki mwana na ngɔmbɛ, mpe nsima ya kolya mpe komela “batɛlɛmaki mpo na kosana.” (Exode 32:1-6) Ntango Mose na Yosua bayokaki lokito ya banzembo oyo bazalaki koyemba, na mbala moko, bamitungisaki mingi. (Exode 32:17, 18) Bayisalaele balekisaki “ndelo.” Sikoyo nzembo mpe mabina na bango eyaki kokokana na oyo ya bapakano oyo bazalaki zingazinga na bango.
Bobele bongo lelo oyo, miziki mpe mabina ekoki kondimama na esika tofandi mpe ekoki mbala mosusu ata kotungisa lisosoli ya bato mosusu te. Kasi soki bato bazali kobina na esika oyo babongisi ete ezala mwa molili, batii miinda ya ngɛlingɛli, to lolenge ya miziki ebongwani, makambo oyo ezalaki liboso malamu ekoki sikoyo komonisa elimo ya mokili. Tokoki koloba ete: “Ezali ndenge ya mboka na biso.” Alona alobaki mpe ndenge wana ntango amikɔtisaki na motindo ya kominanola mpe losambo ya bapakano. Na libunga nyonso abéngaki yango “elambo epai na [Yehova].” Alukaki komilongisa, kasi ezalaki se mpamba. Mpo ata na miso ya ‘banguna na bango ezalaki likambo ya nsɔni.’—Exode 32:5, 25.
Tótya bonkɔkɔ na esika na yango
Bonkɔkɔ ya bapaya ekoki kotungisa biso mpo na mbala ya liboso, kasi elingi koloba te ete nyonso ezali mabe. Lokola ‘tosili kolakisa bososoli’ na biso, tokoki koyeba bonkɔkɔ oyo ezali koyokana malamu na mitinda ya boklisto mpe oyo ezali koyokana malamu te. (Baebele 5:14) Ntango tozali komonisa motema boboto oyo etondi na bolingo mpo na bazalani na biso, tokomitambwisa na ndenge ebongi ntango tokutani na bonkɔkɔ oyo ezali mpenza mabe te.
Ntango tozali koteya nsango malamu ya Bokonzi na mboka na biso to na mboka mopaya, kozala na bokatikati mpo na bokeseni ya bonkɔkɔ ekopesa biso nzela tókóma “ndenge nyonso epai na bato nyonso.” Na ntembe te, lokola tozali kondima bokeseni ya bonkɔkɔ, ekosala ete tózala na bomoi ya malamu mpe ya esengo.
[Elilingi na lokasa 20]
Baklisto bakoki kopesana mbote na ndenge mingi
[Elilingi na lokasa 23]
Kotalela bokeseni ya bonkɔkɔ na bokatikati ekoki komema na bomoi ya malamu mpe ya esengo