Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/10 nk. 28-31
  • Bólanda kokola na elimo!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bólanda kokola na elimo!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na boyekoli na yo moko
  • Osengeli kokangama na Nzambe
  • Kolisá boninga makasi na Yehova
  • Na mosala na yo ya kosakola
  • Bilenge—Bókoba kokola na elimo nsima ya batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Salá ete mokano na yo ezala ya kosalela Nzambe libela
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Batatoli ya Yehova bandimelaka Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Batisimo mpe boyokani na yo ná Nzambe
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/10 nk. 28-31

Bólanda kokola na elimo!

Tolingaka Mpe Tokanisaka Ntango Nyonso Mokolo Oyo Tozwaki Batisimo. Ezali Mokolo Oyo Tomonisaki Na Miso Ya Bato Nyonso Ete Tomipesi Mpo Na Kosalela Nzambe.

MPO na bato mingi, esɛngaka milende makasi mpo na kokokisa likambo yango. Na ndakisa, kotika bizaleli mabe ya kala, kotika kotambola na baninga ya mabe, kobongola makanisi mpe etamboli oyo omesanaki na yango.

Atako batisimo ezali likambo ya esengo mpe ya ntina na bomoi ya moklisto, yango ezali se ebandeli. Ntoma Paulo ayebisaki baklisto ya Yudea oyo bazwaki batisimo ete: “Yango wana, sikawa lokola toleki mateya ya ebandeli matali Klisto, tiká ete tókola.” (Baebele 6:1, NW) Moklisto mokomoko asengeli ‘kokóma na bomoko na kondima mpe na boyebi na Mwana na Nzambe, ya moto oyo akɔmeli, na epimelo na monene na litondi na Klisto.’ (Baefese 4:13) Bobele soki tokokende liboso kino nsuka nde ‘tokotɛngatɛnga te kati na kondima.’—Bakolose 2:7, NW.

Na mwa bambula eleki, bankóto ya basambeli oyo bamipesi bakɔti na lisangá ya boklisto. Mbala mosusu yo mpe ozali moko na bato yango. Lolenge moko na bandeko na yo na ekeke ya liboso, osengeli kotikala mwana moke te na elimo. Osengeli kokola, mpe kokende liboso! Kasi ndenge nini? Na makambo nini okoki kokola?

Na boyekoli na yo moko

Paulo ayebisaki baklisto ya Filipi ete: “Libondeli na ngai ezali ete bolingo na bino bóyikana koleka mingi mingi esika moko na boyebi [ya sikisiki, NW] mpe bososoli nyonso.” (Bafilipi 1:9) Kobakisa “boyebi ya sikisiki” ezali na ntina mingi mpo na kokola na elimo. ‘Koyeba Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto’ ezali likambo oyo osengeli kosala yango ntango nyonso, kasi ezali eloko oyo esukaka nsima ya batisimo te.​—Yoane 17:3.

Nsima ya mbula zomi, mwasi moko moklisto, oyo tokobénga ye Alexandra, andimi likambo yango. Azwaki batisimo ntango azalaki na mbula 16. Abɔkwamaki kati na solo, azalaki kokende ntango nyonso na makita, mpe azalaki kobima na mosala ya kosakola. Akomi ete: “Nsima ya mwa basanza, namonaki likambo moko ya mabe mpenza. Nazwaki ekateli makasi ya komitalela na bosembo nyonso. Nalingaki mpenza koyeba mayoki na ngai mpo na solo ezali nini? Mpe mpo na nini nazali kati na solo.” Amonaki nini? Alobi lisusu: “Namitungisaki mpo na bantina oyo nafandaki kati na solo. Nasosolaki ete ntango nazalaki kokola, nazalaki komipesa mingi na makita mpe na mosala ya kosakola. Nzokande, momeseno ya koyekola ngai moko mpe ya kosalaka mabondeli esengelaki kozala. Kasi, ntango namitalaki malamumalamu, namonaki ete nazalaki kosala yango te.”

Ntoma Paulo apesi elendiseli ete: “Ata esika nini tokómi, tólanda kotambola na mobulu te, kasi na molɔngɔ.” (Bafilipi 3:16, NW) Moto oyo atambolaka na molɔngɔ akendaka liboso. Na ntembe te, liboso ozwa batisimo, pɔsɔ na pɔsɔ ozalaki koyekola Biblia na ndeko moko oyo azali molakisi malamu. Lokola ozalaki kosepela ntango nyonso, ozalaki komibongisa liboso ya boyekoli, mpe koluka mikapo oyo mipesami na kati ya Biblia mpe bongo na bongo. Sikoyo lokola ozwi batisimo, ozali kolanda ‘kotambola na molɔngɔ’?

Soki ezali bongo te, osengeli kotalela lisusu makambo nini otyaka na esika ya liboso, ‘koyeba mpenza makambo oyo maleki ntina.’ (Bafilipi 1:10, NW) Bomoi na biso etondi na misala, na yango, tosengeli kozala na komipekisa mpo na kozwa ntango ya kotánga Biblia mpe koyekola biso moko. Tosengeli kosala milende wana mpamba te litomba ezali monene. Tótala lisusu likambo ekómelaki Alexandra. Andimi ete: “Na lisangá nakoki koloba ete nazalaki na mɔ́tɔ na boumeli ya mbula 20 oyo eleki to na boumeli ya bambula bobele mpo na kokende na makita mpe kobima na mosala ya kosakola. Nzokande, namoni sikoyo ete atako makambo yango mazali na ntina, kasi yango moko ekoki kosimba ngai te ntango makambo ekómaka mpasi. Makambo wana nyonso ekómelaki ngai mpamba te nazalaki lisusu kosala boyekoli ya ngai moko te, ata mabondeli na ngai ezalaki ya sikisiki te kasi ya likolólikoló. Nandimi sikoyo ete nasengeli kobongola makanisi mpe kobanda boyekoli ya ngai moko mpo nayeba Yehova mpe nalinga ye, lisusu nasepela na eloko Mwana na ye apesaki biso.”

Soki olingi básalisa yo mpo okóma na momeseno ya koyekola yo moko, bankulutu mpe bandeko mosusu oyo bakɔmeli na kati ya lisangá bakosepela kosunga yo. Lisusu, masolo oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Máí 1995; 15 Augústo 1993; mpe 15 Máí 1986 (ebimeli ya Lifalanse), ezali na toli mingi oyo ekosunga yo.

Osengeli kokangama na Nzambe

Osengeli lisusu kosala makasi mpo na kokolisa boyokani na yo na Nzambe. Kutu, ntango mosusu mposa yango ekoki kozala monene. Tókamata ndakisa ya Anthony, oyo azwaki batisimo ntango azalaki naino elenge. Alobi: “Nazalaki mwana ya liboso na libota na biso oyo azwaki batisimo. Nsima ya batisimo na ngai mama apesaki ngai matɔndi mingi. Naino namoná ye na esengo ya bongo liboso te. Ezalaki esengo monene mpe epesaki ngai makasi.” Nzokande, ezalaki na likambo mosusu. Anthony alobi lisusu: “Mwa moke na nsima, ezalaki na elenge ata moko te oyo azwaki batisimo na lisangá na biso. Yango ekómisaki ngai lolendo. Nakómaki na lolendo ntango nazalaki kopesa biyano mpe na masolo oyo nazalaki kosala na makita. Nakómaki kolinga bato bákumisa ngai mpe bándima ngai na esika ete nakumisa Yehova. Nazalaki mpenza na boyokani malamu elongo na ye te.”

Lokola Anthony, bato mosusu bakoki kozwa batisimo bobele mpo na kosepelisa bato kasi mpo na kosepelisa Yehova te. Atako bongo, Nzambe alingi ete bato wana bákokisa ndai oyo balapaki ya kosalela ye. (Kokanisá na Mosakoli 5:4.) Nzokande, lokola bamipesaka na Nzambe na bolingo na bango moko te, mbala mingi bálongaka te. Anthony alobi: “Esengo monene oyo nayokaki na batisimo na ngai eumelaki ntango mokuse. Ekokaki ata mbula moko te nsima ya batisimo na ngai nabandaki kosala misala ya mabe mpe nazwaki mpamela epai ya bankulutu ya lisangá. Lokola nazalaki kozongela etamboli ya mabe, babimisaki ngai na lisangá. Mbula motoba nsima ya komipesa na ngai epai ya Yehova, bakangaki ngai mpe nakɔtaki bɔlɔkɔ mpo nabomaki moto.”

Kolisá boninga makasi na Yehova

Ata osili koumela kati na solo to oumeli naino te, baklisto nyonso basengeli kondima libyangi ya Biblia oyo elobi ete: “Bóbɛlɛma epai na Nzambe mpe ye akobɛlɛma epai na bino.” (Yakobo 4:8) Na ntembe te, okolisaki mwa boninga na Nzambe ntango obandaki koyekola Biblia. Oyekolaki ete Nzambe azali te nguya moko boye ezangi komonana oyo mangomba ya boklisto basambelaka, kasi azali moto mpe nkombo na ye ezali Yehova. Oyekolaki lisusu ete azali na bizaleli malamu, azali “Nzambe na mawa mpe na ngɔlu, akoyokaka nkanda noki te mpe aleki na boboto.”​—Exode 34:6.

Nzokande, mpo na kokokisa ndai na yo, osengeli kokangama na Nzambe! Ndenge nini? Mokomi na nzembo abondelaki ete: “Ɛ [Yehova] yebisá ngai nzela na yo; monisá ngai bilekelo na yo.” (Nzembo 25:4) Boyekoli na yo moko ya Biblia mpe ya mikanda ya la Société ekoki kosalisa yo mpo oyeba Yehova malamu. Ebongi lisusu kosalaka mabondeli oyo ezali komonisa mayoki ya motema. Mokomi na nzembo apesi toli oyo: “Zipolá mitema na bino liboso na ye.” (Nzembo 62:8) Ntango okomona ete mabondeli na yo ekómi kozwa biyano, okondima ete Nzambe amibanzabanzaka mpo na yo. Yango ekosalisa yo omiyoka ete ozali pene na ye.

Mikakatano na mitungisi ezali mpe moko ya mabaku oyo ekopusa biso na kokangama na Nzambe. Kondima na yo ekoki kokutana na mikakatano to komekama, lokola maladi, bopusi mabe na eteyelo mpe na mosala, to kozanga mbongo. Ekoki ata kozala ete mimeseno ya Teokrasi, elingi koloba kobima na mosala ya kosakola, kokende na makita, to koyekola Biblia na bana na yo moko ekómi mpasi. Kobunda na likambo yango yo moko te! Bondelá Nzambe asunga yo mpe sɛngá ye mayele mpe litambwisi. (Masese 3:5, 6) Sɛngá apesa yo elimo santu na ye! (Luka 11:13) Ntango okomona lisungi oyo Nzambe apesaka na bolingo, okokangama mpenza na ye. Ndenge Davidi mokomi na nzembo alobi, “Meká mpe sosolá ete [Yehova] azali malamu; esengo ezali na moto oyo akoluka ekimelo epai na ye.”​—Nzembo 34:8.

Ezali boni mpo na Anthony? Alobi: “Nabandaki kokanisa eleko oyo nazalaki na ebele ya mikano ya elimo mpo na kosala mokano ya Yehova. Yango esalaki ngai mpasi. Kasi, kati na bampasi mpe mawa na ngai, nakanisaki bolingo ya Yehova. Nalekisaki mwa ntango liboso ete nabondela Yehova. Kasi nabondelaki kaka, mpe nayebisaki ye bamposa ya motema na ngai, nasɛngaki ye bolimbisi. Nabandaki kotánga Biblia, mpe nakamwaki mingi mpo nabosanaki makambo mingi, nayebaki lisusu Yehova malamumalamu te.” Atako Anthony asengeli kokokisa etumbu na ye na bolɔkɔ, azali kozwa lisungi ya Batatoli ya Yehova ya lisangá na bango, mpe azali kobongisa ezaleli na ye na elimo. Likambo ya esengo, Anthony alobi: “Napesi Yehova mpe lisangá na ye matɔndi, mpamba te nazwi likoki ya kolongola bomoto ya kala, mpe nazali kosala makasi mpo na kolata oyo ya sika mokolo na mokolo. Sikoyo, boyokani na ngai na Yehova ezali eloko oyo eleki motuya.”

Na mosala na yo ya kosakola

Yesu atindaki bayekoli na ye bázala basakoli ya “Nsango Malamu ya Bokonzi.” (Matai 24:14) Lokola obandi kosakola nsango malamu sika, mbala mosusu omeseni naino mingi te. Kasi, ndenge nini okoki kokola mpo ‘okokisa mosala na yo na ndenge ekoki’?—2 Timote 4:5.

Moko ya makambo okoki kosala ezali bongo kozala na elimo ya kolonga. Yekolá kotalela mosala ya kosakola lokola “eloko ya motuya,” mpe libaku malamu. (2 Bakolinti 4:7) Ezali libaku mpo na komonisa bolingo mpe bosembo na biso epai na Yehova. Ezali lisusu kopesa biso nzela ya komonisa ete tolingaka bazalani na biso. Komipesa mobimba na mosala yango ekoki kozala liziba ya esengo ya solosolo.​—Misala 20:35.

Yesu ye moko azalaki na elimo ya kolonga na mosala ya kosakola. Koteya bato mosusu solo ya Biblia ezalaki lokola “bilei” mpo na ye. (Yoane 4:34) Mposa azalaki na yango mpo na kosalisa bato ekoki kolobelama na mokuse na maloba na ye oyo, “Nalingi.” (Matai 8:3) Yesu azalaki koyokela bato mawa, mingimingi baoyo ‘balɛmbaki mpe [batelenganaki, NW]’ na mokili ya Satana. (Matai 9:35, 36) Yo mpe ‘olingi’ kosalisa bato oyo bazali na molili ya elimo, baoyo bazali na mposa ya pole ya Liloba ya Nzambe? Okoyoka ete osengeli kondima etinda oyo Yesu apesaki: “Boye bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso.” (Matai 28:19) Okopusama na kosangana mingi na mosala yango ndenge nzoto mpe mikumba na yo ekopesa yo likoki.

Sɛkɛlɛ mosusu ya kokola ezali bongo kobima ntango nyonso na mosala ya kosakola—pɔsɔ na pɔsɔ soki likoki ezali. Soki okosala bongo okolongola nsɔmɔ mpe kobanga oyo mbala mosusu ezalaka na moto oyo asakolaka mingi te. Kobima mbala na mbala na mosala ya kosakola ekosalisa yo na makambo mosusu. Ekobakisela yo bosepeli mpo na solo, okokolisa bolingo mpo na Yehova mpe mpo na bazalani, mpe ekosalisa yo otya miso na matomba ya Bokonzi.

Kasi, ezali boni soki ezalela na yo ya mikolo oyo epesi yo nzela te ya kobima mingi na mosala ya kosakola? Soki emonani ete likoki ya kobongola yango ezali te, yebá ete Yehova azali kosepela mingi na oyo ozali kosala, lokola ozali kosala yango na molimo na yo mobimba. (Matai 13:23) Mbala mosusu okoki kokola na makambo mosusu, na ndakisa kobakisa makoki na yo ya koteya. Na lisangá, Eteyelo mpo na mosala ya Teokrasi mpe Likita ya mosala ezali kopesa mateya mabongi na likambo yango. Ya solo, soki tozali na makoki mingi na mosala ya kosakola, tokosepela na mosala yango mingi mpe tokozwa matomba mingi.

Emonani polele ete bokoli ya elimo esukaka mokolo oyo moto azwaka batisimo te. Ntoma Paulo akomaki na ntina na elikya na ye ya kozwa bomoi oyo ezangi kufa na likoló ete: “Bandeko natángi te ete nasili kosimba yango, nde nazali kosalaka likambo oyo moko ete, awa ezali ngai kobosana makambo mazali nsima mpe kopusanaka mpo na yango izali liboso, nazali kobila kino nsuka mpo na libonza oyo ezali ebyangeli na Nzambe kuna na Likoló, kati na Klisto Yesu. Tiká ete biso babongi tókanisa likambo oyo sembo. Soko bozali kokanisa na nzela mosusu, Nzambe akomonisela bino bobele bongo.”​—Bafilipi 3:13-15.

Ɛɛ, baklisto nyonso, ezala bazali na elikya ya kozwa bomoi ezangi kufa na likoló to bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé, basengeli kosala makasi mpo na ‘kokende liboso’ ete bázwa bomoi! Batisimo ezali litambe malamu, kasi ezali kaka ebandeli. Bólanda kobunda makasi mpo na kokola na elimo. Na nzela ya makita mpe boyekoli ya bino moko, “bókóma mibange kati na makanisi.” (1 Bakolinti 14:20) “Bóyeba kososola . . . monene mpe molai mpe bozindo” ya solo. (Baefese 3:18) Bokoli oyo bokosala ekopesa bino esengo mpe bolamu sikoyo mpe lisusu ekosalisa bino mpo bófanda na mokili ya sika oyo Nzambe akosala, na litambwisi ya Bokonzi ya likoló, bokozwa likoki ya kokola libela na libela!

[Elilingi na lokasa 29]

Esengeli komipesa disipilini mpo na kozwa ntango ya koyekola yo moko

[Elilingi na lokasa 31]

Makanisi ya kolonga ekoki kosalisa biso mpo tósepela na mosala ya kosakola

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto